caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Ar-Ra'd الرعد

43 verses · Medina · revelation order 96

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ الٓمٓر تِلْكَ ءَايَٰتُ ٱلْكِتَٰبِ وَٱلَّذِىٓ أُنزِلَ إِلَيْكَ مِن رَّبِّكَ ٱلْحَقُّ وَلَٰكِنَّ أَكْثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يُؤْمِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Alif, lâm, mím, rá.(1) wana ezali mikapo mia buku, mpe oyo ekiti epai nayo kowuta epai ya Nkolo nayo ezali bosôló. Kaši ebele ya bato bazali kondima na yango te.

See all translations of this verse →

ٱللَّهُ ٱلَّذِى رَفَعَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ بِغَيْرِ عَمَدٍ تَرَوْنَهَا ثُمَّ ٱسْتَوَىٰ عَلَى ٱلْعَرْشِ وَسَخَّرَ ٱلشَّمْسَ وَٱلْقَمَرَ كُلٌّ يَجْرِى لِأَجَلٍ مُّسَمًّى يُدَبِّرُ ٱلْأَمْرَ يُفَصِّلُ ٱلْـَٔايَٰتِ لَعَلَّكُم بِلِقَآءِ رَبِّكُمْ تُوقِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Allah nde atelemisi mapata likolo na bino ezali na makonzi te, bozali kornona yango, mpe sima atombuami likolo ya ngwende. Мре akeli mwese na sanza ezali kotambola moko na moko na tango na yango, azali kokamba makambo (kotia mibeko) mpe azali kolimbola mikapo na bilembo, mpo été bobanga mpe bondima na bokutani na Nkolo wa bino.

See all translations of this verse →

وَهُوَ ٱلَّذِى مَدَّ ٱلْأَرْضَ وَجَعَلَ فِيهَا رَوَٰسِىَ وَأَنْهَٰرًا وَمِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِ جَعَلَ فِيهَا زَوْجَيْنِ ٱثْنَيْنِ يُغْشِى ٱلَّيْلَ ٱلنَّهَارَ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَٰتٍ لِّقَوْمٍ يَتَفَكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Мре ye nde atandi mabele mpe apiki piki bangomba likolo na yango, mpe mingala mpe ba mbuma ya ndenge na ndenge, mpe akeli biloko binso mibale mibale, azali kozipa moyi na butu. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakoka kokanisa.

See all translations of this verse →

وَفِى ٱلْأَرْضِ قِطَعٌ مُّتَجَٰوِرَٰتٌ وَجَنَّٰتٌ مِّنْ أَعْنَٰبٍ وَزَرْعٌ وَنَخِيلٌ صِنْوَانٌ وَغَيْرُ صِنْوَانٍ يُسْقَىٰ بِمَآءٍ وَٰحِدٍ وَنُفَضِّلُ بَعْضَهَا عَلَىٰ بَعْضٍ فِى ٱلْأُكُلِ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَٰتٍ لِّقَوْمٍ يَعْقِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Mpe okokuta na mokili ya nsé (mabele) mapango ekangama kangama, mpe bilanga ya a’náb(1) mpe mbuma, mpe ba nzete ya tamru bibotama ebele ya kokangama esika moko. Mpe bisusu bizali na bituka kati kati na yango (biteni biteni) mayi mazali kobwakama na yango, mpe tozali kopesa elengi na misusu koleka misusu тропа kólia. Ya soló, nyoso wana ezali bilembo mpo bato basosolo.

See all translations of this verse →

وَإِن تَعْجَبْ فَعَجَبٌ قَوْلُهُمْ أَءِذَا كُنَّا تُرَٰبًا أَءِنَّا لَفِى خَلْقٍ جَدِيدٍ أُو۟لَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ بِرَبِّهِمْ وَأُو۟لَٰٓئِكَ ٱلْأَغْلَٰلُ فِىٓ أَعْنَاقِهِمْ وَأُو۟لَٰٓئِكَ أَصْحَٰبُ ٱلنَّارِ هُمْ فِيهَا خَٰلِدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Mpe soki ozali kokamwa kasi liloba na bango nde ezali kokamwisa koleka, tango bazali koloba été: Soki tokufi mpe tokomi mputulu, boye tokozonga lisusu bikelamu ya sika? В aye wana nde bapengwi na Nkolo na bango, mpe bango nde miniololo makozalaka na bakingo na bango, bango nde bato ya moto bakozala okati na yango seko na seko.

