caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Yaseen يس

83 verses · Mecca · revelation order 41

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ يسٓ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Yâ, Sín(1)

See all translations of this verse →

وَٱلْقُرْءَانِ ٱلْحَكِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Na kurani oyo etonda bwanya.

See all translations of this verse →

إِنَّكَ لَمِنَ ٱلْمُرْسَلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Ya soló, ozali (Muhammad) kati ya batindami.

See all translations of this verse →

عَلَىٰ صِرَٰطٍ مُّسْتَقِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. O kati ya nzela ya semba.

See all translations of this verse →

تَنزِيلَ ٱلْعَزِيزِ ٱلرَّحِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Ekitisamaki kowuta na oyo azali na bokasi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

لِتُنذِرَ قَوْمًا مَّآ أُنذِرَ ءَابَآؤُهُمْ فَهُمْ غَٰفِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Mpo ete okebisa bato oyo bankonko na bango bakebisamaki te, kasi bazalaki kokanisa te.

See all translations of this verse →

لَقَدْ حَقَّ ٱلْقَوْلُ عَلَىٰٓ أَكْثَرِهِمْ فَهُمْ لَا يُؤْمِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Liloba lisilaki кокота likolo na bango ya sólo, kasi ebele bazali kondima te.

See all translations of this verse →

إِنَّا جَعَلْنَا فِىٓ أَعْنَٰقِهِمْ أَغْلَٰلًا فَهِىَ إِلَى ٱلْأَذْقَانِ فَهُم مُّقْمَحُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Ya solo, tokotiela bango basinga na bakingo mpe na minoko na bango, тре bakotambola na yango sé bongo.

See all translations of this verse →

وَجَعَلْنَا مِنۢ بَيْنِ أَيْدِيهِمْ سَدًّا وَمِنْ خَلْفِهِمْ سَدًّا فَأَغْشَيْنَٰهُمْ فَهُمْ لَا يُبْصِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Mpe tokangaki liboso na bango mpe sima na bango, mpe tozipaki bango (miso) ete bamona te.

See all translations of this verse →

وَسَوَآءٌ عَلَيْهِمْ ءَأَنذَرْتَهُمْ أَمْ لَمْ تُنذِرْهُمْ لَا يُؤْمِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Mpe ezali sé ndenge moko, okebisa bango to okebisa te, bakondima te.

See all translations of this verse →

إِنَّمَا تُنذِرُ مَنِ ٱتَّبَعَ ٱلذِّكْرَ وَخَشِىَ ٱلرَّحْمَٰنَ بِٱلْغَيْبِ فَبَشِّرْهُ بِمَغْفِرَةٍ وَأَجْرٍ كَرِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Ya soló, esengeli okebisa sé oyo azali kolanda maloba (kurani), mpe azali kobanga Ar-Rahmán(1) na kobombama, pesa ye sango ya bolimbisami mpe lifuta lilamu.

See all translations of this verse →

إِنَّا نَحْنُ نُحْىِ ٱلْمَوْتَىٰ وَنَكْتُبُ مَا قَدَّمُوا۟ وَءَاثَٰرَهُمْ وَكُلَّ شَىْءٍ أَحْصَيْنَٰهُ فِىٓ إِمَامٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Ya soló, biso nde tokosekwisaka bawei, mpe tokomeli bango maye basalaki ya malamu to ya mabe, mpe na mikoloto(1) na bango mpe eloko nyoso topesi motango na yango okati ya buku ya polele.

See all translations of this verse →

وَٱضْرِبْ لَهُم مَّثَلًا أَصْحَٰبَ ٱلْقَرْيَةِ إِذْ جَآءَهَا ٱلْمُرْسَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Pesa bango ndakisa ya bato ya mboka tango batindami bayelaki bango.

