caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Luqman لقمان

34 verses · Mecca · revelation order 57

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ الٓمٓ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Alif, lám, mím.(1)

See all translations of this verse →

تِلْكَ ءَايَٰتُ ٱلْكِتَٰبِ ٱلْحَكِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Oyo bizali mikapo mia buku ya bwanya,

See all translations of this verse →

هُدًى وَرَحْمَةً لِّلْمُحْسِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Yango ezali bokambi mpe ngolu тропа babongisi (bato ya malamu),

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ يُقِيمُونَ ٱلصَّلَوٰةَ وَيُؤْتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَهُم بِٱلْـَٔاخِرَةِ هُمْ يُوقِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. B aye bazali kotelemisa losambo тре bazali kobimisa zakat(2) mpe bazali na tembe te тропа mokolo ya suka.

See all translations of this verse →

أُو۟لَٰٓئِكَ عَلَىٰ هُدًى مِّن رَّبِّهِمْ وَأُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْمُفْلِحُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Bango nde bazali na nzela ya semba ya Nkolo wa bango, тре bango nde balongi.

See all translations of this verse →

وَمِنَ ٱلنَّاسِ مَن يَشْتَرِى لَهْوَ ٱلْحَدِيثِ لِيُضِلَّ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ بِغَيْرِ عِلْمٍ وَيَتَّخِذَهَا هُزُوًا أُو۟لَٰٓئِكَ لَهُمْ عَذَابٌ مُّهِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Мре kati ya bato, ezali na ba oyo bazali kosomba maloba mazanga ntina тропа kobungisa bato na nzela ya Allah na kozanga boyebi mpe bazali kotiola yango. Baye wana bakozuaka etumbu ya nsoni.

See all translations of this verse →

وَإِذَا تُتْلَىٰ عَلَيْهِ ءَايَٰتُنَا وَلَّىٰ مُسْتَكْبِرًا كَأَن لَّمْ يَسْمَعْهَا كَأَنَّ فِىٓ أُذُنَيْهِ وَقْرًا فَبَشِّرْهُ بِعَذَابٍ أَلِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Mpe tango bazali kotangela ye mikapo mia biso, apesa mokongo na lolendo lokola ayoka naino yango te, mpe lokola ezali na eloko ya kilo kati na matoyi naye. Pesa ye sango ya etumbu ya makasi.

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَعَمِلُوا۟ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمْ جَنَّٰتُ ٱلنَّعِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Ya soló, baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, bakozalaka na lola ya kitoko,

See all translations of this verse →

خَٰلِدِينَ فِيهَا وَعْدَ ٱللَّهِ حَقًّا وَهُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلْحَكِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Libela kati na yango , elaka ya Allah ezali ya sólo, mpe azali na bokasi atonda bwanya.

See all translations of this verse →

خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ بِغَيْرِ عَمَدٍ تَرَوْنَهَا وَأَلْقَىٰ فِى ٱلْأَرْضِ رَوَٰسِىَ أَن تَمِيدَ بِكُمْ وَبَثَّ فِيهَا مِن كُلِّ دَآبَّةٍ وَأَنزَلْنَا مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءً فَأَنۢبَتْنَا فِيهَا مِن كُلِّ زَوْجٍ كَرِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Akela likolo ezali na makonzi te bozali kornona yango, mpe apiki bangomba likolo ya mabele ya bokangami mpo ekweyela bino te, mpe ati kati na yango lolenge nyoso ya banyama, mpe tokitisa mayi kowuta likolo, mpe tobimisi na yango milona ya lolenge nyoso.

See all translations of this verse →

هَٰذَا خَلْقُ ٱللَّهِ فَأَرُونِى مَاذَا خَلَقَ ٱلَّذِينَ مِن دُونِهِۦ بَلِ ٱلظَّٰلِمُونَ فِى ضَلَٰلٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11.Oyo nde bokeli bwa Allah, bolakisa ngai oyo ya basusu. Kasi babubi bazali na libunga ya polele.

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ ءَاتَيْنَا لُقْمَٰنَ ٱلْحِكْمَةَ أَنِ ٱشْكُرْ لِلَّهِ وَمَن يَشْكُرْ فَإِنَّمَا يَشْكُرُ لِنَفْسِهِۦ وَمَن كَفَرَ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَنِىٌّ حَمِيدٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Mpe tosilaki kopesa Luqmân bwanya ete tondo Allah, botondi. Mpe oyo akotondo botondi, ya soló asali yango тропа ye moko, oyo mpe akozanga botondi, ya sólo Allah atonda bozui asanzolama.

