Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, totieli misala na bango ya mabe bonzenga, mpe batikali na yango na koyimayima mpe kozanga bososoli.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. (Kanisa) tango Mûssa alobaki na libota lia ye: Ya solo, ngai namoni moto, nakoyela bino sango okati na yango to nakoyela bino koni ya moto mpo été bomiyotola.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Mpe tango akomaki ayoki mongongo ebengi été: Apambolami moto oyo atelemi o kati ya moto, ndenge moko mpe baye bazali zinga zinga na yango. Nkembo na Allah Nkolo ya mokili. (atonda bokasi mpe bwanya).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Mpe kotisa loboko nayo na libenga nayo, ekobima pembe ekosala mpasi te, ezali moko ya bikamwiseli libua ökende na yango epai ya falo na bato naye, mpo bazali ya sólo bato ya mabe mpenza.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Bawanganaki yango na motema mabe mpe na lolendo nzoka nde namitema na bango bazalaki na tembe te, kasi tala ndenge nini bato mabe basukaki.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Mpe tosilaki kopesa Dâwud na Suleyman boyebi, mpe bango mibale balobaki: Matondo na Allah oyo apesi biso ebele o kati ya bawumbu naye bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Kino bakomaki na bisika ya basombe bazali, sombe moko alobaki ete: Oh bino basombe! Bokota na bandako na bino noki te Suleyman na mapinga naye bakonyata bino mpe bakoyeba te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Mpe (Suleyman) akatani na koseka tango ayokaki liloba ya sombe wana mpe asepeli na makambo na bango oyo basali mpe alobi: Oh Nkolo! Tika natondo yo botondi тропа bolamu nayo likolo na ngai na baboti na ngai mpe tika ete nasala mosala oyo ekosepelisa yo, mpe na ngolu nayo, kotisa ngai na mawa nayo okati ya lisanga ya bawumbu nayo ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Mpe atalaki milongo ya bandeke alobi: Nazali kornona hud-hud(1) te azali wapi? To azali elongo na baye bazalaki te?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Kaši awumelaki tango molayi te na kozonga, mpe alobaki na mokonzi ete: Nazui boyebi oyo ozali na yango te, mpe nayeli yo sango ya sôló, kowuta na mboka sabat(2).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Boye bakofukamela Allah te oyo abimisaka maye mabombami kati ya mapata na mabele, mpe ayebi maye bozali kobomba mpe maye bozali komonisa?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Balobi: Tozali na bokasi mpe nguya ya kosakana te, liloba ya suka ezali epai nayo, tinda biso na oyo omoni.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Alobi: Ya soló, bakonzi soki bakoti na mboka babebisaka yango, na koboma mpe kosala mabe ebele, mpe bakomisaka bankumu na yango bato mpamba. Mpe lolenge wana nde basalaka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Mpe tango (bantoma to basali naye) bakomaki epai ya Suleyman na (libonza) alobi: Boye bolingi kosomba ngai na misolo? Kasi oyo Allah asilaki kopesa ngai ezali ebele mpe eleki likabo na bino oyo bozali kosepela na yango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Zonga epai na bango, kasi tokoyela bango na basoda ya makasi baye bakotelema liboso na bango te mpe tokobimisa bango. Na yango mpe bakozanga lokumu mpe bakokitisama.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Alobi (lisusu): Bozongisela ye kiti naye, totala soki akokambama, to akozala o kati ya ba’oyo bakambami te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Мре balobaki naye: Kota na ndako, mpe tango amonaki yango lokola mayi ya mozindo, amonaki makolo naye ebimi na elilingi, (Suleyman) alobi naye: Oyo ezali ndako esalami na milangi ya talo,: (Mwasi mokonzi!) alobaki ete: Nkolo, ya solo namibubaki ngai moko, na yango namisoki elongo na Suleyman epai ya Allah Nkolo ya mokili mobimba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Mpe ya solo, totindaki epai ya Thamûd, ndeko wa bango Swâlih ete (ayebisa bango): Bobondela Allah, kasi bakabwanaki na biteni mibale na kosuana.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Balobi ete: Tozali kornona mpona baye bazali nayo mabe mpona biso, azongiseli bango ete: Likambo na bino litali sé Allah. Kasi bino bokwei nde okati ya komekama.