Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Mpe bokeseni bwa butu na mokolo; na maye Allah akitisaki kowuta na likolo lokola bozui, oyo ezali kopesa bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango, mpe kotambola ya mopepe bipai na bipai, ezali bilembo mpo bato bakoka kokanisa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Wana ezali mikapo mia Allah tozali kotangela yo na bosoló. Liloba kani bakondimaka yango osima (koyoka mpe kozua liloba) ya Allah na bilembo bia ye?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. (Oyo) azali koyoka mikapo mia Allah miye bazali kotangela ye sima asaleli yango lolendo lokola atikala koyoka yango te, pesa ye sango ya etumbu ya makasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Soki ayebi eloko moke okati ya mikapo mia biso, asaleli yango litio, baye wana nde bakozua etumbu ya kokitisama.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Sima bango bakozalaka na lifelo; bakosalisaka bango na eloko te; ezala ata baye bazuaki bango ete bazali babateli na bango na batiki Allah. Bakozalaka na etumbu monene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. (Kurani) oyo ezali bokambi, mpe baye bazali kopengwa na mikapo mia Nkolo wa bango, bakozua etumbu ya makasi koleka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Mpe akeli тропа bino manso maye mazali okati ya likolo na mabele na mitindo kowuta epai naye. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakanisa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Loba na baye bandima: Balimbisa baye bazali kolikia na mikolo mia Allah te, mpo moto nyoso afutama na maye asalaki.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Oyo akosala bolamu ezali тропа ye moko, mpe oyo akobebisa, ekozongela sé ye moko. Sima bokozongisama epai ya Nkolo wa bino.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Мре tosilaki kopesa na bana ya isalayele buku тре mibeko тре bontoma, тре topesaki bango biloko bia kitoko, mpe totombolaki bango esika koleka basusu (na tango na bango).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Mpe toyelaki bango bilembo bia polele ya mibeko mpe bakabwanaki te sé tango boyebi eyelaki bango тропа likunya okati na bango. Ya soló, Nkolo nayo akosambisa kati na bango na bosôló o mokolo mwa suka тропа maye bazalaki na bokeseni.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Ya soló, bango bazali na bokoki ya kosalela yo bolamu te koleka bolamu ya Allah. Mpe ya soló, bato mabe bango na bango bazali baninga, Allah nde azali mobateli ya bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Boye ozali kornona te ete oyo azui mposa naye nde nzambe naye, mpe Allah abungisi ye na boyebi, mpe akangi ye matoyi na motema mpe atie ezipelo na miso, nani mosusu akokamba ye osima ya Allah, boye bozali kokanisa te?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Mpe bazali koloba ete: Bomoyi ezali sé ya mokili ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa, bobele tango nde ezali koboma biso. Bazali na boyebi te тропа yango sé makanisi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Loba: Allah apesaka bino bomoyi sima akobomaka bino; sima akosangisaka bino o mokolo mwa suka, mokolo moye mokozalaka na tembe te; kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Mpe bokonzi bwa likolo na mabele ezali ya Allah. Mpe tango mokolo wana mokokokaka, bato ya lokuta bakozangaka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Mpe okomona bato banso bakofukama. Mpe bakobengama o ngambu ya buku na bango, lelo bokofutama тропа maye bosalaki.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Kasi baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, Nkolo wa bango akokotisa bango na bolamu bwa ye. Wana nde elonga ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Mpe tango bazali koyebisa bango ete elaka ya Allah ezali ya sólo, mpe ya sólo, ngonga ena ezali na tembe te, bolobaki toyebaki yango te, tozalaki kornona yango pamba, mpe tondimaki na yango te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Mpe bakoyebisa bango: Lelo tobosani bino(1) ndenge bobosanaki mokolo mwa elaka mwa bino moye, mpe esika na bino ezali nde lifelo. Kasi bakozwaka mosungi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Nyoso wana mpo bozuaki mikapo mia Allah na liseki, mpe bomoyi ya mokili ekosaki bino. Mokolo wana bakobimisama okati na yango te mpe bakoyambama te, okati ya ngolu.