caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah An-Nahl النحل

128 verses · Mecca · revelation order 70

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ أَتَىٰٓ أَمْرُ ٱللَّهِ فَلَا تَسْتَعْجِلُوهُ سُبْحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشْرِكُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Mokano mwa Allah ezali koya, kasi bowelisa yango te. Nkembo naye azali likolo koleka na maye bazali kosangisa ye na yango.

See all translations of this verse →

يُنَزِّلُ ٱلْمَلَٰٓئِكَةَ بِٱلرُّوحِ مِنْ أَمْرِهِۦ عَلَىٰ مَن يَشَآءُ مِنْ عِبَادِهِۦٓ أَنْ أَنذِرُوٓا۟ أَنَّهُۥ لَآ إِلَٰهَ إِلَّآ أَنَا۠ فَٱتَّقُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Azali kokitisa ba anzelu na emoniseli (buku) na mokano naye, likolo ya moto oyo alingi kati ya bawumbu naye ete: Bokebisa ete ezali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ngai, na yango bobanga ngai.

See all translations of this verse →

خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضَ بِٱلْحَقِّ تَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشْرِكُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Akela likolo na mabele na bosóló, azali likolo lia baye bazali kosangisa (ye).

See all translations of this verse →

خَلَقَ ٱلْإِنسَٰنَ مِن نُّطْفَةٍ فَإِذَا هُوَ خَصِيمٌ مُّبِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Akeli moto na litanga ya mayi (ya mokongo), sima na yango moto akomi kotia tembe.

See all translations of this verse →

وَٱلْأَنْعَٰمَ خَلَقَهَا لَكُمْ فِيهَا دِفْءٌ وَمَنَٰفِعُ وَمِنْهَا تَأْكُلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Mpe akeli тропа bino bibwele, na yango bozali kozua ba mposo pona kosala bilamba na ba bolamu misusu, mpe misusu pona kolia.

See all translations of this verse →

وَلَكُمْ فِيهَا جَمَالٌ حِينَ تُرِيحُونَ وَحِينَ تَسْرَحُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Mpe esepelisaka bino na bonzenga tango bozongisaka yango na ndako na pokwa, mpe tango bobimisaka yango (na tongo) тропа kólia matiti.

See all translations of this verse →

وَتَحْمِلُ أَثْقَالَكُمْ إِلَىٰ بَلَدٍ لَّمْ تَكُونُوا۟ بَٰلِغِيهِ إِلَّا بِشِقِّ ٱلْأَنفُسِ إِنَّ رَبَّكُمْ لَرَءُوفٌ رَّحِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Mpe (bisusu) bizali komemela bino mikumba kokende na yango mboka bisusu biye bizali paši тропа bino кокота. Ya soló, Nkolo wa bino azali wa ngolu atonda mawa.

See all translations of this verse →

وَٱلْخَيْلَ وَٱلْبِغَالَ وَٱلْحَمِيرَ لِتَرْكَبُوهَا وَزِينَةً وَيَخْلُقُ مَا لَا تَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Mpe bampunda na ba bighal(1) na ba hamir(2) mpo bomatela yango na botamboli, mpe misusu mizali sé кака тропа bonzenga. Мре azali kokela maye bino boyebi te.

See all translations of this verse →

وَعَلَى ٱللَّهِ قَصْدُ ٱلسَّبِيلِ وَمِنْهَا جَآئِرٌ وَلَوْ شَآءَ لَهَدَىٰكُمْ أَجْمَعِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Allah nde alakisaka nzela ya semba na bolamu naye. Kasi soki alingaki, nde akambi bino banso na nzela ya semba.

See all translations of this verse →

هُوَ ٱلَّذِىٓ أَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءً لَّكُم مِّنْهُ شَرَابٌ وَمِنْهُ شَجَرٌ فِيهِ تُسِيمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Yende akitisaka mayi kowuta na mapata тропа komela, mpe ezali kobotisa matiti na milona oyo bozali koleisa na yango bibwele,

See all translations of this verse →

يُنۢبِتُ لَكُم بِهِ ٱلزَّرْعَ وَٱلزَّيْتُونَ وَٱلنَّخِيلَ وَٱلْأَعْنَٰبَ وَمِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً لِّقَوْمٍ يَتَفَكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Azali kobotisela bino milona mizali kobimisa nzete ya zaítún(1) mpe nzete ya tamru na a’náb(1) na bambuma ya ndenge na ndenge. Ya sólo, wana ezali elembo mpo bato basosolo.

See all translations of this verse →

وَسَخَّرَ لَكُمُ ٱلَّيْلَ وَٱلنَّهَارَ وَٱلشَّمْسَ وَٱلْقَمَرَ وَٱلنُّجُومُ مُسَخَّرَٰتٌۢ بِأَمْرِهِۦٓ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَٰتٍ لِّقَوْمٍ يَعْقِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Мре atieli bino butu na mokolo na moyi na sanza mpe na minzoto mizali kotambola na mitindo mia ye. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakoka koyeba.

See all translations of this verse →

وَمَا ذَرَأَ لَكُمْ فِى ٱلْأَرْضِ مُخْتَلِفًا أَلْوَٰنُهُۥٓ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً لِّقَوْمٍ يَذَّكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Mpe oyo akeli тропа bino o kati na mokili ezali na balangi ebele. Ya sólo, wana ezali elembo mpo bato bakoka kokanisa.

See all translations of this verse →

وَهُوَ ٱلَّذِى سَخَّرَ ٱلْبَحْرَ لِتَأْكُلُوا۟ مِنْهُ لَحْمًا طَرِيًّا وَتَسْتَخْرِجُوا۟ مِنْهُ حِلْيَةً تَلْبَسُونَهَا وَتَرَى ٱلْفُلْكَ مَوَاخِرَ فِيهِ وَلِتَبْتَغُوا۟ مِن فَضْلِهِۦ وَلَعَلَّكُمْ تَشْكُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Mpe ye nde akeli ebale, okati na yango bozali kozua mișuni ya kitoko ya kolia, mpe bozali kozua okati na yango bonzenga ya molato, mpe okomona masuwa ya minene mazali koleka na ebale na lokito ya makasi, mpo ete boluka mapamboli naye, mpe mpo ete na yango bokoka kotondo (ye).

See all translations of this verse →

وَأَلْقَىٰ فِى ٱلْأَرْضِ رَوَٰسِىَ أَن تَمِيدَ بِكُمْ وَأَنْهَٰرًا وَسُبُلًا لَّعَلَّكُمْ تَهْتَدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Mpe apika bangomba o kati na mabele тропа boningani na yango esala bino mabe te, mpe mingala na banzela, mpo bokoka kokambama.

See all translations of this verse →

وَعَلَٰمَٰتٍ وَبِٱلنَّجْمِ هُمْ يَهْتَدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Mpe na bilembo bisusu (bizali kolakisa bino nzela), ndenge moko minzoto mpo ete babunga te.

See all translations of this verse →

أَفَمَن يَخْلُقُ كَمَن لَّا يَخْلُقُ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Boye, oyo akelaka azali lokola oyo akelaka te? Boye bozali kokanisa te?

See all translations of this verse →

وَإِن تَعُدُّوا۟ نِعْمَةَ ٱللَّهِ لَا تُحْصُوهَآ إِنَّ ٱللَّهَ لَغَفُورٌ رَّحِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Mpe soki bolingi kotanga bolamu bwa Allah, bokokoka koyeba motango mwa yango te, ya solo Allah azali molimbisi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

وَٱللَّهُ يَعْلَمُ مَا تُسِرُّونَ وَمَا تُعْلِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Mpe Allah ayebi maye bozali kobomba na maye bozali komonisa polele.

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ يَدْعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ لَا يَخْلُقُونَ شَيْـًٔا وَهُمْ يُخْلَقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Na baye wana bazali kobondela basusu mpe kotika Allah bakela eloko te, mpe bango bakelama.

See all translations of this verse →

أَمْوَٰتٌ غَيْرُ أَحْيَآءٍ وَمَا يَشْعُرُونَ أَيَّانَ يُبْعَثُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Bazali bakufi kasi bazali na bomoyi te, mpe bayebi te mokolo nini bakosekwisama.