See all translations of this verse →

وَيَسْتَعْجِلُونَكَ بِٱلسَّيِّئَةِ قَبْلَ ٱلْحَسَنَةِ وَقَدْ خَلَتْ مِن قَبْلِهِمُ ٱلْمَثُلَٰتُ وَإِنَّ رَبَّكَ لَذُو مَغْفِرَةٍ لِّلنَّاسِ عَلَىٰ ظُلْمِهِمْ وَإِنَّ رَبَّكَ لَشَدِيدُ ٱلْعِقَابِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Mpe bazali kowela kosenga yo été mabe eyela bango noki, kasi bazali kowelela te kosenga bolamu. Mpe ya sólo, bitumbu ya ndenge wana esi esalami liboso na bango, mpe ya sólo, Nkolo nayo atonda bolimbisi тропа bato likolo ya mabe na bango, mpe ya soló, Nkolo nayo apesaka etumbu ya makasi.

See all translations of this verse →

وَيَقُولُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ لَوْلَآ أُنزِلَ عَلَيْهِ ءَايَةٌ مِّن رَّبِّهِۦٓ إِنَّمَآ أَنتَ مُنذِرٌ وَلِكُلِّ قَوْمٍ هَادٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Mpe bapengwi bazali koloba: Boye тропа nini te makamwisi mikitelaki ye (Muhammad) kowuta epai ya Nkolo waye? Ya sólo, ozali nde mokebisi, mpe bato na bato bazali na mokambi.

See all translations of this verse →

ٱللَّهُ يَعْلَمُ مَا تَحْمِلُ كُلُّ أُنثَىٰ وَمَا تَغِيضُ ٱلْأَرْحَامُ وَمَا تَزْدَادُ وَكُلُّ شَىْءٍ عِندَهُۥ بِمِقْدَارٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Allah ayebi oyo mwasi amemi okati ya libumu naye, na eleko oyo ekosala o kati ya libumu, na bozingami bona, mpe atiya eloko na eloko na ndelo na yango.

See all translations of this verse →

عَٰلِمُ ٱلْغَيْبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ ٱلْكَبِيرُ ٱلْمُتَعَالِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. (Ye nde) moyebi ya oyo mabombami nyoso na maye mazali котопапа polele, azali monene, azali likolo koleka.

See all translations of this verse →

سَوَآءٌ مِّنكُم مَّنْ أَسَرَّ ٱلْقَوْلَ وَمَن جَهَرَ بِهِۦ وَمَنْ هُوَ مُسْتَخْفٍۭ بِٱلَّيْلِ وَسَارِبٌۢ بِٱلنَّهَارِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Bakeseni te epai naye oyo azali kobomba maloba naye, mpe oyo mosusu azali kobimisa ya ye polele, oyo azali komibomba na butu, mpe oyo azali komibimisa na moyi.

See all translations of this verse →

لَهُۥ مُعَقِّبَٰتٌ مِّنۢ بَيْنِ يَدَيْهِ وَمِنْ خَلْفِهِۦ يَحْفَظُونَهُۥ مِنْ أَمْرِ ٱللَّهِ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُغَيِّرُ مَا بِقَوْمٍ حَتَّىٰ يُغَيِّرُوا۟ مَا بِأَنفُسِهِمْ وَإِذَآ أَرَادَ ٱللَّهُ بِقَوْمٍ سُوٓءًا فَلَا مَرَدَّ لَهُۥ وَمَا لَهُم مِّن دُونِهِۦ مِن وَالٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Moto azali na ba anzelu sima naye mpe liboso naye bazali kokita tango nyoso тропа kobatela ye na mokano kowuta epai ya Allah. Ya sólo, Allah akobongola makambo ya bato te kino bango moko bakobongola maye bazali na yango kowuta na milimo mia bango, soki Allah alingi mabe ezua bato, moto moko ya kopekisa azali te. Mpe bakozala na mobateli ata moko te na botiki ye.