See all translations of this verse →

وَإِذْ قَالَ لُقْمَٰنُ لِٱبْنِهِۦ وَهُوَ يَعِظُهُۥ يَٰبُنَىَّ لَا تُشْرِكْ بِٱللَّهِ إِنَّ ٱلشِّرْكَ لَظُلْمٌ عَظِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Mpe tango Luqmân alobaki na mwana waye (ya mobali) na bolendisi: Oh mwana wa ngai! Kosangisa Allah te, ya solo kosangisa (Allah) ezali bobubi bonene.

See all translations of this verse →

وَوَصَّيْنَا ٱلْإِنسَٰنَ بِوَٰلِدَيْهِ حَمَلَتْهُ أُمُّهُۥ وَهْنًا عَلَىٰ وَهْنٍ وَفِصَٰلُهُۥ فِى عَامَيْنِ أَنِ ٱشْكُرْ لِى وَلِوَٰلِدَيْكَ إِلَىَّ ٱلْمَصِيرُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Мре toyebisaki na moto (asalela) tata na mama waye (bolamu), mama naye amema ye na pasi tango molai, bolembu na bolembu kino mibu mibale azali (komelisa ye mabele,) ete otondo ngai mpe otondo baboti nayo, epai na ngai nde bokozonga.

See all translations of this verse →

وَإِن جَٰهَدَاكَ عَلَىٰٓ أَن تُشْرِكَ بِى مَا لَيْسَ لَكَ بِهِۦ عِلْمٌ فَلَا تُطِعْهُمَا وَصَاحِبْهُمَا فِى ٱلدُّنْيَا مَعْرُوفًا وَٱتَّبِعْ سَبِيلَ مَنْ أَنَابَ إِلَىَّ ثُمَّ إِلَىَّ مَرْجِعُكُمْ فَأُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمْ تَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Mpe soki bango nyoso mibale batindi yo mpo osangisa ngai na maye oyebi te, kotosa bango te, kasi zala na bango malamu awa na mokili, mpe landa nzela ya oyo ayei epai na ngai. Mpe bokozongaka epai na ngai, sima nakoyebisa bino maye bozalaki kosala.

See all translations of this verse →

يَٰبُنَىَّ إِنَّهَآ إِن تَكُ مِثْقَالَ حَبَّةٍ مِّنْ خَرْدَلٍ فَتَكُن فِى صَخْرَةٍ أَوْ فِى ٱلسَّمَٰوَٰتِ أَوْ فِى ٱلْأَرْضِ يَأْتِ بِهَا ٱللَّهُ إِنَّ ٱللَّهَ لَطِيفٌ خَبِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Oh mwana wa ngai! Yeba ete eloko soki ezali moke lokola mbuma ya ndunda ebombami na nsé ya libanga to mapata to mpe na nsé ya mabele, Allah akobimisa yango (o mokolo ya suka). Ya soló, Allah azali malamu mpe azali moyebi.

See all translations of this verse →

يَٰبُنَىَّ أَقِمِ ٱلصَّلَوٰةَ وَأْمُرْ بِٱلْمَعْرُوفِ وَٱنْهَ عَنِ ٱلْمُنكَرِ وَٱصْبِرْ عَلَىٰ مَآ أَصَابَكَ إِنَّ ذَٰلِكَ مِنْ عَزْمِ ٱلْأُمُورِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Oh mwana wa ngai! Telemisa losambo mpe tinda (bato) basala bolamu, mpe pekisa mabe, mpe kanga motema na likambo oyo ezui yo. Ya sólo, wana ezali lolenge ya malamu ya kobongisa makambo.

See all translations of this verse →

وَلَا تُصَعِّرْ خَدَّكَ لِلنَّاسِ وَلَا تَمْشِ فِى ٱلْأَرْضِ مَرَحًا إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ كُلَّ مُخْتَالٍ فَخُورٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Mpe kobalolaka elongi te na lofundo liboso ya bato mpe kotambola te na mokili osepela nayo moko koleka, mpamba te Allah alingaka bato ya lolendo na lofundo te. (komitombola na lolendo liboso ya bato te)

See all translations of this verse →

وَٱقْصِدْ فِى مَشْيِكَ وَٱغْضُضْ مِن صَوْتِكَ إِنَّ أَنكَرَ ٱلْأَصْوَٰتِ لَصَوْتُ ٱلْحَمِيرِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Žala na etamboli ya malamu, mpe kitisa mongongo nayo. Mpo mongongo oyo eleki mabe ezali mongongo ya hamir(1).