See all translations of this verse →

إِذْ أَرْسَلْنَآ إِلَيْهِمُ ٱثْنَيْنِ فَكَذَّبُوهُمَا فَعَزَّزْنَا بِثَالِثٍ فَقَالُوٓا۟ إِنَّآ إِلَيْكُم مُّرْسَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Tango totindelaki bango batindami mibale, baboyaki kondimela bango, tobakiseli bango ya misato, balobi: Ya sólo, totindami epai na bino.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ مَآ أَنتُمْ إِلَّا بَشَرٌ مِّثْلُنَا وَمَآ أَنزَلَ ٱلرَّحْمَٰنُ مِن شَىْءٍ إِنْ أَنتُمْ إِلَّا تَكْذِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Bayanolaki: Bozali bato lokola biso, Ar-Rahmán akitisi eloko тропа biso te, bino bozali sé kokosa.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ رَبُّنَا يَعْلَمُ إِنَّآ إِلَيْكُمْ لَمُرْسَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Balobi: Nkolo wa biso ayebi ya sólo ete: Tozali batindami epai na bino.

See all translations of this verse →

وَمَا عَلَيْنَآ إِلَّا ٱلْبَلَٰغُ ٱلْمُبِينُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Mpe tozali sé тропа bokomisi sango bwa polele.

See all translations of this verse →

قَالُوٓا۟ إِنَّا تَطَيَّرْنَا بِكُمْ لَئِن لَّمْ تَنتَهُوا۟ لَنَرْجُمَنَّكُمْ وَلَيَمَسَّنَّكُم مِّنَّا عَذَابٌ أَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Balobi: Tozali kornona bino na makanisi mabe, soki botiki yango te, tokobwakela bino mabanga, mpe etumbu makasi kowuta epai na biso ekozua bino.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ طَٰٓئِرُكُم مَّعَكُمْ أَئِن ذُكِّرْتُم بَلْ أَنتُمْ قَوْمٌ مُّسْرِفُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Balobi: Makanisi mabe ezali epai na bino moko, boye nde lolenge bozali kosala soki bopesami makundolami? Kasi bozali bato mabe balekisi ndelo.

See all translations of this verse →

وَجَآءَ مِنْ أَقْصَا ٱلْمَدِينَةِ رَجُلٌ يَسْعَىٰ قَالَ يَٰقَوْمِ ٱتَّبِعُوا۟ ٱلْمُرْسَلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Mpe moto moko ayaki na suka ya mboka na lombango (na ebandeli ya mboka) mpe alobi: Oh bato na ngai! Bolanda batindami.

See all translations of this verse →

ٱتَّبِعُوا۟ مَن لَّا يَسْـَٔلُكُمْ أَجْرًا وَهُم مُّهْتَدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Bolanda baye bakotuna bino lifuta ata moko te, mpe bazali na liloba lia bokambami.

See all translations of this verse →

وَمَا لِىَ لَآ أَعْبُدُ ٱلَّذِى فَطَرَنِى وَإِلَيْهِ تُرْجَعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Mpe тропа nini te nabondela ye oyo akeli ngai, mpe epai naye nde bokozongisama?

See all translations of this verse →

ءَأَتَّخِذُ مِن دُونِهِۦٓ ءَالِهَةً إِن يُرِدْنِ ٱلرَّحْمَٰنُ بِضُرٍّ لَّا تُغْنِ عَنِّى شَفَٰعَتُهُمْ شَيْـًٔا وَلَا يُنقِذُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Boye nazuela ye banzambe basusu? Soki Ar-Rahmân(1) alingeli ngai mabe, kosenga na bango ekosalisa ngai na eloko moko te, mpe bakobikisa ngai te.

See all translations of this verse →

إِنِّىٓ إِذًا لَّفِى ضَلَٰلٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Ya soló, nakozala na libungi lia polele.

See all translations of this verse →

إِنِّىٓ ءَامَنتُ بِرَبِّكُمْ فَٱسْمَعُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Ya solo, ngai nandimi na Nkolo wa bino, boyoka ngai.

