وَلَقَدْ ءَاتَيْنَا دَاوُۥدَ وَسُلَيْمَٰنَ عِلْمًا وَقَالَا ٱلْحَمْدُ لِلَّهِ ٱلَّذِى فَضَّلَنَا عَلَىٰ كَثِيرٍ مِّنْ عِبَادِهِ ٱلْمُؤْمِنِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Mpe tosilaki kopesa Dâwud na Suleyman boyebi, mpe bango mibale balobaki: Matondo na Allah oyo apesi biso ebele o kati ya bawumbu naye bandimi.