See all translations of this verse →

إِلَٰهُكُمْ إِلَٰهٌ وَٰحِدٌ فَٱلَّذِينَ لَا يُؤْمِنُونَ بِٱلْـَٔاخِرَةِ قُلُوبُهُم مُّنكِرَةٌ وَهُم مُّسْتَكْبِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Nzambe wa bino (Allah) azali Nzambe sé moko ya kobondela na bosôló, mpe baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, mitema mia bango miboya bomoko bwa Allah, mpe batondi na lolendo.

See all translations of this verse →

لَا جَرَمَ أَنَّ ٱللَّهَ يَعْلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعْلِنُونَ إِنَّهُۥ لَا يُحِبُّ ٱلْمُسْتَكْبِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Ezali na tembe te ete Allah ayebi maye bazali kobomba na maye bazali komonisa polele, ya soló ye alingaka bato ya lolendo te.

See all translations of this verse →

وَإِذَا قِيلَ لَهُم مَّاذَآ أَنزَلَ رَبُّكُمْ قَالُوٓا۟ أَسَٰطِيرُ ٱلْأَوَّلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Mpe soki batuni bango, nini Nkolo wa bino akitisa? Bakolobaka: Ezali masapo makala.

See all translations of this verse →

لِيَحْمِلُوٓا۟ أَوْزَارَهُمْ كَامِلَةً يَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ وَمِنْ أَوْزَارِ ٱلَّذِينَ يُضِلُّونَهُم بِغَيْرِ عِلْمٍ أَلَا سَآءَ مَا يَزِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Mpo été mokolo mwa suka bamema mikumba mia bango mibimba, na mikumba ya baye bango babungisaki na kozanga mayele. Boye ezali mabe te mikumba ya motindo oyo!

See all translations of this verse →

قَدْ مَكَرَ ٱلَّذِينَ مِن قَبْلِهِمْ فَأَتَى ٱللَّهُ بُنْيَٰنَهُم مِّنَ ٱلْقَوَاعِدِ فَخَرَّ عَلَيْهِمُ ٱلسَّقْفُ مِن فَوْقِهِمْ وَأَتَىٰهُمُ ٱلْعَذَابُ مِنْ حَيْثُ لَا يَشْعُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Baye balekaki liboso na bango basilaka kosala likita ya mabe, mpe Allah abetaki na nsé ya misisa ya ndako na bango mpe likolo na yango ekwelaki bango mpe etumbu ezuaki bango o esika bazalaki kokanisa te.

See all translations of this verse →

ثُمَّ يَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ يُخْزِيهِمْ وَيَقُولُ أَيْنَ شُرَكَآءِىَ ٱلَّذِينَ كُنتُمْ تُشَٰٓقُّونَ فِيهِمْ قَالَ ٱلَّذِينَ أُوتُوا۟ ٱلْعِلْمَ إِنَّ ٱلْخِزْىَ ٱلْيَوْمَ وَٱلسُّوٓءَ عَلَى ٱلْكَٰفِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Sima o mokolo mwa suka, akokitisa bango na kosila lokumu, (na lolenge ya mabe) mpe sima akolobaka na bango ete: Wapi bambanda na ngai oyo bozalaki kobunda тропа bango? Bato ya mayele bakolobaka été; ya soló, mabe ekokitisama lelo epai ya bapagano.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ تَتَوَفَّىٰهُمُ ٱلْمَلَٰٓئِكَةُ ظَالِمِىٓ أَنفُسِهِمْ فَأَلْقَوُا۟ ٱلسَّلَمَ مَا كُنَّا نَعْمَلُ مِن سُوٓءٍۭ بَلَىٰٓ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمٌۢ بِمَا كُنتُمْ تَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Baye ba anzelu babomaka bango тропа bobubi bwa bango moko, na yango bakokitisama, mpe bakolobaka: Tozalaki kosala mabe te, kasi Allah ayebi maye bozalaki kosala.

See all translations of this verse →

فَٱدْخُلُوٓا۟ أَبْوَٰبَ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَا فَلَبِئْسَ مَثْوَى ٱلْمُتَكَبِّرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Bokota na bikuke ya lifelo, libela kati na yango, etumbu kani ya mabe eye bato ya lolendo bakozuaka!

See all translations of this verse →

وَقِيلَ لِلَّذِينَ ٱتَّقَوْا۟ مَاذَآ أَنزَلَ رَبُّكُمْ قَالُوا۟ خَيْرًا لِّلَّذِينَ أَحْسَنُوا۟ فِى هَٰذِهِ ٱلدُّنْيَا حَسَنَةٌ وَلَدَارُ ٱلْـَٔاخِرَةِ خَيْرٌ وَلَنِعْمَ دَارُ ٱلْمُتَّقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Mpe babangi Allah bakotunama été: Eloko nini Nkolo wa bino akitisi? Bakolobaka: Bolamu, тропа baye babongisaki na bomoi ya nsé na kosala bolamu, kasi efandelo ya mokolo mwa suka nde ezali kitoko koleka, oyo nde ndako ya malamu тропа babangi.

See all translations of this verse →

جَنَّٰتُ عَدْنٍ يَدْخُلُونَهَا تَجْرِى مِن تَحْتِهَا ٱلْأَنْهَٰرُ لَهُمْ فِيهَا مَا يَشَآءُونَ كَذَٰلِكَ يَجْزِى ٱللَّهُ ٱلْمُتَّقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Lola ya edeni o esika bakokotaka, mingala mizali kolekisa mayi o nsé na yango, bakozwaka o kati na yango manso bakolingaka. Ndenge wana nde Allah afutaka babangi.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ تَتَوَفَّىٰهُمُ ٱلْمَلَٰٓئِكَةُ طَيِّبِينَ يَقُولُونَ سَلَٰمٌ عَلَيْكُمُ ٱدْخُلُوا۟ ٱلْجَنَّةَ بِمَا كُنتُمْ تَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Baye ba anzelu bakobomaka wana bazali peto, bakolobaka: Boboto ezala likolo na bino, bokoto o kati ya lola engebene na maye ya malamu bozalaki kosala.

See all translations of this verse →

هَلْ يَنظُرُونَ إِلَّآ أَن تَأْتِيَهُمُ ٱلْمَلَٰٓئِكَةُ أَوْ يَأْتِىَ أَمْرُ رَبِّكَ كَذَٰلِكَ فَعَلَ ٱلَّذِينَ مِن قَبْلِهِمْ وَمَا ظَلَمَهُمُ ٱللَّهُ وَلَٰكِن كَانُوٓا۟ أَنفُسَهُمْ يَظْلِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Boye bazali kozela été ba anzelu bayela bango to mokano ya Nkolo wayo eya? Lolenge wana nde baye bazalaki liboso basalaki, mpe Allah abubaki bango te kasi bango moko nde bamibubaki.

See all translations of this verse →

فَأَصَابَهُمْ سَيِّـَٔاتُ مَا عَمِلُوا۟ وَحَاقَ بِهِم مَّا كَانُوا۟ بِهِۦ يَسْتَهْزِءُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Mpe bazuaki mabe тропа maye basalaki, mpe maye bazalaki kotiola mazingaki bango o bisika binso.

See all translations of this verse →

وَقَالَ ٱلَّذِينَ أَشْرَكُوا۟ لَوْ شَآءَ ٱللَّهُ مَا عَبَدْنَا مِن دُونِهِۦ مِن شَىْءٍ نَّحْنُ وَلَآ ءَابَآؤُنَا وَلَا حَرَّمْنَا مِن دُونِهِۦ مِن شَىْءٍ كَذَٰلِكَ فَعَلَ ٱلَّذِينَ مِن قَبْلِهِمْ فَهَلْ عَلَى ٱلرُّسُلِ إِلَّا ٱلْبَلَٰغُ ٱلْمُبِينُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Pe baye bazali kosangisa (Allah) balobi été: Soki Allah alingaki nde tobondelaki eloko mosusu te sé ye, ezala biso na batata na biso, nde topekisaki mpe eloko na esika naye te, lolenge wana nde baye balekaki liboso na bango bazalaki kosala, nde тропа batindami ezali sé kokomisa sango polele te?

