Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Oh ntoma! Banga Allah kaši kotosa bapengwi te na bato ya bilongi mibale. Ya sôló, Allah azali moyebi atonda bwanya.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Allah atiyelaki moto mitema mibale te nakati naye. Mpe alukaki te kokokisa bamama ba bino na basi na bino na nzela ya zwihâr,(1) te mpe bana oyo bozali kobokolo bazali bana na bino te, oyo ezali liloba ezali kobima na minoko na bino, Allah nde azali koloba bosembo mpe azali kokamba na nzela.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Bobenga bango na bankombo ya batata na bango, wana nde ezali bosembo epai ya Allah.Kaši soki boyebi batata na bango te, bozua bango bandeko na bino ya lingomba to mpe baninga na bino. Na yango bozali na lisumu te тропа mabe oyo bosali yango na libaku, kasi bokozala na lisumu na oyo mitema na bino etindi bino kosala. Kasi Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Ntoma azali na lokumu likolo ya bandimi koleka banzoto na bango moko, mpe basi naye bazali bamama na bango, mpe bondeko ya makila ezali makasi koleka bondeko ya lingomba na bapaya тропа bokitani ya mowei engebene na mokanda ya Allah, kasi ezali malamu ete botikela bandeko na bino ya lingomba malako na lolenge ya malamu. Boye nde esilaki kokomama na mokanda.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Mpe tango tozuaki malako na bantoma, nayo mpe lokola, mpe Nûh, mpe Ibrâhîm, na Mûssa, mpe Issa mwana ya Maryam, tozuaki na bango mpenza elako ya makasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Oh bino bandimi! Bokanisa bolamu ya Allah epai na bino, tango mapinga (ya banguna) bayelaki bino, mpe totindelaki bango mopepe ya makasi mpe mapinga biye bomonaki bango te, mpe Allah azali kornona maye bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Tango bayelaki bino na likolo mpe na nsé, (bipai na bipai) mpe miso na bino mabulunganaki, mpe mitema mikomaki tii na mingongo, mpe bokaniselaki Allah makanisi nyoso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Mpe tango bato ya bilongi mibale na baye mitema mia bango mizali na bokono balobaki ete: Allah na motindami waye balakaki biso te sé lokuta.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Mpe tango bato misusu balobaki ete: Oh bato ya yatsrib!(1) botelema te kasi bozonga nde sima, (epai na bino) mpe basusu kati na bango bakomaki kosenga ntoma balobi ete: Ya soló, bandako na biso bizali polele, nzoka nde ezalaki bongo te kasi balingaki nde kokima.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Мре soki banguna bazuaka nzela ya kokotela bango na ekuke ya mboka mpe baloba na bango ete: Bopengwa sima ya kondima na bino, balingaki basala yango na lombango mpe balingaki bazela ata токе te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Loba: Kokima ekosalisa bino na eloko te, soki bozali kokima liwa to mpe mpasi ya kobunda, kasi bokosepela na bomoi ya nsé bobele tango ya токе.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Loba: Nani akobatela bino soki Allah alingi mabe ezua bino too soki alingi ngolu naye ezua bino nani akopekisa yango? Mpe bakozua mokonzi mpe mosungi mosusu te na esika ya Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Allah ayebi ba oyo kati na bino bazali koluka mabe, mpe ba oyo bazali koloba na bandeko ba bango ete: Boya epai na biso, nzoka nde bango moko bazali kotelema makasi тропа bitumba sé tango ya токе.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Bakanisaki ete makita ya banguna ezongaki naino te, nzoka nde soki bayelaka bango lisusu, balingaki коропа kozala baleki nzela baye bawuti na mboka ya zamba, mpo babanda kotuna basango na bino, ata soki bazalaki na kati na bino, balingaki mpe kobunda makasi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Na yango, bozali na ndakisa ya malamu ya kolanda epai ya ntoma, wana ezali тропа baye bazali kolikia na Allah mpe na mokolo ya suka, mpe bazali kokanisa bokumisi Allah mingi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. O kati ya bandimi, ezali na mibali ya bosembo, baye bakokisaki elaka na bango epai ya Allah. Basusu kati na bango mokano ya liwa ekomeli bango, basusu bazali kozela mpe oyo ya bango, kasi babongolaki te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Mpo Allah afuta baye bazali koloba solo na bosôló bwa bango, mpe apesa etumbu na bato ya bilongi mibale soki alingi, to akolimbisa bango. Ya soló Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Mpe Allah azongisaki mabe na bango (bapengwi), mpe bazuaki litomba moko te. Kasi Allah akoki na bandimi na bitumba (mpe asalisaka bango), mpe Allah azali makasi atonda nguya.