See all translations of this verse →

هُوَ ٱلَّذِى يُرِيكُمُ ٱلْبَرْقَ خَوْفًا وَطَمَعًا وَيُنشِئُ ٱلسَّحَابَ ٱلثِّقَالَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Yende azali komonisa bino bongengi, ezali kobangisa bino na nkake mpe ezali kopesa bino elikya mpe azali kokomisa mapata mazala kilo.

See all translations of this verse →

وَيُسَبِّحُ ٱلرَّعْدُ بِحَمْدِهِۦ وَٱلْمَلَٰٓئِكَةُ مِنْ خِيفَتِهِۦ وَيُرْسِلُ ٱلصَّوَٰعِقَ فَيُصِيبُ بِهَا مَن يَشَآءُ وَهُمْ يُجَٰدِلُونَ فِى ٱللَّهِ وَهُوَ شَدِيدُ ٱلْمِحَالِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Mpe nkake ezali kokumisa ye na lolaka na yango, na ba anzelu kati na bobangi naye. Mpe azali kotinda mikalali mpo ezwa oyo alingi, kasi bazali kobunda о nzela ya Allah mpe azali makasi na etumbu.

See all translations of this verse →

لَهُۥ دَعْوَةُ ٱلْحَقِّ وَٱلَّذِينَ يَدْعُونَ مِن دُونِهِۦ لَا يَسْتَجِيبُونَ لَهُم بِشَىْءٍ إِلَّا كَبَٰسِطِ كَفَّيْهِ إِلَى ٱلْمَآءِ لِيَبْلُغَ فَاهُ وَمَا هُوَ بِبَٰلِغِهِۦ وَمَا دُعَآءُ ٱلْكَٰفِرِينَ إِلَّا فِى ضَلَٰلٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Mbela ya bosôló ezali epai naye. Mpe baye bazali kobondela ba nzambe misusu kotika ye, banzambe wana bakoyanola bango na eloko moko te, bazali lokola moto oyo atandi maboko na mayi тропа komema yango na monoko naye, mpe azali kokoka te. Kasi kosenga ya bapagano ezali sé na libungi.

See all translations of this verse →

وَلِلَّهِ يَسْجُدُ مَن فِى ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ طَوْعًا وَكَرْهًا وَظِلَٰلُهُم بِٱلْغُدُوِّ وَٱلْـَٔاصَالِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Mpe тропа Allah, baye banso bazali na likolo na mabele bazali kofukamela ye, na esengo to na koyina, lolenge moko na bililingi na bango kobanda tongo kino mpokwa.

See all translations of this verse →

قُلْ مَن رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ قُلِ ٱللَّهُ قُلْ أَفَٱتَّخَذْتُم مِّن دُونِهِۦٓ أَوْلِيَآءَ لَا يَمْلِكُونَ لِأَنفُسِهِمْ نَفْعًا وَلَا ضَرًّا قُلْ هَلْ يَسْتَوِى ٱلْأَعْمَىٰ وَٱلْبَصِيرُ أَمْ هَلْ تَسْتَوِى ٱلظُّلُمَٰتُ وَٱلنُّورُ أَمْ جَعَلُوا۟ لِلَّهِ شُرَكَآءَ خَلَقُوا۟ كَخَلْقِهِۦ فَتَشَٰبَهَ ٱلْخَلْقُ عَلَيْهِمْ قُلِ ٱللَّهُ خَٰلِقُ كُلِّ شَىْءٍ وَهُوَ ٱلْوَٰحِدُ ٱلْقَهَّٰرُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Loba na bango:nani azali Nkolo ya likolo na mabele? Loba: Allah, loba: Boye botiki ye bozui bakonzi basusu baye bakoki komisalisa te mpe komisala mabe te? Loba: Boye bakokani, oyo akufa miso na oyo azali na miso? To boye mwinda na molili ekokani? To bazali nde kotiyela Allah banzambe misusu, bazali kokela lokola Allah akela, mpo été bikelamu bikokana? Loba: Allah nde mokeli wa biloko binso, mpe azali sé ye moko na bokasi.

