caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Ash-Shu'araa الشعراء

227 verses · Mecca · revelation order 47

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ طسٓمٓ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Twâ, sín, mîm.(1)

See all translations of this verse →

تِلْكَ ءَايَٰتُ ٱلْكِتَٰبِ ٱلْمُبِينِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Oyo nde mikapo mia buku ya polele.

See all translations of this verse →

لَعَلَّكَ بَٰخِعٌ نَّفْسَكَ أَلَّا يَكُونُوا۟ مُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Ozali komitungisa mpo été baboyi kondima.

See all translations of this verse →

إِن نَّشَأْ نُنَزِّلْ عَلَيْهِم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ ءَايَةً فَظَلَّتْ أَعْنَٰقُهُمْ لَهَا خَٰضِعِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Soki tolingaki mbele tokitisaki bilembo epai na bango kowuta о likolo, bakingo na bango elingaki kogumbama. (na soni).

See all translations of this verse →

وَمَا يَأْتِيهِم مِّن ذِكْرٍ مِّنَ ٱلرَّحْمَٰنِ مُحْدَثٍ إِلَّا كَانُوا۟ عَنْهُ مُعْرِضِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Мре tango nyoso lilendisi ya sika likoyela bango kowuta epai ya Ar-Rahmân(2), sé bakopesa yango mokongo.

See all translations of this verse →

فَقَدْ كَذَّبُوا۟ فَسَيَأْتِيهِمْ أَنۢبَٰٓؤُا۟ مَا كَانُوا۟ بِهِۦ يَسْتَهْزِءُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Baboyaki kondima, (na makambo nyoso oyo ewutaki epai ya Nkolo wa bango) kala te bakoyelaka bango basango тропа maye bazalaki kotiola na yango.

See all translations of this verse →

أَوَلَمْ يَرَوْا۟ إِلَى ٱلْأَرْضِ كَمْ أَنۢبَتْنَا فِيهَا مِن كُلِّ زَوْجٍ كَرِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Boye bazali kornona mabele te boni tokolisaki kati na yango (milona mibale mibale) na lolenge ya malamu?

See all translations of this verse →

إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً وَمَا كَانَ أَكْثَرُهُم مُّؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Ya soló, wana ezali elembo. Kasi ebele kati na bango bazali kondima te.

See all translations of this verse →

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Mpe ya soló, Nkolo wa yo azali wa bokasi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

وَإِذْ نَادَىٰ رَبُّكَ مُوسَىٰٓ أَنِ ٱئْتِ ٱلْقَوْمَ ٱلظَّٰلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Mpe tango Nkolo wayo abengaki Mûssa, kende epai ya bato ya mabe.

See all translations of this verse →

قَوْمَ فِرْعَوْنَ أَلَا يَتَّقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Bato ya falo. Bazali kobanga (Allah) te?

See all translations of this verse →

قَالَ رَبِّ إِنِّىٓ أَخَافُ أَن يُكَذِّبُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Alobi: Nkolo, ya sólo nazali kobanga ete bandimela ngai te.

See all translations of this verse →

وَيَضِيقُ صَدْرِى وَلَا يَنطَلِقُ لِسَانِى فَأَرْسِلْ إِلَىٰ هَٰرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Ntolo na ngai ezali ya kokangama, mpe lolemu na ngai elobaka malamu te, tinda yango epai ya Hâruna.

See all translations of this verse →

وَلَهُمْ عَلَىَّ ذَنۢبٌ فَأَخَافُ أَن يَقْتُلُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Mpe nazali na mabe oyo nasala bango, na yango nazali kobanga été noki bakoboma ngai.

See all translations of this verse →

قَالَ كَلَّا فَٱذْهَبَا بِـَٔايَٰتِنَآ إِنَّا مَعَكُم مُّسْتَمِعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. (Allah ayebisaki ye): Eloko ezali te, bökende bino mibale na bilembo bia biso, tokozala elongo na bino tozali koyoka.

See all translations of this verse →

فَأْتِيَا فِرْعَوْنَ فَقُولَآ إِنَّا رَسُولُ رَبِّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Bökende epai ya falo bino mibale, boyebisa ye ete, Nkolo ya mokili nde atindi biso ya sólo,

See all translations of this verse →

أَنْ أَرْسِلْ مَعَنَا بَنِىٓ إِسْرَٰٓءِيلَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Mpo opesa biso bana ya isalayele.

See all translations of this verse →

قَالَ أَلَمْ نُرَبِّكَ فِينَا وَلِيدًا وَلَبِثْتَ فِينَا مِنْ عُمُرِكَ سِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Falo alobi: Tobokoloki yo te kowuta bolenge?, mpe tovandaki nayo bamibu ebele te?

See all translations of this verse →

وَفَعَلْتَ فَعْلَتَكَ ٱلَّتِى فَعَلْتَ وَأَنتَ مِنَ ٱلْكَٰفِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Мре osalaki maye osalaki, mpe ozalaki kati ya bapengwi.

See all translations of this verse →

قَالَ فَعَلْتُهَآ إِذًا وَأَنَا۠ مِنَ ٱلضَّآلِّينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Mûssa alobi: Nasalaki yango mpo été nazangaki koyeba.

See all translations of this verse →

فَفَرَرْتُ مِنكُمْ لَمَّا خِفْتُكُمْ فَوَهَبَ لِى رَبِّى حُكْمًا وَجَعَلَنِى مِنَ ٱلْمُرْسَلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Yango nakimaki bino тропа bobangi. Sima Nkolo wa ngai apesi ngai bwanya, mpe aponi ngai okati ya batindami.

See all translations of this verse →

وَتِلْكَ نِعْمَةٌ تَمُنُّهَا عَلَىَّ أَنْ عَبَّدتَّ بَنِىٓ إِسْرَٰٓءِيلَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Wana nde bolamu nayo ozali kokundolela ngai yango, mpe yo osili kozua bana ya isalayele bawumbu nayo?

See all translations of this verse →

قَالَ فِرْعَوْنُ وَمَا رَبُّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. (Falo ) alobi; nani Nkolo wa molongo?