See all translations of this verse →

قِيلَ ٱدْخُلِ ٱلْجَنَّةَ قَالَ يَٰلَيْتَ قَوْمِى يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. (Na yango), elobamaki naye: Kota na lola. Alobi: Soki bato na ngai bayebaka.

See all translations of this verse →

بِمَا غَفَرَ لِى رَبِّى وَجَعَلَنِى مِنَ ٱلْمُكْرَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Mpo ete Nkolo na ngai alimbisi ngai mpe atie ngai o molongo ya bato ya lokumu.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَنزَلْنَا عَلَىٰ قَوْمِهِۦ مِنۢ بَعْدِهِۦ مِن جُندٍ مِّنَ ٱلسَّمَآءِ وَمَا كُنَّا مُنزِلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Мре sima naye tokitisaki mapinga ata moko te, mpe tolingaki kokitisa eloko moko te likolo ya bato naye.

See all translations of this verse →

إِن كَانَتْ إِلَّا صَيْحَةً وَٰحِدَةً فَإِذَا هُمْ خَٰمِدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Ezalaki sé bogangi moko (mongongo ewutaki na likolo) mpe etumbu ezuaki bango.

See all translations of this verse →

يَٰحَسْرَةً عَلَى ٱلْعِبَادِ مَا يَأْتِيهِم مِّن رَّسُولٍ إِلَّا كَانُوا۟ بِهِۦ يَسْتَهْزِءُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Eh mabe ezali likolo ya bawumbu! Motindami atikala koyela bango te sé batióla ye.

See all translations of this verse →

أَلَمْ يَرَوْا۟ كَمْ أَهْلَكْنَا قَبْلَهُم مِّنَ ٱلْقُرُونِ أَنَّهُمْ إِلَيْهِمْ لَا يَرْجِعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Bazali kornona te bato boni toboma liboso na bango, mpe bazongelaki bango te?

See all translations of this verse →

وَإِن كُلٌّ لَّمَّا جَمِيعٌ لَّدَيْنَا مُحْضَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Mpe (moto) nyoso, akotelema liboso na biso (тропа kosamba).

See all translations of this verse →

وَءَايَةٌ لَّهُمُ ٱلْأَرْضُ ٱلْمَيْتَةُ أَحْيَيْنَٰهَا وَأَخْرَجْنَا مِنْهَا حَبًّا فَمِنْهُ يَأْكُلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Mpe elembo moko тропа bango ezali ete topesaka bomoyi na mabele maye makawuka, mpe tobimisaki kowuta na yango mbuma iye bazali kólia.

See all translations of this verse →

وَجَعَلْنَا فِيهَا جَنَّٰتٍ مِّن نَّخِيلٍ وَأَعْنَٰبٍ وَفَجَّرْنَا فِيهَا مِنَ ٱلْعُيُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Mpe totiaki okati na yango (mabele) bilanga ya naghil(1) mpe a’náb(2) mpe tobimiselaki yango maziba ya mayi,

See all translations of this verse →

لِيَأْكُلُوا۟ مِن ثَمَرِهِۦ وَمَا عَمِلَتْهُ أَيْدِيهِمْ أَفَلَا يَشْكُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Mpo ete balia bambuma na yango, mpe na oyo maboko na bango masali. Boye bakozala na botondi te?

See all translations of this verse →

سُبْحَٰنَ ٱلَّذِى خَلَقَ ٱلْأَزْوَٰجَ كُلَّهَا مِمَّا تُنۢبِتُ ٱلْأَرْضُ وَمِنْ أَنفُسِهِمْ وَمِمَّا لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Nkembo naye oyo akeli biloko na balolenge binso biye bibimaka na mabele, mpe na banzoto na bango mpe na maye bayebi te!

See all translations of this verse →

وَءَايَةٌ لَّهُمُ ٱلَّيْلُ نَسْلَخُ مِنْهُ ٱلنَّهَارَ فَإِذَا هُم مُّظْلِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Mpe elembo mosusu тропа bango ezali butu, oyo tolandisi yango mokolo, kasi bango bafandi o kati ya molili.