See all translations of this verse →

أَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءً فَسَالَتْ أَوْدِيَةٌۢ بِقَدَرِهَا فَٱحْتَمَلَ ٱلسَّيْلُ زَبَدًا رَّابِيًا وَمِمَّا يُوقِدُونَ عَلَيْهِ فِى ٱلنَّارِ ٱبْتِغَآءَ حِلْيَةٍ أَوْ مَتَٰعٍ زَبَدٌ مِّثْلُهُۥ كَذَٰلِكَ يَضْرِبُ ٱللَّهُ ٱلْحَقَّ وَٱلْبَٰطِلَ فَأَمَّا ٱلزَّبَدُ فَيَذْهَبُ جُفَآءً وَأَمَّا مَا يَنفَعُ ٱلنَّاسَ فَيَمْكُثُ فِى ٱلْأَرْضِ كَذَٰلِكَ يَضْرِبُ ٱللَّهُ ٱلْأَمْثَالَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Akitisaki mayi kowuta na mapata, mpe mibongisi mbeto ya botioli na yango, engebene na bonene bwa yango, tango etondi koleka. Ezali komema bafulufulu mpe biloko ya ndenge ne ndenge, ya wolo mpe mabende biye bakotisaka na moto, тропа kosalela biloko ya bonzenga ya kolata, to mpe bisaleli. Ndenge wana nde Allah abetaka ndakisa ya malamu na ya mabe. Kasi тропа bafulufulu na bosoto mosusu oyo ezalaki likolo ya mayi, bikotiola mpe bilimwi, kasi тропа biloko biye bizali na litomba тропа bato, bikotikala na mabele. Ndenge wana nde Allah abetaka ba ndakisa bia ye.

See all translations of this verse →

لِلَّذِينَ ٱسْتَجَابُوا۟ لِرَبِّهِمُ ٱلْحُسْنَىٰ وَٱلَّذِينَ لَمْ يَسْتَجِيبُوا۟ لَهُۥ لَوْ أَنَّ لَهُم مَّا فِى ٱلْأَرْضِ جَمِيعًا وَمِثْلَهُۥ مَعَهُۥ لَٱفْتَدَوْا۟ بِهِۦٓ أُو۟لَٰٓئِكَ لَهُمْ سُوٓءُ ٱلْحِسَابِ وَمَأْوَىٰهُمْ جَهَنَّمُ وَبِئْسَ ٱلْمِهَادُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Suka ya malamu ezali тропа baye bazali koyanola na mbela ya Nkolo wa bango, kaši baye baboyaki koyanola ye, soki ezalaki été bazua biloko nyoso oyo ezali na mabele mbala mibale, тропа bango été basomba na etumbu, balingaki kosala yango na lombango. Bango wana nde bazali na mbano ya mabe, mpe esika na bango ya kovanda ekozala lifelo oyo ezali efandelo ya mabe.

See all translations of this verse →

أَفَمَن يَعْلَمُ أَنَّمَآ أُنزِلَ إِلَيْكَ مِن رَّبِّكَ ٱلْحَقُّ كَمَنْ هُوَ أَعْمَىٰٓ إِنَّمَا يَتَذَكَّرُ أُو۟لُوا۟ ٱلْأَلْبَٰبِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Boye moto oyo ayebi été maye makiteli yo ezali bosôló kowuta epai ya Nkolo wa yo, akokani na moto oyo miso makangama kati na libungi?, sé banganga ya mayele nde bazali kokanisa malamu.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ يُوفُونَ بِعَهْدِ ٱللَّهِ وَلَا يَنقُضُونَ ٱلْمِيثَٰقَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Baye bazali kokokisa malako ma bango epai ya Allah, тре bazali kozangisa yango te;

