caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Muhammad محمد

38 verses · Medina · revelation order 95

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ وَصَدُّوا۟ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ أَضَلَّ أَعْمَٰلَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Baye bapengwa mpe bazali kobundisa nzela ya Allah basili kobebisa misala mia bango.

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَعَمِلُوا۟ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَءَامَنُوا۟ بِمَا نُزِّلَ عَلَىٰ مُحَمَّدٍ وَهُوَ ٱلْحَقُّ مِن رَّبِّهِمْ كَفَّرَ عَنْهُمْ سَيِّـَٔاتِهِمْ وَأَصْلَحَ بَالَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Мре baye bandima mpe basali misala milamu mpe bandimi na maye makitaki epai ya Muhammad ete ezali soló kowuta epai ya Nkolo na bango, akolongola mabe na bango, mpe akobongisa makambo na bango.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ ٱتَّبَعُوا۟ ٱلْبَٰطِلَ وَأَنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ ٱتَّبَعُوا۟ ٱلْحَقَّ مِن رَّبِّهِمْ كَذَٰلِكَ يَضْرِبُ ٱللَّهُ لِلنَّاسِ أَمْثَٰلَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Wana mpo ete bapengwi balandi lokuta, kasi baye bandima balandi bosembo kowuta epai na Nkolo na bango. Lolenge wana nde Allah azali kopesa másese epai ya bato.

See all translations of this verse →

فَإِذَا لَقِيتُمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ فَضَرْبَ ٱلرِّقَابِ حَتَّىٰٓ إِذَآ أَثْخَنتُمُوهُمْ فَشُدُّوا۟ ٱلْوَثَاقَ فَإِمَّا مَنًّۢا بَعْدُ وَإِمَّا فِدَآءً حَتَّىٰ تَضَعَ ٱلْحَرْبُ أَوْزَارَهَا ذَٰلِكَ وَلَوْ يَشَآءُ ٱللَّهُ لَٱنتَصَرَ مِنْهُمْ وَلَٰكِن لِّيَبْلُوَا۟ بَعْضَكُم بِبَعْضٍ وَٱلَّذِينَ قُتِلُوا۟ فِى سَبِيلِ ٱللَّهِ فَلَن يُضِلَّ أَعْمَٰلَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Soki bokutani na bapengwi (na bitumba) bokata bakingo na bango, mpe soki bolongi bango, bokanga bango basinga makasi, na sima soki bolingi botiki bango bakei pamba, soki mpe bolingi bato na bango bapesa bino biloko nde botiki bango, kino bitumba bikosila, mpo ete soki Allah alingaki nde asilani na bango ye moko, kasi ezali тропа komeka bino. Mpona ba оуо bakokufa na nzela ya Allah, akobebisa misala na bango te.

See all translations of this verse →

سَيَهْدِيهِمْ وَيُصْلِحُ بَالَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Akokamba bango mpe akobongisa misala mia bango.

See all translations of this verse →

وَيُدْخِلُهُمُ ٱلْجَنَّةَ عَرَّفَهَا لَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Mpe akokotisaka bango na lola eye alimbolelaki bango (balolenge na yango).

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓا۟ إِن تَنصُرُوا۟ ٱللَّهَ يَنصُرْكُمْ وَيُثَبِّتْ أَقْدَامَكُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Oh bino baye bondima (na Allah)! soki bosalisi Allah, akolongisa bino mpe akolendisa matambi na bino.

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ فَتَعْسًا لَّهُمْ وَأَضَلَّ أَعْمَٰلَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Mpe bapengwi bakozua mpasi mpe akobungisaka misala mia bango.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمْ كَرِهُوا۟ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ فَأَحْبَطَ أَعْمَٰلَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Mpo baboyaki maye Allah akitisaki, yango abebisi misala mia bango.

