Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. То mpe bakoloba ete ye nde (Muhammad) asali yango na ndenge naye?, kasi yango ezali bosôló kowuta epai ya Nkolo wa yo, mpo ete okebisa na yango bato oyo mokebisi moko te ayela bango liboso nayo, mpo ete bakambama.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Allah nde akela likolo na mabele, mpe maye manso mazali kati na yango mibale na mikolo motoba, sima atombuami likolo ya ngwende. Na botiki ye, bozali na mobateli mpe molobeli te. Boye bozali kokanisa te?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Azali kokamba kowuta na likolo makambo ya likolo na ya nsé, sima makambo yango mazali komata epai naye na mokolo moko oyo ezali lokola mbula nkoto moko epai na bino lolenge botangaka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Apesi ye lolenge naye ya kitoko mpe afuli ye kowuta na molimo naye atieli bino boyoki, bomoni mpe mitema. Kasi moke bozali na botondi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Mpe bazali koloba ete: Soki tosili kolimwa na nsé na mabele, boye tokozonga lisusu bikelamu ya sika? Kasi bazali kopengwa nde na bokutani ya Nkolo na bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Mpe soki omoni lolenge batomboki (bakokitisaka) mitu mia bango liboso lia Nkolo wa bango, (na bolobi): Nkolo wa biso; tomonaki mpe toyokaki, zongisa biso (ata токе) mpo tosala bolamu. Ya soló (Sika oyo) nde tozali na tembe te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Вотека oyo bobosanaki тропа mokolo na bino ya lelo, ya soló biso тре lokola totiki bino, bomeka etumbu ya libela тропа maye bozalaki kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Ya soló, baye bandimaka na mikapo mia biso nde baye bazalaka soki bakundoleli bango yango, bakiti na bogumbami mpe bakumisi lokumu ya Nkolo wa bango, mpe bakosalaka lolendo te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Bazali kolamuka kowuta na bambeto na bango mpe bakitisi bilongi bia bango тропа kokumisa Nkolo wa bango na bobangi mpe elikia bonso, mpe bazali kobimisa ndambo ya maye topesaki bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Mpe ya soló, tokomekisa bango etumbu ya moke awa na mokili, yambo ya etumbu ya monene mpo tango mosusu bakozonga. (o nzela ya semba)
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Mpe topesaki Mûssa buku, mpe kozala na tembe te тропа bokutani na ye,(1) mpe totiyaki ye azala mokambi ya bana ya isalayele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Mpe totiyaki bakambi kati na bango, ete bakamba na mitindo mia biso, mpo ete bakangaki mitema mpe bandimaki na mikapo mia biso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Boye bamoni te ete tobomaki ebele ya bato baleka liboso bazali kotambola na bandako na bango? Ya soló wana ezali bilembo. Boye тропа nini bayokaka te?