See all translations of this verse →

وَٱلشَّمْسُ تَجْرِى لِمُسْتَقَرٍّ لَّهَا ذَٰلِكَ تَقْدِيرُ ٱلْعَزِيزِ ٱلْعَلِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Mpe moyi mozali kotambola na botiami na yango. Wana ezali etiyeli ya oyo azali na bokasi atonda boyebi.

See all translations of this verse →

وَٱلْقَمَرَ قَدَّرْنَٰهُ مَنَازِلَ حَتَّىٰ عَادَ كَٱلْعُرْجُونِ ٱلْقَدِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Mpe sanza, totiaki yango na bitape kino ekokonda ekomi lokola lokasa ya mbila ya ко kawuka.

See all translations of this verse →

لَا ٱلشَّمْسُ يَنۢبَغِى لَهَآ أَن تُدْرِكَ ٱلْقَمَرَ وَلَا ٱلَّيْلُ سَابِقُ ٱلنَّهَارِ وَكُلٌّ فِى فَلَكٍ يَسْبَحُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Moyi mokutaka sanza te, mpe butu elekaka mokolo te. Mpe nyoso ezali kotambola na nzela na yango.

See all translations of this verse →

وَءَايَةٌ لَّهُمْ أَنَّا حَمَلْنَا ذُرِّيَّتَهُمْ فِى ٱلْفُلْكِ ٱلْمَشْحُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Mpe elembo mosusu тропа bango, ezali ete tomemaka bato na bango na masuwa oyo etondaka.

See all translations of this verse →

وَخَلَقْنَا لَهُم مِّن مِّثْلِهِۦ مَا يَرْكَبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Mpe tosaleli bango mosusu lokola oyo wana bazali komata na kati тропа kotambola.

See all translations of this verse →

وَإِن نَّشَأْ نُغْرِقْهُمْ فَلَا صَرِيخَ لَهُمْ وَلَا هُمْ يُنقَذُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Мре soki tolingaki nde tozindisaki bango, nde bazuaki mosungi te, mpe balingaki kozua libiki te.

See all translations of this verse →

إِلَّا رَحْمَةً مِّنَّا وَمَتَٰعًا إِلَىٰ حِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Ezali sé тропа mawa na biso, тре mpo bakoka kosepela na mwa tango токе.

See all translations of this verse →

وَإِذَا قِيلَ لَهُمُ ٱتَّقُوا۟ مَا بَيْنَ أَيْدِيكُمْ وَمَا خَلْفَكُمْ لَعَلَّكُمْ تُرْحَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Мре soki bayebisi bango ete, bobanga oyo ezali liboso na bino mpe sima na bino mpo ete bozua ngolu!

See all translations of this verse →

وَمَا تَأْتِيهِم مِّنْ ءَايَةٍ مِّنْ ءَايَٰتِ رَبِّهِمْ إِلَّا كَانُوا۟ عَنْهَا مُعْرِضِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo46. Mpe elembo moko te kati ya bilembo ya Nkolo na bango eyelaki bango bobele bapesa yango mokongo.

See all translations of this verse →

وَإِذَا قِيلَ لَهُمْ أَنفِقُوا۟ مِمَّا رَزَقَكُمُ ٱللَّهُ قَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ لِلَّذِينَ ءَامَنُوٓا۟ أَنُطْعِمُ مَن لَّوْ يَشَآءُ ٱللَّهُ أَطْعَمَهُۥٓ إِنْ أَنتُمْ إِلَّا فِى ضَلَٰلٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Mpe soki bayebisi bango ete: Bobimisa na bozui oyo Allah apeși bino тропа kokaba, bapagano bakoloba na bandimi ete: Tokoleisa moto oyo soki Allah alingi akoleisa ye? Bino bozali sé na libunga ya polele.