See all translations of this verse →

قَالَ رَبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ وَمَا بَيْنَهُمَآ إِن كُنتُم مُّوقِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. (Mûssa) alobi: Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango mibale, soki bozali na ntembe te.

See all translations of this verse →

قَالَ لِمَنْ حَوْلَهُۥٓ أَلَا تَسْتَمِعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Falo alobi na baye bazali pembeni naye ete: Boye bozali koyoka te?

See all translations of this verse →

قَالَ رَبُّكُمْ وَرَبُّ ءَابَآئِكُمُ ٱلْأَوَّلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. (Mûssa) alobi; Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bato ya kala.

See all translations of this verse →

قَالَ إِنَّ رَسُولَكُمُ ٱلَّذِىٓ أُرْسِلَ إِلَيْكُمْ لَمَجْنُونٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. (Falo) alobi: Ya soló motindami oyo batindi ye epai na bino azali ligboma.

See all translations of this verse →

قَالَ رَبُّ ٱلْمَشْرِقِ وَٱلْمَغْرِبِ وَمَا بَيْنَهُمَآ إِن كُنتُمْ تَعْقِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. (Mûssa) alobi: Nkolo wa moniele na eloli, na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki bozali koyeba.

See all translations of this verse →

قَالَ لَئِنِ ٱتَّخَذْتَ إِلَٰهًا غَيْرِى لَأَجْعَلَنَّكَ مِنَ ٱلْمَسْجُونِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. (Falo) alobi: Soki olandi nzambe mosusu otiki ngai, nakokotisa yo na boloko.

See all translations of this verse →

قَالَ أَوَلَوْ جِئْتُكَ بِشَىْءٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. (Mûssa) alobi: Ata soki nayeli yo bikamwa ya polele?

See all translations of this verse →

قَالَ فَأْتِ بِهِۦٓ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. (Falo) alobi: Yaka na yango soki ozali o kati ya balobi bosôló.

See all translations of this verse →

فَأَلْقَىٰ عَصَاهُ فَإِذَا هِىَ ثُعْبَانٌ مُّبِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. (Mûssa) abwaki lingenda lia ye, mpe tala ebongwani nyoka ya polele ebandi kotambola.

See all translations of this verse →

وَنَزَعَ يَدَهُۥ فَإِذَا هِىَ بَيْضَآءُ لِلنَّٰظِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Mpe abimisi loboko naye na libenga, mpe tala ekomi pembe makasi pona baye bazali kotala.

See all translations of this verse →

قَالَ لِلْمَلَإِ حَوْلَهُۥٓ إِنَّ هَٰذَا لَسَٰحِرٌ عَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. (Falo) alobi na bankumu naye bazalaki pembeni naye: Ya soló, oyo nde nganga monene ya boyebi.

See all translations of this verse →

يُرِيدُ أَن يُخْرِجَكُم مِّنْ أَرْضِكُم بِسِحْرِهِۦ فَمَاذَا تَأْمُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Alingi kobimisa bino o mabele na bino na bonganga naye, boye bokosala nini?

See all translations of this verse →

قَالُوٓا۟ أَرْجِهْ وَأَخَاهُ وَٱبْعَثْ فِى ٱلْمَدَآئِنِ حَٰشِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Balobi: Zelisa ye na ndeko wa ye, mpe tinda bato na mboka mpo basangisa (bakende kosangisa banganga, sima baya komekana),

See all translations of this verse →

يَأْتُوكَ بِكُلِّ سَحَّارٍ عَلِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Mpe bamemela yo banganga ya minene oyo bayebi.

See all translations of this verse →

فَجُمِعَ ٱلسَّحَرَةُ لِمِيقَٰتِ يَوْمٍ مَّعْلُومٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Banganga basangani o mokolo mwa elaka.

See all translations of this verse →

وَقِيلَ لِلنَّاسِ هَلْ أَنتُم مُّجْتَمِعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Mpe bayebisi na bato ete: Boye bokosangana te?

See all translations of this verse →

لَعَلَّنَا نَتَّبِعُ ٱلسَّحَرَةَ إِن كَانُوا۟ هُمُ ٱلْغَٰلِبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Mpo tolanda banganga soki bango balongi?

See all translations of this verse →

فَلَمَّا جَآءَ ٱلسَّحَرَةُ قَالُوا۟ لِفِرْعَوْنَ أَئِنَّ لَنَا لَأَجْرًا إِن كُنَّا نَحْنُ ٱلْغَٰلِبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Mpe tango banganga bakomi epai ya falo balobi naye été: Boye tozali na lifuta soki tolongi?

See all translations of this verse →

قَالَ نَعَمْ وَإِنَّكُمْ إِذًا لَّمِنَ ٱلْمُقَرَّبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. (Falo) alobi: Iyo, ya soló, nakotiya bino pembeni na ngai.

See all translations of this verse →

قَالَ لَهُم مُّوسَىٰٓ أَلْقُوا۟ مَآ أَنتُم مُّلْقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Mûssa ayebisi bango: Bobwaka oyo bolingi kobwaka.

See all translations of this verse →

فَأَلْقَوْا۟ حِبَالَهُمْ وَعِصِيَّهُمْ وَقَالُوا۟ بِعِزَّةِ فِرْعَوْنَ إِنَّا لَنَحْنُ ٱلْغَٰلِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Mpe babwaki basinga na bamangenda na bango, (mpe balobi): Na nguya ya falo ya sólo, tokolonga!

See all translations of this verse →

فَأَلْقَىٰ مُوسَىٰ عَصَاهُ فَإِذَا هِىَ تَلْقَفُ مَا يَأْفِكُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Mpe Mûssa abwaki lingenda lia ye, mpe tala emeli nyoso oyo basalaki.

See all translations of this verse →

فَأُلْقِىَ ٱلسَّحَرَةُ سَٰجِدِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo46. Mpe banganga nyoso bakweyaki na kofukama.

See all translations of this verse →

قَالُوٓا۟ ءَامَنَّا بِرَبِّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Balobi: Tondimi na Nkolo wa molongo,

See all translations of this verse →

رَبِّ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Nkolo ya Mûssa na Hânına.

