caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Al-Qalam القلم

52 verses · Mecca · revelation order 2

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ نٓ وَٱلْقَلَمِ وَمَا يَسْطُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Nún(1), (nalapi) na ekomeli na oyo ezali kokoma.

See all translations of this verse →

مَآ أَنتَ بِنِعْمَةِ رَبِّكَ بِمَجْنُونٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Yo (Muhammad) na ngrásia y a Nkolo nayo ozali libgoma te.

See all translations of this verse →

وَإِنَّ لَكَ لَأَجْرًا غَيْرَ مَمْنُونٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Mpe ya sôló, ozali na lifuta oyo esilaka te,

See all translations of this verse →

وَإِنَّكَ لَعَلَىٰ خُلُقٍ عَظِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Mpe ya sôló, ozali na ezaleli ya malamu.

See all translations of this verse →

فَسَتُبْصِرُ وَيُبْصِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Yo okomona mpe bango bakomona,

See all translations of this verse →

بِأَييِّكُمُ ٱلْمَفْتُونُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Nani kati na bino amekami?

See all translations of this verse →

إِنَّ رَبَّكَ هُوَ أَعْلَمُ بِمَن ضَلَّ عَن سَبِيلِهِۦ وَهُوَ أَعْلَمُ بِٱلْمُهْتَدِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Ya sôló, Nkolo wa yo ayebi malamu oyo abunga nzela naye, mpe ayebi malamu baye bazali na bokambami.

See all translations of this verse →

فَلَا تُطِعِ ٱلْمُكَذِّبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Kaši kotosa bato ya lokuta te.

See all translations of this verse →

وَدُّوا۟ لَوْ تُدْهِنُ فَيُدْهِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Bakosepela ozala malamu na bango mpo bazala mpe malamu nayo.

See all translations of this verse →

وَلَا تُطِعْ كُلَّ حَلَّافٍ مَّهِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Mpe kotosa moko te na bango, bazali kolapa na ntina te.

See all translations of this verse →

هَمَّازٍ مَّشَّآءٍۭ بِنَمِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Bato ya songi songi, bazali kokosela bato makambo.

See all translations of this verse →

مَّنَّاعٍ لِّلْخَيْرِ مُعْتَدٍ أَثِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Baye bapekisaka bolamu ya bato, bazali kolekisa ndelo mpe basali na masumu,

See all translations of this verse →

عُتُلٍّۭ بَعْدَ ذَٰلِكَ زَنِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Bazali na mitema makasi mpe bazali na lolendo.

See all translations of this verse →

أَن كَانَ ذَا مَالٍ وَبَنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Ata soki azali na misolo ebele na bana ebele, (alingi kobonguana te)

See all translations of this verse →

إِذَا تُتْلَىٰ عَلَيْهِ ءَايَٰتُنَا قَالَ أَسَٰطِيرُ ٱلْأَوَّلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Soki batangeli ye mikapo mia biso, alobi: Wana ezali sé masapo ya bankoko ya kala.

See all translations of this verse →

سَنَسِمُهُۥ عَلَى ٱلْخُرْطُومِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Tokomonisa elembo naye likolo na zolo.

See all translations of this verse →

إِنَّا بَلَوْنَٰهُمْ كَمَا بَلَوْنَآ أَصْحَٰبَ ٱلْجَنَّةِ إِذْ أَقْسَمُوا۟ لَيَصْرِمُنَّهَا مُصْبِحِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Ya soló, tomekaki bango lolenge tomekaki bato ya elanga tango bakanaki ete bakobuka yango lobi na tongo,

See all translations of this verse →

وَلَا يَسْتَثْنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Bazangaki koloba: Na bolingi ya Allah. (In cha Allah)

See all translations of this verse →

فَطَافَ عَلَيْهَا طَآئِفٌ مِّن رَّبِّكَ وَهُمْ نَآئِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Mabe kowuta epai ya Nkolo nayo ekwelaki yango bazali kolala,

See all translations of this verse →

فَأَصْبَحَتْ كَٱلصَّرِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Na tongo ekomi lokola eloko ezalaki te.