See all translations of this verse →

وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلْوَعْدُ إِن كُنتُمْ صَٰدِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Mpe bazali koloba: Elaka ekokokaka tango nini soki bozali koloba bosóló?

See all translations of this verse →

مَا يَنظُرُونَ إِلَّا صَيْحَةً وَٰحِدَةً تَأْخُذُهُمْ وَهُمْ يَخِصِّمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Bakoyoka sé lolaka moko ekozuaka bango na mbalakaka tango bazali kosuana.

See all translations of this verse →

فَلَا يَسْتَطِيعُونَ تَوْصِيَةً وَلَآ إِلَىٰٓ أَهْلِهِمْ يَرْجِعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Bakokoka (tango wana) kotikela libota na bango malako te mpe bakokoka lisusu kozongela bango te.

See all translations of this verse →

وَنُفِخَ فِى ٱلصُّورِ فَإِذَا هُم مِّنَ ٱلْأَجْدَاثِ إِلَىٰ رَبِّهِمْ يَنسِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Мре bakofula kelelo, тре okomonaka bango babimi na malita bazali kokima mbangu epai ya Nkolo wa bango.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰوَيْلَنَا مَنۢ بَعَثَنَا مِن مَّرْقَدِنَا هَٰذَا مَا وَعَدَ ٱلرَّحْمَٰنُ وَصَدَقَ ٱلْمُرْسَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Bazali koloba: Eh mawa na biso! Nani asekwisi biso na esika oyo tozalaki kolala? Boye oyo nde elaka ya Ar-Rahmán(1) alakaki, mpe batindami balobaki bosóló.

See all translations of this verse →

إِن كَانَتْ إِلَّا صَيْحَةً وَٰحِدَةً فَإِذَا هُمْ جَمِيعٌ لَّدَيْنَا مُحْضَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo53. Ekozalaka sé lolaka moko ya (makasi) okomona bango banso bazali liboso lia biso.

See all translations of this verse →

فَٱلْيَوْمَ لَا تُظْلَمُ نَفْسٌ شَيْـًٔا وَلَا تُجْزَوْنَ إِلَّا مَا كُنتُمْ تَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo54. Mokolo wana, bakobuba ata molimo moko te, mpe bokofutamaka te sé na maye bozalaki kosala.

See all translations of this verse →

إِنَّ أَصْحَٰبَ ٱلْجَنَّةِ ٱلْيَوْمَ فِى شُغُلٍ فَٰكِهُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Ya soló, mokolo wana bato ya lola bakozalaka na misala ya bokokisi bolamu bwa bango,

See all translations of this verse →

هُمْ وَأَزْوَٰجُهُمْ فِى ظِلَٰلٍ عَلَى ٱلْأَرَآئِكِ مُتَّكِـُٔونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo56. Bango na balongani na bango bakozalaka na bisika bia тріо, bavandi likolo lia bakiti,

See all translations of this verse →

لَهُمْ فِيهَا فَٰكِهَةٌ وَلَهُم مَّا يَدَّعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo57. Bakozalaka na bambuma (ya kolia) mpe bakozuaka nyoso oyo bakosengaka.

See all translations of this verse →

سَلَٰمٌ قَوْلًا مِّن رَّبٍّ رَّحِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. (Salam) kimia, liloba likowutaka epai ya Nkolo oyo atonda mawa.

See all translations of this verse →

وَٱمْتَٰزُوا۟ ٱلْيَوْمَ أَيُّهَا ٱلْمُجْرِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Kasi lelo, tika ete bozala mosika, eh bino bato mabe!

See all translations of this verse →

أَلَمْ أَعْهَدْ إِلَيْكُمْ يَٰبَنِىٓ ءَادَمَ أَن لَّا تَعْبُدُوا۟ ٱلشَّيْطَٰنَ إِنَّهُۥ لَكُمْ عَدُوٌّ مُّبِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Boye nalakaki bino te eh! Bana ya Adam! Ete bobondela satana te? Ya soló, azali monguna na bino ya polele,

See all translations of this verse →

وَأَنِ ٱعْبُدُونِى هَٰذَا صِرَٰطٌ مُّسْتَقِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo61. Mpe (nayebisaki bino te ete) bobondela ngai? Oyo nde nzela ya semba.