See all translations of this verse →

أَفَلَمْ يَسِيرُوا۟ فِى ٱلْأَرْضِ فَيَنظُرُوا۟ كَيْفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبْلِهِمْ دَمَّرَ ٱللَّهُ عَلَيْهِمْ وَلِلْكَٰفِرِينَ أَمْثَٰلُهَا

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Mpona nini te bazali kotambola na mokili batala lolenge kani esukelaki baye bazalaki liboso na bango? Allah abebisaki bango, mpe lolenge wana nde ekozalela bapengwi.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ مَوْلَى ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَأَنَّ ٱلْكَٰفِرِينَ لَا مَوْلَىٰ لَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Mpo ete, ya soló, Allah azali mobateli ya bandimi kasi ya sólo bapengwi bazali na mobateli te.

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱللَّهَ يُدْخِلُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَعَمِلُوا۟ ٱلصَّٰلِحَٰتِ جَنَّٰتٍ تَجْرِى مِن تَحْتِهَا ٱلْأَنْهَٰرُ وَٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ يَتَمَتَّعُونَ وَيَأْكُلُونَ كَمَا تَأْكُلُ ٱلْأَنْعَٰمُ وَٱلنَّارُ مَثْوًى لَّهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Ya sólo, Allah akokotisa baye bandimaki mpe basalaki misala milamu na lola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, тре bapengwi bazali kosepela na kólia lolenge banyama baliaka, mpe esika na bango ya kovanda ezali nde na lifelo.

See all translations of this verse →

وَكَأَيِّن مِّن قَرْيَةٍ هِىَ أَشَدُّ قُوَّةً مِّن قَرْيَتِكَ ٱلَّتِىٓ أَخْرَجَتْكَ أَهْلَكْنَٰهُمْ فَلَا نَاصِرَ لَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Mpe bamboka ya makasiboni koleka etuka nayo oyo ebenganaki yo, tobebisaki yango mpe bazuaki mosungi te?

See all translations of this verse →

أَفَمَن كَانَ عَلَىٰ بَيِّنَةٍ مِّن رَّبِّهِۦ كَمَن زُيِّنَ لَهُۥ سُوٓءُ عَمَلِهِۦ وَٱتَّبَعُوٓا۟ أَهْوَآءَهُم

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Boye oyo azali na polele kowuta epai na Nkolo naye, akokani na oyo babongiseli ye mosala ya mabe mpe balandi bamposa na bango?

See all translations of this verse →

مَّثَلُ ٱلْجَنَّةِ ٱلَّتِى وُعِدَ ٱلْمُتَّقُونَ فِيهَآ أَنْهَٰرٌ مِّن مَّآءٍ غَيْرِ ءَاسِنٍ وَأَنْهَٰرٌ مِّن لَّبَنٍ لَّمْ يَتَغَيَّرْ طَعْمُهُۥ وَأَنْهَٰرٌ مِّنْ خَمْرٍ لَّذَّةٍ لِّلشَّٰرِبِينَ وَأَنْهَٰرٌ مِّنْ عَسَلٍ مُّصَفًّى وَلَهُمْ فِيهَا مِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِ وَمَغْفِرَةٌ مِّن رَّبِّهِمْ كَمَنْ هُوَ خَٰلِدٌ فِى ٱلنَّارِ وَسُقُوا۟ مَآءً حَمِيمًا فَقَطَّعَ أَمْعَآءَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Ndakisa ya Iola eye elengelami тропа babangi (Allah); o kati na yango ezali na mingala ya mayi oyo ebebaka te, ezali na mingala ya miliki oyo elengi na yango ebonguanaka te, mpe na mingala ya masanga ya elengi тропа bomeli, na mingala ya mafuta ya nzoi ya kitoko, mpe тропа bango ezali na lolenge ya bambuma nyoso ekozala okati na yango, mpe bakozua bolimbisi kowuta epai ya Nkolo wa bango. Kasi, boye bazali lolenge moko na oyo akotikala na lifelo ya libela bakomelisaka bango mayi ya moto ya makasi mpe ekokatakata misopo na bango?