See all translations of this verse →

قَالَ ءَامَنتُمْ لَهُۥ قَبْلَ أَنْ ءَاذَنَ لَكُمْ إِنَّهُۥ لَكَبِيرُكُمُ ٱلَّذِى عَلَّمَكُمُ ٱلسِّحْرَ فَلَسَوْفَ تَعْلَمُونَ لَأُقَطِّعَنَّ أَيْدِيَكُمْ وَأَرْجُلَكُم مِّنْ خِلَٰفٍ وَلَأُصَلِّبَنَّكُمْ أَجْمَعِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. (Falo) alobi: Bondimi naye yambo ete napesa bino ndingisa! Ya sólo, ye nde mokonzi ya bino oyo alakisaki bino bonganga, bokoyeba kala te. Nakokata bino maboko na makolo na lolenge ya bokeseni, mpe nakobaka bino banso na nzete!

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ لَا ضَيْرَ إِنَّآ إِلَىٰ رَبِّنَا مُنقَلِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Banganga balobi: Mabe ezali te, pamba te, mpo tokozongaka ya soló epai ya Nkolo wa biso!

See all translations of this verse →

إِنَّا نَطْمَعُ أَن يَغْفِرَ لَنَا رَبُّنَا خَطَٰيَٰنَآ أَن كُنَّآ أَوَّلَ ٱلْمُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Ya soló, posa na biso ezali ete Nkolo wa biso alimbisa biso, mpo tozali bato ya yambo тропа kondima (ye Allah).

See all translations of this verse →

وَأَوْحَيْنَآ إِلَىٰ مُوسَىٰٓ أَنْ أَسْرِ بِعِبَادِىٓ إِنَّكُم مُّتَّبَعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Mpe toyebisaki na Mûssa ete: Akende na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ya soló bakolanda bino.

See all translations of this verse →

فَأَرْسَلَ فِرْعَوْنُ فِى ٱلْمَدَآئِنِ حَٰشِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo53. Мре falo atindi été basangisa bato ya mboka.

See all translations of this verse →

إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ لَشِرْذِمَةٌ قَلِيلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo54. Ete: Ya sólo, bato oyo bazali токе.

See all translations of this verse →

وَإِنَّهُمْ لَنَا لَغَآئِظُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Мре ya sólo, balongi biso.

See all translations of this verse →

وَإِنَّا لَجَمِيعٌ حَٰذِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo56. Kasi biso banso tozali na bokebi.

See all translations of this verse →

فَأَخْرَجْنَٰهُم مِّن جَنَّٰتٍ وَعُيُونٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo57. Mpe tobimisaki bango na bilanga mpe mingala.

See all translations of this verse →

وَكُنُوزٍ وَمَقَامٍ كَرِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. Bamaziba ya bomengo mpe bisika ya lokumu.

See all translations of this verse →

كَذَٰلِكَ وَأَوْرَثْنَٰهَا بَنِىٓ إِسْرَٰٓءِيلَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Lolenge moko topesaki bokitani na bana ya isalayele.

See all translations of this verse →

فَأَتْبَعُوهُم مُّشْرِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Mpe balandaki bango na ntongo makasi.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا تَرَٰٓءَا ٱلْجَمْعَانِ قَالَ أَصْحَٰبُ مُوسَىٰٓ إِنَّا لَمُدْرَكُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo61. Mpe tango mapinga mibale bamonani; bato ya Mûssa balobaki été: Ya sólo, biso tosili kozuama (bato ya Mûssa bakanisaki été bakokanga bango ya soló).

See all translations of this verse →

قَالَ كَلَّآ إِنَّ مَعِىَ رَبِّى سَيَهْدِينِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. (Mûssa) alobi te. Ya soló Nkolo wa ngai azali elongo na ngai, akokamba ngai.

See all translations of this verse →

فَأَوْحَيْنَآ إِلَىٰ مُوسَىٰٓ أَنِ ٱضْرِب بِّعَصَاكَ ٱلْبَحْرَ فَٱنفَلَقَ فَكَانَ كُلُّ فِرْقٍ كَٱلطَّوْدِ ٱلْعَظِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo63. Mpe topesaki emoniseli epai ya Mûssa ete; beta lingenda lia yo na ebale mpe ekabwani na mibale lokola ngomba ya monene.

See all translations of this verse →

وَأَزْلَفْنَا ثَمَّ ٱلْـَٔاخَرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Mpe totikaki ete baye wana bapusana. (Falo na bato naye)

See all translations of this verse →

وَأَنجَيْنَا مُوسَىٰ وَمَن مَّعَهُۥٓ أَجْمَعِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo65. Mpe tolongisaki Mûssa na bato naye banso oyo bazalaki elongo naye,

See all translations of this verse →

ثُمَّ أَغْرَقْنَا ٱلْـَٔاخَرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo66. Sima, tozindisaki basusu (banguna).

See all translations of this verse →

إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً وَمَا كَانَ أَكْثَرُهُم مُّؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo67. Ya sólo, wana ezali elembo. Ebele kati na bango bazali kondima te.

See all translations of this verse →

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo68. Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

وَٱتْلُ عَلَيْهِمْ نَبَأَ إِبْرَٰهِيمَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo69. Mpe tángela bango sango ya Ibrâhîm.

See all translations of this verse →

إِذْ قَالَ لِأَبِيهِ وَقَوْمِهِۦ مَا تَعْبُدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo70. Tango alobaki na tata naye mpe bato naye: Nini bozali kobondela?

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ نَعْبُدُ أَصْنَامًا فَنَظَلُّ لَهَا عَٰكِفِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo71. Balobaki: Tozali kobondela bikeko, mpe tokokangama sé na yango.

See all translations of this verse →

قَالَ هَلْ يَسْمَعُونَكُمْ إِذْ تَدْعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo72. Alobi: Boye bayokaka bino tango bosengaka bango?

See all translations of this verse →

أَوْ يَنفَعُونَكُمْ أَوْ يَضُرُّونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo73. То boye basalisaka bino to mpe banyokoloko bino?

