Surah Abasa عبس
42 verses · Mecca · revelation order 24
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ عَبَسَ وَتَوَلَّىٰٓ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Akangi elongi mpe apesi mokongo.
See all translations of this verse →
أَن جَآءَهُ ٱلْأَعْمَىٰ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Mpo ete mokufi miso aye epai naye.
See all translations of this verse →
وَمَا يُدْرِيكَ لَعَلَّهُۥ يَزَّكَّىٰٓ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Nani akoyebisa yo ntango mosusu ye alingi komipetola?
See all translations of this verse →
أَوْ يَذَّكَّرُ فَتَنفَعَهُ ٱلذِّكْرَىٰٓ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. To mpe kokanisa mpo ete mateya esalisa ye?
See all translations of this verse →
أَمَّا مَنِ ٱسْتَغْنَىٰ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Mpona moto oyo amitondisi na lolendo mpona bozwi naye,
See all translations of this verse →
فَأَنتَ لَهُۥ تَصَدَّىٰ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Ozali koyamba ye na lombango.
See all translations of this verse →
وَمَا عَلَيْكَ أَلَّا يَزَّكَّىٰ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Kasi bopetwami naye ezali na maboko nayo te.
See all translations of this verse →
وَأَمَّا مَن جَآءَكَ يَسْعَىٰ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Kasi mpona oyo aye na lombango epai nayo,
See all translations of this verse →
وَهُوَ يَخْشَىٰ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Naye azali na bobangi,
See all translations of this verse →
فَأَنتَ عَنْهُ تَلَهَّىٰ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Ozali kotala ye te.
See all translations of this verse →
كَلَّآ إِنَّهَا تَذْكِرَةٌ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Kosala lisusu boye te oyo ezali ya soló liteya.
See all translations of this verse →
فَمَن شَآءَ ذَكَرَهُۥ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Oyo alingi akanisa yango.
See all translations of this verse →
فِى صُحُفٍ مُّكَرَّمَةٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Ezwami kati ya makomi ya lokumu,
See all translations of this verse →
مَّرْفُوعَةٍ مُّطَهَّرَةٍۭ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Etombwami mpe epetolami,
See all translations of this verse →
بِأَيْدِى سَفَرَةٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. O’maboko ma bantoma,
See all translations of this verse →
كِرَامٍۭ بَرَرَةٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Baye ya lokumu тре botosi.
See all translations of this verse →
قُتِلَ ٱلْإِنسَٰنُ مَآ أَكْفَرَهُۥ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Moto amibomi na bopengwi naye.
See all translations of this verse →
مِنْ أَىِّ شَىْءٍ خَلَقَهُۥ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Na eloko nini akelamaki?
See all translations of this verse →
مِن نُّطْفَةٍ خَلَقَهُۥ فَقَدَّرَهُۥ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Akelamaki kowuta na mayi ya mokongo, akeli ye mpe akokiseli ye mokano mwa ye.
See all translations of this verse →
ثُمَّ ٱلسَّبِيلَ يَسَّرَهُۥ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Sima alakisi ye nzela.
See all translations of this verse →
ثُمَّ أَمَاتَهُۥ فَأَقْبَرَهُۥ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Sima abomi ye mpe akotisi ye na lilita.
See all translations of this verse →
ثُمَّ إِذَا شَآءَ أَنشَرَهُۥ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Mpe akosekwisa ye na ntango alingi.
See all translations of this verse →
كَلَّا لَمَّا يَقْضِ مَآ أَمَرَهُۥ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Moto akokisi te maye atindamaki.
See all translations of this verse →
فَلْيَنظُرِ ٱلْإِنسَٰنُ إِلَىٰ طَعَامِهِۦٓ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Esengeli na moto atala bileyi naye.
See all translations of this verse →
أَنَّا صَبَبْنَا ٱلْمَآءَ صَبًّا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Ya soló, biso nde tozali kokitisa mayi.
See all translations of this verse →
ثُمَّ شَقَقْنَا ٱلْأَرْضَ شَقًّا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Sima topasoli mabele na nzela,
See all translations of this verse →
فَأَنۢبَتْنَا فِيهَا حَبًّا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Mpe na nzela wana tobimisi bambuma,
See all translations of this verse →
وَعِنَبًا وَقَضْبًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Ba inab(1) mpe bandunda.
See all translations of this verse →
وَزَيْتُونًا وَنَخْلًا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Na nzete ya zaítún(2) na nzete ya nagh’l(3),
See all translations of this verse →
وَحَدَآئِقَ غُلْبًا
Lingala Translation - Mohammed BalangogoЗО. Мре bilanga ebele,
See all translations of this verse →
وَفَٰكِهَةً وَأَبًّا
Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Мре tobimisi mbuma mpe matiti.
See all translations of this verse →
مَّتَٰعًا لَّكُمْ وَلِأَنْعَٰمِكُمْ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Bileyi тропа bino na An’âm(1) na bino.
See all translations of this verse →
فَإِذَا جَآءَتِ ٱلصَّآخَّةُ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Kasi tango bobulungani ekoya,
See all translations of this verse →
يَوْمَ يَفِرُّ ٱلْمَرْءُ مِنْ أَخِيهِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Mokolo moye moto akokima ndeko naye,
See all translations of this verse →
وَأُمِّهِۦ وَأَبِيهِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Mpe akokima mama naye mpe tata naye,
See all translations of this verse →
وَصَٰحِبَتِهِۦ وَبَنِيهِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Akokima mwasi naye mpe bana baye.
See all translations of this verse →
لِكُلِّ ٱمْرِئٍ مِّنْهُمْ يَوْمَئِذٍ شَأْنٌ يُغْنِيهِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Mpamba te mokolo wana moto na moto akotala sé makambo matali ye-
See all translations of this verse →
وُجُوهٌ يَوْمَئِذٍ مُّسْفِرَةٌ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Mokolo wana bilongi bisusu bikongenga,
See all translations of this verse →
ضَاحِكَةٌ مُّسْتَبْشِرَةٌ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Bakoseka mpe bakosepela.
See all translations of this verse →
وَوُجُوهٌ يَوْمَئِذٍ عَلَيْهَا غَبَرَةٌ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Kasi bilongi bisusu mokolo yango bikozala na putulu,
See all translations of this verse →
تَرْهَقُهَا قَتَرَةٌ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Bikozipama na molili.
See all translations of this verse →
أُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْكَفَرَةُ ٱلْفَجَرَةُ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Baye wana nde bazali bapengwi mpe bato ya mabe.
See all translations of this verse →
Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
→