Home › Surahs › Surah Al-Muminoon
Surah Al-Muminoon المؤمنون
118 verses · Mecca · revelation order 74
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ قَدْ أَفْلَحَ ٱلْمُؤْمِنُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 1. Bandimi basila kolonga.
See all translations of this verse →
ٱلَّذِينَ هُمْ فِى صَلَاتِهِمْ خَٰشِعُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 2. Baye bamikitisaka tango bazali kosambela.
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُمْ عَنِ ٱللَّغْوِ مُعْرِضُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 3. Mpe baye bazali kokima (makambo) maye mazanga ntina.
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُمْ لِلزَّكَوٰةِ فَٰعِلُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 4. Mpe baye bazali kobimisa zakat.
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُمْ لِفُرُوجِهِمْ حَٰفِظُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 5. Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango na ekobo,
See all translations of this verse →
إِلَّا عَلَىٰٓ أَزْوَٰجِهِمْ أَوْ مَا مَلَكَتْ أَيْمَٰنُهُمْ فَإِنَّهُمْ غَيْرُ مَلُومِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 6. Longola sé epai na basi na bango, to mpe bawumbu basi baye bazali na maboko na bango (bakoki kofanda na bango mwasi na mobali) mpo ete wana bakopamelama te.
See all translations of this verse →
فَمَنِ ٱبْتَغَىٰ وَرَآءَ ذَٰلِكَ فَأُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْعَادُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 7. Na yango, moto oyo akoluka kolekisa ndelo wana, bango nde babuki mibeko,
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُمْ لِأَمَٰنَٰتِهِمْ وَعَهْدِهِمْ رَٰعُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 8. Mpe baye bazali kobatela mabombisi (amanati) oyo bapesi bango mpe bazali kotosa mpe kokokisa bilaka bia bango.
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُمْ عَلَىٰ صَلَوَٰتِهِمْ يُحَافِظُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 9. Mpe baye bazali kobatela balosambo na bango.
See all translations of this verse →
أُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْوَٰرِثُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 10. Bango nde bakitani.
See all translations of this verse →
ٱلَّذِينَ يَرِثُونَ ٱلْفِرْدَوْسَ هُمْ فِيهَا خَٰلِدُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 11. Bakokitanelaka bisika ya likolo, na lola bakozalaka libela o kati na yango.
See all translations of this verse →
وَلَقَدْ خَلَقْنَا ٱلْإِنسَٰنَ مِن سُلَٰلَةٍ مِّن طِينٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 12. Mpe tosilaki kokela moto na mabele ya potopoto,
See all translations of this verse →
ثُمَّ جَعَلْنَٰهُ نُطْفَةً فِى قَرَارٍ مَّكِينٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 13. Sima tozalisaki ye litanga lia (mayi) ya ndembo kati ya ebombelo ya makasi.
See all translations of this verse →
ثُمَّ خَلَقْنَا ٱلنُّطْفَةَ عَلَقَةً فَخَلَقْنَا ٱلْعَلَقَةَ مُضْغَةً فَخَلَقْنَا ٱلْمُضْغَةَ عِظَٰمًا فَكَسَوْنَا ٱلْعِظَٰمَ لَحْمًا ثُمَّ أَنشَأْنَٰهُ خَلْقًا ءَاخَرَ فَتَبَارَكَ ٱللَّهُ أَحْسَنُ ٱلْخَٰلِقِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 14. Sima tokomisaki mayi liboke ya makila sima makila ekomi mosuni, sima mosuni ekomi mokuwa, sima tolatisi mokuwa mosuni, sima tosali ye ekelamu mosusu. Mapamboli manso mazali ya Allah mokeli ya malamu,
See all translations of this verse →
ثُمَّ إِنَّكُم بَعْدَ ذَٰلِكَ لَمَيِّتُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 15. Sima na yango bokokufaka ya soló,
See all translations of this verse →
ثُمَّ إِنَّكُمْ يَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ تُبْعَثُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 16. Sima bokosekwisamaka ya soló o mokolo mwa suka,
See all translations of this verse →
وَلَقَدْ خَلَقْنَا فَوْقَكُمْ سَبْعَ طَرَآئِقَ وَمَا كُنَّا عَنِ ٱلْخَلْقِ غَٰفِلِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 17. Мре tosilaki kokela o likolo na bino mapata sambo, mpe tozangaki bokebi te o tango ya bokeli.
See all translations of this verse →
وَأَنزَلْنَا مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءًۢ بِقَدَرٍ فَأَسْكَنَّٰهُ فِى ٱلْأَرْضِ وَإِنَّا عَلَىٰ ذَهَابٍۭ بِهِۦ لَقَٰدِرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 18. Mpe tozali kokitisa mayi kowuta o likolo na bokoki (mayi wana eleka ebele te), sima tovandisi yango na mabele, mpe tozali na bokoki ya kobungisa yango.