See all translations of this verse →

وَمِنْهُم مَّن يَسْتَمِعُ إِلَيْكَ حَتَّىٰٓ إِذَا خَرَجُوا۟ مِنْ عِندِكَ قَالُوا۟ لِلَّذِينَ أُوتُوا۟ ٱلْعِلْمَ مَاذَا قَالَ ءَانِفًا أُو۟لَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ طَبَعَ ٱللَّهُ عَلَىٰ قُلُوبِهِمْ وَٱتَّبَعُوٓا۟ أَهْوَآءَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Мре kati na bango, bamosusu bazali koyoka yo, soki babimi epai nayo balobi na baye bazuaki boyebi ete: Alobi nini? Baye wana Allah akanga mitema mia bango mpe balandi sé bamposa na bango.

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ ٱهْتَدَوْا۟ زَادَهُمْ هُدًى وَءَاتَىٰهُمْ تَقْوَىٰهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Мре тропа baye bamitiyaki o nzela ya semba, akokamba bango koleka mpe akobakisela bango bobangi na bango.

See all translations of this verse →

فَهَلْ يَنظُرُونَ إِلَّا ٱلسَّاعَةَ أَن تَأْتِيَهُم بَغْتَةً فَقَدْ جَآءَ أَشْرَاطُهَا فَأَنَّىٰ لَهُمْ إِذَا جَآءَتْهُمْ ذِكْرَىٰهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Boye bazali kozela ete ngonga eyela bango mbalakaka?! Nzoka bilembo na yango bisili koya; mpe soki bokundoli eyeli bango bakokanisa ndenge nini?

See all translations of this verse →

فَٱعْلَمْ أَنَّهُۥ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا ٱللَّهُ وَٱسْتَغْفِرْ لِذَنۢبِكَ وَلِلْمُؤْمِنِينَ وَٱلْمُؤْمِنَٰتِ وَٱللَّهُ يَعْلَمُ مُتَقَلَّبَكُمْ وَمَثْوَىٰكُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Mpe yeba ete: Ya soló, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te bobele Allah, sima osenga bolimbisi ya masumu nayo na ya bandimi ya mibali na ya basi. Allah nde ayebi makambo na bino (awa na nsé), mpe ayebi bisika ya bopemi na bino (lobi kati na lola).

See all translations of this verse →

وَيَقُولُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ لَوْلَا نُزِّلَتْ سُورَةٌ فَإِذَآ أُنزِلَتْ سُورَةٌ مُّحْكَمَةٌ وَذُكِرَ فِيهَا ٱلْقِتَالُ رَأَيْتَ ٱلَّذِينَ فِى قُلُوبِهِم مَّرَضٌ يَنظُرُونَ إِلَيْكَ نَظَرَ ٱلْمَغْشِىِّ عَلَيْهِ مِنَ ٱلْمَوْتِ فَأَوْلَىٰ لَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Mpe bandimi bazali koloba ete: Mpona nini suratu ekitisami te? Kasi soki suratu ya mibeko okati na yango milobeli bitumba, okomona baye bazalaki na bokono omitema bazali kotala yo na etaleli ya moto amoni liwa, nde ezali malamu mpona bango!

See all translations of this verse →

طَاعَةٌ وَقَوْلٌ مَّعْرُوفٌ فَإِذَا عَزَمَ ٱلْأَمْرُ فَلَوْ صَدَقُوا۟ ٱللَّهَ لَكَانَ خَيْرًا لَّهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Botosi mpe liloba ya malamu. Mpe soki motindo mozuami тропа likambo (ya bitumba) ezalaki malamu тропа bango bandimela Allah тропа likambo yango.