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ بَلْ وَجَدْنَآ ءَابَآءَنَا كَذَٰلِكَ يَفْعَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo74. Balobi: Tokutaki bankoko na biso ya kala bazali sé ndenge wana.

See all translations of this verse →

قَالَ أَفَرَءَيْتُم مَّا كُنتُمْ تَعْبُدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo75. Alobi: Bososoli mpenza тропа oyo bozali kobondela,

See all translations of this verse →

أَنتُمْ وَءَابَآؤُكُمُ ٱلْأَقْدَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo76. Bino na bankoko na bino ya kala.

See all translations of this verse →

فَإِنَّهُمْ عَدُوٌّ لِّىٓ إِلَّا رَبَّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo77. Bango banso bazali banguna na ngai, longola sé Nkolo wa molongo.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِى خَلَقَنِى فَهُوَ يَهْدِينِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo78. Oyo akelaki ngai mpe azali kokamba ngai,

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِى هُوَ يُطْعِمُنِى وَيَسْقِينِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo79. Mpe ye nde aleisaka ngai, mpe amelisaka ngai,

See all translations of this verse →

وَإِذَا مَرِضْتُ فَهُوَ يَشْفِينِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo80. Mpe tango nabeleke, ye nde abikisaka ngai,

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِى يُمِيتُنِى ثُمَّ يُحْيِينِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo81. Mpe ye nde akoboma ngai, sima akosekwisa ngai,

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِىٓ أَطْمَعُ أَن يَغْفِرَ لِى خَطِيٓـَٔتِى يَوْمَ ٱلدِّينِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo82. Mpe nazali kolikia ete alimbisa ngai masumu omokolo mwa suka.

See all translations of this verse →

رَبِّ هَبْ لِى حُكْمًا وَأَلْحِقْنِى بِٱلصَّٰلِحِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo83. Nkolo! Pesa ngai bwanya (mpe boyebi), mpe tia ngai elongo na bato ya malamu.

See all translations of this verse →

وَٱجْعَل لِّى لِسَانَ صِدْقٍ فِى ٱلْـَٔاخِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo84. Tika ete lolemu na ngai eloba bosoló epai ya basusu.

See all translations of this verse →

وَٱجْعَلْنِى مِن وَرَثَةِ جَنَّةِ ٱلنَّعِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo85. Mpe tiya ngai nazala okati ya bakitani ya lola ya kitoko.

See all translations of this verse →

وَٱغْفِرْ لِأَبِىٓ إِنَّهُۥ كَانَ مِنَ ٱلضَّآلِّينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo86. Mpe limbisa tata wa ngai mpo azalaki 0 kati ya babungi.

See all translations of this verse →

وَلَا تُخْزِنِى يَوْمَ يُبْعَثُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Suratu Ach-Chu’arâ Eteni 19 Л 535 \

See all translations of this verse →

يَوْمَ لَا يَنفَعُ مَالٌ وَلَا بَنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo87. Mpe koyokisa ngai nsoni te o mokolo ya lisekwa.

See all translations of this verse →

إِلَّا مَنْ أَتَى ٱللَّهَ بِقَلْبٍ سَلِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo88. Mokolo moye misolo na bana bakosalisaka te.

See all translations of this verse →

وَأُزْلِفَتِ ٱلْجَنَّةُ لِلْمُتَّقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo89. Longola sé oyo akoya epai ya Allah na motema ya malamu. (Motema molamu ya kopetoama),

See all translations of this verse →

وَبُرِّزَتِ ٱلْجَحِيمُ لِلْغَاوِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo90. Bakopusanisaka lola pembeni ya babangi (Allah),

See all translations of this verse →

وَقِيلَ لَهُمْ أَيْنَ مَا كُنتُمْ تَعْبُدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo91. Mpe bakomonisaka bato mabe moto.

See all translations of this verse →

مِن دُونِ ٱللَّهِ هَلْ يَنصُرُونَكُمْ أَوْ يَنتَصِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo92. Mpe bakolobelaka bango: Wapi maye bozalaki kobondela,

See all translations of this verse →

فَكُبْكِبُوا۟ فِيهَا هُمْ وَٱلْغَاوُۥنَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo93. Na botiki Allah, boye bazali kosunga bino? To mpe bango moko bazali komisunga?

See all translations of this verse →

وَجُنُودُ إِبْلِيسَ أَجْمَعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo94. Mpe bakobwakama na moto bipai na bipai na bilongi na bango, na baye bapengwisaki bango.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ وَهُمْ فِيهَا يَخْتَصِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo95. Na basoda banso ya Satana (ibilisa).

See all translations of this verse →

تَٱللَّهِ إِن كُنَّا لَفِى ضَلَٰلٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo96. Bakolobaka: Mpe bazali kosuana okati na yango.

See all translations of this verse →

إِذْ نُسَوِّيكُم بِرَبِّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo97. Na Allah! Ya soló, tozalaki na libunga ya polele.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَضَلَّنَآ إِلَّا ٱلْمُجْرِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo98. Tozalaki kokokisa bino lokola Nkolo ya mokili.

See all translations of this verse →

فَمَا لَنَا مِن شَٰفِعِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo99. Kasi ezali sé batomboki nde babungisaki biso.

See all translations of this verse →

وَلَا صَدِيقٍ حَمِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo101. Ata moninga ya soló soló azali te.

See all translations of this verse →

فَلَوْ أَنَّ لَنَا كَرَّةً فَنَكُونَ مِنَ ٱلْمُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo102. Soki tozuaka nzela ya bozongi (ata na mokili), tolingaki kozala okati ya bandimi. (baye bazali kosala bolamu.)

See all translations of this verse →

إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً وَمَا كَانَ أَكْثَرُهُم مُّؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo103. Ya sólo, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazali kondima te.

See all translations of this verse →

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo104. Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

كَذَّبَتْ قَوْمُ نُوحٍ ٱلْمُرْسَلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo105. Bato ya Nûh bazangaki kondimela batindami, bazuaki bango bato ya lokuta.