See all translations of this verse →

فَتَنَادَوْا۟ مُصْبِحِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. O mokolo molandi: Babiangani bango na bango.

See all translations of this verse →

أَنِ ٱغْدُوا۟ عَلَىٰ حَرْثِكُمْ إِن كُنتُمْ صَٰرِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Bökende noki na bilanga na bino soki bolingi kobuka mbuma.

See all translations of this verse →

فَٱنطَلَقُوا۟ وَهُمْ يَتَخَٰفَتُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Basololi kati na bango na bango na nsé tango babimaki тропа kokende,

See all translations of this verse →

أَن لَّا يَدْخُلَنَّهَا ٱلْيَوْمَ عَلَيْكُم مِّسْكِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Mobola moko te akotela bino lelo na elanga,

See all translations of this verse →

وَغَدَوْا۟ عَلَىٰ حَرْدٍ قَٰدِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Mpe bakendeki na tango ya malamu na mokano nyoso ete bakoka kopimela babola.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا رَأَوْهَا قَالُوٓا۟ إِنَّا لَضَآلُّونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Mpe tango bamoni (elanga) yango, balobi: Ya soló tobungi nzela na biso,

See all translations of this verse →

بَلْ نَحْنُ مَحْرُومُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. То yango; Kasi tozali na eloko te.

See all translations of this verse →

قَالَ أَوْسَطُهُمْ أَلَمْ أَقُل لَّكُمْ لَوْلَا تُسَبِّحُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Moto ya bosembo kati na bango alobi: Nayebisaki bino te ete: Soki bosanzolaki lukumu ya Allah?

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ سُبْحَٰنَ رَبِّنَآ إِنَّا كُنَّا ظَٰلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Balobi: Lokumu na Nkolo wa biso, ya sólo tozalaki bato mabe.

See all translations of this verse →

فَأَقْبَلَ بَعْضُهُمْ عَلَىٰ بَعْضٍ يَتَلَٰوَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Batalani bango na bango, bakomi koloba: Yo nde osali mabe,

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰوَيْلَنَآ إِنَّا كُنَّا طَٰغِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Mpe balobaki ete: Eh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki batomboki.

See all translations of this verse →

عَسَىٰ رَبُّنَآ أَن يُبْدِلَنَا خَيْرًا مِّنْهَآ إِنَّآ إِلَىٰ رَبِّنَا رَٰغِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Tozali kolikia na Nkolo wa biso été abongola eloko ya malamu тропа biso, tozali kolikia pene na Nkolo wa biso.

See all translations of this verse →

كَذَٰلِكَ ٱلْعَذَابُ وَلَعَذَابُ ٱلْـَٔاخِرَةِ أَكْبَرُ لَوْ كَانُوا۟ يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Lolenge wana nde etumbu ezalaki, kasi etumbu ya mokolo ya suka eleki monene. Soki bazali koyeba.

See all translations of this verse →

إِنَّ لِلْمُتَّقِينَ عِندَ رَبِّهِمْ جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Ya soló, babangi (Allah) bakozalaka epai ya Nkolo na bango na lola ya kitoko.

See all translations of this verse →

أَفَنَجْعَلُ ٱلْمُسْلِمِينَ كَٱلْمُجْرِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Boye tokozua bandimi ndenge moko na batomboki?

See all translations of this verse →

مَا لَكُمْ كَيْفَ تَحْكُمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Boni bozali kokata likambo na lolenge wana?

See all translations of this verse →

أَمْ لَكُمْ كِتَٰبٌ فِيهِ تَدْرُسُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. To boye bozali na buku eye bozali koyekola,

See all translations of this verse →

إِنَّ لَكُمْ فِيهِ لَمَا تَخَيَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Ete ya sólo, bokozua nyoso oyo bokolinga.

See all translations of this verse →

أَمْ لَكُمْ أَيْمَٰنٌ عَلَيْنَا بَٰلِغَةٌ إِلَىٰ يَوْمِ ٱلْقِيَٰمَةِ إِنَّ لَكُمْ لَمَا تَحْكُمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. To boye bolapelaki biso bandai ya bosôló kino mokolo ya suka, mpo topesa bino maye bolingi?

