Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Ye nde akela liwa mpe bomoyi mpo ameka bino mpe atala nani kati na bino akosala malamu koleka. Mpe azali wa bokasi atonda bolimbisi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Ye nde akeli mapata sambo ya komatelama, boye okomona eloko ya mabe na kati ya bokeli ya Ar-Rahmân(1) te. Zongisa miso тропа kotala lisusu, okomona sé kitoko.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Mpe ya soló, tosilaki kobongisa mapata ya pene na nsé na bonzenga ya bongengi ya minzoto, mpe totiaki yango (minzoto) тропа kobengana basatana, mpe tobombeli bango etumbu ya lifelo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Bakolobaka: Iyo. Mokebisi ayelaki biso kasi toboyaki kondimela ye mpe tolobaki: Allah akitisa eloko te, bozali sé na libungi linene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Soki ata bobombi maloba na bino to bobimisi yango polele, ya solo ye azali moyebi ya nyoso oyo ebombami o kati ya mitema (batolo)
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Ye nde atiela bino mabele mpete botambola kati na yango lolenge bolingi, mpe bolia oyo apesi bino, mpe bozongi ekozala sé epai naye.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. To boye bozali na ebateli libanda na oyo azali na likolo été akoki kokotisa bino na mabele kasi bokomona ete mabele ekoningana?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. To boye bobatelami liboso na oyo azali na likolo été atindela bino mopepe ya mabanga? Bokoyeba ndenge nini bokebisi na ngai ezali.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Boye bazali kornona te bandeke na likolo lolenge akangaka mpe afungolaka mapapu naye? Oyo asimbi bango ezali sé Ar-Rahmân(1). Ya soló, ye amonaka biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Nani akosalisa bino na mapinga ya kosunga bino liboso ya Ar-Rahmân? Ya soló, bapengwi bazali mpenza na libungi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Mpe tango bakomona (etumbu) pene na bango, bilongi ya bapagano bikokoma mawa mawa, bakoyebisa bango été: Oyo nde bozalaki kosenga.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Loba: Bomoni boni soki Allah abomi ngai na baye bazali elongo na ngai to alimbisi biso, nani akosungaka bapengwi na etumbu ya makasi?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Loba: Ye azali Ar-Rahmân(1), tondimi naye mpe epai naye nde tomipesi. Mpe bokoyebaka nani azali na nzela ya libungi ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Loba: Bomoni boni soki mayi na bino ekomi mosika na nsé ya mabele, nani mosusu akopesa bino mayi kowuta na libulu?