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ أَضَلَّ مِنكُمْ جِبِلًّا كَثِيرًا أَفَلَمْ تَكُونُوا۟ تَعْقِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Mpe (satana) asilaki kobungisa ebele o kati na bino, boye bozali kokanisa te?

See all translations of this verse →

هَٰذِهِۦ جَهَنَّمُ ٱلَّتِى كُنتُمْ تُوعَدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo63. Oyo nde lifelo oyo balakaki bino.

See all translations of this verse →

ٱصْلَوْهَا ٱلْيَوْمَ بِمَا كُنتُمْ تَكْفُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Lelo bokozikisama na yango, тропа maye bopengwaki na yango.

See all translations of this verse →

ٱلْيَوْمَ نَخْتِمُ عَلَىٰٓ أَفْوَٰهِهِمْ وَتُكَلِّمُنَآ أَيْدِيهِمْ وَتَشْهَدُ أَرْجُلُهُم بِمَا كَانُوا۟ يَكْسِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo65. Mokolo mona tokokanga minoko mia bango, kasi maboko na bango makolobela biso, mpe makolo na bango makozala nzeneneke ya maye bazalaki kosala.

See all translations of this verse →

وَلَوْ نَشَآءُ لَطَمَسْنَا عَلَىٰٓ أَعْيُنِهِمْ فَٱسْتَبَقُوا۟ ٱلصِّرَٰطَ فَأَنَّىٰ يُبْصِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo66. Mpe soki tolingi, tokolimwisaka miso na bango, mpe bakokimaka na nzela, kasi bakomonaka ndenge nini?

See all translations of this verse →

وَلَوْ نَشَآءُ لَمَسَخْنَٰهُمْ عَلَىٰ مَكَانَتِهِمْ فَمَا ٱسْتَطَٰعُوا۟ مُضِيًّا وَلَا يَرْجِعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo67. Mpe soki tolingi, tokobalusa bango sé esika moko, bakokoka kokende liboso te, mpe kozonga sima te.

See all translations of this verse →

وَمَن نُّعَمِّرْهُ نُنَكِّسْهُ فِى ٱلْخَلْقِ أَفَلَا يَعْقِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo68. Na oyo tokopesaka ye bomoyi molayi, tokozongisa ye na lolenge ya bokelami naye (motawu na nzoto mpe na bongo naye). Boye bazali koyeba te?

See all translations of this verse →

وَمَا عَلَّمْنَٰهُ ٱلشِّعْرَ وَمَا يَنۢبَغِى لَهُۥٓ إِنْ هُوَ إِلَّا ذِكْرٌ وَقُرْءَانٌ مُّبِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo69. Ezali ntôki ya mpamba mpamba te nde totangisaki ye (Muhammad), mpe esengeli naye te. Kaši ezali nde bokundoli, mpe kotanga kurani oyo ezali polele.

See all translations of this verse →

لِّيُنذِرَ مَن كَانَ حَيًّا وَيَحِقَّ ٱلْقَوْلُ عَلَى ٱلْكَٰفِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo70. Mpo akebisa oyo akozala na bomoyi, mpe liloba lisila kokokisama тропа bapengwi.

See all translations of this verse →

أَوَلَمْ يَرَوْا۟ أَنَّا خَلَقْنَا لَهُم مِّمَّا عَمِلَتْ أَيْدِينَآ أَنْعَٰمًا فَهُمْ لَهَا مَٰلِكُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo71. Boye bazali kornona te ete kati ya maye maboko na biso masali, tokeli An‘âm(1) biye bazali kokonza?