See all translations of this verse →

سَلْهُمْ أَيُّهُم بِذَٰلِكَ زَعِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Tuna bango, nani kati na bango azali nkumu na yango?

See all translations of this verse →

أَمْ لَهُمْ شُرَكَآءُ فَلْيَأْتُوا۟ بِشُرَكَآئِهِمْ إِن كَانُوا۟ صَٰدِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. To boye bazali na basangani? Baya na bango soki bazali koloba bosôló.

See all translations of this verse →

يَوْمَ يُكْشَفُ عَن سَاقٍ وَيُدْعَوْنَ إِلَى ٱلسُّجُودِ فَلَا يَسْتَطِيعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Mokolo oyo lokolo ekomonamaka, mpe bakobengaka bango ete bafukama elongi na mabele kasi bakokokaka kofukama te.

See all translations of this verse →

خَٰشِعَةً أَبْصَٰرُهُمْ تَرْهَقُهُمْ ذِلَّةٌ وَقَدْ كَانُوا۟ يُدْعَوْنَ إِلَى ٱلسُّجُودِ وَهُمْ سَٰلِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Bilongi na bango bikokitisama mpe bakozanga lokumu, nzoka nde babiangamaki mpo bafukama tango bazalaki malamu (na mokili).

See all translations of this verse →

فَذَرْنِى وَمَن يُكَذِّبُ بِهَٰذَا ٱلْحَدِيثِ سَنَسْتَدْرِجُهُم مِّنْ حَيْثُ لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Tika ngai na oyo nyoso azali kozua masolo oyo na lokuta, tokozua bango malembe na esika oyo bakoyeba te.

See all translations of this verse →

وَأُمْلِى لَهُمْ إِنَّ كَيْدِى مَتِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Мре natikelaki bango tango kaši, motambo na ngai ezali ya soló.

See all translations of this verse →

أَمْ تَسْـَٔلُهُمْ أَجْرًا فَهُم مِّن مَّغْرَمٍ مُّثْقَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo46. То boye osengaki bango lifuta to osengaki bango bazua nyongo ya monene?

See all translations of this verse →

أَمْ عِندَهُمُ ٱلْغَيْبُ فَهُمْ يَكْتُبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. To boye bayebi maye mabombami, yango bazali кокота?

See all translations of this verse →

فَٱصْبِرْ لِحُكْمِ رَبِّكَ وَلَا تَكُن كَصَاحِبِ ٱلْحُوتِ إِذْ نَادَىٰ وَهُوَ مَكْظُومٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Мре kanga motema (Muhammad) na kozela mokano ya Nkolo nayo, kasi kozala lokola moto oyo azalaki na libumu ya mbisi te (Yûnus), tango abelelaki (Allah) na kati ya mawa ya monene.

See all translations of this verse →

لَّوْلَآ أَن تَدَٰرَكَهُۥ نِعْمَةٌ مِّن رَّبِّهِۦ لَنُبِذَ بِٱلْعَرَآءِ وَهُوَ مَذْمُومٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Soki тропа bolamu ya Nkolo naye te likolo naye, nde abwakamaki libanda bolumbu likolo ya mabele ekauka.

See all translations of this verse →

فَٱجْتَبَٰهُ رَبُّهُۥ فَجَعَلَهُۥ مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Mpe Nkolo naye aponaki ye mpe atiaki ye o molongo ya bato malamu.

See all translations of this verse →

وَإِن يَكَادُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ لَيُزْلِقُونَكَ بِأَبْصَٰرِهِمْ لَمَّا سَمِعُوا۟ ٱلذِّكْرَ وَيَقُولُونَ إِنَّهُۥ لَمَجْنُونٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Tango bapengwi bayokelaki yo likunya mpe kotala yo na miso ya mabe na tango bayokaki kurani, balobi: Ya sólo azali ligboma.

See all translations of this verse →

وَمَا هُوَ إِلَّا ذِكْرٌ لِّلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Wana ezali sé bokundoli тропа mokili mobimba.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70