Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Ya sólo, falo amimonisaki na lolendo kolekisa ndelo na mokili, mpe azalaki kokabola bato naye тропа kolembisa bango, azalaki koboma bana mibali mpe azalaki kotika basi na bango. Ya sólo, azalaki okati ya bato mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Mpe tobakisela bango bokasi o kati na mabele, mpe tomonisa falo na Hâmân na basoda na bango mibale, kati na bango maye bazalaki kobanga.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Мре toyebisaki na mama ya Mûssa ete: Melisa ye, mpe soki okobanga тропа ye, bwaka ye na mayi, kasi koyimayima te mpe kolenga te, ya soló, tokozongisa ye epai nayo. Mpe tokotia ye azala okati ya batindami.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Mpe bato ya falo bayambaki ye, mpo ete azala monguna na bango mpe oyo akomemela bango mpasi. Ya sólo, falo na Hâmân na mapinga na bango bazalaki bato mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Mpe mwasi ya falo alobaki ete: (na mobali naye) oyo azali esengo ya liso na ngai mpe esengo ya liso nayo. Boboma ye te, akoki kosalisa biso ndele to mpe tokokomisa ye mwana na biso, mpe bazalaki koyeba te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Mpe motema ya mama ya Mûssa ekitaki, na ntina ete ekokaki kobimisa nyoso oyo ezalaki na kati, soki biso te nde motema naye molendaki te, mpe mbele azangaki kozala na kondima.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Mpe topekisaki ye mabele ya bato mosusu, mpe ndeko naye ya mwasi alobaki na bango ete: Bolingi nalakisa bino libota moko ekobokolo ye malamu тропа bino? Bakozala naye malamu penza.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Mpe tozongisaki ye epai ya mama wa ye, mpo asepela mpe amiyoka mpasi te, тре mpo ayeba ete elaka ya Allah ezalaka sôló. Kasi ebele na bango bazali koyeba te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Alobi: Nkolo, namisali mabe ngai moko, limbisa ngai, mpe alimbisi ye. Ya sólo, ye nde molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Мре sima ya mikolo mike mileki, Mûssa akotaki na mboka na kobanga mpe kotala epai na epai, kasi na mbalakaka akutani na mobali oyo asengaki ye lisalisi lobi azali kobelela ye lisusu ete asalisa ye, Mûssa alobi naye: Ya soló, ozali motumoli ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Tango alingi kozua ye na makasi alobi: Oh Mûssa! Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto lobi loleki? Olingi komitiya moto ya makasi awa na mokili, mpe olingi kozala o kati ya basali bolamu te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Mpe tango azali kokende o ngambu ya mad’yan alobi: Nazali kolikia na Nkolo wa ngai akamba ngai o nzela ya semba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Mpe tango akomaki na liziba ya mayi ya mad’yan, akuti bato batondi bazali komelisa (banyama na bango) mpe akuti basi mibale lokola bamivandisi pembeni, alobi (na bango): Bolingi nini? Balobi: Tokomelisa banyama te kino bango basilisa komelisa, mpe tata na biso akomi mokolo makasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Moko kati na bango ayei (epai ya Mûssa), azali kotambola malembe na nsoni alobi: Ya soló, tata na biso azali kobenga yo, mpo afuta yo ndenge omeliseli biso banyama. Mpe tango akomaki liboso lia ye, ayebisi ye lisolo lia ye, alobi: Kobanga te, osili kolongisama epai ya babubi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Moko na bango alobaki ete: Oh tata wa ngai! Zúa ye (na mosala), mpo ete moto malamu ya mosala ezali moto ya makasi mpe ya bosembo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Alobi: Nalingi obala moko kati ya bana basi na ngai mibale oyo, na mobeko ete: Osalela nga mibu mwambe, soki mpe okokisi (mibu) zomi, sé yo moko, mpe nakopesa yo pasi te. Na bolingi bwa Allah okokuta ngai o kati ya bato ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. (Mûssa) alobi: Tosili koyokana ngai nayo, oyo na коропа kati ya makambo mibale oyo, nakozala na lisumu te. Mpe Allah nde azali mobateli na oyo tozali koloba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Mpe tango Mûssa akokisi elako ya boyokani, akei na libota lia ye o ngambu ya ngomba ya turi, amoni moto mpe alobi na libota lia ye: Bozela ngai awa, namoni moto, tango mosusu nakoyela bino sango, to nkoni ya moto mpo bokoka koyotola yango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Mpe tango akomaki, abengamaki na ngambu ya mobali na nsé ya lubuaku o esika ya mapamboli na kati ya nzete, Eh Mûssa! Ya soló ngai Allah Nkolo ya mokili.