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ بَعَثْنَا فِى كُلِّ أُمَّةٍ رَّسُولًا أَنِ ٱعْبُدُوا۟ ٱللَّهَ وَٱجْتَنِبُوا۟ ٱلطَّٰغُوتَ فَمِنْهُم مَّنْ هَدَى ٱللَّهُ وَمِنْهُم مَّنْ حَقَّتْ عَلَيْهِ ٱلضَّلَٰلَةُ فَسِيرُوا۟ فِى ٱلْأَرْضِ فَٱنظُرُوا۟ كَيْفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلْمُكَذِّبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Мре tosilaki kotinda na umma(1) nyonso motindami, mpo ayebisa bato naye été: Babondela Allah mpe bozala mosika na motomboki(2), kati na bango Allah akambaki, mpe kati na bango basusu libungi ekokisamaki likolo na bango. Botambola o kati ya mokili bótala ndenge esukela baye baboyaki kondima.

See all translations of this verse →

إِن تَحْرِصْ عَلَىٰ هُدَىٰهُمْ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهْدِى مَن يُضِلُّ وَمَا لَهُم مِّن نَّٰصِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Ata ozali kosala ndenge nyoso mpo bakambama, ya soló, Allah akambaka baye babunga te mpe bakozua moto ya kosalisa mpe kolongisa bango te.

See all translations of this verse →

وَأَقْسَمُوا۟ بِٱللَّهِ جَهْدَ أَيْمَٰنِهِمْ لَا يَبْعَثُ ٱللَّهُ مَن يَمُوتُ بَلَىٰ وَعْدًا عَلَيْهِ حَقًّا وَلَٰكِنَّ أَكْثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Mpe bazali kolapa na nkombo ya Allah polele été: Allah akosekwisa bawa te. Nzoka nde wana ezali elaka ya bosôló epai naye, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.

See all translations of this verse →

لِيُبَيِّنَ لَهُمُ ٱلَّذِى يَخْتَلِفُونَ فِيهِ وَلِيَعْلَمَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓا۟ أَنَّهُمْ كَانُوا۟ كَٰذِبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Mpo alimbola тропа bango maye bakokesene na yango, тре bapengwi bayeba ete ya sólo, bango bazalaki kokosa.

See all translations of this verse →

إِنَّمَا قَوْلُنَا لِشَىْءٍ إِذَآ أَرَدْنَٰهُ أَن نَّقُولَ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Ya sólo, tango tolingaka eloko, tokolobaka sé liloba moko: Zala; mpe ezalisami.

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ هَاجَرُوا۟ فِى ٱللَّهِ مِنۢ بَعْدِ مَا ظُلِمُوا۟ لَنُبَوِّئَنَّهُمْ فِى ٱلدُّنْيَا حَسَنَةً وَلَأَجْرُ ٱلْـَٔاخِرَةِ أَكْبَرُ لَوْ كَانُوا۟ يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Мре baye batikaki (makkah) bakei na (madinah) na tango eye basilaki kobubama, tokofandisa bango na mokili ya bomoi ya kitoko. Kasi lifuta ya lola ezali monene soki bayebaki.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ صَبَرُوا۟ وَعَلَىٰ رَبِّهِمْ يَتَوَكَّلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Baye bakangaki mitema mpe batiaki elikia epai ya Nkolo wa bango.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَرْسَلْنَا مِن قَبْلِكَ إِلَّا رِجَالًا نُّوحِىٓ إِلَيْهِمْ فَسْـَٔلُوٓا۟ أَهْلَ ٱلذِّكْرِ إِن كُنتُمْ لَا تَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Мре totindaki yambo nayo te, sé mibali baye tokitiselaki bango emoniseli, botuna baye bayebi soki bozali na boyebi te.

See all translations of this verse →

بِٱلْبَيِّنَٰتِ وَٱلزُّبُرِ وَأَنزَلْنَآ إِلَيْكَ ٱلذِّكْرَ لِتُبَيِّنَ لِلنَّاسِ مَا نُزِّلَ إِلَيْهِمْ وَلَعَلَّهُمْ يَتَفَكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. (Totindaki bango) na bilembo bia polele, na babuku ensantu, mpe tokitisi epai nayo buku mpo été: Olimbolela bato maye makiteli bango mpo basosolo.

See all translations of this verse →

أَفَأَمِنَ ٱلَّذِينَ مَكَرُوا۟ ٱلسَّيِّـَٔاتِ أَن يَخْسِفَ ٱللَّهُ بِهِمُ ٱلْأَرْضَ أَوْ يَأْتِيَهُمُ ٱلْعَذَابُ مِنْ حَيْثُ لَا يَشْعُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Kasi тропа baye bazalaki kosala likita ya mabe, bazali na ebateli moko te sé Allah azindisa bango na mabele to etumbu eyela bango o esika nyoso oyo bakoyeba te?

See all translations of this verse →

أَوْ يَأْخُذَهُمْ فِى تَقَلُّبِهِمْ فَمَا هُم بِمُعْجِزِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo46. То mpe ezua bango na ngonga ya misala na bango mpo bazua nzela ya kokima te.

See all translations of this verse →

أَوْ يَأْخُذَهُمْ عَلَىٰ تَخَوُّفٍ فَإِنَّ رَبَّكُمْ لَرَءُوفٌ رَّحِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. To bobangi (bwa makasi kowuta epai ya Nkolo wa bango ezua bango) ya soló, Nkolo wa bino azali na ngolu atonda mawa.

See all translations of this verse →

أَوَلَمْ يَرَوْا۟ إِلَىٰ مَا خَلَقَ ٱللَّهُ مِن شَىْءٍ يَتَفَيَّؤُا۟ ظِلَٰلُهُۥ عَنِ ٱلْيَمِينِ وَٱلشَّمَآئِلِ سُجَّدًا لِّلَّهِ وَهُمْ دَٰخِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Boye bazali kornona te ete maye manso Allah akela, bililingi na yango bitelama alima na ngambu ya loboko ya mobali mpe na loboko ya mwasi, nyoso bizali kofukamela Allah na limemia mpe nakomikitisa?

See all translations of this verse →

وَلِلَّهِ يَسْجُدُ مَا فِى ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِى ٱلْأَرْضِ مِن دَآبَّةٍ وَٱلْمَلَٰٓئِكَةُ وَهُمْ لَا يَسْتَكْبِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Bikelamu binso o likolo mpe na nsé bizali kogumbamela Allah, banyama mpe ba anzelu mpe bazali kosala lolendo te.

See all translations of this verse →

يَخَافُونَ رَبَّهُم مِّن فَوْقِهِمْ وَيَفْعَلُونَ مَا يُؤْمَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Bazali kobanga Nkolo wa bango oyo azali o likolo lia bango, mpe basalaka maye akotindaka bango.

See all translations of this verse →

وَقَالَ ٱللَّهُ لَا تَتَّخِذُوٓا۟ إِلَٰهَيْنِ ٱثْنَيْنِ إِنَّمَا هُوَ إِلَٰهٌ وَٰحِدٌ فَإِيَّٰىَ فَٱرْهَبُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Mpe Allah alobi: Bozua banzambe babale te. Kasi ya soló, ye azali sé nzambe moko ya sólo asengeli na mabondeli, bobanga sé ngaï.

See all translations of this verse →

وَلَهُۥ مَا فِى ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ وَلَهُ ٱلدِّينُ وَاصِبًا أَفَغَيْرَ ٱللَّهِ تَتَّقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Mpe manso mazuami o nsé mpe o likolo mazali ya ye, mpe limemia nyoso ezali ya ye. Na yango, boye bokobanga eloko mosusu kotika Allah?

See all translations of this verse →

وَمَا بِكُم مِّن نِّعْمَةٍ فَمِنَ ٱللَّهِ ثُمَّ إِذَا مَسَّكُمُ ٱلضُّرُّ فَإِلَيْهِ تَجْـَٔرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo53. Mpe binso bia malamu biye bozali na yango eutaka sé epai ya Allah. Sima soki mabe mazui bino, bokobelelaka sé ye na mongongo ya makasi.

See all translations of this verse →

ثُمَّ إِذَا كَشَفَ ٱلضُّرَّ عَنكُمْ إِذَا فَرِيقٌ مِّنكُم بِرَبِّهِمْ يُشْرِكُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo54. Mpe soki alongoli mabe mana likolo lia bino, okomona basusu kati na bino babandi kosangisa Nkolo wa bango.

See all translations of this verse →

لِيَكْفُرُوا۟ بِمَآ ءَاتَيْنَٰهُمْ فَتَمَتَّعُوا۟ فَسَوْفَ تَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Bazali kopengwa na maye topesaki bango. Bosakana na mwa tango moke, bokoyeba kala mingi te.

