caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Al-Jinn الجن

28 verses · Mecca · revelation order 40

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ قُلْ أُوحِىَ إِلَىَّ أَنَّهُ ٱسْتَمَعَ نَفَرٌ مِّنَ ٱلْجِنِّ فَقَالُوٓا۟ إِنَّا سَمِعْنَا قُرْءَانًا عَجَبًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Loba: Emoniseli ekitela ngai ya soló ete: Lisanga moko ya bilima batiaki matoyi тропа koyoka mpe balobaki ete: Ya sólo, toyoki buku ya lokumu na etangeli ya somo,

See all translations of this verse →

يَهْدِىٓ إِلَى ٱلرُّشْدِ فَـَٔامَنَّا بِهِۦ وَلَن نُّشْرِكَ بِرَبِّنَآ أَحَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Ezali kokamba na nzela ya semba mpe tondimaki na yango, mpe tokosangisa Nkolo wa biso na eloko mosusu te.

See all translations of this verse →

وَأَنَّهُۥ تَعَٰلَىٰ جَدُّ رَبِّنَا مَا ٱتَّخَذَ صَٰحِبَةً وَلَا وَلَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Ya sólo, bonene naye Nkolo ya biso ekumama, azali na mwasi te, mpe mwana te.

See all translations of this verse →

وَأَنَّهُۥ كَانَ يَقُولُ سَفِيهُنَا عَلَى ٱللَّهِ شَطَطًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Mpe ya sólo, ye (satana) azali koloba mabe тропа Allah.

See all translations of this verse →

وَأَنَّا ظَنَنَّآ أَن لَّن تَقُولَ ٱلْإِنسُ وَٱلْجِنُّ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Mpe tokanisi ete: Bato na bilima bakoki kokosela Allah te.

See all translations of this verse →

وَأَنَّهُۥ كَانَ رِجَالٌ مِّنَ ٱلْإِنسِ يَعُوذُونَ بِرِجَالٍ مِّنَ ٱلْجِنِّ فَزَادُوهُمْ رَهَقًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Mpe ya sólo, Kati na bato, ezali na mibali misusu bazali koluka libateli epai ya bilima ya mibali, kasi yango ezali kobakisela bango sé mpasi.

See all translations of this verse →

وَأَنَّهُمْ ظَنُّوا۟ كَمَا ظَنَنتُمْ أَن لَّن يَبْعَثَ ٱللَّهُ أَحَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Mpe bakanisaki lolenge bokanisaki été Allah akosekwisa moto te.

See all translations of this verse →

وَأَنَّا لَمَسْنَا ٱلسَّمَآءَ فَوَجَدْنَٰهَا مُلِئَتْ حَرَسًا شَدِيدًا وَشُهُبًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Мре ya soló tomataki na mapata тропа koluka koyokamela, kasi tokutaki yango na babateli ya makasi mpe minzoto ya moto (mizali kobamba na mbangu mingi).

See all translations of this verse →

وَأَنَّا كُنَّا نَقْعُدُ مِنْهَا مَقَٰعِدَ لِلسَّمْعِ فَمَن يَسْتَمِعِ ٱلْـَٔانَ يَجِدْ لَهُۥ شِهَابًا رَّصَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Мре tozalaki kofanda mpe koyoka, kasi oyo akoyokamela sika oyo akokutana na masasi ya moto (minzoto) ekobengana ye.

See all translations of this verse →

وَأَنَّا لَا نَدْرِىٓ أَشَرٌّ أُرِيدَ بِمَن فِى ٱلْأَرْضِ أَمْ أَرَادَ بِهِمْ رَبُّهُمْ رَشَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Mpe ya sólo, toyebi te soki bazali kolingela bato ya mokili mabe to Nkolo na bango alingi kotiya bango na nzela ya semba.

See all translations of this verse →

وَأَنَّا مِنَّا ٱلصَّٰلِحُونَ وَمِنَّا دُونَ ذَٰلِكَ كُنَّا طَرَآئِقَ قِدَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Mpe kati na biso tozali na baye ya malamu mpe basusu bazali mabe, mpe tokabwanaki na mangomba ebele.

See all translations of this verse →

وَأَنَّا ظَنَنَّآ أَن لَّن نُّعْجِزَ ٱللَّهَ فِى ٱلْأَرْضِ وَلَن نُّعْجِزَهُۥ هَرَبًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Mpe ya sólo, tokanisaki été tokokutola nguya ya Allah awa na nsé te mpe lisusu ete tokosilisa nguya naye te na kokima.

See all translations of this verse →

وَأَنَّا لَمَّا سَمِعْنَا ٱلْهُدَىٰٓ ءَامَنَّا بِهِۦ فَمَن يُؤْمِنۢ بِرَبِّهِۦ فَلَا يَخَافُ بَخْسًا وَلَا رَهَقًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Mpe ya sólo, tango toyokaki bokambi, (kurani) tondimaki na yango, mpe oyo akondima na Nkolo naye, abanga te тропа bokutolami ya lifuta naye, mpe akobebisama te.