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Kotisa loboko nayo na libenga lia yo, ekobima mpembe ekosala mpasi te, mpe kanga loboko nayo makasi na nzoto mpo obanga te, wana ezali bilembo mibale kowuta epai ya Nkolo wa yo тропа falo na bankumu naye. Ya sólo, bazalaki bato mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. (Allah) alobi: Tokopesa yo ndeko nayo тропа kosalisa yo mpe topesa bino bokonzi mpo ete: Bakoka bino te na bikamwiseli na biso. Bino mibale na baye balandi bino bokolonga.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Mpe falo alobi: Oh bino bankumu! Nayebi bino bozali na nzambe mosusu te sé ngai; Hâmân, pelisela ngai moto mpe tumba mabele mpo otongela ngai ndako ya molai, mpo namata epai ya nzambe ya Mûssa. Mpo ya soló, nazali kokanisa ete azali kati ya babuki lokuta.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Asali lolendo na mokili, ye na basoda naye ete oyo ezali bosóló te, bakanisaki ete bakozongisama epai na biso te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Ozalaki te o ngambu ya moniele tango tokitisaki mibeko epai na Mûssa, mpe ozalaki te mokolo yango okati ya banzeneneke.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Kasi biso nde tobimisaki bato ebele baleka na bomoyi milayi mpe ofandaki te o mboka mad’yan ozali kotangela bango mikapo mia biso, kasi biso nde totindaka batindami.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo46. Мре ozalaki te o ngambu ya ngomba ya turí tango tobengaki, ezalaki sé ngolu kowuta epai ya Nkolo wayo, mpo okebisa baye mokebisi moko te ayelaki bango liboso nayo mpo bakanisa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Mpe soki mabe maye bango moko bamilukeli ekomeli bango, balobi: Nkolo wa biso тропа nini otindelaki biso motindami te? Tolingaki kolanda mikapo mia yo mpe tolingaki kozala o kati ya bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Mpe tango bosôló ekomelaki bango kowuta epai na biso, balobi: Soki epesamaka lolenge moko bapesa na Mússa, boye bapengwaki te na maye Mússa ayelaki bango liboso? Balobaki ete: Wana banganga mibale(1) bazali kosalisana, mpe balobi: Ya sôló, topengwi na nyoso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Loba (na bango): Boya na buku kowuta epai ya Allah oyo eleki yango mibale, mpe na landa yango soki bozali na bosôló.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo54. Bango nde bakozuaka lifuta lia bango mbala mibale тропа maye bakangaki motema na yango, mpe mpo bayanolaki malamu na esika ya mabe, mpe bazalaki kobimisa ndambo ya maye topesaki bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo56. Ya sólo, yo (Muhammad) okoki kokamba oyo olingi te, kasi Allah nde akambaka oyo alingi. Mpe azali moyebi wa bakambami koleka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo57. Мре balobi ete: Soki tolandi yo na bokambi bakobotolo biso mabele na biso. Boye tofandisaki bango te na mabele esantu mpe ya kimia! Eye ezalaki kobimisela bango bambuma ya ndenge na ndenge тропа kólia? Kasi ebele na bango bazali koyeba te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. Мре boni tobomaki kati ya bamboka oyo ebubaki (kasi bazalaki na bomoyi ya malamu)? Mpe sima na bisika na bango batikalaki bato токе, mpe biso nde tokitanisaki yango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Mpe kasi Nkolo wayo abomaka mboka te kino atindela bango (bato ya mboka wana) motindami mpo atangela bango mikapo mia biso, mpe tobomaka mboka te sé bato na yango bazala babubi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Nyoso oyo bopesamaki ezali тропа komisepelisa na bomoyi ya mokili na bisengo bia yango. Mpe oyo ezali epai ya Allah nde eleki malamu, mpe ekotikala seko. Boye bozali koyeba te?