Surah Al-Ma'aarij المعارج
44 verses · Mecca · revelation order 79
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ سَأَلَ سَآئِلٌۢ بِعَذَابٍ وَاقِعٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Mosengi azali kosenga etumbu oyo ekozanga kokweya te.
See all translations of this verse →
لِّلْكَٰفِرِينَ لَيْسَ لَهُۥ دَافِعٌ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Ekopekisama te mpo ekwela bapengwi.
See all translations of this verse →
مِّنَ ٱللَّهِ ذِى ٱلْمَعَارِجِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Epai ya Allah nde nzela ya komata mpe kokita ezali.
See all translations of this verse →
تَعْرُجُ ٱلْمَلَٰٓئِكَةُ وَٱلرُّوحُ إِلَيْهِ فِى يَوْمٍ كَانَ مِقْدَارُهُۥ خَمْسِينَ أَلْفَ سَنَةٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Ba anzelu mpe molimo mosantu bazali komate epai naye na mokolo moko oyo tango na yango ezali kowumela lokola mibu nkoto ntuku mitano.
See all translations of this verse →
فَٱصْبِرْ صَبْرًا جَمِيلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Zela bozeli ya malamu.
See all translations of this verse →
إِنَّهُمْ يَرَوْنَهُۥ بَعِيدًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. (Bapengwi) bazali kornona yango mosika,
See all translations of this verse →
وَنَرَىٰهُ قَرِيبًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Kasi tozali kornona yango pembeni.
See all translations of this verse →
يَوْمَ تَكُونُ ٱلسَّمَآءُ كَٱلْمُهْلِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Mokolo oyo likolo likopelaka lokola ebende ya mafuta,
See all translations of this verse →
وَتَكُونُ ٱلْجِبَالُ كَٱلْعِهْنِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Mpe bangomba bikokoma lokola elamba ya kofinika.
See all translations of this verse →
وَلَا يَسْـَٔلُ حَمِيمٌ حَمِيمًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Molingami akotuna moninga te,
See all translations of this verse →
يُبَصَّرُونَهُمْ يَوَدُّ ٱلْمُجْرِمُ لَوْ يَفْتَدِى مِنْ عَذَابِ يَوْمِئِذٍۭ بِبَنِيهِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Bazali kotalana, moto mabe akoluka ete akaba bana naye mpo abatelama na etumbu ya mokolo wana.
See all translations of this verse →
وَصَٰحِبَتِهِۦ وَأَخِيهِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. To mwasi, to ndeko naye ya mobali.
See all translations of this verse →
وَفَصِيلَتِهِ ٱلَّتِى تُـْٔوِيهِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. (Ata soki bayei) moto naye ya libota oyo azalaki kobatela ye.
See all translations of this verse →
وَمَن فِى ٱلْأَرْضِ جَمِيعًا ثُمَّ يُنجِيهِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Ata bayei na manso mazali na nsé тропа kobatela ye.
See all translations of this verse →
كَلَّآ إِنَّهَا لَظَىٰ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Eloko te, ezali nde moto.
See all translations of this verse →
نَزَّاعَةً لِّلشَّوَىٰ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Ekolongola ye bamposa ya mutu na makasi,
See all translations of this verse →
تَدْعُوا۟ مَنْ أَدْبَرَ وَتَوَلَّىٰ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Moto ekobengaka baye baboyaki kondima.
See all translations of this verse →
وَجَمَعَ فَأَوْعَىٰٓ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. (Kolandana) na misolo oyo asangisaki na mokili mpe apekisaki na yango nzela ya Allah epanzana.
See all translations of this verse →
إِنَّ ٱلْإِنسَٰنَ خُلِقَ هَلُوعًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Ya soló, moto akelamaki na kozanga kimia.
See all translations of this verse →
إِذَا مَسَّهُ ٱلشَّرُّ جَزُوعًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Soki mabe ezui ye, akomi na bobangi,
See all translations of this verse →
وَإِذَا مَسَّهُ ٱلْخَيْرُ مَنُوعًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Mpe soki bolamu ezui ye, akomi kopima yango.