See all translations of this verse →

إِذْ قَالَ لَهُمْ أَخُوهُمْ نُوحٌ أَلَا تَتَّقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo106. Tango ndeko wa bango Nûh ayebisaki bango: Boye bokobanga (Allah) te?

See all translations of this verse →

إِنِّى لَكُمْ رَسُولٌ أَمِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo107. Ya sólo, nazali motindami malamu тропа bino.

See all translations of this verse →

فَٱتَّقُوا۟ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo108. Bobanga Allah mpe botosa ngai.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَسْـَٔلُكُمْ عَلَيْهِ مِنْ أَجْرٍ إِنْ أَجْرِىَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo109. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai lizali sé epai na Nkolo wa molongo.

See all translations of this verse →

فَٱتَّقُوا۟ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo110. Bobanga Allah mpe botosa ngai. İli. Balobaki: Tondimelayo! Kasi

See all translations of this verse →

قَالُوٓا۟ أَنُؤْمِنُ لَكَ وَٱتَّبَعَكَ ٱلْأَرْذَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogoezali sé bato bazanga ntina, nde balandaka yo?

See all translations of this verse →

قَالَ وَمَا عِلْمِى بِمَا كَانُوا۟ يَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo112. Alobi: Nayebi te maye bazali kosala.

See all translations of this verse →

إِنْ حِسَابُهُمْ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّى لَوْ تَشْعُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo113. Lifuta na bango etali sé Nkolo wa ngai, soki bozali koyeba.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَنَا۠ بِطَارِدِ ٱلْمُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo114. Nazali oyo abenganaka bandimi te.

See all translations of this verse →

إِنْ أَنَا۠ إِلَّا نَذِيرٌ مُّبِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo115. Kasi nazali sé mokebisi ya polele.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ لَئِن لَّمْ تَنتَهِ يَٰنُوحُ لَتَكُونَنَّ مِنَ ٱلْمَرْجُومِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo116. Balobi: Nûh! Soki otiki te, okozala o kati ya baye tokoboma na mabanga.

See all translations of this verse →

قَالَ رَبِّ إِنَّ قَوْمِى كَذَّبُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo117. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Bato na ngai bazali kondimela ngai te,

See all translations of this verse →

فَٱفْتَحْ بَيْنِى وَبَيْنَهُمْ فَتْحًا وَنَجِّنِى وَمَن مَّعِىَ مِنَ ٱلْمُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo118. Lakisa bosôló kati kati na ngai na bango, mpe bikisa ngai na baye bazali elongo na ngai kati ya bandimi.

See all translations of this verse →

فَأَنجَيْنَٰهُ وَمَن مَّعَهُۥ فِى ٱلْفُلْكِ ٱلْمَشْحُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo119. Mpe tolongisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa oyo ezalaki ya kotonda.

See all translations of this verse →

ثُمَّ أَغْرَقْنَا بَعْدُ ٱلْبَاقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo120. Mpe sima tozindisaki baye batikalaki (bapengwi oyo bazangaki bondimi).

See all translations of this verse →

إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً وَمَا كَانَ أَكْثَرُهُم مُّؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo121. Ya soló, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.

See all translations of this verse →

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo122. Mpe ya solo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

كَذَّبَتْ عَادٌ ٱلْمُرْسَلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo123. Ba aad mpe baboyaki kondimela batindami.

See all translations of this verse →

إِذْ قَالَ لَهُمْ أَخُوهُمْ هُودٌ أَلَا تَتَّقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo124. Tango ndeko wa bango Hûd ayebisaki bango: Boye bozali kobanga te?

See all translations of this verse →

إِنِّى لَكُمْ رَسُولٌ أَمِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo125. Ya soló, nazali motindami malamu epai na bino.

See all translations of this verse →

فَٱتَّقُوا۟ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo126. Bobanga Allah mpe botosa ngai.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَسْـَٔلُكُمْ عَلَيْهِ مِنْ أَجْرٍ إِنْ أَجْرِىَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo127. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.

See all translations of this verse →

أَتَبْنُونَ بِكُلِّ رِيعٍ ءَايَةً تَعْبَثُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo128. Boye bozali kotonga bikeko na ngomba nyoso тропа kokumisa?

See all translations of this verse →

وَتَتَّخِذُونَ مَصَانِعَ لَعَلَّكُمْ تَخْلُدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo129. Mpe bozali kotonga bandako ya minene lokola bokotikala libela awa na mokili?

See all translations of this verse →

وَإِذَا بَطَشْتُم بَطَشْتُمْ جَبَّارِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo130. Mpe soki bopesi etumbu, bozalaka na mawa te, mpe bobimi bato ya makasi.

See all translations of this verse →

فَٱتَّقُوا۟ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo131. Bobanga Allah mpe botosa ngai.

See all translations of this verse →

وَٱتَّقُوا۟ ٱلَّذِىٓ أَمَدَّكُم بِمَا تَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo132. Bobanga oyo azali kopesa bino bolamu, na nyoso oyo boyebi,

See all translations of this verse →

أَمَدَّكُم بِأَنْعَٰمٍ وَبَنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo133. Oyo apesi bino banyama na bana,

See all translations of this verse →

وَجَنَّٰتٍ وَعُيُونٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo134. Mpe bilanga na miluka.

See all translations of this verse →

إِنِّىٓ أَخَافُ عَلَيْكُمْ عَذَابَ يَوْمٍ عَظِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo135. Ya sôló, nazali kobangela bino etumbu 0 mokolo mwa suka.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ سَوَآءٌ عَلَيْنَآ أَوَعَظْتَ أَمْ لَمْ تَكُن مِّنَ ٱلْوَٰعِظِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo136. Balobi: Olendisa biso to olendisa te, ezali sé lolenge moko.

See all translations of this verse →

إِنْ هَٰذَآ إِلَّا خُلُقُ ٱلْأَوَّلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo137. Ezali sé ezaleli ya bato ya kala.

See all translations of this verse →

وَمَا نَحْنُ بِمُعَذَّبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo138. Mpe tokozuaka etumbu te.