See all translations of this verse →

فَهَلْ عَسَيْتُمْ إِن تَوَلَّيْتُمْ أَن تُفْسِدُوا۟ فِى ٱلْأَرْضِ وَتُقَطِّعُوٓا۟ أَرْحَامَكُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Boye soki bopesi mokongo, bokokende te тропа kotia mobulu na nsé mpe kokata bondeko ya mabota? (soki bolingi bokonzi koleka)

See all translations of this verse →

أُو۟لَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ لَعَنَهُمُ ٱللَّهُ فَأَصَمَّهُمْ وَأَعْمَىٰٓ أَبْصَٰرَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Baye wana Allah apesaki bango botutu, mpe abomi bango boyoki mpe bomoni.

See all translations of this verse →

أَفَلَا يَتَدَبَّرُونَ ٱلْقُرْءَانَ أَمْ عَلَىٰ قُلُوبٍ أَقْفَالُهَآ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Mpona nini bazali kososola kurani te to boye mitema na bango mikangami na fungóla?

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱلَّذِينَ ٱرْتَدُّوا۟ عَلَىٰٓ أَدْبَٰرِهِم مِّنۢ بَعْدِ مَا تَبَيَّنَ لَهُمُ ٱلْهُدَى ٱلشَّيْطَٰنُ سَوَّلَ لَهُمْ وَأَمْلَىٰ لَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Ya soló, baye bazali kozongela banzela na bango (ya mabe) na sima ya koyeba nzela ya semba oyo eyeli bango polele, satana akosi bango mpe akweisi bango.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمْ قَالُوا۟ لِلَّذِينَ كَرِهُوا۟ مَا نَزَّلَ ٱللَّهُ سَنُطِيعُكُمْ فِى بَعْضِ ٱلْأَمْرِ وَٱللَّهُ يَعْلَمُ إِسْرَارَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Mpo bango balobaki na baye bayini emoniseli ya Allah ete: Tokotosa bino na ndambu ya makambo, kasi Allah ayebi malamu basekele na bango.

See all translations of this verse →

فَكَيْفَ إِذَا تَوَفَّتْهُمُ ٱلْمَلَٰٓئِكَةُ يَضْرِبُونَ وُجُوهَهُمْ وَأَدْبَٰرَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Mpe ekozala boni soki ba anzelu bazui milimo mia bango, wana bazali kobeta bango na bilongi na mikongo mia bango?

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمُ ٱتَّبَعُوا۟ مَآ أَسْخَطَ ٱللَّهَ وَكَرِهُوا۟ رِضْوَٰنَهُۥ فَأَحْبَطَ أَعْمَٰلَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Wana ezali mpo balandaki maye Allah aboyaki, mpe bazalaki na ntina ya kondima yango te, тре misala mia bango mibebisamaki.

See all translations of this verse →

أَمْ حَسِبَ ٱلَّذِينَ فِى قُلُوبِهِم مَّرَضٌ أَن لَّن يُخْرِجَ ٱللَّهُ أَضْغَٰنَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. To boye baye bazali na bokono na mitema mia bango (bakanisi ete) Allah akobimisa bonguna na bango polele te?

See all translations of this verse →

وَلَوْ نَشَآءُ لَأَرَيْنَٰكَهُمْ فَلَعَرَفْتَهُم بِسِيمَٰهُمْ وَلَتَعْرِفَنَّهُمْ فِى لَحْنِ ٱلْقَوْلِ وَٱللَّهُ يَعْلَمُ أَعْمَٰلَكُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Mpe soki tolingaki nde tolakisaki yo bango, oyebi bango na bilembo na bango. Mpe okoyeba bango na lolenge na bango ya koloba. Kasi Allah ayebi misala na bino.

See all translations of this verse →

وَلَنَبْلُوَنَّكُمْ حَتَّىٰ نَعْلَمَ ٱلْمُجَٰهِدِينَ مِنكُمْ وَٱلصَّٰبِرِينَ وَنَبْلُوَا۟ أَخْبَارَكُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Mpe tokomeka bino mpo toyeba banani bazali kobunda (тропа Allah), тре banani bazali kokanga mitema, mpo ete na sima tomonisa basango na bino.