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo61. Moto oyo topesi ye elaka ya malamu, mpe akomona yango ekokisami, boye akokani na oyo topesi ye bisengo ya mokili mpe o mokolo ya lisekwa akofanda liboso na biso тропа kosamba?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo68. Mpe Nkolo wayo akelaka oyo alingi mpe aponaka oyo alingi, ezali te ete: Bango bapona nkembo na Allah wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango (ye na bikeko na banzambe misusu).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo70. Ye nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye mei, azali na lokumu awa na mokili mpe na mokolo ya suka, mpe bokonzi bonso (ya makambo) bozali bwa ye, mpe epai naye nde bokozongisama.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo71. Loba: Bomoni ndenge nini soki Allah atiyelaki bino butu ezala bongo kino o mokolo mwa suka? Nzambe nini na esika ya Allah akotiyela bino bongengi? Boye bozali koyoka te?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo72. Loba: Bomoni ndenge nini, soki Allah atiyelaki bino mokolo ezala bongo kino o mokolo ya suka? Nzambe nini na esika ya Allah akotiyela bino butu mpo bopema na yango? Boye bozali kornona te?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo73. Mpe na mawa naye, asaleli bino butu na mokolo mpo bopemaka kati na yango, mpe mpo bolukaka bolamu naye, mpo bokoka kotondo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo76. Ya soló Qârûn azalaki kati ya bato ya Mûssa, kasi atombokaki likolo na bango na lolendo, mpe topesaki ye bozui oyo fungóla nayango esengaki bato ya makasi mpona kotombola yango. Tango bayebisi ye na bato naye ete: Kosepela mingi te, mpo ya sólo Allah alingaka basepeli ya bolekisi ndelo te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo77. Mpe oyo Allah apeși yo, luka nayango evandeli (ya malamu) o mokolo ya suka, kasi kobosana ya mokili te, mpe bongisa lolenge Allah abongisela yo, mpe kobebisa okati ya mokili te. Ya sólo, Allah alingaka babebisi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo78. Alobi: Ya sólo, nazuaki yango na boyebi oyo nazali na yango. Boye ayebi te ete: Allah abomaka bato ya yambo baye bazalaki na bokasi koleka ye na bozwi ebele? Mpe batomboki bakotunama te mpona masumu na bango?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo79. Мре abimaki na bonzenga nyoso epai ya bato naye, baye balingaki mokili balobi: Soki tozalaka ata (na bozui ya malamu lokola) Qärün, ya soló, azali na libaku ya kitoko.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo81. Mpe tobomaki ye, mpe mabele emelaki ye na ndako naye. Mpe bato ya kosalisa ye bamonanaki te na botiki Allah mpe akokaki komisalisa te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo83. Ndako wana ya mokolo ya suka, tolengeli yango тропа baye balingi komilakisa te awa na mokili, mpe bazali kosala mbeba te. Mpe suka ya solo, ezali nde ya babangi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo84. Oyo akoya na bolamu moko, akozua lifuta koleka yango, mpe oyo akoya na mabe moko, bakofutama te sé na ndenge basalaki.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo85. Ya soló oyo atiyelaki yo kurani ezala lotomo, akomemaka yo na esika oyo olingi kokende. Loba: Nkolo wa ngai ayebi malamu koleka, oyo aye na bokambi mpe oyo azali na libunga ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo87. Na yango, kobundisaka mikapo mia Allah te sima ya kokitisa yango epai nayo. Benga (bato) baya epai ya Nkolo wayo, тре kozala o kati ya basangisi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo88. Mpe kokumisa nzambe mosusu te elongo na Allah, Nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ye. Biloko binso bikokufaka, longola sé elongi naye. Mpe kokata ya likambo ezali bwa ye, mpe epai naye nde bokozongisama.