See all translations of this verse →

وَيَجْعَلُونَ لِمَا لَا يَعْلَمُونَ نَصِيبًا مِّمَّا رَزَقْنَٰهُمْ تَٱللَّهِ لَتُسْـَٔلُنَّ عَمَّا كُنتُمْ تَفْتَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo56. Мре bazali kolongola ndambu ya bozui oyo topesi bango тропа kopesa yango na banzambe ya bikeko oyo bayebi te. Na nkombo ya Allah; bokotunama na maye bozali kosala.

See all translations of this verse →

وَيَجْعَلُونَ لِلَّهِ ٱلْبَنَٰتِ سُبْحَٰنَهُۥ وَلَهُم مَّا يَشْتَهُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo57. Mpe bazali kopesa Allah bana basi, nkembo naye! Kasi bazali komipesa oyo bango moko balingi.

See all translations of this verse →

وَإِذَا بُشِّرَ أَحَدُهُم بِٱلْأُنثَىٰ ظَلَّ وَجْهُهُۥ مُسْوَدًّا وَهُوَ كَظِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. Mpe soki bapesi moko wa bango sango ya mbotama ya mwana mwasi, abebisi elongi naye mpe atondisi yango na mpizoli.

See all translations of this verse →

يَتَوَٰرَىٰ مِنَ ٱلْقَوْمِ مِن سُوٓءِ مَا بُشِّرَ بِهِۦٓ أَيُمْسِكُهُۥ عَلَىٰ هُونٍ أَمْ يَدُسُّهُۥ فِى ٱلتُّرَابِ أَلَا سَآءَ مَا يَحْكُمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Akomi kokima bato na kobombama, тропа sango ya mabe oyo ekomeli ye, abatela mwana wana na nsoni azali na yango to akotisa ye na mabele? Ezaleli mabe ya motindo boye!

See all translations of this verse →

لِلَّذِينَ لَا يُؤْمِنُونَ بِٱلْـَٔاخِرَةِ مَثَلُ ٱلسَّوْءِ وَلِلَّهِ ٱلْمَثَلُ ٱلْأَعْلَىٰ وَهُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلْحَكِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Mpona baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, bapesi ndakisa ya mabe, kasi ndakisa ya likolo koleka ezali ya Allah, mpe azali na bokasi atonda bwanya.

See all translations of this verse →

وَلَوْ يُؤَاخِذُ ٱللَّهُ ٱلنَّاسَ بِظُلْمِهِم مَّا تَرَكَ عَلَيْهَا مِن دَآبَّةٍ وَلَٰكِن يُؤَخِّرُهُمْ إِلَىٰٓ أَجَلٍ مُّسَمًّى فَإِذَا جَآءَ أَجَلُهُمْ لَا يَسْتَـْٔخِرُونَ سَاعَةً وَلَا يَسْتَقْدِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo61. Soki Allah alingaki kopesa etumbu na bato mpona mabe na bango, nde ata ekelamo moko te elingaki kotikala na nsé. Kasi azali kozelisa bango kino mokano mokokokisama, mpe soki tango yango ekoki, bakozongisa yango sima te mpe bakopusa yango liboso te.

See all translations of this verse →

وَيَجْعَلُونَ لِلَّهِ مَا يَكْرَهُونَ وَتَصِفُ أَلْسِنَتُهُمُ ٱلْكَذِبَ أَنَّ لَهُمُ ٱلْحُسْنَىٰ لَا جَرَمَ أَنَّ لَهُمُ ٱلنَّارَ وَأَنَّهُم مُّفْرَطُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Mpe bazali kobonzela Allah maye bango moko bazali kolinga yango te, mpe bazali kobimisa lokuta na minoko mia bango été: Bakozala na lifuta lia kitoko. Esika na bango ekozala na moto mpe bakozala bato ya liboso ya komema bango noki noki.

See all translations of this verse →

تَٱللَّهِ لَقَدْ أَرْسَلْنَآ إِلَىٰٓ أُمَمٍ مِّن قَبْلِكَ فَزَيَّنَ لَهُمُ ٱلشَّيْطَٰنُ أَعْمَٰلَهُمْ فَهُوَ وَلِيُّهُمُ ٱلْيَوْمَ وَلَهُمْ عَذَابٌ أَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo63. Na nkombo ya Allah, tosilaki kotinda (bantoma) na bituka ebele liboso nayo, kasi satana abongiselaki bango misala ya mabe, mpe ye azali mokonzi wa bango lelo, kasi mokolo ya lobi bakozala na etumbu ya makasi.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَنزَلْنَا عَلَيْكَ ٱلْكِتَٰبَ إِلَّا لِتُبَيِّنَ لَهُمُ ٱلَّذِى ٱخْتَلَفُوا۟ فِيهِ وَهُدًى وَرَحْمَةً لِّقَوْمٍ يُؤْمِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Mpe tokitiselaki yo buku sé mpo olimbola bango malamu maye bazali na bokeseni na yango, mpe mpo ezala bokambi mpe ngolu тропа bandimi.

See all translations of this verse →

وَٱللَّهُ أَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءً فَأَحْيَا بِهِ ٱلْأَرْضَ بَعْدَ مَوْتِهَآ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً لِّقَوْمٍ يَسْمَعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo65. Mpe Allah akitisi mayi kowuta o likolo, mpe azali kopesa bomoyi na mabele o sima ya kokufa na yango. Ya soló, wana nde elembo тропа baye bazali koyoka.

See all translations of this verse →

وَإِنَّ لَكُمْ فِى ٱلْأَنْعَٰمِ لَعِبْرَةً نُّسْقِيكُم مِّمَّا فِى بُطُونِهِۦ مِنۢ بَيْنِ فَرْثٍ وَدَمٍ لَّبَنًا خَالِصًا سَآئِغًا لِّلشَّٰرِبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo66. Мре ya soló, тропа bibwele, ezali liteya monene тропа bino, tozali komelisa bino biloko biye bizali na mabumu na yango bisangani na makila, mpe ebimisi miliki ya kitoko mpe elengi тропа komelisa bino.

See all translations of this verse →

وَمِن ثَمَرَٰتِ ٱلنَّخِيلِ وَٱلْأَعْنَٰبِ تَتَّخِذُونَ مِنْهُ سَكَرًا وَرِزْقًا حَسَنًا إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً لِّقَوْمٍ يَعْقِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo67 Mpe kowuta na mbuma ya Naghil(1) na a’nâb(2) biye bozali kozua bilei na masanga kitoko. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bato bakoka koyeba.

See all translations of this verse →

وَأَوْحَىٰ رَبُّكَ إِلَى ٱلنَّحْلِ أَنِ ٱتَّخِذِى مِنَ ٱلْجِبَالِ بُيُوتًا وَمِنَ ٱلشَّجَرِ وَمِمَّا يَعْرِشُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo68. Mpe Nkolo wayo akitisaki mayele epai ya ba nzoi été: Bozua bisika ya kofanda na bangomba mpe okati ya banzete, to mpe bisika bisusu oyo bato basali.

See all translations of this verse →

ثُمَّ كُلِى مِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِ فَٱسْلُكِى سُبُلَ رَبِّكِ ذُلُلًا يَخْرُجُ مِنۢ بُطُونِهَا شَرَابٌ مُّخْتَلِفٌ أَلْوَٰنُهُۥ فِيهِ شِفَآءٌ لِّلنَّاسِ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً لِّقَوْمٍ يَتَفَكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo69. Mpe sima bolia bambuma nyonso mpe holanda ba nzela ya Nkolo wa bino oyo atieli bino yango na bolembu, na mabumu na yango, mafuta ezali kobima ya balangi ndenge na ndenge mpe elengi тропа komela, mpe na kati na yango ezali libiki тропа bato. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bato bakoka kososola.

See all translations of this verse →

وَٱللَّهُ خَلَقَكُمْ ثُمَّ يَتَوَفَّىٰكُمْ وَمِنكُم مَّن يُرَدُّ إِلَىٰٓ أَرْذَلِ ٱلْعُمُرِ لِكَىْ لَا يَعْلَمَ بَعْدَ عِلْمٍ شَيْـًٔا إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمٌ قَدِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo70. Allah nde akelaki bino mpe ye nde akoboma bino. Mpe basusu kati na bino apesi bango bomoi molai kino akomi mobange makasi azali koyeba lisusu eloko te. Ya solo, Allah azali moyebi atonda na makoki.