See all translations of this verse →
إِلَّا ٱلْمُصَلِّينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Longola sé baye bazali kotelemisa losambo,
See all translations of this verse →
ٱلَّذِينَ هُمْ عَلَىٰ صَلَاتِهِمْ دَآئِمُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Baye bakangami na losambo na bango libela;
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ فِىٓ أَمْوَٰلِهِمْ حَقٌّ مَّعْلُومٌ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Мре baye bazali kobimisa (zakat) na misoio mia bango,
See all translations of this verse →
لِّلسَّآئِلِ وَٱلْمَحْرُومِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Mpona (kopesa) basengi na baye bazangi;
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ يُصَدِّقُونَ بِيَوْمِ ٱلدِّينِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Mpe baye bazali kondima ya soló na mokolo ya suka;
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُم مِّنْ عَذَابِ رَبِّهِم مُّشْفِقُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Мре baye bazali kobanga etumbu ya Nkolo na bango;
See all translations of this verse →
إِنَّ عَذَابَ رَبِّهِمْ غَيْرُ مَأْمُونٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Ya soló, eloko moko ya kopekisa etumbu ya Nkolo na bango ezali te,
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُمْ لِفُرُوجِهِمْ حَٰفِظُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango,
See all translations of this verse →
إِلَّا عَلَىٰٓ أَزْوَٰجِهِمْ أَوْ مَا مَلَكَتْ أَيْمَٰنُهُمْ فَإِنَّهُمْ غَيْرُ مَلُومِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Longola sé epai ya basi na bango to mpe bawumbu na bango ya basi, wana ezali lisumu te epai na bango,
See all translations of this verse →
فَمَنِ ٱبْتَغَىٰ وَرَآءَ ذَٰلِكَ فَأُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْعَادُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Kasi baye bakokende libanda ya oyo etindami awa, bango nde balekisi ndelo,
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُمْ لِأَمَٰنَٰتِهِمْ وَعَهْدِهِمْ رَٰعُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Mpe baye bazali kobatela biloko ya bato malamu, mpe bazali kotosa maloba na bango tango ya boyokani;
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُم بِشَهَٰدَٰتِهِمْ قَآئِمُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Mpe baye bazali kotatola sé bosóló,
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُمْ عَلَىٰ صَلَاتِهِمْ يُحَافِظُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Mpe baye oyo bazali kobatela losambo na bango.
See all translations of this verse →
أُو۟لَٰٓئِكَ فِى جَنَّٰتٍ مُّكْرَمُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Bango nde bakozala na lukumu okati ya bilanga ya lola.
See all translations of this verse →
فَمَالِ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ قِبَلَكَ مُهْطِعِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Kasi nini na bapengwi oyo bazali kokima epai nayo bakingo etelemi,
See all translations of this verse →
عَنِ ٱلْيَمِينِ وَعَنِ ٱلشِّمَالِ عِزِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Ngambu ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi bazali ya kokabwana?
See all translations of this verse →
أَيَطْمَعُ كُلُّ ٱمْرِئٍ مِّنْهُمْ أَن يُدْخَلَ جَنَّةَ نَعِيمٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Boye moko na moko kati na bango azali kosepela ete bakotisa ye na lola ya nkembo?
See all translations of this verse →
كَلَّآ إِنَّا خَلَقْنَٰهُم مِّمَّا يَعْلَمُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Eloko te, mpo tokelaki bango na maye bayebi.
See all translations of this verse →
فَلَآ أُقْسِمُ بِرَبِّ ٱلْمَشَٰرِقِ وَٱلْمَغَٰرِبِ إِنَّا لَقَٰدِرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Mpe nalapi na Nkolo ya miniele mpe biloli na bilembo bia ngrásia ete: Ya soló, tozali na makoki,
See all translations of this verse →
عَلَىٰٓ أَن نُّبَدِّلَ خَيْرًا مِّنْهُمْ وَمَا نَحْنُ بِمَسْبُوقِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Mpo ete tolongola bango toya na baye ya malamu, mpe moto akopekisa biso azali te.
See all translations of this verse →
فَذَرْهُمْ يَخُوضُوا۟ وَيَلْعَبُوا۟ حَتَّىٰ يُلَٰقُوا۟ يَوْمَهُمُ ٱلَّذِى يُوعَدُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Tika bango basakana mpe babunga kino bakokutanaka na mokolo oyo tolakaki bango.
See all translations of this verse →
يَوْمَ يَخْرُجُونَ مِنَ ٱلْأَجْدَاثِ سِرَاعًا كَأَنَّهُمْ إِلَىٰ نُصُبٍ يُوفِضُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Mokolo bakobima na malita noki lokola bazali kokima mbangu epai na mabanga matandami;
See all translations of this verse →
خَٰشِعَةً أَبْصَٰرُهُمْ تَرْهَقُهُمْ ذِلَّةٌ ذَٰلِكَ ٱلْيَوْمُ ٱلَّذِى كَانُوا۟ يُوعَدُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Bakokitisaka miso na bango mpe kotombola yango na soni, wana ekozalaka mokolo ya elaka na bango.
See all translations of this verse →
Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
→