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Mpe Allah, akitisaki basungi na bango ya bayuda okati na bandako na bango, kasi bazuaki bolamu te kati ya bato babuku mpe akotisaki bobangi ya makasi kati na mitema mia bango, bobomaki basusu kati na bango, mpe basusu bokangaki na boloko.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Mpe akitanisaki bino mabele na bango, bandako na bomengo na bango, mpe mabele mosusu oyo naino bonyati yango te, mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Eh ntoma! Loba na basi nayo: Soki bolingi bomoyi ya mokili na bisengo bia yango, boya napesa bino yango mpe nakabwana na bino na lolenge ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Kasi soki bolingi Allah na motindami waye, na efandelo ya mokolo ya suka, ya soló Allah abombeli babongisi kati na bino (basi) lifuta linene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Eh basi ya ntoma! Oyó kati na bino akoya na mabe oyo ezali polele na bilembo bimonani, tokobakisela ye etumbu mbala mibale. Mpe wana ezali pete тропа Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Mpe oyo akotosa Allah na motindami waye kati na bino, mpe asali bolamu, tokofuta ye mbala mibale, mpe tokobombela ye bozui ya kitoko.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Oh! Bino basi ya ntoma. Bokokani na moko te kati ya basi soki bozali babangi (Allah) mpe soki bozali kosolola, bomimonisa mingi te na maloba kitoko; noki te oyo azali na bokono na motema naye alula bino te, kasi boloba maloba ya malamu mpe ya kitoko.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Bovanda na bandako na bino mpe bomitika nzoto polele te na lolenge ya boyinga ya kala, mpe botelemisa losambo mpe bopesa zakat(1), mpe botosa Allah na motindami waye. Ya soló Allah alingi kotiya bino mosika na mbindo, Oh bato ya ndako (ya ntoma)! Mpo apetola bino bopetoli bolamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Mpe bokanisaka mikapo mia Allah na bwanya miye mizali kotangama na bandako na bino. Ya sólo, Allah azali boboto atonda basango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Ya sólo, bamizilima ya mibali na ya basi, bandimi ya mibali mpe basi, batosi ya mibali mpe ya basi, mibali ya bosembo mpe ya basi, bakangi mitema ya mibali mpe ya basi, mpe babangi Allah ya mibali mpe ya basi, bapesi mabonza ya mibali mpe ya basi, bakangi ya ngizi ya mibali mpe ya basi, babateli nzoto ya mibali mpe ya basi, bakundoli ya Allah mingi ya mibali mpe ya basi, ya sólo Allah alengeli тропа bango bolimbisi mpe lifuta linene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Mpe ezali te na mondimi ya mobali na ya mwasi, soki Allah na motindami waye batindi likambo, bapona lisusu (bango moko) lolenge ya kosala yango, oyo akozanga kotosa Allah na motindami waye, asili kobunga libunga ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Mpe tango ozalaki koloba na moto oyo Allah apesaki ye bolamu, yo mpe lokola osalaki ye bolamu, ozali koloba naye ete: Fanda na mwasi wayo mpe banga Allah, mpe ozalaki kobomba na motema nayo likambo oyo Allah alingaki ete elobama, mpe ozalaki kobanga bato; nzoka nde esengeli nayo kobanga Allah koleka, mpe tango Zaíd asilisaki bamposa naye na (mwasi ona) tobalisaki yo ye, тропа komonisa na bandimi ete: Kobala basi ya bana oyo babokoli ezali mabe te, soki basilisi bamposa na bango, na yango mibeko ya Allah esengeli ekokisama.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Ntoma azali na lisumu moko te тропа mokano oyo Allah atieli ye, wana ezali mobeko ya Allah uta kala na baye baleka liboso, mokano ya Allah esesngeli ekokisama.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Baye bazali kokomisa etinda ya Allah, mpe bazali kobanga ye, kasi bazali kobanga moto moko te bobele Allah (ye mei), Allah nde akoki тропа kofuta.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Muhammad azalaki tata wa moto moko te kati ya mihali na bino, kasi azali nde motindami wa Allah mpe mosukisi wa bantoma, mpe Allah ayebi manso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Ye nde azali kosambela тропа bino(1) ye na ba anzelu naye mpo ete abimisa bino na molili atia bino na bongengi. Mpe azali na ngolu mpenza тропа bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Kaši kotosa bapengwi na bato ya bilongi mibale te, mpe kolanda mabe na bango te, тре mipesa epai na Allah. Allah nde akoki lokola mobateli malamu. (тропа bato banso)
Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Eh bino bandimi! Soki bobali bandimi ya basi mpe bokabuani na bango yambo bosangana na bango bozali na mikolo ya kotanga te тропа bango ya kozela, bosalisa bango na bozui mpe bokabwana na bango na ndenge ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Oh ntoma! Ya soló topesi yo ndingisa ya basi oyo obali bango na mbongo nayo, na ba oyo ozuaki bango bawumbu na bitumba, tolingiseli yo mpe lokola bana basi ya tata kulutu to tata leki nayo, mpe bana basi ya batata mwasi nayo, mpe bana basi ya noko nayo, mpe bana basi ya bamama leki to mama kulutu nayo, baye bakendeki nayo elongo (na madinah), mpe mondimi ya mwasi oyo akomikaba тропа ntoma, soki ntoma akozala na mposa ya kobala ye, wana endimami тропа ntoma ye moko, kasi epai ya bandimi te. Ya soló, toyebi lotomo nini tosilaki kotiela bango, na ba oyo bazuaki bango na bowumbu, mpo ete bazua yo ntoma na mabe te. Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Okoki kozelisa oyo olingi kati na bango, mpe kovanda na oyo olingi, mpe bamona yango mabe te, soki obengi moko kati na ba oyo otiaki pembeni, wana ezali malamu тропа kosepelisa bango, mpo banyokuama te, mpe basepela na oyo opesi bango banso, kasi Allah ayebi manso maye mazali o mitema mia bino, mpe Allah azali moyebi atondo boboto.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Esengeli nayo te kobala lisusu basi misusu na sima ya ba oyo, to тре kolongola basusu тропа kotia basusu, ata kitoko na bango ezali kokamuisa yo, longola sé bawumbu nayo. Mpe Allah azali mokengeli ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo53. Eh bino bandimi! Bokota na ndako ya ntoma te sé soki babengi bino тропа kólia, bokota liboso te тропа kozela bilia, kasi soki babengi bino, bokota mbala moko тропа kólia, тре soki bosilisi kólia bopanzana, kasi boluka te kozala bai libota тропа kofandela masolo, pamba te yango ezali konyokola ntoma, mpe azali koyoka nsoni тропа koyebisa bino, kasi Allah ayokaka nsoni na bosembo te, mpe soki bozali kosenga basi naye biloko, esengeli bozala ya kobatama. Wana ezali kopetola mitema mia bino mpe mitema mia bango, bino te nde bosengeli konyokolo motindami wa Allah, mpe elingisami na bino te kobala basi naye sima ya liwa naye. Mpamba te ya soló, yango ezali mabe ya monene epai ya Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Epekisami na bango te kofanda na batata na bamama na bango, mpe na bana na bango to bandeko na bango, to bana ya bandeko na bango ya basi na ya mibali, to baninga na bango basi, to bawumbu na bango, mpe babanga Allah. Mpamba te, ya sólo Allah azali nzeneneke likolo ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo56. Ya sólo, Allah na ba anzelu naye basambelaka тропа ntoma(1) Oh! Bino baye bondima, bosambela тропа ye mpe bopesa mbote ya boboto.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo57. Ya soló, baye bazali komonisa Allah na ntoma waye pasi, Allah akopesa bango botutu awa na nsé mpe o mokolo mwa suka, mpe abombeli bango etumbu ya nsoni.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Eh ntoma! Loba na basi nayo mpe na bana nayo ya basi, na basi ya bandimi ete: Bakitisa mpe balata kitambala na bango ya monene, (banda na motu ekita tii na bantolo na bango), wana ezali mpo ete bayebana mpo batungisama te, ya solo, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Soki bato ya bilongi mibale ya Madinah na baye bazali na bokono kati na mitema mia bango na bato ya mobulu, (ya batomboki) batiki te, tokotinda yo obundisa bango, na sima bakowumela pembeni nayo te sé токе.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Wana ezali mobeko moye Allah atiya epai ya baye baleka liboso, mpe okokutaka mbonguana na mobeko mwa Allah te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo63. Bato bazali kotuna yo тропа tango (tango ya bosambisami o mokolo ya suka), loba: Allah nde azali na boyebi na yango, mpe nini ekolakisa yo tango mosusu ngonga ezali pembeni?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo66. Mokolo bilongi na bango bikobalusama o kati ya lifelo bakoloba ete: Eh mawa na biso! Soki totosaki Allah тре totosaki motindami.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo67. Mpe bakolobaka: Nkolo wa biso ya sólo totosaki nde bakonzi na biso na bamikolo na biso, mpe bango nde babungisi biso nzela.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo69. Oh bino bandimi! Bozala te lokola ba oyo banyokolaki Mûssa, kasi Allah alongolaki ye na mabe na bango, mpe azalaki na lokumu na miso ya Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo71. Akobongisela bino misala, na bino mpe akolimbisa masumu na bino. Мре oyo akotosa Allah na motindami waye, asili kolonga elonga enene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo72. Ya soló, topesaki mokumba(1) na likolo mpe na nsé mpe na bangomba, kasi baboyaki komema yango na kobanga, kasi moto amemaki yango. Nzoka nde azalaka na bosembo te, mpe boyebi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo73. Mpo Allah apesa etumbu na bato ya bilongi mibale ya mibali mpe ya basi, mpe bapengwi ya mibali mpe ya basi, mpe Allah akondima tubela ya bandimi ya mibali mpe ya basi. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.