See all translations of this verse →

وَٱللَّهُ فَضَّلَ بَعْضَكُمْ عَلَىٰ بَعْضٍ فِى ٱلرِّزْقِ فَمَا ٱلَّذِينَ فُضِّلُوا۟ بِرَآدِّى رِزْقِهِمْ عَلَىٰ مَا مَلَكَتْ أَيْمَٰنُهُمْ فَهُمْ فِيهِ سَوَآءٌ أَفَبِنِعْمَةِ ٱللَّهِ يَجْحَدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo71. Allah atomboli basusu kati na bino likolo ya baninga тропа bozui. Kasi baye bazali na yango, esengeli na bango kopesa na baye bazali na nsé na bango, (bazangi) mpo été bakokana. Boye bakowangana bolamu ya Allah?

See all translations of this verse →

وَٱللَّهُ جَعَلَ لَكُم مِّنْ أَنفُسِكُمْ أَزْوَٰجًا وَجَعَلَ لَكُم مِّنْ أَزْوَٰجِكُم بَنِينَ وَحَفَدَةً وَرَزَقَكُم مِّنَ ٱلطَّيِّبَٰتِ أَفَبِٱلْبَٰطِلِ يُؤْمِنُونَ وَبِنِعْمَتِ ٱللَّهِ هُمْ يَكْفُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo72. Allah apesa bino basi baye bawuti na bino moko. Mpe basi ba bino bazali kobotela bino bana na bankoko, тре apeși bino bozui kitoko, boye bazali kondima na mabe mpe bazali kopengwa na bolamu ya Allah?

See all translations of this verse →

وَيَعْبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَمْلِكُ لَهُمْ رِزْقًا مِّنَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ شَيْـًٔا وَلَا يَسْتَطِيعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo73. Мре batiki Allah bazali kobondela eloko oyo ekopesa bango bilei kowuta na likolo te тре na nsé te, kasi bakokoka eloko moko te.

See all translations of this verse →

فَلَا تَضْرِبُوا۟ لِلَّهِ ٱلْأَمْثَالَ إِنَّ ٱللَّهَ يَعْلَمُ وَأَنتُمْ لَا تَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo74. Mpe bokokisa Allah na eloko te. Ya sólo, Allah ayebi kasi bino boyebi te.

See all translations of this verse →

ضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلًا عَبْدًا مَّمْلُوكًا لَّا يَقْدِرُ عَلَىٰ شَىْءٍ وَمَن رَّزَقْنَٰهُ مِنَّا رِزْقًا حَسَنًا فَهُوَ يُنفِقُ مِنْهُ سِرًّا وَجَهْرًا هَلْ يَسْتَوُۥنَ ٱلْحَمْدُ لِلَّهِ بَلْ أَكْثَرُهُمْ لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo75. Allah asilaki kobeta ndakisa ya mowumbu oyo azali epai ya Nkolo waye azali kokoka kosala eloko te, na oyo topesi ye bozui ya malamu mpe bozui wana azali kobimisa yango тропа Allah, na kobombama mpe na polele. Boye bakokani? Lokumu na Allah, kasi ebele kati na bango bazali koyeba te.

See all translations of this verse →

وَضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلًا رَّجُلَيْنِ أَحَدُهُمَآ أَبْكَمُ لَا يَقْدِرُ عَلَىٰ شَىْءٍ وَهُوَ كَلٌّ عَلَىٰ مَوْلَىٰهُ أَيْنَمَا يُوَجِّههُّ لَا يَأْتِ بِخَيْرٍ هَلْ يَسْتَوِى هُوَ وَمَن يَأْمُرُ بِٱلْعَدْلِ وَهُوَ عَلَىٰ صِرَٰطٍ مُّسْتَقِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo76. Мре Allah abeti ndakisa ya mibali mibale, moko alobaka te, mpe asalaka eloko te, makambo manso mazali kosalama sé na mitindo mia Nkolo waye, soki atindi ye asalaka bolamu te. Boye bazali lolenge moko na oyo azali kotinda na bosembo mpe azali na nzela ya semba?

See all translations of this verse →

وَلِلَّهِ غَيْبُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ وَمَآ أَمْرُ ٱلسَّاعَةِ إِلَّا كَلَمْحِ ٱلْبَصَرِ أَوْ هُوَ أَقْرَبُ إِنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَىْءٍ قَدِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo77. Mabombami ya likolo na ya nsé ezali ya Allah. Mpe тропа mokolo ya suka ekozala lokola kobuka miso to mpe ezali pene koleka oyo wana. Ya soló, Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.

See all translations of this verse →

وَٱللَّهُ أَخْرَجَكُم مِّنۢ بُطُونِ أُمَّهَٰتِكُمْ لَا تَعْلَمُونَ شَيْـًٔا وَجَعَلَ لَكُمُ ٱلسَّمْعَ وَٱلْأَبْصَٰرَ وَٱلْأَفْـِٔدَةَ لَعَلَّكُمْ تَشْكُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo78. Mpe Allah nde oyo abimisaka bino o kati ya mabumu ya bamama ba bino boyebi eloko te, mpe atiyeli bino boyoki na bomoni na mitema mpo bokoka kotondo.

See all translations of this verse →

أَلَمْ يَرَوْا۟ إِلَى ٱلطَّيْرِ مُسَخَّرَٰتٍ فِى جَوِّ ٱلسَّمَآءِ مَا يُمْسِكُهُنَّ إِلَّا ٱللَّهُ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَٰتٍ لِّقَوْمٍ يُؤْمِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo79. Boye bozali kornona te ete! Ba ndeke baye bazali kopumbwa o likolo, eloko ya kosimba bango ezali te sé Allah? Ya sólo, wana ezali elembo mpo bato bakoka kondima.

See all translations of this verse →

وَٱللَّهُ جَعَلَ لَكُم مِّنۢ بُيُوتِكُمْ سَكَنًا وَجَعَلَ لَكُم مِّن جُلُودِ ٱلْأَنْعَٰمِ بُيُوتًا تَسْتَخِفُّونَهَا يَوْمَ ظَعْنِكُمْ وَيَوْمَ إِقَامَتِكُمْ وَمِنْ أَصْوَافِهَا وَأَوْبَارِهَا وَأَشْعَارِهَآ أَثَٰثًا وَمَتَٰعًا إِلَىٰ حِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo80. Allah nde atiela bino bandako ezala esika ya kovanda, mpe apesi bino ba ndako misusu oyo esalami na mposo ya nyama bomemaka yango na tango ya mobembo, mpe botelemisaka yango na bopemi na bino na nzela, mpe as’wâfi(1) na yango, mpe aw’bâri(2) na yango, mpe ach’âri(3) na yango, ezali biloko oyo ezali kosalisa bino mpe bozali kosepela na yango kino tango eye eyebani.

See all translations of this verse →

وَٱللَّهُ جَعَلَ لَكُم مِّمَّا خَلَقَ ظِلَٰلًا وَجَعَلَ لَكُم مِّنَ ٱلْجِبَالِ أَكْنَٰنًا وَجَعَلَ لَكُمْ سَرَٰبِيلَ تَقِيكُمُ ٱلْحَرَّ وَسَرَٰبِيلَ تَقِيكُم بَأْسَكُمْ كَذَٰلِكَ يُتِمُّ نِعْمَتَهُۥ عَلَيْكُمْ لَعَلَّكُمْ تُسْلِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo81. Mpe na maye Allah akela, atieli bino bililingi mpe atieli bino bisika ya kobatama na bangomba, mpe apesi bino bilamba bizala kobatela bino na molunge, mpe misusu mizali makasi mikobatelaka bino na makambo na bino moko ya botomboki. Ndenge wana nde (Allah) azali kokokisa bolamu naye likolo lia bino mpo bokoka kotosa (komisokia).

See all translations of this verse →

فَإِن تَوَلَّوْا۟ فَإِنَّمَا عَلَيْكَ ٱلْبَلَٰغُ ٱلْمُبِينُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo82. Soki baboyi bapesi mikongo, ya soló penza, yo ozali na eloko mosusu te sé okomisa sango ya polele.

