Home › Surahs › Surah Nooh
Surah Nooh نوح
28 verses · Mecca · revelation order 71
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ إِنَّآ أَرْسَلْنَا نُوحًا إِلَىٰ قَوْمِهِۦٓ أَنْ أَنذِرْ قَوْمَكَ مِن قَبْلِ أَن يَأْتِيَهُمْ عَذَابٌ أَلِيمٌ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 1. Ya soló totindaki Nûh epai ya bato naye ete: Kebisa bato nayo yambo ya etumbu makasi eyela bango.
See all translations of this verse →
قَالَ يَٰقَوْمِ إِنِّى لَكُمْ نَذِيرٌ مُّبِينٌ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 2. Alobaki: Oh bato na ngai! Ya sôló, nazali mokebisi ya polele тропа bino,
See all translations of this verse →
أَنِ ٱعْبُدُوا۟ ٱللَّهَ وَٱتَّقُوهُ وَأَطِيعُونِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 3. Bobondela Allah, bobanga ye тре botosa ngai,
See all translations of this verse →
يَغْفِرْ لَكُم مِّن ذُنُوبِكُمْ وَيُؤَخِّرْكُمْ إِلَىٰٓ أَجَلٍ مُّسَمًّى إِنَّ أَجَلَ ٱللَّهِ إِذَا جَآءَ لَا يُؤَخَّرُ لَوْ كُنتُمْ تَعْلَمُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 4. Mpo alimbisa bino masumu тре apesa bino mikolo kino elaka yango ekoka. Ya soló, tango elaka ya Allah ekoki ezelaka te soki bozali koyeba!
See all translations of this verse →
قَالَ رَبِّ إِنِّى دَعَوْتُ قَوْمِى لَيْلًا وَنَهَارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 5. Alobi: Nkolo! Ya sólo, natei bato na ngai butu na moyi,
See all translations of this verse →
فَلَمْ يَزِدْهُمْ دُعَآءِىٓ إِلَّا فِرَارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 6. Kasi mateya na ngai ebakiseli bango sé kokima,
See all translations of this verse →
وَإِنِّى كُلَّمَا دَعَوْتُهُمْ لِتَغْفِرَ لَهُمْ جَعَلُوٓا۟ أَصَٰبِعَهُمْ فِىٓ ءَاذَانِهِمْ وَٱسْتَغْشَوْا۟ ثِيَابَهُمْ وَأَصَرُّوا۟ وَٱسْتَكْبَرُوا۟ ٱسْتِكْبَارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 7. Mpe tango nazali kobenga bango mpo olimbisa bango, bazali kotiya misapi na matoyi na bango mpe kozipa yango na bilamba, basali motu makasi mpe lolendo.
See all translations of this verse →
ثُمَّ إِنِّى دَعَوْتُهُمْ جِهَارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 8. Sima nabengaki bango na polele,
See all translations of this verse →
ثُمَّ إِنِّىٓ أَعْلَنتُ لَهُمْ وَأَسْرَرْتُ لَهُمْ إِسْرَارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 9. Mpe nayebisaki bango na polele mpe na lolenge ya kobombama.
See all translations of this verse →
فَقُلْتُ ٱسْتَغْفِرُوا۟ رَبَّكُمْ إِنَّهُۥ كَانَ غَفَّارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 10. Nayebisaki bango été: Botubela epai ya Nkolo na bino. Ya soló, ye azali molimbisi.
See all translations of this verse →
يُرْسِلِ ٱلسَّمَآءَ عَلَيْكُم مِّدْرَارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 11. Mpo akitisela bino kowuta na likolo mbula ezala ya kolandana,
See all translations of this verse →
وَيُمْدِدْكُم بِأَمْوَٰلٍ وَبَنِينَ وَيَجْعَل لَّكُمْ جَنَّٰتٍ وَيَجْعَل لَّكُمْ أَنْهَٰرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 12. Mpe apesa bino misolo na bana ebele, mpe abómbela bino bilanga mpe mingala.
See all translations of this verse →
مَّا لَكُمْ لَا تَرْجُونَ لِلَّهِ وَقَارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 13. Mpona nini bozali kokumisa Allah te na ndenge esengeli?
See all translations of this verse →
وَقَدْ خَلَقَكُمْ أَطْوَارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 14. Mpe akela bino ndambu ndambu ya kotangama?