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ يَصِلُونَ مَآ أَمَرَ ٱللَّهُ بِهِۦٓ أَن يُوصَلَ وَيَخْشَوْنَ رَبَّهُمْ وَيَخَافُونَ سُوٓءَ ٱلْحِسَابِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Мре baye bazali kokangisa maye Allah atindaki ete ekangisama, (bondeko), mpe bazali kobanga Nkolo wa bango, тре bazali kobanga lifuta ya mabe,

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ صَبَرُوا۟ ٱبْتِغَآءَ وَجْهِ رَبِّهِمْ وَأَقَامُوا۟ ٱلصَّلَوٰةَ وَأَنفَقُوا۟ مِمَّا رَزَقْنَٰهُمْ سِرًّا وَعَلَانِيَةً وَيَدْرَءُونَ بِٱلْحَسَنَةِ ٱلسَّيِّئَةَ أُو۟لَٰٓئِكَ لَهُمْ عُقْبَى ٱلدَّارِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Mpe baye bakangaki mitema тропа koluka elongi ya Nkolo wa bango, mpe batelemisaki losambo, mpe babimisi maye topesaki bango na kobombana тре na polele, mpe bazali koya na bolamu тропа kolongola mabe. Bango nde bakozuaka mbano elama,

See all translations of this verse →

جَنَّٰتُ عَدْنٍ يَدْخُلُونَهَا وَمَن صَلَحَ مِنْ ءَابَآئِهِمْ وَأَزْوَٰجِهِمْ وَذُرِّيَّٰتِهِمْ وَٱلْمَلَٰٓئِكَةُ يَدْخُلُونَ عَلَيْهِم مِّن كُلِّ بَابٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Bakokota na lola (ya edeni) lolenge moko na baye bazali kosala bolamu kowuta na baboti na bango, na basi ba bango, na mabota ma bango. Na baye banso bazali na bondimi ya malamu, mpe ba anzelu bakokotela bango na bizibeli (bikuke) binso,

See all translations of this verse →

سَلَٰمٌ عَلَيْكُم بِمَا صَبَرْتُمْ فَنِعْمَ عُقْبَى ٱلدَّارِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Kimia ezala o kati na bino тропа maye bozalaki kokanga mitema mpe koyika mpiko. Mpe oyo nde suka y a efandelo y a malamu!

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ يَنقُضُونَ عَهْدَ ٱللَّهِ مِنۢ بَعْدِ مِيثَٰقِهِۦ وَيَقْطَعُونَ مَآ أَمَرَ ٱللَّهُ بِهِۦٓ أَن يُوصَلَ وَيُفْسِدُونَ فِى ٱلْأَرْضِ أُو۟لَٰٓئِكَ لَهُمُ ٱللَّعْنَةُ وَلَهُمْ سُوٓءُ ٱلدَّارِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Kaši baye bazali kotosa malako ma bango te o sima ya kolakana тропа Allah, mpe bazali kokabola maye Allah asangisaki yango, mpe bazali kotiya mobulu na kobebisa o kati ya mokili, bakozala na elakeli ya mabe mpe bakozalaka na suka ya mabe.

See all translations of this verse →

ٱللَّهُ يَبْسُطُ ٱلرِّزْقَ لِمَن يَشَآءُ وَيَقْدِرُ وَفَرِحُوا۟ بِٱلْحَيَوٰةِ ٱلدُّنْيَا وَمَا ٱلْحَيَوٰةُ ٱلدُّنْيَا فِى ٱلْـَٔاخِرَةِ إِلَّا مَتَٰعٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Allah apesaka ebele bomengo na oyo alingi, mpe akutolaka, bazali kosepela na bomoyi ya nsé, kasi bisengo ya nsé liboso ya bisengo ya mokolo ya suka ezali lokola masano ya tangu токе.