See all translations of this verse →

يَعْرِفُونَ نِعْمَتَ ٱللَّهِ ثُمَّ يُنكِرُونَهَا وَأَكْثَرُهُمُ ٱلْكَٰفِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo83. Bazali koyeba bolamu bwa Allah kasi bazali koboya yango, mpe ebele kati na bango bazali bapengwi.

See all translations of this verse →

وَيَوْمَ نَبْعَثُ مِن كُلِّ أُمَّةٍ شَهِيدًا ثُمَّ لَا يُؤْذَنُ لِلَّذِينَ كَفَرُوا۟ وَلَا هُمْ يُسْتَعْتَبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo84. (Мре kanisa) mokolo moye tokobimisa umma(1) nionso na nzeneneke likolo na bango, mpe bapengwi bakozala na ndingisa te ya kosenga bolimbisi mpe bakotunama te тропа kozongela (makambo maye basalaki oyo epesaki Allah kanda).

See all translations of this verse →

وَإِذَا رَءَا ٱلَّذِينَ ظَلَمُوا۟ ٱلْعَذَابَ فَلَا يُخَفَّفُ عَنْهُمْ وَلَا هُمْ يُنظَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo85. Mpe tango bato mabe bakomona etumbu, bakokutolaka bango ata токе te mpe bakozelisaka bango te.

See all translations of this verse →

وَإِذَا رَءَا ٱلَّذِينَ أَشْرَكُوا۟ شُرَكَآءَهُمْ قَالُوا۟ رَبَّنَا هَٰٓؤُلَآءِ شُرَكَآؤُنَا ٱلَّذِينَ كُنَّا نَدْعُوا۟ مِن دُونِكَ فَأَلْقَوْا۟ إِلَيْهِمُ ٱلْقَوْلَ إِنَّكُمْ لَكَٰذِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo86. Mpe soki basangisi nzambe bamoni basangani na bango, bakolobaka: Oh Nkolo wa biso! Tala baye tozalaki kokumisa bango na esika nayo. Kasi bango bakoyanolaka bango: Ya soló penza, bozali babuki lokuta!

See all translations of this verse →

وَأَلْقَوْا۟ إِلَى ٱللَّهِ يَوْمَئِذٍ ٱلسَّلَمَ وَضَلَّ عَنْهُم مَّا كَانُوا۟ يَفْتَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo87. Mpe o mokolo mona bakotosaka Allah, mpe maye bazalaki kosala ya mabe bakobungisaka yango.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ وَصَدُّوا۟ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ زِدْنَٰهُمْ عَذَابًا فَوْقَ ٱلْعَذَابِ بِمَا كَانُوا۟ يُفْسِدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo88. Baye bazali kondima te, mpe bazali kobundisa nzela ya Allah, tokobakisela bango etumbu тропа maye bazalaki kobebisa.

See all translations of this verse →

وَيَوْمَ نَبْعَثُ فِى كُلِّ أُمَّةٍ شَهِيدًا عَلَيْهِم مِّنْ أَنفُسِهِمْ وَجِئْنَا بِكَ شَهِيدًا عَلَىٰ هَٰٓؤُلَآءِ وَنَزَّلْنَا عَلَيْكَ ٱلْكِتَٰبَ تِبْيَٰنًا لِّكُلِّ شَىْءٍ وَهُدًى وَرَحْمَةً وَبُشْرَىٰ لِلْمُسْلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo89. Мре mokolo moye tokobimisa na umma(1) nionso nzeneneke na kati na bango moko, mpe tokoya nayo ozala nzeneneke likolo nabango banso, mpe tokitisaki epai nayo buku mpo ezala ndimbola (malako) ya eloko nyoso mpe bokambi na ngolu, mpe sango elamu тропа bamizilima (bandimi).

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱللَّهَ يَأْمُرُ بِٱلْعَدْلِ وَٱلْإِحْسَٰنِ وَإِيتَآئِ ذِى ٱلْقُرْبَىٰ وَيَنْهَىٰ عَنِ ٱلْفَحْشَآءِ وَٱلْمُنكَرِ وَٱلْبَغْىِ يَعِظُكُمْ لَعَلَّكُمْ تَذَكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo90. Ya soló, Allah azali kotinda na bosembo mpe kosala misala milamu, mpe kosalisa libota. Kasi apekisi kosala mabe ya minene lokola: (Kosangisa ye na eloko mosusu, koboma moto na bosôló te, ekobo, moyibi), apekisi mpe botomboki, azali kolendisa bino mpo ete bokanisa.

See all translations of this verse →

وَأَوْفُوا۟ بِعَهْدِ ٱللَّهِ إِذَا عَٰهَدتُّمْ وَلَا تَنقُضُوا۟ ٱلْأَيْمَٰنَ بَعْدَ تَوْكِيدِهَا وَقَدْ جَعَلْتُمُ ٱللَّهَ عَلَيْكُمْ كَفِيلًا إِنَّ ٱللَّهَ يَعْلَمُ مَا تَفْعَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo91. Mpe bokokisa elaka ya Allah kasi bozangisa yango te, mpe bobebisa bandayi na bino te na tango oyo bosilaki kolapa na polele, mpe bosilaki kozua Allah lokola mobateli. Ya soló, Allah ayebi maye bozali kosala.

See all translations of this verse →

وَلَا تَكُونُوا۟ كَٱلَّتِى نَقَضَتْ غَزْلَهَا مِنۢ بَعْدِ قُوَّةٍ أَنكَٰثًا تَتَّخِذُونَ أَيْمَٰنَكُمْ دَخَلًۢا بَيْنَكُمْ أَن تَكُونَ أُمَّةٌ هِىَ أَرْبَىٰ مِنْ أُمَّةٍ إِنَّمَا يَبْلُوكُمُ ٱللَّهُ بِهِۦ وَلَيُبَيِّنَنَّ لَكُمْ يَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ مَا كُنتُمْ فِيهِ تَخْتَلِفُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo92. Mpe bozala te lokola mwasi oyo afungoli liputa naye wana asila kokanga yango makasi. Mpe bozali kozua yango lokola nzela ya kokosana bino na bino, mpo umma(1) moko limoni été yango ezali na makasi mpe ebele koleka baninga ya umma(1) mosusu, Allah azali komeka bino na yango. Мре ya soló, akomonisa bino o mokolo ya suka maye bozalaki kokabwana (na yango na mokili).

See all translations of this verse →

وَلَوْ شَآءَ ٱللَّهُ لَجَعَلَكُمْ أُمَّةً وَٰحِدَةً وَلَٰكِن يُضِلُّ مَن يَشَآءُ وَيَهْدِى مَن يَشَآءُ وَلَتُسْـَٔلُنَّ عَمَّا كُنتُمْ تَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo93. Mpe soki Allah alingaki mbele atiaki bino banso umma(1) moko, kasi akambaka oyo alingi mpe abungisaka oyo alingi. Mpe ya sólo penza, bokotunama na maye bozali kosala.

See all translations of this verse →

وَلَا تَتَّخِذُوٓا۟ أَيْمَٰنَكُمْ دَخَلًۢا بَيْنَكُمْ فَتَزِلَّ قَدَمٌۢ بَعْدَ ثُبُوتِهَا وَتَذُوقُوا۟ ٱلسُّوٓءَ بِمَا صَدَدتُّمْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ وَلَكُمْ عَذَابٌ عَظِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo94. Mpe bozua bandayi na bino te ezala nzela ya komikosa kati na bino na bino, noki te bokoselumwa na bino bozalaki ya kotelema ngui (na bosóló) mpe bokozua na yango mabe. Na ntina été bozalaki kobundisa nzela ya Allah, mpe bokozala na etumbu ya monene.

See all translations of this verse →

وَلَا تَشْتَرُوا۟ بِعَهْدِ ٱللَّهِ ثَمَنًا قَلِيلًا إِنَّمَا عِندَ ٱللَّهِ هُوَ خَيْرٌ لَّكُمْ إِن كُنتُمْ تَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo95. Mpe boteka te malako ya Allah na talo moke. Ya soló, oyo ezuami epai na Allah ezali malamu тропа bino soki bozali koyeba.