See all translations of this verse →

وَذَلَّلْنَٰهَا لَهُمْ فَمِنْهَا رَكُوبُهُمْ وَمِنْهَا يَأْكُلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo72. Mpe tondimelaki bango bamatelaka misusu mpe misusu baliaka.

See all translations of this verse →

وَلَهُمْ فِيهَا مَنَٰفِعُ وَمَشَارِبُ أَفَلَا يَشْكُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo73. Mpe bazali kobimisa kati na yango (biloko) oyo ezali kosalisa bango, mpe misusu ya komela kasi bazali kotondo te?

See all translations of this verse →

وَٱتَّخَذُوا۟ مِن دُونِ ٱللَّهِ ءَالِهَةً لَّعَلَّهُمْ يُنصَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo74. Mpe bazali kozua banzambe misusu batiki Allah, bazali kokanisa ete bakosalisa bango.

See all translations of this verse →

لَا يَسْتَطِيعُونَ نَصْرَهُمْ وَهُمْ لَهُمْ جُندٌ مُّحْضَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo75. В aye wana bakokokaka kosalisa bango te, kasi bakokoma nde lipinga liye likotelemela bango.

See all translations of this verse →

فَلَا يَحْزُنكَ قَوْلُهُمْ إِنَّا نَعْلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعْلِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo76. Maloba na bango mapesa yo mpasi te. Ya soló, biso toyebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa.

See all translations of this verse →

أَوَلَمْ يَرَ ٱلْإِنسَٰنُ أَنَّا خَلَقْنَٰهُ مِن نُّطْفَةٍ فَإِذَا هُوَ خَصِيمٌ مُّبِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo77. Boye moto ayebi te ete tokeli ye kowuta na mayi ya mokongo, na sima abaluki akomi monguna ya polele?

See all translations of this verse →

وَضَرَبَ لَنَا مَثَلًا وَنَسِىَ خَلْقَهُۥ قَالَ مَن يُحْىِ ٱلْعِظَٰمَ وَهِىَ رَمِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo78. Azali kobetela biso ndakisa kasi abosani bokelami bwa ye moko, alobi: Nani akopesa bomoyi na mikuwa sima ya kokoma na yango putulu?

See all translations of this verse →

قُلْ يُحْيِيهَا ٱلَّذِىٓ أَنشَأَهَآ أَوَّلَ مَرَّةٍ وَهُوَ بِكُلِّ خَلْقٍ عَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo79. Loba: Oyó akopesa yango bomoyi nde oyo akelaka yango o mbala ya liboso, mpe ayebi malamu bokeli bwaye bonso.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِى جَعَلَ لَكُم مِّنَ ٱلشَّجَرِ ٱلْأَخْضَرِ نَارًا فَإِذَآ أَنتُم مِّنْهُ تُوقِدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo80. Ye nde azalisaki тропа bino moto kowuta na nzete ya mobesu, yango nde bozali kopelisa.

See all translations of this verse →

أَوَلَيْسَ ٱلَّذِى خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضَ بِقَٰدِرٍ عَلَىٰٓ أَن يَخْلُقَ مِثْلَهُم بَلَىٰ وَهُوَ ٱلْخَلَّٰقُ ٱلْعَلِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo81. Boye oyo akeli mapata na mabele akoki te kokela basusu lokola bango? Iyo, ya soló azali mokeli monene koleka bango mpe azali moyebi.

See all translations of this verse →

إِنَّمَآ أَمْرُهُۥٓ إِذَآ أَرَادَ شَيْـًٔا أَن يَقُولَ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo82. Ya sólo soki alingi (kosala) eloko akolobaka se, zala, mpe ezalisami.

See all translations of this verse →

فَسُبْحَٰنَ ٱلَّذِى بِيَدِهِۦ مَلَكُوتُ كُلِّ شَىْءٍ وَإِلَيْهِ تُرْجَعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo83. Nkembo na oyo azali na bokonzi bonso, na maboko naye, mpe epai naye nde bokozongisama.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70