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Mpe okati ya mboka ezalaki na lisanga ya bato libua bazalaki kotia mobulu likolo ya mabele, bazalaki kosala bolamu ata шоке te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Balobaki ete: Tolapa na Allah ete tokosala ye na libota naye mabe na butu, na sima tokoloba na moto oyo atelemi тропа kosenga makila naye ete: Biso toyebi moto abomi libota naye te. Mpe ya soló, tozali bosembo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Mpe tala bandako na bango, bitikali polele тропа bobubi bwa bango. Wana ezali sólo elembo mpo bato bakoka koyeba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Ya soló, bino bozali koyela mibali na sima, botiki basi baye bakokokisela bino mposa. Kasi bozali na boyebi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo56. Eyano ya bato naye ezalaki ete: Bobimisa libota lia Loth na mboka na bino, ya soló, bango bazali bato balingaka sé komipetola.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya lolenge wana тропа baye bakebisamaki!.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Loba: Matondo na Allah, mpe kimia ezala likolo ya bawumbu naye oyo baponami na (bolamu), boye Allah nde azali malamu to banzambe oyo bazali kosangisa naye nde baleki malamu?.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Ezali ye te nde akela likolo na mabele mpe azali kokitisela bino mbula kowuta na likolo, mpe tobimiseli bino bilanga na milona ya kitoko? Bozalaki na makoki moko te ya kokolisa banzete na yango, boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Kasi bazali nde bato ya kokokisa Allah na eloko.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Ezali ye te nde oyo azali koyanola moleli tango abeleli ye, mpe alongoli ye mpasi mpe azali kokitanisa bino na mabele? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Moke nde bozali kokanisa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo63. Ezali ye te nde azali kokamba bino na molili ya mokili mpe molili ya ebale? Mpe nani azali kotindaka mopepe lokola sango ya malamu na ngolu naye? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Allah azali likolo koleka maye bazali kosangisa na yango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Ezali ye te oyo abandaka bokeli sima azongeli yango? Mpe nani azali koleisa bino kowuta na likolo mpe na mabele? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Loba: Bopesa bilembetele bia bino soki bozali na bosôló.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo65. Loba: Moko te ayebi maye mabombami kati ya likolo na mabele, ezali sé Allah. Mpe bakoyebaka mokolo bakosekwisamaka te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo80. Ya sólo, yo ozali na bokoki ya koyokisa bawei te, mpe koyokisa baye bakufa matoyi te, tango bakimi bapesi mokongo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo81. Mpe ozali na bokoki ya kokamba bakufi miso te soki babungi, kasi okoki sé koyoka baye bandimi na mikapo mia biso mpe bazali batosi (bamizilima).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo87. Mpe mokolo moye kelelo ekobetama (kofula mondule to kelelo ya suka тропа kosekwisa bato), baye banso bazali o likolo mpe na nsé, bakosutuka na kobanga (liwa,) longola sé ba oyo ye moko Allah akobatela. Mpe banso bakoya epai naye na komikitisa nyoso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo88. Mpe okomona bangomba okanisi ete yango ezali makasi, kasi yango ekomi kotambola lokola londende na likolo, wana ezali mosala ya Allah oyo abongisa lolenge ya biloko binso. Ya sólo, ye azali na sango ya maye bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo90. Mpe oyo akoya na mabe, bakobwakama na moto na bilongi na bango. Boye bokofutama te sé engebene na maye bozalaki kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo92. Mpe natanga kurani, oyo akomikamba ezali тропа ye moko, mpe oyo akomibungisa, loba: Ya sólo, nazali sé moko kati ya bakebisi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo93. Mpe loba: Matondo ezali ya Allah, akolakisa bino bilembo bia ye, mpe bokoyeba yango. Mpe Nkolo wayo azangaka koyeba te maye bozali kosala.