See all translations of this verse →

مَا عِندَكُمْ يَنفَدُ وَمَا عِندَ ٱللَّهِ بَاقٍ وَلَنَجْزِيَنَّ ٱلَّذِينَ صَبَرُوٓا۟ أَجْرَهُم بِأَحْسَنِ مَا كَانُوا۟ يَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo96. Oyo bozali na yango ekoleka mpe ekosila, kasi oyo ezali epai ya Allah ekotikala libela. Mpe tokofutaka baye bakangaki. mitema lifuta lia bango lilamu тропа maye basalaki.

See all translations of this verse →

مَنْ عَمِلَ صَٰلِحًا مِّن ذَكَرٍ أَوْ أُنثَىٰ وَهُوَ مُؤْمِنٌ فَلَنُحْيِيَنَّهُۥ حَيَوٰةً طَيِّبَةً وَلَنَجْزِيَنَّهُمْ أَجْرَهُم بِأَحْسَنِ مَا كَانُوا۟ يَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo97. Oyo akosala bolamu moko okati na bino mobali to mwasi тре azali mondimi, tokopesa ye bomoyi bolamu, тре tokofutaka bango lifuta lilamu koleka maye basalaki.

See all translations of this verse →

فَإِذَا قَرَأْتَ ٱلْقُرْءَانَ فَٱسْتَعِذْ بِٱللَّهِ مِنَ ٱلشَّيْطَٰنِ ٱلرَّجِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo98. Mpe soki olingi kotanga kurani, senga libateli epai ya Allah, тропа mabe ma satana wa botutu.

See all translations of this verse →

إِنَّهُۥ لَيْسَ لَهُۥ سُلْطَٰنٌ عَلَى ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَعَلَىٰ رَبِّهِمْ يَتَوَكَّلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo99. Ya soló, ye azali na bokoki likolo ya bandimi te, mpe epai ya Nkolo wa bango bazali komipesa.

See all translations of this verse →

إِنَّمَا سُلْطَٰنُهُۥ عَلَى ٱلَّذِينَ يَتَوَلَّوْنَهُۥ وَٱلَّذِينَ هُم بِهِۦ مُشْرِكُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo100. Ya solo, bokonzi naye ezali likolo na baye bazali kozua ye lokola mobateli mpe тропа ye bakomi basangisi (Allah na binzambe nzambe).

See all translations of this verse →

وَإِذَا بَدَّلْنَآ ءَايَةً مَّكَانَ ءَايَةٍ وَٱللَّهُ أَعْلَمُ بِمَا يُنَزِّلُ قَالُوٓا۟ إِنَّمَآ أَنتَ مُفْتَرٍۭ بَلْ أَكْثَرُهُمْ لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo101. Mpe soki tobongoli mokapo toyei na mosusu о esika ena, Allah ayebi malamu oyo akitisaka, bakolobaka: Ozali sé mobuki lokuta. Kasi ebele kati na bango bazali koyeba te.

See all translations of this verse →

قُلْ نَزَّلَهُۥ رُوحُ ٱلْقُدُسِ مِن رَّبِّكَ بِٱلْحَقِّ لِيُثَبِّتَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَهُدًى وَبُشْرَىٰ لِلْمُسْلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo102. Loba: Ezali nde molimo monsatu azali kokita na yango kowuta epai ya Nkolo wayo na bosembo nyoso, тропа kolendisa baye bandima mpe yango ezali (buku) bokambi mpe sango elamu тропа bamizilima (bandimi).

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ نَعْلَمُ أَنَّهُمْ يَقُولُونَ إِنَّمَا يُعَلِّمُهُۥ بَشَرٌ لِّسَانُ ٱلَّذِى يُلْحِدُونَ إِلَيْهِ أَعْجَمِىٌّ وَهَٰذَا لِسَانٌ عَرَبِىٌّ مُّبِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo103. Мре toyebi penza ya soló, bazali koloba été: Moto moko boye azali kotangisa ye makambo oyo (kotangisa ntoma kurani), nzoka moto wana bazali kolobela azali na lokota mosusu, kaši buku oyo ezali na lokota ya arabe ya polele.

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱلَّذِينَ لَا يُؤْمِنُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ لَا يَهْدِيهِمُ ٱللَّهُ وَلَهُمْ عَذَابٌ أَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo104. Ya solo, baye bazali kondima na mikapo mia Allah te, Allah akokambaka bango te, mpe bakozuaka etumbu ya makasi.

See all translations of this verse →

إِنَّمَا يَفْتَرِى ٱلْكَذِبَ ٱلَّذِينَ لَا يُؤْمِنُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَأُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْكَٰذِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo105. Ya solo, bazali kobuka lokuta baye oyo bazali kondima te na mikapo mia Allah, mpe bango nde bato ba lokuta.

See all translations of this verse →

مَن كَفَرَ بِٱللَّهِ مِنۢ بَعْدِ إِيمَٰنِهِۦٓ إِلَّا مَنْ أُكْرِهَ وَقَلْبُهُۥ مُطْمَئِنٌّۢ بِٱلْإِيمَٰنِ وَلَٰكِن مَّن شَرَحَ بِٱلْكُفْرِ صَدْرًا فَعَلَيْهِمْ غَضَبٌ مِّنَ ٱللَّهِ وَلَهُمْ عَذَابٌ عَظِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo106. Moto oyo akopengwa na Allah sima ya bondimi naye longola sé oyo bakangi ye na makasi été apengwa kasi motema naye ezali na kimia ya bondimi, kasi baye bakomipesa na bopengwi, kanda ya Allah ezali likolo na bango mpe bakozala na etumbu enene.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمُ ٱسْتَحَبُّوا۟ ٱلْحَيَوٰةَ ٱلدُّنْيَا عَلَى ٱلْـَٔاخِرَةِ وَأَنَّ ٱللَّهَ لَا يَهْدِى ٱلْقَوْمَ ٱلْكَٰفِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo107. Wana ezalaki mpo bazalaki kolinga bomoyi bwa nsé koleka oyo ya likolo, mpe ya sólo, Allah akambaka bapengwi te.

See all translations of this verse →

أُو۟لَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ طَبَعَ ٱللَّهُ عَلَىٰ قُلُوبِهِمْ وَسَمْعِهِمْ وَأَبْصَٰرِهِمْ وَأُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْغَٰفِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo108. Ba oyo wana nde Allah akanga mitema mia bango na koyoka na bango na kornona na bango, mpe bango nde bazali na makanisi te.

See all translations of this verse →

لَا جَرَمَ أَنَّهُمْ فِى ٱلْـَٔاخِرَةِ هُمُ ٱلْخَٰسِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo109. Ezali na tembe te, ya soló, bango o mokolo ya suka bakozala bazangi.

See all translations of this verse →

ثُمَّ إِنَّ رَبَّكَ لِلَّذِينَ هَاجَرُوا۟ مِنۢ بَعْدِ مَا فُتِنُوا۟ ثُمَّ جَٰهَدُوا۟ وَصَبَرُوٓا۟ إِنَّ رَبَّكَ مِنۢ بَعْدِهَا لَغَفُورٌ رَّحِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo110. Kaši тропа baye batikaki mboka ya bopagano bakei na mboka ya boyambi sima ya komekama na bango, тре babundaki тропа Allah тре bakangaki mitema тре bayikaki mpiko, ya sólo, Nkolo wayo na sima na yango azali molimbisi atonda mawa.

See all translations of this verse →

يَوْمَ تَأْتِى كُلُّ نَفْسٍ تُجَٰدِلُ عَن نَّفْسِهَا وَتُوَفَّىٰ كُلُّ نَفْسٍ مَّا عَمِلَتْ وَهُمْ لَا يُظْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo111.(Kanisa) mokolo oyo molimo na molimo mokoya kolelalela тропа makambo naye moko, mpe moko na moko akofutama na maye asalaki mpe bakobubama te.

See all translations of this verse →

وَضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلًا قَرْيَةً كَانَتْ ءَامِنَةً مُّطْمَئِنَّةً يَأْتِيهَا رِزْقُهَا رَغَدًا مِّن كُلِّ مَكَانٍ فَكَفَرَتْ بِأَنْعُمِ ٱللَّهِ فَأَذَٰقَهَا ٱللَّهُ لِبَاسَ ٱلْجُوعِ وَٱلْخَوْفِ بِمَا كَانُوا۟ يَصْنَعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo112. Mpe Allah apeși lisese ya mboka moko ezalaki na kimia mpe ebatelamaki, ezalaki na bilei ebele ezalaki kowuta epai na epai, sima bapengwaki na bolamu oyo Allah apesaki bango, yango Allah abetaki bango na nzala mpe na kobanga na ntina ya maye bazalaki kosala.