See all translations of this verse →

أَلَمْ تَرَوْا۟ أَنَّ ٱللَّهَ سَخَّرَ لَكُم مَّا فِى ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِى ٱلْأَرْضِ وَأَسْبَغَ عَلَيْكُمْ نِعَمَهُۥ ظَٰهِرَةً وَبَاطِنَةً وَمِنَ ٱلنَّاسِ مَن يُجَٰدِلُ فِى ٱللَّهِ بِغَيْرِ عِلْمٍ وَلَا هُدًى وَلَا كِتَٰبٍ مُّنِيرٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Bozali kornona te ete ya sôló, Allah abongiseli bino maye mazali o likolo mpe na nsé, mpe atondiseli bino bolamu bwaye ya polele na ya kobatama? Mpe okati ya bato, ezali na baye bazali kosuanisa тропа Allah, bazali na boyebi te, bakambami te mpe bazali na buku ya bosembo te.

See all translations of this verse →

وَإِذَا قِيلَ لَهُمُ ٱتَّبِعُوا۟ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ قَالُوا۟ بَلْ نَتَّبِعُ مَا وَجَدْنَا عَلَيْهِ ءَابَآءَنَآ أَوَلَوْ كَانَ ٱلشَّيْطَٰنُ يَدْعُوهُمْ إِلَىٰ عَذَابِ ٱلسَّعِيرِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Mpe soki balobi na bango, bolanda maye Allah akitisa, bakozongisa ete: Te, biso tokolanda sé maye bankoko na biso batika. Ata soki satana nde azali kobenga bango na etumbu ya lifelo?

See all translations of this verse →

وَمَن يُسْلِمْ وَجْهَهُۥٓ إِلَى ٱللَّهِ وَهُوَ مُحْسِنٌ فَقَدِ ٱسْتَمْسَكَ بِٱلْعُرْوَةِ ٱلْوُثْقَىٰ وَإِلَى ٱللَّهِ عَٰقِبَةُ ٱلْأُمُورِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Mpe oyo akomipesa elongi naye mobimba epai na Allah mpe azali mosali malamu, ye wana nde asili kokanga singa ya makasi, mpe epai ya Allah nde suka ya makambo ezali.

See all translations of this verse →

وَمَن كَفَرَ فَلَا يَحْزُنكَ كُفْرُهُۥٓ إِلَيْنَا مَرْجِعُهُمْ فَنُنَبِّئُهُم بِمَا عَمِلُوٓا۟ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمٌۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Kasi oyo akopengwa, bopengwi bwaye epesa yo mawa te, bozongi na bango ekozalaka nde epai na biso, тре tokoyebisaka bango maye basalaki. Ya soló, Allah azali moyebi ya maye mabombami o mitema mia bango.

See all translations of this verse →

نُمَتِّعُهُمْ قَلِيلًا ثُمَّ نَضْطَرُّهُمْ إِلَىٰ عَذَابٍ غَلِيظٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Tozali kopesa bango bomoi ya bisengo токе, na sima tokomema bango na makasi na etumbu oyo eleki mpasi.

See all translations of this verse →

وَلَئِن سَأَلْتَهُم مَّنْ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضَ لَيَقُولُنَّ ٱللَّهُ قُلِ ٱلْحَمْدُ لِلَّهِ بَلْ أَكْثَرُهُمْ لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Mpe soki otuni bango, nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: Ya sólo, ezali Allah. Loba: Lokumu na Allah. Kasi ebele na bango bazali koyeba te.

See all translations of this verse →

لِلَّهِ مَا فِى ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلْغَنِىُّ ٱلْحَمِيدُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Manso mazali o likolo mpe o nsé mazali ya Allah. Ya soló, Allah atonda bomengo atonda masanzoli.

See all translations of this verse →

وَلَوْ أَنَّمَا فِى ٱلْأَرْضِ مِن شَجَرَةٍ أَقْلَٰمٌ وَٱلْبَحْرُ يَمُدُّهُۥ مِنۢ بَعْدِهِۦ سَبْعَةُ أَبْحُرٍ مَّا نَفِدَتْ كَلِمَٰتُ ٱللَّهِ إِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Mpe soki ezalaki ete banzete nyoso na mokili ebongwana bikomeli mpe ba ebale mbala sambo ekoma mayi ya mokanda, nyoso elingaki kosila тре maloba ya Allah matikali. Ya sólo, Allah azali na nguya atonda bwanya.

See all translations of this verse →

مَّا خَلْقُكُمْ وَلَا بَعْثُكُمْ إِلَّا كَنَفْسٍ وَٰحِدَةٍ إِنَّ ٱللَّهَ سَمِيعٌۢ بَصِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Bokelami na bino mpe lisekwa na bino ezali lokola molimo moko mpamba. Ya sólo, Allah azali koyoka mpe azali kornona.