See all translations of this verse →
أَلَمْ تَرَوْا۟ كَيْفَ خَلَقَ ٱللَّهُ سَبْعَ سَمَٰوَٰتٍ طِبَاقًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 15. Bozali kornona te lolenge Allah akela mapata sambo elandani,
See all translations of this verse →
وَجَعَلَ ٱلْقَمَرَ فِيهِنَّ نُورًا وَجَعَلَ ٱلشَّمْسَ سِرَاجًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 16. Mpe atiya bongengi kati ya sanza mpe mwinda okati ya moyi?
See all translations of this verse →
وَٱللَّهُ أَنۢبَتَكُم مِّنَ ٱلْأَرْضِ نَبَاتًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 17. Allah nde abimisa bino na mabele lokola milona.
See all translations of this verse →
ثُمَّ يُعِيدُكُمْ فِيهَا وَيُخْرِجُكُمْ إِخْرَاجًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 18. Sima akozongisa bino kati na yango mpe sima akobimisa bino penza.
See all translations of this verse →
وَٱللَّهُ جَعَلَ لَكُمُ ٱلْأَرْضَ بِسَاطًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 19. Allah atandela bino mabele ezala lokola etoko,
See all translations of this verse →
لِّتَسْلُكُوا۟ مِنْهَا سُبُلًا فِجَاجًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 20. Mpo botambola na kati ya banzela na yango.
See all translations of this verse →
قَالَ نُوحٌ رَّبِّ إِنَّهُمْ عَصَوْنِى وَٱتَّبَعُوا۟ مَن لَّمْ يَزِدْهُ مَالُهُۥ وَوَلَدُهُۥٓ إِلَّا خَسَارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 21. Nûh alobaki ete: Nkolo! Baboyi kotosa ngai kaši balandi sé moto oyo bozui naye na bana ekobakisela ye sé libungi.
See all translations of this verse →
وَمَكَرُوا۟ مَكْرًا كُبَّارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 22. Mpe basali likita ya monene, (ya mabe).
See all translations of this verse →
وَقَالُوا۟ لَا تَذَرُنَّ ءَالِهَتَكُمْ وَلَا تَذَرُنَّ وَدًّا وَلَا سُوَاعًا وَلَا يَغُوثَ وَيَعُوقَ وَنَسْرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 23. Mpe balobi ete: Botika banzambe na bino te, botika Waad te, botika mpe Suwaa te, yarúsa te, yaúqa mpe te na Nasra te. (ezali bankombo ya bikeko ya bango bazalaki kobondela)
See all translations of this verse →
وَقَدْ أَضَلُّوا۟ كَثِيرًا وَلَا تَزِدِ ٱلظَّٰلِمِينَ إِلَّا ضَلَٰلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 24. (Mpe) yango bisili kobungisa ebele mpe ezali kobakisela babubi sé libungi.
See all translations of this verse →
مِّمَّا خَطِيٓـَٰٔتِهِمْ أُغْرِقُوا۟ فَأُدْخِلُوا۟ نَارًا فَلَمْ يَجِدُوا۟ لَهُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ أَنصَارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 25. Mpona mabe na bango, bazindisamaki na mayi, mpe bakotaki na móto, mpe bazuaki basungi te na botiki Allah.
See all translations of this verse →
وَقَالَ نُوحٌ رَّبِّ لَا تَذَرْ عَلَى ٱلْأَرْضِ مِنَ ٱلْكَٰفِرِينَ دَيَّارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 26. Mpe Nûh alobi: Nkolo! Kotika ata mopagano moko te na mokili.
See all translations of this verse →
إِنَّكَ إِن تَذَرْهُمْ يُضِلُّوا۟ عِبَادَكَ وَلَا يَلِدُوٓا۟ إِلَّا فَاجِرًا كَفَّارًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 27. Soki otiki bango (na bomoyi), bakobungisa bawumbu nayo mpe bakobota sé basumuki.
See all translations of this verse →
رَّبِّ ٱغْفِرْ لِى وَلِوَٰلِدَىَّ وَلِمَن دَخَلَ بَيْتِىَ مُؤْمِنًا وَلِلْمُؤْمِنِينَ وَٱلْمُؤْمِنَٰتِ وَلَا تَزِدِ ٱلظَّٰلِمِينَ إِلَّا تَبَارًۢا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 28. Nkolo! Limbisa ngai, na baboti na ngai na moto nyoso oyo akokota ndako na ngai mondimi mpe bandimi ya mibali na ya basi, mpe kobakisela bapengwi te sé libungi.
See all translations of this verse →
← Surah Al-Ma'aarij
Surah Al-Jinn →
Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
→
Arabic text and translations via Tanzil and QuranEnc — verbatim, unmodified · Translations belong to their translators and are not the Qur'an itself
This is a research aid, not a source of religious rulings.