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ جَآءَهُمْ رَسُولٌ مِّنْهُمْ فَكَذَّبُوهُ فَأَخَذَهُمُ ٱلْعَذَابُ وَهُمْ ظَٰلِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo113. Mpe motindami asilaki koyela bango kowuta na bango moko, mpe baboyi kondimela ye mpe etumbu ezuaki bango mpo bazalaki babubi.

See all translations of this verse →

فَكُلُوا۟ مِمَّا رَزَقَكُمُ ٱللَّهُ حَلَٰلًا طَيِّبًا وَٱشْكُرُوا۟ نِعْمَتَ ٱللَّهِ إِن كُنتُمْ إِيَّاهُ تَعْبُدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo114. Mpe bolia biye Allah apesaki bino bia malamu, mpe botondo bolamu bwa Allah soki ya soló, ye nde bozali kobondela.

See all translations of this verse →

إِنَّمَا حَرَّمَ عَلَيْكُمُ ٱلْمَيْتَةَ وَٱلدَّمَ وَلَحْمَ ٱلْخِنزِيرِ وَمَآ أُهِلَّ لِغَيْرِ ٱللَّهِ بِهِۦ فَمَنِ ٱضْطُرَّ غَيْرَ بَاغٍ وَلَا عَادٍ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٌ رَّحِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo115. Ya sólo, apekisaki bino (kólia) mișuni mia bibembe (nyama oyo bakati kingo te) na makila na mosuni mwa ngulu(1) na nyama eye bakati kingo kasi batangi nkombo ya Allah likolo na yango te. Kasi oyo kati na bino akwei na nzala makasi mpe etindi ye alia kasi atomboki to alekisi ndelo te ya solo penza, Allah azali molimbisi atonda mawa.

See all translations of this verse →

وَلَا تَقُولُوا۟ لِمَا تَصِفُ أَلْسِنَتُكُمُ ٱلْكَذِبَ هَٰذَا حَلَٰلٌ وَهَٰذَا حَرَامٌ لِّتَفْتَرُوا۟ عَلَى ٱللَّهِ ٱلْكَذِبَ إِنَّ ٱلَّذِينَ يَفْتَرُونَ عَلَى ٱللَّهِ ٱلْكَذِبَ لَا يُفْلِحُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo116. Mpe boloba lokuta na minoko mia bino te ete: Oyo elingisami, oyo epekisami, mpo bobukela Allah lokuta. Ya solo, babukeli Allah lokuta bakolongaka te.

See all translations of this verse →

مَتَٰعٌ قَلِيلٌ وَلَهُمْ عَذَابٌ أَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo117. Bakosepelaka na mwa tango moke, mpe etumbu ya makasi ezali kozela bango.

See all translations of this verse →

وَعَلَى ٱلَّذِينَ هَادُوا۟ حَرَّمْنَا مَا قَصَصْنَا عَلَيْكَ مِن قَبْلُ وَمَا ظَلَمْنَٰهُمْ وَلَٰكِن كَانُوٓا۟ أَنفُسَهُمْ يَظْلِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo118. Mpe тропа bayuda, tosilaka kopekisa bango maye toyebisaki yo liboso, mpe tobubaki bango te, kasi bango moko bamibubaki.

See all translations of this verse →

ثُمَّ إِنَّ رَبَّكَ لِلَّذِينَ عَمِلُوا۟ ٱلسُّوٓءَ بِجَهَٰلَةٍ ثُمَّ تَابُوا۟ مِنۢ بَعْدِ ذَٰلِكَ وَأَصْلَحُوٓا۟ إِنَّ رَبَّكَ مِنۢ بَعْدِهَا لَغَفُورٌ رَّحِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo119. Sima ya solo, Nkolo wayo тропа baye basalaki mabe na kozanga koyeba sima batubeli mpe babongisi, (bondimi bwa bango), ya soló, Nkolo wayo azali molimbisi atonda mawa.

See all translations of this verse →

إِنَّ إِبْرَٰهِيمَ كَانَ أُمَّةً قَانِتًا لِّلَّهِ حَنِيفًا وَلَمْ يَكُ مِنَ ٱلْمُشْرِكِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo120. Ya solo, Ibrâhîm azalaki umma(1), azalaki na botosi тропа Allah, amipesaki mobimba epaî ya Allah тре azalaki o kati ya baye bazalaki kosangisa te (Allah).

See all translations of this verse →

شَاكِرًا لِّأَنْعُمِهِ ٱجْتَبَىٰهُ وَهَدَىٰهُ إِلَىٰ صِرَٰطٍ مُّسْتَقِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo121. Azalaki na botondi тропа bolamu bwa Nkolo waye, (mpe Allah) aponaki ye mpe akambaki ye na nzela ya semba.

See all translations of this verse →

وَءَاتَيْنَٰهُ فِى ٱلدُّنْيَا حَسَنَةً وَإِنَّهُۥ فِى ٱلْـَٔاخِرَةِ لَمِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo122. Mpe topesaki ye bolamu kati na mokili, mpe ya soló, ye o mokolo mwa suka akozala o kati ya bato malamu.

See all translations of this verse →

ثُمَّ أَوْحَيْنَآ إِلَيْكَ أَنِ ٱتَّبِعْ مِلَّةَ إِبْرَٰهِيمَ حَنِيفًا وَمَا كَانَ مِنَ ٱلْمُشْرِكِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo123. Sima toyebisaki(2) yo; landa lingomba lia Ibrâhîm liye lizali na bomoko (bwa Allah) mpe azalaki te okati ya basangisi (Allah).

See all translations of this verse →

إِنَّمَا جُعِلَ ٱلسَّبْتُ عَلَى ٱلَّذِينَ ٱخْتَلَفُوا۟ فِيهِ وَإِنَّ رَبَّكَ لَيَحْكُمُ بَيْنَهُمْ يَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ فِيمَا كَانُوا۟ فِيهِ يَخْتَلِفُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo124. Ya sólo, mokolo mwa mposo (sabbat) motiyamaki lotomo te, sé тропа baye bakeseneki na yango. Mpe o mokolo mwa suka Nkolo wayo akosambisa bango na maye bakeseneki na mango.

See all translations of this verse →

ٱدْعُ إِلَىٰ سَبِيلِ رَبِّكَ بِٱلْحِكْمَةِ وَٱلْمَوْعِظَةِ ٱلْحَسَنَةِ وَجَٰدِلْهُم بِٱلَّتِى هِىَ أَحْسَنُ إِنَّ رَبَّكَ هُوَ أَعْلَمُ بِمَن ضَلَّ عَن سَبِيلِهِۦ وَهُوَ أَعْلَمُ بِٱلْمُهْتَدِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo125. Benga bato na nzela ya Nkolo wayo na bwanya mpe na maloba ya kitoko,(1) mpe solola na bango na lolenge ya malamu. Ya soló, Nkolo wayo ayebi baye babungi nzela naye mpe ayebi malamu baye bakambami.

See all translations of this verse →

وَإِنْ عَاقَبْتُمْ فَعَاقِبُوا۟ بِمِثْلِ مَا عُوقِبْتُم بِهِۦ وَلَئِن صَبَرْتُمْ لَهُوَ خَيْرٌ لِّلصَّٰبِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo126. Mpe soki bokozongisa mabe, bozongisa yango ndenge moko na oyo basalaki bino. Kasi soki bokangi mitema, wana ezali malamu mingi тропа bakangi mitema.

See all translations of this verse →

وَٱصْبِرْ وَمَا صَبْرُكَ إِلَّا بِٱللَّهِ وَلَا تَحْزَنْ عَلَيْهِمْ وَلَا تَكُ فِى ضَيْقٍ مِّمَّا يَمْكُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo127. Kanga motema, kasi kokanga motema nayo ekowuta nde epai na Allah. Mpe komitungisa te тропа bango, тре kominyokuama te тропа likita na bango ya mabe.

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلَّذِينَ ٱتَّقَوا۟ وَّٱلَّذِينَ هُم مُّحْسِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo128. Ya sólo, Allah azali elongo na babangi mpe basali bolamu.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70