See all translations of this verse →

أَلَمْ تَرَ أَنَّ ٱللَّهَ يُولِجُ ٱلَّيْلَ فِى ٱلنَّهَارِ وَيُولِجُ ٱلنَّهَارَ فِى ٱلَّيْلِ وَسَخَّرَ ٱلشَّمْسَ وَٱلْقَمَرَ كُلٌّ يَجْرِىٓ إِلَىٰٓ أَجَلٍ مُّسَمًّى وَأَنَّ ٱللَّهَ بِمَا تَعْمَلُونَ خَبِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Boye ozali kornona te ete Allah azali kokotisa butu okati ya moyi mpe azali kokotisa moyi o kati ya butu, mpe akeli mwese mpe sanza mizala kotambola moko na moko na nzela na yango? Mpe ya soló, Allah azali na sango ya maye bozali kosala.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلْحَقُّ وَأَنَّ مَا يَدْعُونَ مِن دُونِهِ ٱلْبَٰطِلُ وَأَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلْعَلِىُّ ٱلْكَبِيرُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Wana ezali ete Allah azali bosembo, mpe ya sólo, maye manso bazali kobondela na botiki ye mazali mpamba, mpe ya solo, Allah azali likolo mpe monene koleka.

See all translations of this verse →

أَلَمْ تَرَ أَنَّ ٱلْفُلْكَ تَجْرِى فِى ٱلْبَحْرِ بِنِعْمَتِ ٱللَّهِ لِيُرِيَكُم مِّنْ ءَايَٰتِهِۦٓ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَٰتٍ لِّكُلِّ صَبَّارٍ شَكُورٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Boye ozali kornona te ya solo masuwa maye mazali kotambola na bibale, ezali sé na ngolu ya Allah, mpo amonisa bino bilembo bia ye? Ya soló wana ezali bilembo тропа moto nyonso oyo akangi motema mpe azali kotondo.

See all translations of this verse →

وَإِذَا غَشِيَهُم مَّوْجٌ كَٱلظُّلَلِ دَعَوُا۟ ٱللَّهَ مُخْلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَ فَلَمَّا نَجَّىٰهُمْ إِلَى ٱلْبَرِّ فَمِنْهُم مُّقْتَصِدٌ وَمَا يَجْحَدُ بِـَٔايَٰتِنَآ إِلَّا كُلُّ خَتَّارٍ كَفُورٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Mpe soki mbonge ya makasi ezui bango na ebale, babeleli Allah na bomoko naye nyoso, na sima soki abimisi bango na mokili, basusu kati na bango bazali kopengwa. Kasi ezali bobele bapengwi nde bazali koboya bilembo bia biso.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ ٱتَّقُوا۟ رَبَّكُمْ وَٱخْشَوْا۟ يَوْمًا لَّا يَجْزِى وَالِدٌ عَن وَلَدِهِۦ وَلَا مَوْلُودٌ هُوَ جَازٍ عَن وَالِدِهِۦ شَيْـًٔا إِنَّ وَعْدَ ٱللَّهِ حَقٌّ فَلَا تَغُرَّنَّكُمُ ٱلْحَيَوٰةُ ٱلدُّنْيَا وَلَا يَغُرَّنَّكُم بِٱللَّهِ ٱلْغَرُورُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Oh bino bato! Bobanga Nkolo wa bino mpe bobanga mokolo moye tata akoyanolaka mwana wa ye te, to mwana lokola. Elaka ya Allah ezali solo, bomoyi ya nsé ekosa bino te, mpe (mokosi) satana akosa bino te тропа Allah.

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱللَّهَ عِندَهُۥ عِلْمُ ٱلسَّاعَةِ وَيُنَزِّلُ ٱلْغَيْثَ وَيَعْلَمُ مَا فِى ٱلْأَرْحَامِ وَمَا تَدْرِى نَفْسٌ مَّاذَا تَكْسِبُ غَدًا وَمَا تَدْرِى نَفْسٌۢ بِأَىِّ أَرْضٍ تَمُوتُ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمٌ خَبِيرٌۢ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Ya soló, epayi ya Allah nde ngonga ya suka eyebani mpe ye nde azali kokitisa mbula, mpe ayebi maye mabombama o mabumu ya basi mpe moto moko ayebi te soki lobi akozua nini. Mpe moto moko ayebi te soki akokufa na mboka nini, ya sólo Allah azali moyebi mpe atonda basango.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70