See all translations of this verse →
فَأَنشَأْنَا لَكُم بِهِۦ جَنَّٰتٍ مِّن نَّخِيلٍ وَأَعْنَٰبٍ لَّكُمْ فِيهَا فَوَٰكِهُ كَثِيرَةٌ وَمِنْهَا تَأْكُلُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 19. Mpe kowuta na yango nde tozali kobimisela bino bilanga ya naghil na a’nâb, yango wana bozali na bambuma ebele, mpe bozali kolia bisusu o kati na yango.
See all translations of this verse →
وَشَجَرَةً تَخْرُجُ مِن طُورِ سَيْنَآءَ تَنۢبُتُ بِٱلدُّهْنِ وَصِبْغٍ لِّلْـَٔاكِلِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 20. Na nzete esusu ebimi na ngomba ya sinaî, ezali kobimisa mafuta тропа bopakoli тре тропа baleyi.
See all translations of this verse →
وَإِنَّ لَكُمْ فِى ٱلْأَنْعَٰمِ لَعِبْرَةً نُّسْقِيكُم مِّمَّا فِى بُطُونِهَا وَلَكُمْ فِيهَا مَنَٰفِعُ كَثِيرَةٌ وَمِنْهَا تَأْكُلُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 21. Mpe ya soló, bibwele bizali liteya тропа bino, tozali komelisa bino maye mazali kobima na mabumu na yango (miliki) тре bizali kosalisa bino mingi, тре bozali kólia bisusu kati na yango.
See all translations of this verse →
وَعَلَيْهَا وَعَلَى ٱلْفُلْكِ تُحْمَلُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 22. Mpe na yango na bamasuwa bozali kokumbama.
See all translations of this verse →
وَلَقَدْ أَرْسَلْنَا نُوحًا إِلَىٰ قَوْمِهِۦ فَقَالَ يَٰقَوْمِ ٱعْبُدُوا۟ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنْ إِلَٰهٍ غَيْرُهُۥٓ أَفَلَا تَتَّقُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 23. Mpe tosilaki kotinda Nûh epai na bato naye alobi: Oh bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye. Boye bozali kobanga te?
See all translations of this verse →
فَقَالَ ٱلْمَلَؤُا۟ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ مِن قَوْمِهِۦ مَا هَٰذَآ إِلَّا بَشَرٌ مِّثْلُكُمْ يُرِيدُ أَن يَتَفَضَّلَ عَلَيْكُمْ وَلَوْ شَآءَ ٱللَّهُ لَأَنزَلَ مَلَٰٓئِكَةً مَّا سَمِعْنَا بِهَٰذَا فِىٓ ءَابَآئِنَا ٱلْأَوَّلِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 24. Mpe bankumu bapengwi okati na bato naye balobi: Nini oyo, azali moto lokola bino. Alingi amatela bino, soki Allah alingaka, (kotinda ntoma) mbele akitisaki ba anzelu. Makambo oyo totikala koyoka yango epai ya bankoko na biso ya kala te.
See all translations of this verse →
إِنْ هُوَ إِلَّا رَجُلٌۢ بِهِۦ جِنَّةٌ فَتَرَبَّصُوا۟ بِهِۦ حَتَّىٰ حِينٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 25. Oyo sé moto ya ligboma, bótala ye sima ya tango токе.
See all translations of this verse →
قَالَ رَبِّ ٱنصُرْنِى بِمَا كَذَّبُونِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 26. Alobi: Nkolo wa ngai, sunga ngai mpo bazwi ngai moto ya lokuta.
See all translations of this verse →
فَأَوْحَيْنَآ إِلَيْهِ أَنِ ٱصْنَعِ ٱلْفُلْكَ بِأَعْيُنِنَا وَوَحْيِنَا فَإِذَا جَآءَ أَمْرُنَا وَفَارَ ٱلتَّنُّورُ فَٱسْلُكْ فِيهَا مِن كُلٍّ زَوْجَيْنِ ٱثْنَيْنِ وَأَهْلَكَ إِلَّا مَن سَبَقَ عَلَيْهِ ٱلْقَوْلُ مِنْهُمْ وَلَا تُخَٰطِبْنِى فِى ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓا۟ إِنَّهُم مُّغْرَقُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 27. Tomonisaki naye ete; salamasuwa na miso na biso mpe na mitindo mia biso mpe tango mokano na biso ekoya mpe mayi ekobima na makasi na litumbu,(1) kotisa na kati ya masuwa balolenge ya banyama moko na moko mwasi na mobali elongo na libota nayo, longola sé baye kati na bango liloba lisengeli likokisama likolo na bango. Kasi kotuna ngai te mpo na babubi, mpo ete bakozinda mbalakaka na mayi (bakokufa).
See all translations of this verse →
فَإِذَا ٱسْتَوَيْتَ أَنتَ وَمَن مَّعَكَ عَلَى ٱلْفُلْكِ فَقُلِ ٱلْحَمْدُ لِلَّهِ ٱلَّذِى نَجَّىٰنَا مِنَ ٱلْقَوْمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 28. Mpe soki omati na masuwa yo na ba oyo ozali na bango, loba: Lokumu ya Allah oyo alongisi biso likolo ya bato mabe.