See all translations of this verse →

وَأَنَّا مِنَّا ٱلْمُسْلِمُونَ وَمِنَّا ٱلْقَٰسِطُونَ فَمَنْ أَسْلَمَ فَأُو۟لَٰٓئِكَ تَحَرَّوْا۟ رَشَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Mpe kati na biso, tozali na baye bazali bamizilima mpe na baye bazali babubi mpe baye bayambaki islam nde baye balukaki nzela ya semba,

See all translations of this verse →

وَأَمَّا ٱلْقَٰسِطُونَ فَكَانُوا۟ لِجَهَنَّمَ حَطَبًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Kasi тропа babubi, bakozala na moto ya lifelo ya bakoni oyo ezali kopela.

See all translations of this verse →

وَأَلَّوِ ٱسْتَقَٰمُوا۟ عَلَى ٱلطَّرِيقَةِ لَأَسْقَيْنَٰهُم مَّآءً غَدَقًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Soki bamitiyaka na nzela ya malamu, tolingaki komelisa bango mayi ya malamu,

See all translations of this verse →

لِّنَفْتِنَهُمْ فِيهِ وَمَن يُعْرِضْ عَن ذِكْرِ رَبِّهِۦ يَسْلُكْهُ عَذَابًا صَعَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Mpo tomeka bango kati na yango. Kasi oyo akoboya bokundoli ya Nkolo naye, akosukisa ye na nzela ya etumbu oyo ekosilaka te.

See all translations of this verse →

وَأَنَّ ٱلْمَسَٰجِدَ لِلَّهِ فَلَا تَدْعُوا۟ مَعَ ٱللَّهِ أَحَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Mpe ya sôló, ba Masâdjid(1) bizali тропа Allah, kasi bobondela eloko mosusu elongo na Allah te.

See all translations of this verse →

وَأَنَّهُۥ لَمَّا قَامَ عَبْدُ ٱللَّهِ يَدْعُوهُ كَادُوا۟ يَكُونُونَ عَلَيْهِ لِبَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Mpe tango mowumbu ya Allah atelemaki тропа kosambela ye, bayaki ebele kotelema pembeni naye (tango wana nde bilima bandimaki na kurani esantu tango etangamaki).

See all translations of this verse →

قُلْ إِنَّمَآ أَدْعُوا۟ رَبِّى وَلَآ أُشْرِكُ بِهِۦٓ أَحَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Loba: Nazali kobondela Nkolo na ngai mpe nakosangisa ye na eloko mosusu te.

See all translations of this verse →

قُلْ إِنِّى لَآ أَمْلِكُ لَكُمْ ضَرًّا وَلَا رَشَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Loba: Ya sólo, ngai nazali na bokoki ya kosala bino mabe to kotiya bino na nzela ya semba te.

See all translations of this verse →

قُلْ إِنِّى لَن يُجِيرَنِى مِنَ ٱللَّهِ أَحَدٌ وَلَنْ أَجِدَ مِن دُونِهِۦ مُلْتَحَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Loba: Ya soló, moko te akobatela ngai na botiki Allah, mpe nazui ekimeli mosusu te na botiki Allah.

See all translations of this verse →

إِلَّا بَلَٰغًا مِّنَ ٱللَّهِ وَرِسَٰلَٰتِهِۦ وَمَن يَعْصِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ فَإِنَّ لَهُۥ نَارَ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. (Nazali se) momemi sango mpe kokomisa liloba ya Allah. Mpe oyo akozanga kotosa Allah na motindami naye, ya solo akozala na moto ya lifelo libela na libela.

See all translations of this verse →

حَتَّىٰٓ إِذَا رَأَوْا۟ مَا يُوعَدُونَ فَسَيَعْلَمُونَ مَنْ أَضْعَفُ نَاصِرًا وَأَقَلُّ عَدَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Kino bakomona oyo elengelami тропа bango ya etumbu, тре bakoyeba ba nani bazali па lisungi ya makasi, mpe ba nani bazali mike.

See all translations of this verse →

قُلْ إِنْ أَدْرِىٓ أَقَرِيبٌ مَّا تُوعَدُونَ أَمْ يَجْعَلُ لَهُۥ رَبِّىٓ أَمَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Loba: Nayebi te maye balaki bino ezali pene to Nkolo na ngai atikeli yango tango molai.

See all translations of this verse →

عَٰلِمُ ٱلْغَيْبِ فَلَا يُظْهِرُ عَلَىٰ غَيْبِهِۦٓ أَحَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Moyebi ya mabombami, mpe moko te ayebi mabombami naye,

See all translations of this verse →

إِلَّا مَنِ ٱرْتَضَىٰ مِن رَّسُولٍ فَإِنَّهُۥ يَسْلُكُ مِنۢ بَيْنِ يَدَيْهِ وَمِنْ خَلْفِهِۦ رَصَدًا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Longola sé oyo akosepela naye lokola motindami, mpe akotiela ye bakengeli liboso na sima naye,

See all translations of this verse →

لِّيَعْلَمَ أَن قَدْ أَبْلَغُوا۟ رِسَٰلَٰتِ رَبِّهِمْ وَأَحَاطَ بِمَا لَدَيْهِمْ وَأَحْصَىٰ كُلَّ شَىْءٍ عَدَدًۢا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Mpo bayeba été bakomisa maloba ya Nkolo na bango, mpe azingi maye bazali na yango, mpe ayebi motango ya biloko nyoso.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70