See all translations of this verse →

وَيَقُولُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ لَوْلَآ أُنزِلَ عَلَيْهِ ءَايَةٌ مِّن رَّبِّهِۦ قُلْ إِنَّ ٱللَّهَ يُضِلُّ مَن يَشَآءُ وَيَهْدِىٓ إِلَيْهِ مَنْ أَنَابَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Bapengwi bakolobaka: Мропа nini bakitiseli ye (Muhammad) makamwisi to bilembo kowuta epai ya Nkolo waye te? Loba: Ya soló, Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo azali kotubela.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَتَطْمَئِنُّ قُلُوبُهُم بِذِكْرِ ٱللَّهِ أَلَا بِذِكْرِ ٱللَّهِ تَطْمَئِنُّ ٱلْقُلُوبُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Baye bandimi mitema mia bango mikitaka na bokundoli lia Allah. Boye bokundoli ya Allah te nde ekitisaka mitema?

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَعَمِلُوا۟ ٱلصَّٰلِحَٰتِ طُوبَىٰ لَهُمْ وَحُسْنُ مَـَٔابٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na bomoyi bwa kitoko o mokolo mwa suka, mpe bozongi elamu.

See all translations of this verse →

كَذَٰلِكَ أَرْسَلْنَٰكَ فِىٓ أُمَّةٍ قَدْ خَلَتْ مِن قَبْلِهَآ أُمَمٌ لِّتَتْلُوَا۟ عَلَيْهِمُ ٱلَّذِىٓ أَوْحَيْنَآ إِلَيْكَ وَهُمْ يَكْفُرُونَ بِٱلرَّحْمَٰنِ قُلْ هُوَ رَبِّى لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ عَلَيْهِ تَوَكَّلْتُ وَإِلَيْهِ مَتَابِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Yango wana nde totinda yo okati ya umma(1) oyo bituka ebele esilaki koleka liboso nayo, été otangela bango emoniseli oyo tokitisaki epai nayo. Mpe bazali kopengwa na Ar-Rahmán,(2) loba: Ye nde Nkolo wa ngai nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye, epai naye namipesaka mpe natiye elikya na ngai, mpe epai naye nde nazali komizongisa тропа kotubela.

See all translations of this verse →

وَلَوْ أَنَّ قُرْءَانًا سُيِّرَتْ بِهِ ٱلْجِبَالُ أَوْ قُطِّعَتْ بِهِ ٱلْأَرْضُ أَوْ كُلِّمَ بِهِ ٱلْمَوْتَىٰ بَل لِّلَّهِ ٱلْأَمْرُ جَمِيعًا أَفَلَمْ يَا۟يْـَٔسِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓا۟ أَن لَّوْ يَشَآءُ ٱللَّهُ لَهَدَى ٱلنَّاسَ جَمِيعًا وَلَا يَزَالُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ تُصِيبُهُم بِمَا صَنَعُوا۟ قَارِعَةٌ أَوْ تَحُلُّ قَرِيبًا مِّن دَارِهِمْ حَتَّىٰ يَأْتِىَ وَعْدُ ٱللَّهِ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُخْلِفُ ٱلْمِيعَادَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Soki ezalaki ete kurani moko ekoka kozwama eye na yango bangomba bikokaki kotambwisama to mpe mabele kopasuka, to elobisaka bibembe, kasi mitindo minso mizali mia Allah. Bandimi bazali koyeba te ete soki Allah alingaki, nde akambaki bato banso o nzela ya semba, na yango тропа baye bazali kondima te, bakozangaka te na maye basalaki ya mabe, bakobetamaka na bitumbu, to mpe bitumbu yango ebeta pene ya bandako na bango kino elaka ya Allah eyela bango. Ya sôló, Allah azangisaka elaka naye te.

