Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali otei na yango nyoso mibale na bosóló na tango eye eyebani. Bapengwi bazali koboya na maye bazali kokebisa bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Loba: Bokanisi nini тропа baye bozali kobelela na botiki Allah, bolakisa ngai nini bakela na mabele, to bazali na mosangisi o likolo? Boyela ngai buku ya bosembo oyo ezalaki liboso ya oyo (kurani) to elembo ya boyebi soki ya soló, bozali na bosembo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Mpe nani abungi koleka moto oyo azali kobondela na botiki Allah eloko ekoyanola ye te kino o mokolo ya suka, тре bazali koyanola na mabondeli na bango te?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. То тре bazali koloba ete: Asali yango na ndenge naye, loba: Soki nasali yango na ndenge na ngai, bokosala ngai eloko moko te liboso ya Allah, ayebi malamu maye bozali kopanza sango (na mabe тропа kobukela kurani lokuta). Akoki lokola nzeneneke kati na ngai na bino, mpe azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Loba: Nazali motindami wa yambo ya koyela bino te, mpe nayebi te oyo bakosala na ngai mpe тропа bino; nazali kolanda sé maye bakitiselaki ngai, mpe nazali sé mokebisi ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Loba: Boye bozali kornona ndenge nini soki (boyebi) ewuti epai ya Allah, mpe bozali kondimela yango te; mpe nzeneneke moko kati ya bana ya isalayele amoni mpe andimi na yango? Mpe bosali lolendo? Ya soló, Allah akambaka babubi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Ya soló, baye balobi Nkolo wa biso Allah sima basembuami, bakozalaka na bobangi te mpe bakozala na mawa te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Mpe topesaki mobeko na moto ete asalela baboti naye bolamu, mama naye amemaki zemi naye na mpasi mpe abotaki ye na mpasi, mpe zemi naye na komelisa ye kino akokisi sanza ntuku misato kino akomi makasi, mpe akokisi mbula ntuku minei alobi: Nkolo tika ete natondo yo тропа bolamu nayo osaleli ngai, mpe na baboti na ngai, mpe tika ete nasala mosala ya malamu oyo ekosepelisa yo, mpe bongisa libota na ngai. Ya soló natubeli epai nayo mpe ya sólo nazali okati ya baye bazali komisokia (bamizilima).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Baye wana nde tokondimela bango тропа bolamu oyo basalaki, mpe tokolongolaka mabe na bango, mpe bakozalaka okati ya bato ya lola, engebene na elaka ya bosóló oyo bapesaki bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Baye wana esengeli bazua etumbu na baye baleka liboso lia bango okati ya bilima na bato. Ya sólo, basilaki kozanga.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Bato banso bazali na esika na bango mpo na oyo bazalaki kosala, mpe bakofutaka bango engebene na misala na bango mpe bakobubama te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Mpe mokolo moye bakomemaka bapengwi nalifelo; (bakoyebisaka bango) ete: Bobebisaki bolamu na bino na mokili mpe bosepelaki bongo, kasi lelo bokofutama na etumbu ya makasi engebene na maye bosalaki lolendo na mokili na botikaki bosóló, mpe тропа maye bozalaki kobebisa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Mpe kanisa ndeko ya ba Aad, tango akebisaki bato naye na ahqáf, liboso naye mpe sima naye, bakebisi basilaki koleka ebele ete: Bobondela sé bobele Allah, ya soló, nazali kobangela bino etumbu ya mokolo monene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Alobaki ete: Boyebi ezali nde epai ya Allah; nazali kokomisela bino maye natindami na yango. Kasi nazali kornona bozali bato oyo bozangi koyeba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Ebebisaki nyoso na mibeko mia Nkolo na yango, sima na yango na tongo, bango banso bamonanaki lisusu te, etikalaki sé bandako na bango. Lolenge wana nde tofutaka batomboki.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Mpona nini bazuaki lisungi te epai ya baye bazuaki bango banzambe na botiki Allah? Ete: Bango nde bakopusanisa bango pembeni na Allah, kasi banzambe yango basundoli bango. Wana ezali lokuta na bango oyo bazalaki kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Balobaki: Oh bato na biso! ya soló, toyokaki maloba ya buku oyo ekitaki sima ya Mûssa; (ezali koloba) bosóló ya maye maleka mpe ezali kokamba na bosembo o nzela ya semba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Oh bato na biso! Boyamba moteyi ya Allah, тре bondima naye. Akolimbisa masumu na bino mpe akobatela bino na etumbu ya makasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Mpe oyo akondimela motei ya Allah te, akozua ekimeli te na bokonzi ya Allah na mokili, mpe akozala na babateli te elongo naye. В a oyo wana nde bazali na libunga ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Boye bazali kornona te ete Allah nde akelaki likolo тре na nsé, тре alembaki тропа kokela yango te, boye azali na nguya te ya kosekwisa bawa? Iyo, ya soló, azali na nguya likolo ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Mpe mokolo moye bakomemaka bapengwi na lifelo; (bakotunaka bango) oyo ezali solo te? Bakoyanolaka: Iyo. Ya sólo, Nkolo wa biso. Akolobaka: Bomeka etumbu тропа maye bozalaki kopengwa na yango.