See all translations of this verse →

فَكَذَّبُوهُ فَأَهْلَكْنَٰهُمْ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً وَمَا كَانَ أَكْثَرُهُم مُّؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo139. Baboyaki kondimela ye, mpe tobomaki bango, ya soló wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.

See all translations of this verse →

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo140. Mpe ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

كَذَّبَتْ ثَمُودُ ٱلْمُرْسَلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo141. Ba Thamûd, baboyaki mpe kondimela batindami.

See all translations of this verse →

إِذْ قَالَ لَهُمْ أَخُوهُمْ صَٰلِحٌ أَلَا تَتَّقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo142. Tango ndeko wa bango Swâlih ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?

See all translations of this verse →

إِنِّى لَكُمْ رَسُولٌ أَمِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo143. Nazali motindami malamu epai na bino.

See all translations of this verse →

فَٱتَّقُوا۟ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo144. Bobanga Allah mpe botosa ngai.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَسْـَٔلُكُمْ عَلَيْهِ مِنْ أَجْرٍ إِنْ أَجْرِىَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo145. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.

See all translations of this verse →

أَتُتْرَكُونَ فِى مَا هَٰهُنَآ ءَامِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo146. Boye bokotikalaka na kimiya тропа maye bozali kosala,

See all translations of this verse →

فِى جَنَّٰتٍ وَعُيُونٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo147. O kati ya bilanga mpe mingala?

See all translations of this verse →

وَزُرُوعٍ وَنَخْلٍ طَلْعُهَا هَضِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo148. Milona mpe banzete ya nagh’l mpe ya mbuma kitoko,

See all translations of this verse →

وَتَنْحِتُونَ مِنَ ٱلْجِبَالِ بُيُوتًا فَٰرِهِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo149. Boye bozali kotonga bandako o likolo lia ba ngomba?

See all translations of this verse →

فَٱتَّقُوا۟ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo150. Bobanga Allah mpe botosa ngai.

See all translations of this verse →

وَلَا تُطِيعُوٓا۟ أَمْرَ ٱلْمُسْرِفِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo151. Kasi botosa makambo ya balekisi ndelo te,

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ يُفْسِدُونَ فِى ٱلْأَرْضِ وَلَا يُصْلِحُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo152. Baye bazali sé kobebisa o kati ya mabele mpe balingi kobongisa te.

See all translations of this verse →

قَالُوٓا۟ إِنَّمَآ أَنتَ مِنَ ٱلْمُسَحَّرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo153. Balobi: Ya soló, ozali sé o kati ya balokami.

See all translations of this verse →

مَآ أَنتَ إِلَّا بَشَرٌ مِّثْلُنَا فَأْتِ بِـَٔايَةٍ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo154. Ozali sé moto lokola biso, yaka na elembo soki ozali kati ya balobi bosôló.

See all translations of this verse →

قَالَ هَٰذِهِۦ نَاقَةٌ لَّهَا شِرْبٌ وَلَكُمْ شِرْبُ يَوْمٍ مَّعْلُومٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo155. Alobi: Nâqah(1) oyo azali na mokolo naye ya komela mayi, bino mpe bozali na mokolo ya komela (kozua) mayi.

See all translations of this verse →

وَلَا تَمَسُّوهَا بِسُوٓءٍ فَيَأْخُذَكُمْ عَذَابُ يَوْمٍ عَظِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo156. Mpe bosala ye mabe te, noki te, etumbu monene ekozua bino mokolo moko boye.

See all translations of this verse →

فَعَقَرُوهَا فَأَصْبَحُوا۟ نَٰدِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo157. Kasi babomaki ye, mpe na sima bakomaki kolela.

See all translations of this verse →

فَأَخَذَهُمُ ٱلْعَذَابُ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً وَمَا كَانَ أَكْثَرُهُم مُّؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo158. Mpe topesaki bango etumbu, wana ezali elembo kasi ebele na bango bazalaki kondima te.

See all translations of this verse →

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo159. Mpe Nkolo wayo azali ya sólo na bokasi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

كَذَّبَتْ قَوْمُ لُوطٍ ٱلْمُرْسَلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo160. Bato ya Loth baboyaki mpe kondimela batindami,

See all translations of this verse →

إِذْ قَالَ لَهُمْ أَخُوهُمْ لُوطٌ أَلَا تَتَّقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo161. Tango ndeko wa bango Loth ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?

See all translations of this verse →

إِنِّى لَكُمْ رَسُولٌ أَمِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo162. Nazali motindami malamu тропа bino.

See all translations of this verse →

فَٱتَّقُوا۟ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo163. Bobanga Allah mpe botosa ngai.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَسْـَٔلُكُمْ عَلَيْهِ مِنْ أَجْرٍ إِنْ أَجْرِىَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo164. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.

See all translations of this verse →

أَتَأْتُونَ ٱلذُّكْرَانَ مِنَ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo165. Boye bozali kosalela posa ya nzoto bino mibali na mibali o kati na mokili?

See all translations of this verse →

وَتَذَرُونَ مَا خَلَقَ لَكُمْ رَبُّكُم مِّنْ أَزْوَٰجِكُم بَلْ أَنتُمْ قَوْمٌ عَادُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo166. Mpe botiki basi oyo Nkolo wa bino akela тропа bino? Kasi bozali bato ya masumu (balekisi ndelo mpe babuki mibeko)

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ لَئِن لَّمْ تَنتَهِ يَٰلُوطُ لَتَكُونَنَّ مِنَ ٱلْمُخْرَجِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo167. Balobi: Eh Loth! Soki otiki te, tokobimisa yo (na mboka)

See all translations of this verse →

قَالَ إِنِّى لِعَمَلِكُم مِّنَ ٱلْقَالِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo168. Alobi: Ya soló, ngai naboyi maye bozali kosala.

See all translations of this verse →

رَبِّ نَجِّنِى وَأَهْلِى مِمَّا يَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo169. Nkolo, longisa ngai elongo na libota lia ngai тропа maye bazali kosala.