See all translations of this verse →

وَلَقَدِ ٱسْتُهْزِئَ بِرُسُلٍ مِّن قَبْلِكَ فَأَمْلَيْتُ لِلَّذِينَ كَفَرُوا۟ ثُمَّ أَخَذْتُهُمْ فَكَيْفَ كَانَ عِقَابِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Mpe basilaki kotiola na batindami liboso nayo, mpe napesaki bapengwi etumbu, sima bazuamaki, mpe lolenge nini etumbu na ngai ezalaki!

See all translations of this verse →

أَفَمَنْ هُوَ قَآئِمٌ عَلَىٰ كُلِّ نَفْسٍۭ بِمَا كَسَبَتْ وَجَعَلُوا۟ لِلَّهِ شُرَكَآءَ قُلْ سَمُّوهُمْ أَمْ تُنَبِّـُٔونَهُۥ بِمَا لَا يَعْلَمُ فِى ٱلْأَرْضِ أَم بِظَٰهِرٍ مِّنَ ٱلْقَوْلِ بَلْ زُيِّنَ لِلَّذِينَ كَفَرُوا۟ مَكْرُهُمْ وَصُدُّوا۟ عَنِ ٱلسَّبِيلِ وَمَن يُضْلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِنْ هَادٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Boye oyo azali kornona nyoso oyo molimo na molimo ezali kosala? Mpe bazali kopesa Allah balongani, loba: Bopesa bango bankombo, to bozali koyebisa ye (Allah) eloko nini ayebi te o kati ya mabele? To bozalaki sé kokosa bango na bankombo ya lokuta? Na yango, tobongiseli bapengwi mabe na bango mpe toboyisi bango nzela ya semba. Mpe na oyo Allah abungisi mosusu azali te тропа kokamba ye.

See all translations of this verse →

لَّهُمْ عَذَابٌ فِى ٱلْحَيَوٰةِ ٱلدُّنْيَا وَلَعَذَابُ ٱلْـَٔاخِرَةِ أَشَقُّ وَمَا لَهُم مِّنَ ٱللَّهِ مِن وَاقٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Bazali na etumbu na bomoyi ya nsé, mpe etumbu o mokolo mwa suka ekozala makasi mingi, mpe bakozua mobateli moko te (na etumbu) ya Allah.

See all translations of this verse →

مَّثَلُ ٱلْجَنَّةِ ٱلَّتِى وُعِدَ ٱلْمُتَّقُونَ تَجْرِى مِن تَحْتِهَا ٱلْأَنْهَٰرُ أُكُلُهَا دَآئِمٌ وَظِلُّهَا تِلْكَ عُقْبَى ٱلَّذِينَ ٱتَّقَوا۟ وَّعُقْبَى ٱلْكَٰفِرِينَ ٱلنَّارُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Ndakisa ya Iola eye elengelami тропа babangi, ezali koleka onse na yango mingala, mbuma na yango ya koliya ekosilaka te. Na elili na yango, wana nde ekozala litomba lia baye bazalaki kobanga, mpe litomba lia bapengwi likozalaka nde moto.

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ ءَاتَيْنَٰهُمُ ٱلْكِتَٰبَ يَفْرَحُونَ بِمَآ أُنزِلَ إِلَيْكَ وَمِنَ ٱلْأَحْزَابِ مَن يُنكِرُ بَعْضَهُۥ قُلْ إِنَّمَآ أُمِرْتُ أَنْ أَعْبُدَ ٱللَّهَ وَلَآ أُشْرِكَ بِهِۦٓ إِلَيْهِ أَدْعُوا۟ وَإِلَيْهِ مَـَٔابِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Мре baye topesaki bango buku, bazali kosepela na maye ekiti Epai nayo, basusu bazali koboya eteni na yango. Loba: Ya soló, natindamaki тропа kobondela Allah, тре nasangisa ye na eloko te, epai naye nde nazali kobenga (bato) mpe epai naye nde bozongi na ngai.