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ وَصَدُّوا۟ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ وَشَآقُّوا۟ ٱلرَّسُولَ مِنۢ بَعْدِ مَا تَبَيَّنَ لَهُمُ ٱلْهُدَىٰ لَن يَضُرُّوا۟ ٱللَّهَ شَيْـًٔا وَسَيُحْبِطُ أَعْمَٰلَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Ya soló, baye bapengwa тре bazali kobundisi nzela ya Allah, mpe baboyi kondimela motindami o sima ya kolimbolela bango bokambi ya polele, wana bakosala Allah eloko te. Kasi akobebisa misala mia bango.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓا۟ أَطِيعُوا۟ ٱللَّهَ وَأَطِيعُوا۟ ٱلرَّسُولَ وَلَا تُبْطِلُوٓا۟ أَعْمَٰلَكُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Oh bino baye bondima! Botosa Allah mpe botosa motindami (na ye) kasi bobebisa misala mia bino te.

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ وَصَدُّوا۟ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ ثُمَّ مَاتُوا۟ وَهُمْ كُفَّارٌ فَلَن يَغْفِرَ ٱللَّهُ لَهُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Ya sólo, baye bapengwa тре babundisaki nzela ya Allah, sima liwa lizui bango sé na bopengwi, Allah akolimbisaka bango te.

See all translations of this verse →

فَلَا تَهِنُوا۟ وَتَدْعُوٓا۟ إِلَى ٱلسَّلْمِ وَأَنتُمُ ٱلْأَعْلَوْنَ وَٱللَّهُ مَعَكُمْ وَلَن يَتِرَكُمْ أَعْمَٰلَكُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Bolembe te mpe bobenga na kimia te na tango bozali likolo na bango, mpe Allah azali elongo na bino, mpe akokutola misala na bino te.

See all translations of this verse →

إِنَّمَا ٱلْحَيَوٰةُ ٱلدُّنْيَا لَعِبٌ وَلَهْوٌ وَإِن تُؤْمِنُوا۟ وَتَتَّقُوا۟ يُؤْتِكُمْ أُجُورَكُمْ وَلَا يَسْـَٔلْكُمْ أَمْوَٰلَكُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Ya soló, bomoyi ya mokili ezali sé lisano mpe liseki. Soki bondimi mpe bobangi, (Allah) akopesa bino bolamu na bino mpe akosenga bino bomengo te.

See all translations of this verse →

إِن يَسْـَٔلْكُمُوهَا فَيُحْفِكُمْ تَبْخَلُوا۟ وَيُخْرِجْ أَضْغَٰنَكُمْ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Soki atunaki bino yango, bolingaki bozala bapimi, mpe akobimisa boyini na bino.

See all translations of this verse →

هَٰٓأَنتُمْ هَٰٓؤُلَآءِ تُدْعَوْنَ لِتُنفِقُوا۟ فِى سَبِيلِ ٱللَّهِ فَمِنكُم مَّن يَبْخَلُ وَمَن يَبْخَلْ فَإِنَّمَا يَبْخَلُ عَن نَّفْسِهِۦ وَٱللَّهُ ٱلْغَنِىُّ وَأَنتُمُ ٱلْفُقَرَآءُ وَإِن تَتَوَلَّوْا۟ يَسْتَبْدِلْ قَوْمًا غَيْرَكُمْ ثُمَّ لَا يَكُونُوٓا۟ أَمْثَٰلَكُم

Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Bino nde, soki babengi bino ete bobimisa na nzela ya Allah, basusu bakangi maboko, kasi oyo akokanga maboko ayeba ete asali yango na nzoto naye moko, nzoka nde Allah azali wa bomengo mpe bino bozali babola. Mpe soki bopesi mokongo akoya na bato ya sika, mpe bakozala lokola bino te.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70