See all translations of this verse →

فَنَجَّيْنَٰهُ وَأَهْلَهُۥٓ أَجْمَعِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo170. Tolongisaki ye elongo na libota lia ye bango banso,

See all translations of this verse →

إِلَّا عَجُوزًا فِى ٱلْغَٰبِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo171. Longola sé mobange ya mwasi atikalaki elongo na baye bazuaki etumbu.

See all translations of this verse →

ثُمَّ دَمَّرْنَا ٱلْـَٔاخَرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo172. Sima, tobomaki basusu baye batikalaki.

See all translations of this verse →

وَأَمْطَرْنَا عَلَيْهِم مَّطَرًا فَسَآءَ مَطَرُ ٱلْمُنذَرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo173. Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya motindo wana тропа baye tokebisaki?

See all translations of this verse →

إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً وَمَا كَانَ أَكْثَرُهُم مُّؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo174. Ya soló, wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.

See all translations of this verse →

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo175. Mpe Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

كَذَّبَ أَصْحَٰبُ لْـَٔيْكَةِ ٱلْمُرْسَلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo176. Bato ya aîkat, baboyaki kondimela batindami,

See all translations of this verse →

إِذْ قَالَ لَهُمْ شُعَيْبٌ أَلَا تَتَّقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo177. Tango ndeko wa bango Shuaîb ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?

See all translations of this verse →

إِنِّى لَكُمْ رَسُولٌ أَمِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo178. Nazali motindami malamu epai na bino.

See all translations of this verse →

فَٱتَّقُوا۟ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo179. Bobanga Allah mpe botosa ngai.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَسْـَٔلُكُمْ عَلَيْهِ مِنْ أَجْرٍ إِنْ أَجْرِىَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo180. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.

See all translations of this verse →

أَوْفُوا۟ ٱلْكَيْلَ وَلَا تَكُونُوا۟ مِنَ ٱلْمُخْسِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo181. Mpe bokokisa bimekelo ya bitando na ndenge esengeli, kasi bozangisa yango te.

See all translations of this verse →

وَزِنُوا۟ بِٱلْقِسْطَاسِ ٱلْمُسْتَقِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo182. Mpe botondisa emekelo na bosembo.

See all translations of this verse →

وَلَا تَبْخَسُوا۟ ٱلنَّاسَ أَشْيَآءَهُمْ وَلَا تَعْثَوْا۟ فِى ٱلْأَرْضِ مُفْسِدِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo183. Mpe bobuba bato te na bimekelo na bango, mpe bosala mabe kati na mokili te, (mpe bosomba bosembo ya bato na misolo te).

See all translations of this verse →

وَٱتَّقُوا۟ ٱلَّذِى خَلَقَكُمْ وَٱلْجِبِلَّةَ ٱلْأَوَّلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo184. Mpe bobanga oyo akeli bino na baye baleka liboso na bino.

See all translations of this verse →

قَالُوٓا۟ إِنَّمَآ أَنتَ مِنَ ٱلْمُسَحَّرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo185. Balobi: Ya soló, ozali kati ya balokami.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَنتَ إِلَّا بَشَرٌ مِّثْلُنَا وَإِن نَّظُنُّكَ لَمِنَ ٱلْكَٰذِبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo186. Mpe ozali sé moto lokola biso, mpe tozali kokanisa ete ozali kati ya babuki lokuta.

See all translations of this verse →

فَأَسْقِطْ عَلَيْنَا كِسَفًا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo187. Kweisela biso ndambu ya mapata soki ozali koloba bosölo.

See all translations of this verse →

قَالَ رَبِّىٓ أَعْلَمُ بِمَا تَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo188. Alobi: Nkolo wa ngai ayebi maye manso bozali kosala.

See all translations of this verse →

فَكَذَّبُوهُ فَأَخَذَهُمْ عَذَابُ يَوْمِ ٱلظُّلَّةِ إِنَّهُۥ كَانَ عَذَابَ يَوْمٍ عَظِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo189. Kasi baboyaki kondimela ye, mpe topesaki bango etumbu o mokolo moye mapata eyindaki, ya solo, yango ezalaki nde mokolo ya etumbu monene.

See all translations of this verse →

إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً وَمَا كَانَ أَكْثَرُهُم مُّؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo190. Wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.

See all translations of this verse →

وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo191. Mpe ya soló, Nkolo wayo azali wa bokasi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

وَإِنَّهُۥ لَتَنزِيلُ رَبِّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo192. Ya sólo, yango (kurani) eye, ekitisamaki kowuta epai ya Nkolo wa molongo,

See all translations of this verse →

نَزَلَ بِهِ ٱلرُّوحُ ٱلْأَمِينُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo193. Molimo mosantu (anzelu gabiliyele) akitaki na yango,

See all translations of this verse →

عَلَىٰ قَلْبِكَ لِتَكُونَ مِنَ ٱلْمُنذِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo194. Na motema nayo mpo ozala okati ya bakebisi,

See all translations of this verse →

بِلِسَانٍ عَرَبِىٍّ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo195. Na lokota ya arabo oyo ezali polele.

See all translations of this verse →

وَإِنَّهُۥ لَفِى زُبُرِ ٱلْأَوَّلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo196. Mpe yango esilaka kokomama na makomi ya batindami ya kala.

See all translations of this verse →

أَوَلَمْ يَكُن لَّهُمْ ءَايَةً أَن يَعْلَمَهُۥ عُلَمَٰٓؤُا۟ بَنِىٓ إِسْرَٰٓءِيلَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo197. Boye ezalaki elembo te тропа bango, mpo banganga nzambe ya bana ya isalayele bakoka koyeba yango?

See all translations of this verse →

وَلَوْ نَزَّلْنَٰهُ عَلَىٰ بَعْضِ ٱلْأَعْجَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo198. Mpe soki tokitisaki yango epai ya moto oyo azali arabo te,

See all translations of this verse →

فَقَرَأَهُۥ عَلَيْهِم مَّا كَانُوا۟ بِهِۦ مُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo199. Mpe atangela bango yango mbele bandimaki na yango te.

