Home › Surahs › Surah Al-Insaan
Surah Al-Insaan الانسان
31 verses · Medina · revelation order 98
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ هَلْ أَتَىٰ عَلَى ٱلْإِنسَٰنِ حِينٌ مِّنَ ٱلدَّهْرِ لَمْ يَكُن شَيْـًٔا مَّذْكُورًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 1. Ezali na tango molayi eleka na mokili moto azalaki eloko moko te liboso ete akelama?
See all translations of this verse →
إِنَّا خَلَقْنَا ٱلْإِنسَٰنَ مِن نُّطْفَةٍ أَمْشَاجٍ نَّبْتَلِيهِ فَجَعَلْنَٰهُ سَمِيعًۢا بَصِيرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 2. Ya soló, tokelaki moto na litanga ya mayi ya mokongo (oyo esangani na biloko ebele), тропа tomeka ye na yango, mpe totieli ye boyoki mpe bomoni mpo oyoka mpe amona.
See all translations of this verse →
إِنَّا هَدَيْنَٰهُ ٱلسَّبِيلَ إِمَّا شَاكِرًا وَإِمَّا كَفُورًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 3. Ya solo, tolakisaki ye nzela mpo atondo (Allah) to apengwa.
See all translations of this verse →
إِنَّآ أَعْتَدْنَا لِلْكَٰفِرِينَ سَلَٰسِلَا۟ وَأَغْلَٰلًا وَسَعِيرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 4. Ya solo, tolengeli тропа bapengwi minyololo ya basinga milai ya makasi mpe etumbu ya saira. (moto ya makasi ya lifelo)
See all translations of this verse →
إِنَّ ٱلْأَبْرَارَ يَشْرَبُونَ مِن كَأْسٍ كَانَ مِزَاجُهَا كَافُورًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 5. Ya solo, babangi (Allah) bakomelaka na bakopo ya kitoko ya kafura ya malili solo kitoko.
See all translations of this verse →
عَيْنًا يَشْرَبُ بِهَا عِبَادُ ٱللَّهِ يُفَجِّرُونَهَا تَفْجِيرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 6. Esika oyo bawumbu ya Allah bakomelaka ndenge balingi ezali kobimisa mayi ya malamu.
See all translations of this verse →
يُوفُونَ بِٱلنَّذْرِ وَيَخَافُونَ يَوْمًا كَانَ شَرُّهُۥ مُسْتَطِيرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 7. Bazali kokokisa bilaka mpe bazalaki kobanga mokolo moye mabe na yango ekopanzana bisika binso.
See all translations of this verse →
وَيُطْعِمُونَ ٱلطَّعَامَ عَلَىٰ حُبِّهِۦ مِسْكِينًا وَيَتِيمًا وَأَسِيرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 8. Мре bazali koleisa babola na bana bitike mpe bato ya boloko, na bolingo (ya biloko yango).
See all translations of this verse →
إِنَّمَا نُطْعِمُكُمْ لِوَجْهِ ٱللَّهِ لَا نُرِيدُ مِنكُمْ جَزَآءً وَلَا شُكُورًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 9. Ya soló, tozali koleisa bino тропа Allah, tolingi bofuta biso te mpe bopesa biso melesi te.
See all translations of this verse →
إِنَّا نَخَافُ مِن رَّبِّنَا يَوْمًا عَبُوسًا قَمْطَرِيرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 10. Tozali kobanga Nkolo na biso тропа mokolo oyo ya somo mpe ya mabe koleka.
See all translations of this verse →
فَوَقَىٰهُمُ ٱللَّهُ شَرَّ ذَٰلِكَ ٱلْيَوْمِ وَلَقَّىٰهُمْ نَضْرَةً وَسُرُورًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 11. Allah akobatela bango na mabe ya mokolo wana, mpe bakokutana na bongengi mpe esengo.
See all translations of this verse →
وَجَزَىٰهُم بِمَا صَبَرُوا۟ جَنَّةً وَحَرِيرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 12. Mpe akofuta bango lola тропа maye basalaki, mpe akopesa bango bilamba bia fafala.
See all translations of this verse →
مُّتَّكِـِٔينَ فِيهَا عَلَى ٱلْأَرَآئِكِ لَا يَرَوْنَ فِيهَا شَمْسًا وَلَا زَمْهَرِيرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 13. Bakoyekamaka likolo ya bakiti ya kitoko, moyi ekotungisaka bango te mpe bakoyokaka malili makasi te.
See all translations of this verse →
وَدَانِيَةً عَلَيْهِمْ ظِلَٰلُهَا وَذُلِّلَتْ قُطُوفُهَا تَذْلِيلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 14. Bilili na yango bikozipa bango penepene, mpe mbuma na yango bikokita tii pembeni na bango тропа kobuka.
See all translations of this verse →
وَيُطَافُ عَلَيْهِم بِـَٔانِيَةٍ مِّن فِضَّةٍ وَأَكْوَابٍ كَانَتْ قَوَارِيرَا۠
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 15. Mpe bakopesaka bango bitiyelo biye bisalami na mabende ya mbongo na bakopo bisalami na mabanga ya pembe ya kitoko bikotambwisama likolo na bango тропа kólia mpe komela,
See all translations of this verse →
قَوَارِيرَا۟ مِن فِضَّةٍ قَدَّرُوهَا تَقْدِيرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 16. Bakopo to milangi ya mabende ya kongenga ya кококапа.