See all translations of this verse →
وَقُل رَّبِّ أَنزِلْنِى مُنزَلًا مُّبَارَكًا وَأَنتَ خَيْرُ ٱلْمُنزِلِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 29. Mpe loba: Nkolo kitisa ngai na esika ya mapamboli, mpe yo nde mokitisi ya malamu.
See all translations of this verse →
إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَٰتٍ وَإِن كُنَّا لَمُبْتَلِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 30. Ya soló, wana nde bilembo. Mpe tozali ya sólo baye topesaka komekama.
See all translations of this verse →
ثُمَّ أَنشَأْنَا مِنۢ بَعْدِهِمْ قَرْنًا ءَاخَرِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 31. Sima na bango tokelaki bato basusu.
See all translations of this verse →
فَأَرْسَلْنَا فِيهِمْ رَسُولًا مِّنْهُمْ أَنِ ٱعْبُدُوا۟ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنْ إِلَٰهٍ غَيْرُهُۥٓ أَفَلَا تَتَّقُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 32. Mpe totindelaki bango motindami kowuta kati na bango moko mpo ayebisa bango ete: Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye, boye bozali kobanga te?
See all translations of this verse →
وَقَالَ ٱلْمَلَأُ مِن قَوْمِهِ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ وَكَذَّبُوا۟ بِلِقَآءِ ٱلْـَٔاخِرَةِ وَأَتْرَفْنَٰهُمْ فِى ٱلْحَيَوٰةِ ٱلدُّنْيَا مَا هَٰذَآ إِلَّا بَشَرٌ مِّثْلُكُمْ يَأْكُلُ مِمَّا تَأْكُلُونَ مِنْهُ وَيَشْرَبُ مِمَّا تَشْرَبُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 33. Mpe bankumu kati na bato naye na baye baboya kondimela elaka ya suka mpe topesi bango bolamu awa na nsé, balobi: Ye azali moto lokola bino, aliaka biloko oyo boliaka, mpe amelaka oyo bomelaka.
See all translations of this verse →
وَلَئِنْ أَطَعْتُم بَشَرًا مِّثْلَكُمْ إِنَّكُمْ إِذًا لَّخَٰسِرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 34. Kasi soki botosi moto oyo azali lokola bino, wana bosili kozanga.
See all translations of this verse →
أَيَعِدُكُمْ أَنَّكُمْ إِذَا مِتُّمْ وَكُنتُمْ تُرَابًا وَعِظَٰمًا أَنَّكُم مُّخْرَجُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 35. Boye azali kolaka bino ete: Soki bokufi mpe bokomi putulu mpe mikuwa, ete bokobima (na malita)?
See all translations of this verse →
هَيْهَاتَ هَيْهَاتَ لِمَا تُوعَدُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 36. Mosika mosika тропа oyo bazali kolaka bino.
See all translations of this verse →
إِنْ هِىَ إِلَّا حَيَاتُنَا ٱلدُّنْيَا نَمُوتُ وَنَحْيَا وَمَا نَحْنُ بِمَبْعُوثِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 37. Wana ezali sé bomoyi ya biso oyo ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa kasi tokosekwa te.
See all translations of this verse →
إِنْ هُوَ إِلَّا رَجُلٌ ٱفْتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا وَمَا نَحْنُ لَهُۥ بِمُؤْمِنِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 38. Wana azali moto oyo azali kobukela Allah lokuta, mpe tokondimelaka ye te.
See all translations of this verse →
قَالَ رَبِّ ٱنصُرْنِى بِمَا كَذَّبُونِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 39. Alobi: Nkolo, sunga ngai mpo ete bazwi ngai moto wa lokuta.
See all translations of this verse →
قَالَ عَمَّا قَلِيلٍ لَّيُصْبِحُنَّ نَٰدِمِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 40. (Allah) alobi: Iyo; kala mingi te bakokoma na mawa.
See all translations of this verse →
فَأَخَذَتْهُمُ ٱلصَّيْحَةُ بِٱلْحَقِّ فَجَعَلْنَٰهُمْ غُثَآءً فَبُعْدًا لِّلْقَوْمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 41. Mpe ligangi esimbaki bango na bosôló, mpe tokomisaki bango lokola makasa ya kokawuka (mpe bakumbami na mayi makasi), mpe libebi тропа babubi.
See all translations of this verse →
ثُمَّ أَنشَأْنَا مِنۢ بَعْدِهِمْ قُرُونًا ءَاخَرِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 42. Sima na bango tokelaki bato basusu.
See all translations of this verse →
مَا تَسْبِقُ مِنْ أُمَّةٍ أَجَلَهَا وَمَا يَسْتَـْٔخِرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 43. Mokano ya umma(1) nyoso mokoki koleka eleko na yango te, mpe ekokutuama te.
See all translations of this verse →
ثُمَّ أَرْسَلْنَا رُسُلَنَا تَتْرَا كُلَّ مَا جَآءَ أُمَّةً رَّسُولُهَا كَذَّبُوهُ فَأَتْبَعْنَا بَعْضَهُم بَعْضًا وَجَعَلْنَٰهُمْ أَحَادِيثَ فَبُعْدًا لِّقَوْمٍ لَّا يُؤْمِنُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 44. Sima totindaki batindami na biso ya kolandisa, tango nyoso motindami akoyaka na umma moko bazui ye moto ya lokuta, mpe tolandisaki bango na bango, mpe tobetelaki bango másese (ya kokamwisa mpe kobangisa bango) mpe libebi тропа baye bandimaka te.
See all translations of this verse →
ثُمَّ أَرْسَلْنَا مُوسَىٰ وَأَخَاهُ هَٰرُونَ بِـَٔايَٰتِنَا وَسُلْطَٰنٍ مُّبِينٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 45. Sima totindaki Mûssa na ndeko waye Hânına na bilembo bia biso mpe bokonzi ya polele,
See all translations of this verse →
إِلَىٰ فِرْعَوْنَ وَمَلَإِي۟هِۦ فَٱسْتَكْبَرُوا۟ وَكَانُوا۟ قَوْمًا عَالِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 46. Epai ya falo na bankumu naye, (bato naye), basali lolendo, mpe bazalaki bato ya lolendo koleka.
See all translations of this verse →
فَقَالُوٓا۟ أَنُؤْمِنُ لِبَشَرَيْنِ مِثْلِنَا وَقَوْمُهُمَا لَنَا عَٰبِدُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 47. Balobi: Tondimela bato mibale oyo bazali lokola biso, mpe bato na bango bazali bawumbu na biso?
See all translations of this verse →
فَكَذَّبُوهُمَا فَكَانُوا۟ مِنَ ٱلْمُهْلَكِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 48. Bazui bango nyoso mibale ete bazali bato ya lokuta, mpe bazuamaki(2) kati ya baye babebisamaki. buku mpo tango mosusu bakokambama.
See all translations of this verse →
وَلَقَدْ ءَاتَيْنَا مُوسَى ٱلْكِتَٰبَ لَعَلَّهُمْ يَهْتَدُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 49. Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku mpo tango mosusu bakokambama.
See all translations of this verse →
وَجَعَلْنَا ٱبْنَ مَرْيَمَ وَأُمَّهُۥٓ ءَايَةً وَءَاوَيْنَٰهُمَآ إِلَىٰ رَبْوَةٍ ذَاتِ قَرَارٍ وَمَعِينٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 50. Mpe totiyaki mwana ya Maryam na mama waye mpo (bazala) elembo, mpe totombolaki bango nyoso mibale na esika ya likolo na ngomba, eye ezali na kimia mpe na mayi ebele.
See all translations of this verse →
يَٰٓأَيُّهَا ٱلرُّسُلُ كُلُوا۟ مِنَ ٱلطَّيِّبَٰتِ وَٱعْمَلُوا۟ صَٰلِحًا إِنِّى بِمَا تَعْمَلُونَ عَلِيمٌ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 51. Eh bino batindami! Boliya bilei ya malamu mpe bosala malamu. Ya soló, ngai nayebi maye bozali kosala.
See all translations of this verse →
وَإِنَّ هَٰذِهِۦٓ أُمَّتُكُمْ أُمَّةً وَٰحِدَةً وَأَنَا۠ رَبُّكُمْ فَٱتَّقُونِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 52. Mpe umma(1) na bino oyo ezali sé umma(2) moko, mpe ngai nde Nkolo na bino bobanga ngai.
See all translations of this verse →
فَتَقَطَّعُوٓا۟ أَمْرَهُم بَيْنَهُمْ زُبُرًا كُلُّ حِزْبٍۭ بِمَا لَدَيْهِمْ فَرِحُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 53. Mpe bakabwani(1) na makambo ya lingomba lia bango biteni biteni moto na moto azali kosepela na o ya ye.
See all translations of this verse →
فَذَرْهُمْ فِى غَمْرَتِهِمْ حَتَّىٰ حِينٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 54. Tika bango na libungi kino mwa ngonga moke.
See all translations of this verse →
أَيَحْسَبُونَ أَنَّمَا نُمِدُّهُم بِهِۦ مِن مَّالٍ وَبَنِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 55. Bazali kokanisa te, misolo na bana oyo tondimeli bango?
See all translations of this verse →
نُسَارِعُ لَهُمْ فِى ٱلْخَيْرَٰتِ بَل لَّا يَشْعُرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 56. Tozali kopesa bango bolamu na lombango. Kasi bazali koyeba te.
See all translations of this verse →
إِنَّ ٱلَّذِينَ هُم مِّنْ خَشْيَةِ رَبِّهِم مُّشْفِقُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 57. Ya soló, baye na ntina ya bobangi Nkolo wa bango, batondisami na mawa.
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُم بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمْ يُؤْمِنُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 58. Mpe baye bazali kondima na mikapo mia Nkolo wa bango.
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ هُم بِرَبِّهِمْ لَا يُشْرِكُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 59. Mpe baye basangisaka Nkolo wa bango na eloko te.
See all translations of this verse →
وَٱلَّذِينَ يُؤْتُونَ مَآ ءَاتَوا۟ وَّقُلُوبُهُمْ وَجِلَةٌ أَنَّهُمْ إِلَىٰ رَبِّهِمْ رَٰجِعُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 60. Mpe baye bazali kobimisa maye bapesi bango wana mitema mia bango mitondisami na bobangi (Nkolo wa bango), po bakozongaka epai ya Nkolo wa bango.
See all translations of this verse →
أُو۟لَٰٓئِكَ يُسَٰرِعُونَ فِى ٱلْخَيْرَٰتِ وَهُمْ لَهَا سَٰبِقُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 61. Baye wana bazali kowelisa тропа kosala bolamu, mpe bazali bato ya yambo тропа kosala (yango).
See all translations of this verse →
وَلَا نُكَلِّفُ نَفْسًا إِلَّا وُسْعَهَا وَلَدَيْنَا كِتَٰبٌ يَنطِقُ بِٱلْحَقِّ وَهُمْ لَا يُظْلَمُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 62. Mpe topesaka moto mokumba te sé oyo ekoki naye, mpe buku oyo ezali koloba bosembo ezali nde epai na biso mpe bakobubama te.
See all translations of this verse →
بَلْ قُلُوبُهُمْ فِى غَمْرَةٍ مِّنْ هَٰذَا وَلَهُمْ أَعْمَٰلٌ مِّن دُونِ ذَٰلِكَ هُمْ لَهَا عَٰمِلُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 63. Kasi mitema mia bango mitondi na libungi тропа (kurani) oyo, mpe bazali na misala misusu bazali kosala (bazali kosalela yango na lolenge esengeli te oyo Allah atindi),
See all translations of this verse →
حَتَّىٰٓ إِذَآ أَخَذْنَا مُتْرَفِيهِم بِٱلْعَذَابِ إِذَا هُمْ يَجْـَٔرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 64. Kino tokomekisaka bato ya bozwi etumbu 0 kati na bango. Mpe okomona bango bakomi koganga тропа kosenga lisalisi.
See all translations of this verse →
لَا تَجْـَٔرُوا۟ ٱلْيَوْمَ إِنَّكُم مِّنَّا لَا تُنصَرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 65. Boganga lelo te. Ya soló, bokozua lisungi na biso ata шоке te.
See all translations of this verse →
قَدْ كَانَتْ ءَايَٰتِى تُتْلَىٰ عَلَيْكُمْ فَكُنتُمْ عَلَىٰٓ أَعْقَٰبِكُمْ تَنكِصُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 66. Bozalaki koboya mikapo mia ngai miye bazalaki kotangela bino liboso,
See all translations of this verse →
مُسْتَكْبِرِينَ بِهِۦ سَٰمِرًا تَهْجُرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 67. (Bozalaki) kosalela yango lolendo mpe kotiola yango na tango miso na bino ezalaki polele.
See all translations of this verse →
أَفَلَمْ يَدَّبَّرُوا۟ ٱلْقَوْلَ أَمْ جَآءَهُم مَّا لَمْ يَأْتِ ءَابَآءَهُمُ ٱلْأَوَّلِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 68. Boye bazali komanyola liloba na oyo te (kurani) to eyeli bango oyo eyelaki bankoko na bango te?
See all translations of this verse →
أَمْ لَمْ يَعْرِفُوا۟ رَسُولَهُمْ فَهُمْ لَهُۥ مُنكِرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 69. To bayebaki motindami na bango te, mpo ete baboya ye?
See all translations of this verse →
أَمْ يَقُولُونَ بِهِۦ جِنَّةٌۢ بَلْ جَآءَهُم بِٱلْحَقِّ وَأَكْثَرُهُمْ لِلْحَقِّ كَٰرِهُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 70. To, bazali koloba ete azali ligboma? Kasi ayelaki bango na bosôló, mpe ebele na bango bazali kondima te.
See all translations of this verse →
وَلَوِ ٱتَّبَعَ ٱلْحَقُّ أَهْوَآءَهُمْ لَفَسَدَتِ ٱلسَّمَٰوَٰتُ وَٱلْأَرْضُ وَمَن فِيهِنَّ بَلْ أَتَيْنَٰهُم بِذِكْرِهِمْ فَهُمْ عَن ذِكْرِهِم مُّعْرِضُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 71. Soki bosôló eyaki тропа kolanda bamposa na bango mbele mapata mpe mabele na maye mazali okati na yango malingaki kobeba, nzoka nde toyelaki bango bokundoli(1) na bango mpe bango тропа bokundoli na bango bazali kopesa mokongo.
See all translations of this verse →
أَمْ تَسْـَٔلُهُمْ خَرْجًا فَخَرَاجُ رَبِّكَ خَيْرٌ وَهُوَ خَيْرُ ٱلرَّٰزِقِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 72. To ozali kotuna bango lifuta? Kasi lifuta ya Nkolo nayo nde ezali malamu, ye mopesi bomengo ya malamu.
See all translations of this verse →
وَإِنَّكَ لَتَدْعُوهُمْ إِلَىٰ صِرَٰطٍ مُّسْتَقِيمٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 73. Mpe ya soló, ozali kobenga bango na nzela ya semba,
See all translations of this verse →
وَإِنَّ ٱلَّذِينَ لَا يُؤْمِنُونَ بِٱلْـَٔاخِرَةِ عَنِ ٱلصِّرَٰطِ لَنَٰكِبُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 74. Mpe baye bandimaka te o mokolo mwa suka, bazali mosika na nzela yango.
See all translations of this verse →
وَلَوْ رَحِمْنَٰهُمْ وَكَشَفْنَا مَا بِهِم مِّن ضُرٍّ لَّلَجُّوا۟ فِى طُغْيَٰنِهِمْ يَعْمَهُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 75. Mpe soki topesaki bango ngolu na biso, mpe tolongola bango mpasi oyo bazalaki na yango, balingaki kotikala sé na masumu na bango mpe bakozinda mpenza kati na botomboki na bango.
See all translations of this verse →
وَلَقَدْ أَخَذْنَٰهُم بِٱلْعَذَابِ فَمَا ٱسْتَكَانُوا۟ لِرَبِّهِمْ وَمَا يَتَضَرَّعُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 76. Mpe tosilaki kopesa bango etumbu, kasi batosaki Nkolo wa bango te, mpe bamilelaki epai naye te (epai na Allah), тропа kosenga,
See all translations of this verse →
حَتَّىٰٓ إِذَا فَتَحْنَا عَلَيْهِم بَابًا ذَا عَذَابٍ شَدِيدٍ إِذَا هُمْ فِيهِ مُبْلِسُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 77. Kino tokofungolela bango ezibeli ya etumbu ya makasi, mpe bakozanga elikia (тропа bolamu ya Allah).
See all translations of this verse →
وَهُوَ ٱلَّذِىٓ أَنشَأَ لَكُمُ ٱلسَّمْعَ وَٱلْأَبْصَٰرَ وَٱلْأَفْـِٔدَةَ قَلِيلًا مَّا تَشْكُرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 78. Mpe ye nde akela тропа bino, bomoni na boyoki na mitema, kasi bozali kotondo ye sé токе.
See all translations of this verse →
وَهُوَ ٱلَّذِى ذَرَأَكُمْ فِى ٱلْأَرْضِ وَإِلَيْهِ تُحْشَرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 79. Ye nde akela bino mpe ati bino o mabele, bokosangisama epai naye.
See all translations of this verse →
وَهُوَ ٱلَّذِى يُحْىِۦ وَيُمِيتُ وَلَهُ ٱخْتِلَٰفُ ٱلَّيْلِ وَٱلنَّهَارِ أَفَلَا تَعْقِلُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 80. Ye nde mopesi bomoyi mpe mopesi liwa, mpe ye nde mokesenisi butu na mokolo, boye bozali kokanisa te?
See all translations of this verse →
بَلْ قَالُوا۟ مِثْلَ مَا قَالَ ٱلْأَوَّلُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 81. Kasi balobaki se maye bato wa yambo balobaka.
See all translations of this verse →
قَالُوٓا۟ أَءِذَا مِتْنَا وَكُنَّا تُرَابًا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبْعُوثُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 82. Balobi: Tango tokokufaka, tokokomaka putulu mpe mikuwa. Ya soló, boye tokosekwisamaka lisusu?
See all translations of this verse →
لَقَدْ وُعِدْنَا نَحْنُ وَءَابَآؤُنَا هَٰذَا مِن قَبْلُ إِنْ هَٰذَآ إِلَّآ أَسَٰطِيرُ ٱلْأَوَّلِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 83. Basila kolaka biso na batata na biso liboso тропа oyo, yango ezali sé masapo ya kala.
See all translations of this verse →
قُل لِّمَنِ ٱلْأَرْضُ وَمَن فِيهَآ إِن كُنتُمْ تَعْلَمُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 84. Loba: Mabele na oyo ezali okati na yango ezali ya nani? Soki soló bozali koyeba.
See all translations of this verse →
سَيَقُولُونَ لِلَّهِ قُلْ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 85. Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bozali kokanisa te?
See all translations of this verse →
قُلْ مَن رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ ٱلسَّبْعِ وَرَبُّ ٱلْعَرْشِ ٱلْعَظِيمِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 86. Loba: Mapata sambo ezali ya nani, тре nani Nkolo ngwende ya monene?
See all translations of this verse →
سَيَقُولُونَ لِلَّهِ قُلْ أَفَلَا تَتَّقُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 87. Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bokobanga te?
See all translations of this verse →
قُلْ مَنۢ بِيَدِهِۦ مَلَكُوتُ كُلِّ شَىْءٍ وَهُوَ يُجِيرُ وَلَا يُجَارُ عَلَيْهِ إِن كُنتُمْ تَعْلَمُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 88. Loba: Bokonzi bonso bosimbami na maboko ya nani? Azali kobatela, kasi babatelaka ye te, soki ya soló bozali koyeba?
See all translations of this verse →
سَيَقُولُونَ لِلَّهِ قُلْ فَأَنَّىٰ تُسْحَرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 89. Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Kasi тропа nini bozali lokola balokami? (тропа kozanga na bango kondima na bomoko ya nzambe).
See all translations of this verse →
بَلْ أَتَيْنَٰهُم بِٱلْحَقِّ وَإِنَّهُمْ لَكَٰذِبُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 90. Tomemelaki bango bosóló, kasi bango nde bato ya lokuta.
See all translations of this verse →
مَا ٱتَّخَذَ ٱللَّهُ مِن وَلَدٍ وَمَا كَانَ مَعَهُۥ مِنْ إِلَٰهٍ إِذًا لَّذَهَبَ كُلُّ إِلَٰهٍۭ بِمَا خَلَقَ وَلَعَلَا بَعْضُهُمْ عَلَىٰ بَعْضٍ سُبْحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يَصِفُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 91. Allah azali na mwana te, mpe ezali na nzambe mosusu te elongo naye, noki te, nzambe na nzambe alingaki kokende na bikelamu naye mpe basusu balingaki kozala likolo ya baninga. Nkembo mpe lokumu na Allah likolo ya maye bazali kolobela.
See all translations of this verse →
عَٰلِمِ ٱلْغَيْبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ فَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشْرِكُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 92. Ayebi mabombami mpe makambo ya polele, azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango.
See all translations of this verse →
قُل رَّبِّ إِمَّا تُرِيَنِّى مَا يُوعَدُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 93. Loba: Nkolo; soki olakisaki ngai maye balakami.
See all translations of this verse →
رَبِّ فَلَا تَجْعَلْنِى فِى ٱلْقَوْمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 94. (Na yango) Nkolo, kotika ngai o kati ya babubi te.
See all translations of this verse →
وَإِنَّا عَلَىٰٓ أَن نُّرِيَكَ مَا نَعِدُهُمْ لَقَٰدِرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 95. Ya soló, tozali na bokoki ya kolakisa yo maye tolaki bango.
See all translations of this verse →
ٱدْفَعْ بِٱلَّتِى هِىَ أَحْسَنُ ٱلسَّيِّئَةَ نَحْنُ أَعْلَمُ بِمَا يَصِفُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 96. Bengana mabe (kobongola) na kosala bolamu. Soló, toyebi malamu maye bazali kolobela.
See all translations of this verse →
وَقُل رَّبِّ أَعُوذُ بِكَ مِنْ هَمَزَٰتِ ٱلشَّيَٰطِينِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 97. Mpe loba Nkolo nazali kosenga nayo libateli тропа botombokisi ya basatana.
See all translations of this verse →
وَأَعُوذُ بِكَ رَبِّ أَن يَحْضُرُونِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 98. Mpe nazali kosenga nayo libateli Nkolo, ete bazala pene na ngai te.
See all translations of this verse →
حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءَ أَحَدَهُمُ ٱلْمَوْتُ قَالَ رَبِّ ٱرْجِعُونِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 99. Kino soki liwa ekomeli moko kati na bango akolobaka: Nkolo wa ngai, zongisa ngai.
See all translations of this verse →
لَعَلِّىٓ أَعْمَلُ صَٰلِحًا فِيمَا تَرَكْتُ كَلَّآ إِنَّهَا كَلِمَةٌ هُوَ قَآئِلُهَا وَمِن وَرَآئِهِم بَرْزَخٌ إِلَىٰ يَوْمِ يُبْعَثُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 100. Mpo nasala bolamu na maye natikaki na mokili, te, kasi ezali sé liloba oyo alobi, osima na bango ezali na ndelo, kino omokolo ya bosekwisami.
See all translations of this verse →
فَإِذَا نُفِخَ فِى ٱلصُّورِ فَلَآ أَنسَابَ بَيْنَهُمْ يَوْمَئِذٍ وَلَا يَتَسَآءَلُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 101. Мре tango bakobetaka to kofula kelelo, mokolo wana kibondeko ekozalaka te, mpe bakotunanaka mituna te.
See all translations of this verse →
فَمَن ثَقُلَتْ مَوَٰزِينُهُۥ فَأُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْمُفْلِحُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 102. Baye emekelo na bango ekoleka kilo mingi, (тропа bolamu), bango nde balongi.
See all translations of this verse →
وَمَنْ خَفَّتْ مَوَٰزِينُهُۥ فَأُو۟لَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓا۟ أَنفُسَهُمْ فِى جَهَنَّمَ خَٰلِدُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 103. Mpe baye emekelo na bango ekozalaka fafala, bango moko nde bamibungisaki, mpe bakokotaka lifelo, mpe bakozalaka libela o kati na yango.
See all translations of this verse →
تَلْفَحُ وُجُوهَهُمُ ٱلنَّارُ وَهُمْ فِيهَا كَٰلِحُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 104. Moto mokozikisa bilongi bia bango, mpe bakozala o kati na yango na mbebo yakozikisama.
See all translations of this verse →
أَلَمْ تَكُنْ ءَايَٰتِى تُتْلَىٰ عَلَيْكُمْ فَكُنتُم بِهَا تُكَذِّبُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 105. Mitangelama bino mikapo mia ngai te, kasi bozalaki kondimela yango te?
See all translations of this verse →
قَالُوا۟ رَبَّنَا غَلَبَتْ عَلَيْنَا شِقْوَتُنَا وَكُنَّا قَوْمًا ضَآلِّينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 106. Bakolobaka: Nkolo wa biso, bamabe na biso elongi biso mpe tozalaki babungi nzela.
See all translations of this verse →
رَبَّنَآ أَخْرِجْنَا مِنْهَا فَإِنْ عُدْنَا فَإِنَّا ظَٰلِمُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 107. Nkolo wa biso, bimisa biso okati na yango, mpe soki tozongeli, tokozala babubi.
See all translations of this verse →
قَالَ ٱخْسَـُٔوا۟ فِيهَا وَلَا تُكَلِّمُونِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 108. Alobi: Botikala na kati na kozanga lokumu, mpe bolobisa ngai te.
See all translations of this verse →
إِنَّهُۥ كَانَ فَرِيقٌ مِّنْ عِبَادِى يَقُولُونَ رَبَّنَآ ءَامَنَّا فَٱغْفِرْ لَنَا وَٱرْحَمْنَا وَأَنتَ خَيْرُ ٱلرَّٰحِمِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 109. Ya soló, Ezalaki na lisanga moko ya bawumbu na ngai bakolobaka: Nkolo wa biso, tondimi, limbisa biso mpe yokela biso mawa. Ya soló, yo ozali wa ngolu otanda bolamu.
See all translations of this verse →
فَٱتَّخَذْتُمُوهُمْ سِخْرِيًّا حَتَّىٰٓ أَنسَوْكُمْ ذِكْرِى وَكُنتُم مِّنْهُمْ تَضْحَكُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 110. Kasi botiolaki bango, kino ebosanisi bino kokumisa ngai, mpe bozalaki koseka bango
See all translations of this verse →
إِنِّى جَزَيْتُهُمُ ٱلْيَوْمَ بِمَا صَبَرُوٓا۟ أَنَّهُمْ هُمُ ٱلْفَآئِزُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 111. Ya sólo, lelo nazali kofuta bango тропа oyo bazalaki na bozeli na yango. Ya sólo, bango nde balongi.
See all translations of this verse →
قَٰلَ كَمْ لَبِثْتُمْ فِى ٱلْأَرْضِ عَدَدَ سِنِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 112. Bakotunaka bango, mibu boni bolekisaki o kati ya mokili?
See all translations of this verse →
قَالُوا۟ لَبِثْنَا يَوْمًا أَوْ بَعْضَ يَوْمٍ فَسْـَٔلِ ٱلْعَآدِّينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 113. Bakolobaka: Tovandaki mokolo moko to ndambu ya mokolo, tuna batangi ya motango na yango. (baye bayebi kotanga mikolo miye havandaki)
See all translations of this verse →
قَٰلَ إِن لَّبِثْتُمْ إِلَّا قَلِيلًا لَّوْ أَنَّكُمْ كُنتُمْ تَعْلَمُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 114. Akolobaka: Bovandaki sé tango ya mokie, ya sólo soki bozali koyeba.
See all translations of this verse →
أَفَحَسِبْتُمْ أَنَّمَا خَلَقْنَٰكُمْ عَبَثًا وَأَنَّكُمْ إِلَيْنَا لَا تُرْجَعُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 115. Boye bozali kokanisa ete tokelaki bino natina te, mpe bokozongisama epai na biso te?
See all translations of this verse →
فَتَعَٰلَى ٱللَّهُ ٱلْمَلِكُ ٱلْحَقُّ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ رَبُّ ٱلْعَرْشِ ٱلْكَرِيمِ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 116. Lokumu na Allah wa likolo mokonzi ya sólo. Nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye (mei) Nkolo ngwende ya lokumu.
See all translations of this verse →
وَمَن يَدْعُ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ لَا بُرْهَٰنَ لَهُۥ بِهِۦ فَإِنَّمَا حِسَابُهُۥ عِندَ رَبِّهِۦٓ إِنَّهُۥ لَا يُفْلِحُ ٱلْكَٰفِرُونَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 117. Mpe oyo akobondela elongo na Allah nzambe mosusu, azali na elembetele na yango ya polele te, ya soló lifuta naye mokozalaka sé epai ya Nkolo waye. Ya soló, bapengwi bakolonga te.
See all translations of this verse →
وَقُل رَّبِّ ٱغْفِرْ وَٱرْحَمْ وَأَنتَ خَيْرُ ٱلرَّٰحِمِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo 118. Mpe loba: Nkolo limbisa mpe tiya ngolu, yo nde oleki na ngolu.
See all translations of this verse →
← Surah Al-Hajj
Surah An-Noor →
Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
→
Arabic text and translations via Tanzil and QuranEnc — verbatim, unmodified · Translations belong to their translators and are not the Qur'an itself
This is a research aid, not a source of religious rulings.