See all translations of this verse →

وَكَذَٰلِكَ أَنزَلْنَٰهُ حُكْمًا عَرَبِيًّا وَلَئِنِ ٱتَّبَعْتَ أَهْوَآءَهُم بَعْدَ مَا جَآءَكَ مِنَ ٱلْعِلْمِ مَا لَكَ مِنَ ٱللَّهِ مِن وَلِىٍّ وَلَا وَاقٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Mpe na lolenge wana nde tokitisaki yango(1) epai nayo na lokota ya arabo été ezala mobeko, mpe soki olandi ba mposa ya bango o sima ya boyebi oyo esili koyela yo kowuta epai ya Allah okozala na mokonzi te mpe mobateli te.

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ أَرْسَلْنَا رُسُلًا مِّن قَبْلِكَ وَجَعَلْنَا لَهُمْ أَزْوَٰجًا وَذُرِّيَّةً وَمَا كَانَ لِرَسُولٍ أَن يَأْتِىَ بِـَٔايَةٍ إِلَّا بِإِذْنِ ٱللَّهِ لِكُلِّ أَجَلٍ كِتَابٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Mpe tosilaki kotinda batindami yambo nayo, mpe topesaki bango basi na bana. Мре motindami moko te ayaki na makamwisi sé ezala na bolingi bwa Allah. Мре eloko nyoso esila kokomama na tango na yango.

See all translations of this verse →

يَمْحُوا۟ ٱللَّهُ مَا يَشَآءُ وَيُثْبِتُ وَعِندَهُۥٓ أُمُّ ٱلْكِتَٰبِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Allah alimwisaka mpe abatelaka oyo alingi, epai naye nde mama ya buku ezuami.

See all translations of this verse →

وَإِن مَّا نُرِيَنَّكَ بَعْضَ ٱلَّذِى نَعِدُهُمْ أَوْ نَتَوَفَّيَنَّكَ فَإِنَّمَا عَلَيْكَ ٱلْبَلَٰغُ وَعَلَيْنَا ٱلْحِسَابُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Mpe tokoki kolakisa yo ndambu ya maye tolengeli тропа bango ya etumbu awa na nsé, to тре toboma yo liboso été eyela bango, kasi yo ozali na eloko ya kosala te sé kokomisa sango (liloba) mpe epai na biso nde lifuta lizali.

See all translations of this verse →

أَوَلَمْ يَرَوْا۟ أَنَّا نَأْتِى ٱلْأَرْضَ نَنقُصُهَا مِنْ أَطْرَافِهَا وَٱللَّهُ يَحْكُمُ لَا مُعَقِّبَ لِحُكْمِهِۦ وَهُوَ سَرِيعُ ٱلْحِسَابِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Boye bazali kornona te ete, tokoya na mabele mpe tozali kokutola yango epai na epai? Mpe Allah nde mokati wa makambo, mpe moko te akoki koboya bokati bwa ye, mpe azali noki тропа kopesa lifuti.

See all translations of this verse →

وَقَدْ مَكَرَ ٱلَّذِينَ مِن قَبْلِهِمْ فَلِلَّهِ ٱلْمَكْرُ جَمِيعًا يَعْلَمُ مَا تَكْسِبُ كُلُّ نَفْسٍ وَسَيَعْلَمُ ٱلْكُفَّٰرُ لِمَنْ عُقْبَى ٱلدَّارِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Mpe baye balekaki liboso basilaki kosala likita ya mabe, kasi Allah asalelaki bango banso likita, ayebaka maye manso moto asalaka. Mpe bapengwi bakoyebaka etumbu ya mbeba ya bango o mokolo mwa suka.

See all translations of this verse →

وَيَقُولُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ لَسْتَ مُرْسَلًا قُلْ كَفَىٰ بِٱللَّهِ شَهِيدًۢا بَيْنِى وَبَيْنَكُمْ وَمَنْ عِندَهُۥ عِلْمُ ٱلْكِتَٰبِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Mpe bapagano bazali koloba ete ozali motindami te. Loba: Allah akoki lokola nzeneneke kati na ngai na bino, mpe lolenge moko na baye bazua boyebi ya buku.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70