See all translations of this verse →
وَيُسْقَوْنَ فِيهَا كَأْسًا كَانَ مِزَاجُهَا زَنجَبِيلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 17. Мре bakomelaka mayi oyo esangani na tangawisi,
See all translations of this verse →
عَيْنًا فِيهَا تُسَمَّىٰ سَلْسَبِيلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 18. Ezali kowuta na liziba oyo ebengami salsabila kuna na kati.
See all translations of this verse →
وَيَطُوفُ عَلَيْهِمْ وِلْدَٰنٌ مُّخَلَّدُونَ إِذَا رَأَيْتَهُمْ حَسِبْتَهُمْ لُؤْلُؤًا مَّنثُورًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 19. Мре bilenge mibali ya libela bakotambola nakati na bango тропа kosalela bango, soki omoni bango okokanisa ete bazali mabanga ya mayi ya kongenga oyo epanzani.
See all translations of this verse →
وَإِذَا رَأَيْتَ ثَمَّ رَأَيْتَ نَعِيمًا وَمُلْكًا كَبِيرًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 20. Mpe soki otali kuna okomona kitoko na bokonzi bonene.
See all translations of this verse →
عَٰلِيَهُمْ ثِيَابُ سُندُسٍ خُضْرٌ وَإِسْتَبْرَقٌ وَحُلُّوٓا۟ أَسَاوِرَ مِن فِضَّةٍ وَسَقَىٰهُمْ رَبُّهُمْ شَرَابًا طَهُورًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 21. Мре bakolata bilamba ya langi ya mayi ya pondu ya lolenge ebele тре basinga ya palata na maboko na bango mpo na bonzenga. Mpe Nkolo wa bango akomelisa bango mayi ya bopeto.
See all translations of this verse →
إِنَّ هَٰذَا كَانَ لَكُمْ جَزَآءً وَكَانَ سَعْيُكُم مَّشْكُورًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 22. Ya soló, oyo ezali lifuta тропа bino, mpe molende na bino ekofutama.
See all translations of this verse →
إِنَّا نَحْنُ نَزَّلْنَا عَلَيْكَ ٱلْقُرْءَانَ تَنزِيلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 23. Ya sólo, biso nde tokitiselaki yo kurani oyo na ndambu ndambu.
See all translations of this verse →
فَٱصْبِرْ لِحُكْمِ رَبِّكَ وَلَا تُطِعْ مِنْهُمْ ءَاثِمًا أَوْ كَفُورًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 24. Zala na bozeli na oyo Nkolo nayo apesi mibeko, mpe kotosa mosumuki to mopengwi te okati na bango.
See all translations of this verse →
وَٱذْكُرِ ٱسْمَ رَبِّكَ بُكْرَةً وَأَصِيلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 25. Мре tanga nkombo ya Nkolo nayo tongo mpe pokwa.
See all translations of this verse →
وَمِنَ ٱلَّيْلِ فَٱسْجُدْ لَهُۥ وَسَبِّحْهُ لَيْلًا طَوِيلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 26. Mpe na butu ofukamela ye, mpe okumisa ye butu molayi.
See all translations of this verse →
إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ يُحِبُّونَ ٱلْعَاجِلَةَ وَيَذَرُونَ وَرَآءَهُمْ يَوْمًا ثَقِيلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 27. Ya soló, bango balingi (bomoyi) ya nsé, mpe batiki sima na bango mokolo ya kilo mpe ya somo.
See all translations of this verse →
نَّحْنُ خَلَقْنَٰهُمْ وَشَدَدْنَآ أَسْرَهُمْ وَإِذَا شِئْنَا بَدَّلْنَآ أَمْثَٰلَهُمْ تَبْدِيلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 28. Biso nde tokela mpe tobongisi bokeli, soki tolingi tokoya na bato mosusu na esika na bango.
See all translations of this verse →
إِنَّ هَٰذِهِۦ تَذْكِرَةٌ فَمَن شَآءَ ٱتَّخَذَ إِلَىٰ رَبِّهِۦ سَبِيلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 29. Ya sólo, oyo ezali bokundoli, oyo alingi, azwa nzela ya kokende epai ya Nkolo naye.
See all translations of this verse →
وَمَا تَشَآءُونَ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ عَلِيمًا حَكِيمًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 30. Na yango: Bokolinga eloko te sé ezala na bolingi ya Allah. Ya sólo, Allah azali moyebi atonda bwanya.
See all translations of this verse →
يُدْخِلُ مَن يَشَآءُ فِى رَحْمَتِهِۦ وَٱلظَّٰلِمِينَ أَعَدَّ لَهُمْ عَذَابًا أَلِيمًۢا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 31. Akotisaka oyo alingi na mawa naye, kasi тропа bato mabe, abombeli bango etumbu ya makasi.
See all translations of this verse →
← Surah Al-Qiyaama
Surah Al-Mursalaat →
Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
→
Arabic text and translations via Tanzil and QuranEnc — verbatim, unmodified · Translations belong to their translators and are not the Qur'an itself
This is a research aid, not a source of religious rulings.