See all translations of this verse →

كَذَٰلِكَ سَلَكْنَٰهُ فِى قُلُوبِ ٱلْمُجْرِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo200. Lolenge wana nde tokitisaki (koyimayima ezala) 0 mitema mia batomboki.

See all translations of this verse →

لَا يُؤْمِنُونَ بِهِۦ حَتَّىٰ يَرَوُا۟ ٱلْعَذَابَ ٱلْأَلِيمَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo201. Bakondimaka na yango te kino bakomonaka etumbu ya makasi,

See all translations of this verse →

فَيَأْتِيَهُم بَغْتَةً وَهُمْ لَا يَشْعُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo202. Ekoyela bango mbalakaka, bakoyebaka te.

See all translations of this verse →

فَيَقُولُوا۟ هَلْ نَحْنُ مُنظَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo203. Mpe bazali koloba ete: Boye tokozelisama? (mpo tokoka kondima)

See all translations of this verse →

أَفَبِعَذَابِنَا يَسْتَعْجِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo204. Boye! Etumbu na biso nde bazali kowelisa?

See all translations of this verse →

أَفَرَءَيْتَ إِن مَّتَّعْنَٰهُمْ سِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo205. Boye ozali kornona te, soki topesaki bango mua mibu po basakana,

See all translations of this verse →

ثُمَّ جَآءَهُم مَّا كَانُوا۟ يُوعَدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo206. Sima maye balakamaki ekomelaki bango.

See all translations of this verse →

مَآ أَغْنَىٰ عَنْهُم مَّا كَانُوا۟ يُمَتَّعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo207. Esengo eye bazalaki na yango esalisaki bango na eloko te.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَهْلَكْنَا مِن قَرْيَةٍ إِلَّا لَهَا مُنذِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo208. Mpe tobomaka mboka te, sé totinda bakebisi liboso.

See all translations of this verse →

ذِكْرَىٰ وَمَا كُنَّا ظَٰلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo209. (Mpona) kokebisa, mpe tozali babubi te.

See all translations of this verse →

وَمَا تَنَزَّلَتْ بِهِ ٱلشَّيَٰطِينُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo210. Mpe ezalaki basatana nde bakiti nayango te (kurani).

See all translations of this verse →

وَمَا يَنۢبَغِى لَهُمْ وَمَا يَسْتَطِيعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo211. Mpe esengeli na bango te, mpe bazali na makoki ya kosala yango te.

See all translations of this verse →

إِنَّهُمْ عَنِ ٱلسَّمْعِ لَمَعْزُولُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo212. (Kasi) ya soló, bango bamitiye mosika mpona koyoka.

See all translations of this verse →

فَلَا تَدْعُ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ فَتَكُونَ مِنَ ٱلْمُعَذَّبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo213. Mpe kobondela nzambe mosusu te elongo na Allah, noki te okozuama 0 kati ya bato ya etumbu.

See all translations of this verse →

وَأَنذِرْ عَشِيرَتَكَ ٱلْأَقْرَبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo214. Mpe kebisa libota nayo ya pene.

See all translations of this verse →

وَٱخْفِضْ جَنَاحَكَ لِمَنِ ٱتَّبَعَكَ مِنَ ٱلْمُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo215. Mpe kitisa mapeka nayo (zala malamu) mpona bandimi oyo bazali kolanda yo.

See all translations of this verse →

فَإِنْ عَصَوْكَ فَقُلْ إِنِّى بَرِىٓءٌ مِّمَّا تَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo216. Mpe soki baboyi kotosa yo, loba na bango ete: Ya soló ngai na nazali mosika na maye bozali kosala.

See all translations of this verse →

وَتَوَكَّلْ عَلَى ٱلْعَزِيزِ ٱلرَّحِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo217. Mpe mipesa epai ya oyo azali na bokasi atonda mawa.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِى يَرَىٰكَ حِينَ تَقُومُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo218. Oyo amonaka yo tango otelemaka,

See all translations of this verse →

وَتَقَلُّبَكَ فِى ٱلسَّٰجِدِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo219. Mpe (amonaka) yo tango ogumbamaka.

See all translations of this verse →

إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلْعَلِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo220. Ya soló, ye azali moyoki mpe moyebi.

See all translations of this verse →

هَلْ أُنَبِّئُكُمْ عَلَىٰ مَن تَنَزَّلُ ٱلشَّيَٰطِينُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo221. Boye nayebisa bino epai ya nani basatana bazali kokita?

See all translations of this verse →

تَنَزَّلُ عَلَىٰ كُلِّ أَفَّاكٍ أَثِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo222. Bazali kokita epai ya bato ya lokuta basumuki.

See all translations of this verse →

يُلْقُونَ ٱلسَّمْعَ وَأَكْثَرُهُمْ كَٰذِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo223. Batiyaka matoyi kasi ebele na bango bazali bakosi.

See all translations of this verse →

وَٱلشُّعَرَآءُ يَتَّبِعُهُمُ ٱلْغَاوُۥنَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo224. Kasi epai ya bato ya másese (masapo), elandaka bango sé baye babunga.

See all translations of this verse →

أَلَمْ تَرَ أَنَّهُمْ فِى كُلِّ وَادٍ يَهِيمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo225. Boye omoni te ete bazali kolekaleka kati kati ya ba ngomba (mibale?)

See all translations of this verse →

وَأَنَّهُمْ يَقُولُونَ مَا لَا يَفْعَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo226. Mpe ya sólo, bango balobaka maye basalaka te,

See all translations of this verse →

إِلَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَعَمِلُوا۟ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَذَكَرُوا۟ ٱللَّهَ كَثِيرًا وَٱنتَصَرُوا۟ مِنۢ بَعْدِ مَا ظُلِمُوا۟ وَسَيَعْلَمُ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓا۟ أَىَّ مُنقَلَبٍ يَنقَلِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo227. Longola sé baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, mpe bazali kokumisa Allah mingi, mpe bamisalisi na kopamela mabe ya babubi, kasi babubi bakoyebaka kala mingi te ba nani ekobebela bango.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70