caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Yusuf يوسف

111 verses · Mecca · revelation order 53

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ الٓر تِلْكَ ءَايَٰتُ ٱلْكِتَٰبِ ٱلْمُبِينِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Alif, lâm, râ(1). Wana ezali mikapo mia buku ya polele.

See all translations of this verse →

إِنَّآ أَنزَلْنَٰهُ قُرْءَٰنًا عَرَبِيًّا لَّعَلَّكُمْ تَعْقِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Ya soló, tokitisaki yango kurani na lokota ya arabo mpo ete bososola.

See all translations of this verse →

نَحْنُ نَقُصُّ عَلَيْكَ أَحْسَنَ ٱلْقَصَصِ بِمَآ أَوْحَيْنَآ إِلَيْكَ هَٰذَا ٱلْقُرْءَانَ وَإِن كُنتَ مِن قَبْلِهِۦ لَمِنَ ٱلْغَٰفِلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Tozali koyebisa yo masolo ma kitoko maye tokitisaki kurani eye epai nayo, mpe ata soki ozalaka liboso na yango o kati ya baye bazangaki bokebi.

See all translations of this verse →

إِذْ قَالَ يُوسُفُ لِأَبِيهِ يَٰٓأَبَتِ إِنِّى رَأَيْتُ أَحَدَ عَشَرَ كَوْكَبًا وَٱلشَّمْسَ وَٱلْقَمَرَ رَأَيْتُهُمْ لِى سَٰجِدِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Tango Yûsuf alobaki na tata waye: Oh tata na ngai! Ya solo, ngai namoni na ndoto minzoto zomi na moko, mpe mwese na sanza, mizali kogumbamela ngai.

See all translations of this verse →

قَالَ يَٰبُنَىَّ لَا تَقْصُصْ رُءْيَاكَ عَلَىٰٓ إِخْوَتِكَ فَيَكِيدُوا۟ لَكَ كَيْدًا إِنَّ ٱلشَّيْطَٰنَ لِلْإِنسَٰنِ عَدُوٌّ مُّبِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Alobaki: Oh mwana wa ngai! Kobetela bandeko bayo ndoto nayo eye te, mpo bakoki kosalela yo likita ya mabe. Ya solo satana azali monguna ya polele тропа moto.

See all translations of this verse →

وَكَذَٰلِكَ يَجْتَبِيكَ رَبُّكَ وَيُعَلِّمُكَ مِن تَأْوِيلِ ٱلْأَحَادِيثِ وَيُتِمُّ نِعْمَتَهُۥ عَلَيْكَ وَعَلَىٰٓ ءَالِ يَعْقُوبَ كَمَآ أَتَمَّهَا عَلَىٰٓ أَبَوَيْكَ مِن قَبْلُ إِبْرَٰهِيمَ وَإِسْحَٰقَ إِنَّ رَبَّكَ عَلِيمٌ حَكِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Mpe ndenge wana nde Nkolo wayo akopona yo, mpe akolakisa yo ndimbola ya bandoto mpe akokokisa bolamu bwa ye likolo nayo, mpe likolo lia bana ba Ya’qúb, lolenge akokisaki yango liboso epai ya baboti nayo mibale, Ibrâhîm na Is’háq. Ya soló Nkolo wayo azali moyebi atonda bwanya.

See all translations of this verse →

لَّقَدْ كَانَ فِى يُوسُفَ وَإِخْوَتِهِۦٓ ءَايَٰتٌ لِّلسَّآئِلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Ezalaki ya sólo, epai ya Yûsuf na bandeko baye bilembo тропа batuni mituna.

See all translations of this verse →

إِذْ قَالُوا۟ لَيُوسُفُ وَأَخُوهُ أَحَبُّ إِلَىٰٓ أَبِينَا مِنَّا وَنَحْنُ عُصْبَةٌ إِنَّ أَبَانَا لَفِى ضَلَٰلٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Tango balobaki ete: Yûsuf na ndeko waye balingami epai ya tata wa biso koleka, mpe biso tozali lisanga lia makasi. Ya sólo, tata wa biso azali na libunga lia polele.

See all translations of this verse →

ٱقْتُلُوا۟ يُوسُفَ أَوِ ٱطْرَحُوهُ أَرْضًا يَخْلُ لَكُمْ وَجْهُ أَبِيكُمْ وَتَكُونُوا۟ مِنۢ بَعْدِهِۦ قَوْمًا صَٰلِحِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Boboma Yûsuf to botinda ye o mboka nyoso ya mosika. Wana nde elongi ya tata wa bino ekotala bino mbala moko, mpe bokozala sima na yango bato balamu.

See all translations of this verse →

قَالَ قَآئِلٌ مِّنْهُمْ لَا تَقْتُلُوا۟ يُوسُفَ وَأَلْقُوهُ فِى غَيَٰبَتِ ٱلْجُبِّ يَلْتَقِطْهُ بَعْضُ ٱلسَّيَّارَةِ إِن كُنتُمْ فَٰعِلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Moko kati na bango alobi: Boboma Yûsuf te, kasi bobwaka ye o kati ya libulu lia mayi ya mozindo, bakozua ye na baleki nzela, soki bokosala.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰٓأَبَانَا مَا لَكَ لَا تَأْمَ۫نَّا عَلَىٰ يُوسُفَ وَإِنَّا لَهُۥ لَنَٰصِحُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Balobaki: Eh tata wa biso! Mpona nini te ozali kondimela biso mpona Yûsuf mpe tozali na makanisi malamu epai naye mpe biso tokopesa ye toli?

See all translations of this verse →

أَرْسِلْهُ مَعَنَا غَدًا يَرْتَعْ وَيَلْعَبْ وَإِنَّا لَهُۥ لَحَٰفِظُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Tinda ye akende elongo na biso lobi kotambola mpe kosakana, kaši ya soló tokobatela ye.

See all translations of this verse →

قَالَ إِنِّى لَيَحْزُنُنِىٓ أَن تَذْهَبُوا۟ بِهِۦ وَأَخَافُ أَن يَأْكُلَهُ ٱلذِّئْبُ وَأَنتُمْ عَنْهُ غَٰفِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Alobaki: Solo, ezali kopesa ngai mawa ete bökende naye mpe nazali kobanga ete mbwa ya zamba eliya ye. O tango eye bokozala na bokebi naye te.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ لَئِنْ أَكَلَهُ ٱلذِّئْبُ وَنَحْنُ عُصْبَةٌ إِنَّآ إِذًا لَّخَٰسِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Balobaki: Soki mbwa ya zamba elei ye na biso tozali ebele, wana nde tozali bazangi.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا ذَهَبُوا۟ بِهِۦ وَأَجْمَعُوٓا۟ أَن يَجْعَلُوهُ فِى غَيَٰبَتِ ