Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Mosali ekobo ya mwasi mpe mosali ekobo ya mobali, bobeta bango fimbo mokama moko, kasi boyokela bango mawa te tango bozali kokweisela bango mibeko mia lingomba lia Allah, soki solo bozali kondima na Allah mpe mokolo ya suka, mpe ndambu ya bandimi bazala tango etumbu ezali kopesamela bango mibale.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Mosali ekobo ya mobali akoki kobala te sé mosali ekobo ya mwasi to mopengwi ya mwasi, mpe mosali ekobo ya mwasi akoki kobala te sé mosali ekobo ya mobali to mopengwi yamobali, kasi wana eboyami тропа bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Mpe тропа baye oyo bafundi(2) basi na bango bango moko, kasi bazali na banzeneneke te, esengeli na moko kati na bango kotatola mbala minei na nkombo ya Allah ete azali koloba bosembo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Mpe ya mbala ya mitano ezali ete: Kanda ya Allah ekozala likolo naye (mwasi) soki (mobali) azali kati ya balobi solo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Мре soki mpo na bolamu ya Allah na mawa naye likolo na bino te ya soló Allah azali moyambi tubela atonda bwanya.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Ya soló baye bay aki na lokuta (kopanza yango kati na mboka) ezali lisanga ya bato kati na bino, bomona yango mabe te kasi ezali malamu тропа bino, moko na moko kati na bango azui lisumu naye, kasi oyo kati na bango azui eteni ya monene, akozua etumbu ya monene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Mpona nini te tango boyokaki yango,(1) bandimi ya mibali na ya basi esengeli bakanisa malamu kati na bango, mpe baloba: Oyo ezali lokuta ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Mpona nini bamemaki te mpona yango banzeneneke minei? Kasi soki bamemi banzeneneke te, baye wana epai ya Allah bazali bato ya lokuta.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Mpe soki bolamu na ngolu ya Allah ezalaka likolo na bino te o kati na mokili mpe o mokolo ya suka, etumbu makasi elingaki kozua bino mpona maye bosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Tango bino moko bozali kobota yango na balolemo na bino mpe bozali koloba yango na minoko na bino oyo bozali na boyebi na yango te mpe bozali kornona yango шоке, kasi yango epai ya Allah ezali monene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Ya soló, baye balingaka sé kopanza mabe o kati ya bandimi, bakozalaka na etumbu ya makasi awa na mokili mpe na mokolo mwa suka. Mpe Allah ayebi kasi bino boyebi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Eh bino baye bondima! В olanda makolo (nzela) ya satana te, oyo akolanda makolo naye, (boyeba ete) ya sólo, ye atindaka na mobulu mpe na mabe mpe soki Allah alingelaka bino bolamu na mawa naye te, alingaki kopetola moto o kati na bino te, kasi Allah apetolaka oyo alingi, mpe Allah azali moyoki atonda boyebi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Mpe bato ya bomengo mpe ya bolamu kati na bino balapa te ete bakosalisa lisusu bandeko ba bango te, babola mpe te, bakosalisa mpe ba oyo babimi na nzela ya Allah te, esengeli na bango kolimbisa mpe kobosana, bokosepela te ete Allah alimbisa bino? Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Ya sôló, baye bazali kofinga mpe kopanzela basi ya malamu baye bakanisaka kosala mabe te (ekobo), okati ya bandimi ya basi, bapesami botutu awa o nsé mpe o mokolo mwa suka, mpe bakozalaka na etumbu ekasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Mokolo mona Allah akopesaka bango lifuta na bango na bosembo, mpe bakoyebaka ete ya sólo, Allah azali wa bosôló polele koleka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Basi ya mabe тропа mibali ya mabe mpe mibali ya mabe тропа basi ya mabe, lolenge moko basi ya malamu тропа mibali ya malamu, mpe mibali ya malamu тропа basi ya malamu. Bango wana nde bazali mosika na makambo ya mabe oyo bato bazali koloba, bazali na bolimbisi mpe bozui ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Eh, bino baye bondima! Bokota na bandako oyo bizali bandako bia bino te, kino ete bosenga ndingisa, mpe bopesa mbote ya boboto epai ya bato na yango. Wana ezali malamu тропа bino mpo bokoka kokanisa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Soki bokuti moto o kati na yango te, bokota te, kino bapesa bino ndingisa, mpe soki bayebisi bino ete bozonga, bozonga, wana ezali malamu тропа bino. Mpe Allah ayebi maye bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Epekisami na bino te kokota o bandako biye bato bazali na kati te mpe bolamu na bino ezali nakati. Mpe Allah ayebi maye bozali kobimisa polele mpe maye bozali kobomba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Loba na bandimi bakitisa miso ma bango mpe babatela mitakala mia bango, wana ezali malamu тропа bango. Ya soló, Allah azali na basango ya maye bazali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Мре loba na bandimi ya (basi), bakitisa miso ma bango mpe babatela mitakala mia bango mpe balakisa bonzenga na bango te sé oyo ekoki komonana, mpe bakanga kitambala na bango ya monene kino ezipa bantolo na bango, kasi bonzenga ma bango balakisa yango sé epai ya mibali na bango, to epai ya batata na bango to batata ya mibali na bango to bana na bango to epai ya bana ya mibali na bango, to bandeko na bango to bana ya bandeko na bango ya mibali, to bana ya bandeko na bango ya basi, to bandimi ya basi, to bawumbu na bango, to basali ya mibali baye kimobali na bango esalaka te, to bana ya mike baye bayebi makambo ya basi te, mpe babeta makolo na bango makasi te na mabele тропа komonisa oyo ebombami na bonzenga na bango mpe botubela epai ya Allah bino banso, eh bino bandimi mpo ete bolonga.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Mpe bobalisa banzemba kati na bino mpe bawumbu na bino ya malumu (basi mpe mibali), soki bazali na misolo te, Allah akopesa bango misolo ebele na bolingi bwa ye, mpe Allah azali mofungoli monene atondo boyebi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Мре тропа baye bazui naino makoki ya libala te, ba mibatela kino Allah akopesa bango bozui na ngolu naye, mpe baye okati ya bawumbu na bino baye balingi boyokani na bino, na ntina ete basikolama, tika ete boyokana na bango soki boyebi ete bolamu ezali kati na bango, тре bopesa bango misolo mia Allah miye apesa bino. Botinda te na makasi bilenge basi bawumbu bábino baye basepeli komibatela ete basala ekobo, na posa ete bozua bomengo ya bomoi ya nsé. Oyó okati na bino akosalisa bango ekobo na makasi, sima ya kotinda bango na makasi, ya soló Allah, azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Mpe tosilaki kokitisela bino mikapo mia polele, mpe topesaki ndakisa ya baye oyo balekaki liboso na bino mpe mateya тропа babangi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Allah azali bongengi ya likolo na mabele, bongengi naye ezali lokola ndako ezali na mwinda, mwinda yango efandi na sani ya molangi, oyo ezali kongenga lokola monzoto ezali kopesa bongengi kowuta na nzete ya zaîtûn(1) oyo epambwama enyele mpe eloli te, ezali na mafuta mazali kopesa bongengi ata soki moto ezui yango te, bongengi likolo na bongengi. Allah akambaka o bongengi naye moto nani alingi, mpe Allah abetaka ndakisa epai ya bato, mpe Allah azali na boyebi ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Kati na bandako oyo(1) Allah apesaki ndingisa ya kotelemisa yango mpo batanga nkombo naye na kati mpe basanzola ye na kati tongo mpe nsima ya nzanga,
Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Mpo Allah afuta bango na lolenge ya malamu, тропа maye basalaki mpe abakisela bango bolamu bwa ye, Allah apesaka bozui na oyo alingi ezali na motango te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Mpe baye bapengwa, misala mia bango mizali lokola elilingi nakati ya esobe. Oyo mposa ya mayi eleki ye akolanda yango mpe akokuta eloko te, mpe akokuta Allah nde akopesa ye mbano naye. Mpe Allah azali lombango na kofuta.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Allah nde mokeli wa banyama binso kowuta na mayi, bisusu bizali kotambola na libumu na yango, mpe bisusu bizali kotambola na makolo mibale, mpe kati na yango biye bizali kotambola na makolo minei, Allah akelaka oyo alingi. Ya solo, Allah azali na bokoki тропа biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Mpe bakolobaka(1): Tondimi na Allah na motindami, mpe totosi, sima na yango basusu kati na bango baboyi bapesi mikongo. Kasi bazali bandimi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Mpe tango bakobenga bango baya epai na Allah na motindami wa ye, mpo akata (makambo) kati na bango, okomona basusu kati na bango baboyi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Boye mitema mia bango mizali na bokono to bazali kotiya tembe? To bazali kobanga ete Allah na motindami naye babuba bango, kasi bango nde bazali babubi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Ya soló, liloba ya bandimi ezalaka soki babengi bango epai ya Allah na motindami waye mpo akata (makambo) kati na bango, bakoloba: Toyoki mpe totosi, mpe baye wana nde balongi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo53. Bazali kolapa bandayi ya polele ete soki otindi bango (тропа kobunda) bakobimaka, loba: Bolapa te botosi (ya bino ya lokuta) eyebani. Allah ayebi na malamu maye bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo54. Loba: Botosa Allah mpe botosa motindami, mpe soki bapesi mokongo, (motindami) akozala na mokumba sé oyo bapesi ye, bino mpe bozali na mikumba na bino, mpe soki botosi ye bokokambama. Mpe motindami azali sé тропа kokomisa sango ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Allah asila kolaka epai ya baye bandimi okati na bino, mpe bazali kosala misala ya malamu, bango nde bakozala bakitani o kati na mabele, lolenge akitanisaki baye bazalaki liboso na bango, mpe a kolendisa тропа bango ligomba na bango oyo asepeli тропа bango тре akobongolaka sima ya kobanga na bango ya kala ezala kimiya. Babondelaka ngai kasi basangisaka ngai na eloko te, mpe oyo akopengwa sima na yango, bango nde babebisi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo57. Kokanisa te ete bapagano bakolonga bokonzi ya Allah kati na mabele. Mpe esika na bango nde moto, oyo ezali esika ya mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. Eh bino baye bondima! Bawumbu na bino basenga bino ndingisa yambo ya kokotela bino, ndenge moko mpe ba oyo kati na bino bakokisi naino mibu ya mikolo te, mbala misato: Liboso ya sambela ya ntongo, mpe na ngonga ya nzanga tango bozali kolongola bilamba na nzoto, mpe sima ya sambela ya butu, wana nde bangonga misato ya bolumbu pona bino, kasi ezali mabe te тропа bino na bango kokende kotalana sima ya bangonga oyo etangami awa, lolenge wana nde Allah azali kolimbola mikapo mia ye polele тропа bino. Allah azali moyebi atondo bwanya.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Мре soki bana kati na bino bakoli, basenga ndingisa ndenge bayambo babango mpe bazalaka kosenga ndingisa, ndenge wana nde Allah azali kolimbolela bino mikapo mia ye. Mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo61. Epekisami te тропа mokufi miso, na moto ya tengu, na moto ya bokono, na bino na bino na libota moko ete bolia na bandako ya bino, to bandako ya batata na bino, to bandako ya bamama na bino, to bandako ya bandeko na bino ya mibali, to bandako ya bandeko na bino ya basi, to ya batata kulutu na batata leki na bino, to ya batata mwasi na bino, to ya banoko na bino, to ya bamama kulutu na bino mpe bamama leki na bino, to na bandako oyo bosimbi bafungola na yango, to ya baninga na bino, ezali mabe te тропа bino kólia na lisanga to ya kokabuana, mpe soki bokoti na bandako bopesana mbote (ya kimia) losako ya mapamboli mpe ya kitoko mowuta epai na Allah. Ndenge wana nde Allah azali kolimbola bino mikapo naye mpo ete bososola.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Bandimi ya soló, bazali baye bandimi na Allah na motindami naye, mpe soki bafandi naye тропа likambo ya lisanga(1), bakoki kokende te kino bako senga ye nzela. Ya sólo, ba oyo bazali kosenga yo nzela bango nde bandimi ya sólo na Allah na motindami naye. Mpe soki basengi yo nzela тропа mwa likambo na bango ndimela na oyo olingi kati na bango mpe sengela bango bolimbisi epai na Allah. Ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo63. Bozua ebengeli ya motindami te lokola ebengeli kati na bino na bino. Allah asili koyeba ba oyo kati na bino bamibendaka na kobatama, baye bazali kotelemela mibeko naye bakeba ete komekama eyela bango to etumbu ya makasi ezua bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Boyeba ete ya soló, maye manso mazali o likolo mpe o nsé mazali ya Allah, ya soló, ayebi malamu maye bozali na yango, mpe mokolo moye bakozongisama epai naye, akoyebisa bango na maye basalaki mpe Allah nde moyebi wa makambo manso.