caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Al-Fajr الفجر

30 verses · Mecca · revelation order 10

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ وَٱلْفَجْرِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. (Nalapi) na eleko ya ntongo!

See all translations of this verse →

وَلَيَالٍ عَشْرٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. (Mpe nalapi) na babutu zomi!

See all translations of this verse →

وَٱلشَّفْعِ وَٱلْوَتْرِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. (Mpe nalapi) na motango libale, mpe na motango libale te!

See all translations of this verse →

وَٱلَّيْلِ إِذَا يَسْرِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. (Mpe nalapi) na butu ntango esilaka.

See all translations of this verse →

هَلْ فِى ذَٰلِكَ قَسَمٌ لِّذِى حِجْرٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Kolapa oyo ezali te mpo na moto oyo atonda mayele?

See all translations of this verse →

أَلَمْ تَرَ كَيْفَ فَعَلَ رَبُّكَ بِعَادٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Omoni te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya aad,

See all translations of this verse →

إِرَمَ ذَاتِ ٱلْعِمَادِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Na mboka Irama(1) ndenge etongamaki na bandako ya likolo,

See all translations of this verse →

ٱلَّتِى لَمْ يُخْلَقْ مِثْلُهَا فِى ٱلْبِلَٰدِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Mboka eye etongama te lolenge wana na mokili,

See all translations of this verse →

وَثَمُودَ ٱلَّذِينَ جَابُوا۟ ٱلصَّخْرَ بِٱلْوَادِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Mpe na bato ya Thamúd baye bazalaki kotobola mabanga okatikati ya bangomba,

See all translations of this verse →

وَفِرْعَوْنَ ذِى ٱلْأَوْتَادِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Na Falo moto ya mapinga?

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ طَغَوْا۟ فِى ٱلْبِلَٰدِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Bango banso bazalaki babuki mibeko o’kati ya bamboka na bango,

See all translations of this verse →

فَأَكْثَرُوا۟ فِيهَا ٱلْفَسَادَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Mpe babebisaki mingi koleka.

See all translations of this verse →

فَصَبَّ عَلَيْهِمْ رَبُّكَ سَوْطَ عَذَابٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Na yango Nkolo nayo akitiselaki bango fimbu ya etumbu.

See all translations of this verse →

إِنَّ رَبَّكَ لَبِٱلْمِرْصَادِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Mpo ete Nkolo nayo azali kotala.

See all translations of this verse →

فَأَمَّا ٱلْإِنسَٰنُ إِذَا مَا ٱبْتَلَىٰهُ رَبُّهُۥ فَأَكْرَمَهُۥ وَنَعَّمَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّىٓ أَكْرَمَنِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Moto azali soki Nkolo naye ameki ye na bokumisi ye mpe na bopesi ye bozwi alobi: Nkolo na ngai akumisi nga.

See all translations of this verse →

وَأَمَّآ إِذَا مَا ٱبْتَلَىٰهُ فَقَدَرَ عَلَيْهِ رِزْقَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّىٓ أَهَٰنَنِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Kaši soki ameki ye na bokangeli ye bozwi alobi ete: Nkolo na ngai asundoli nga.

See all translations of this verse →

كَلَّا بَل لَّا تُكْرِمُونَ ٱلْيَتِيمَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Kaši te, bino nde bosalisaka bana bitike te,

See all translations of this verse →

وَلَا تَحَٰٓضُّونَ عَلَىٰ طَعَامِ ٱلْمِسْكِينِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Mpe bolendisaka bato te pona koleisa babola,

See all translations of this verse →

وَتَأْكُلُونَ ٱلتُّرَاثَ أَكْلًا لَّمًّا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Mpe bozalaki kólia bikitano (bozui mowei atiki) na ndenge ya mabe,

See all translations of this verse →

وَتُحِبُّونَ ٱلْمَالَ حُبًّا جَمًّا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Mpe bolingi bomengo na bolingo ya makasi.

See all translations of this verse →

كَلَّآ إِذَا دُكَّتِ ٱلْأَرْضُ دَكًّا دَكًّا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Kaši ntango mabele ekobalusama na ndenge ya somo,

See all translations of this verse →

وَجَآءَ رَبُّكَ وَٱلْمَلَكُ صَفًّا صَفًّا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Ntango Nkolo nayo akoya mpe ba anzelu bakozala milongo milongo,

See all translations of this verse →

وَجِا۟ىٓءَ يَوْمَئِذٍۭ بِجَهَنَّمَ يَوْمَئِذٍ يَتَذَكَّرُ ٱلْإِنسَٰنُ وَأَنَّىٰ لَهُ ٱلذِّكْرَىٰ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Mpe bakoya na lifelo mokolo yango, mokolo wana moto akokanisa makanisi, kaši makanisi wana ekosalisa ye na eloko te.

See all translations of this verse →

يَقُولُ يَٰلَيْتَنِى قَدَّمْتُ لِحَيَاتِى

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Akoloba eh! Ngai mawa na ngai, soki nasalaki bolamu pona bomoyi na ngai!

See all translations of this verse →

فَيَوْمَئِذٍ لَّا يُعَذِّبُ عَذَابَهُۥٓ أَحَدٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Mokolo wana etumbu naye ekokokana na ya moto moko te,

See all translations of this verse →

وَلَا يُوثِقُ وَثَاقَهُۥٓ أَحَدٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Mpe moto moko te akokangama lokola ye.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيَّتُهَا ٱلنَّفْسُ ٱلْمُطْمَئِنَّةُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Oh yo molimo y a kimia!

See all translations of this verse →

ٱرْجِعِىٓ إِلَىٰ رَبِّكِ رَاضِيَةً مَّرْضِيَّةً

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Zonga epai ya Nkolo nayo na bozongi ya esengo.

See all translations of this verse →

فَٱدْخُلِى فِى عِبَٰدِى

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Kota elongo na bawumbu ba ngai,

See all translations of this verse →

وَٱدْخُلِى جَنَّتِى

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Mpe kota okati ya lola na ngai.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70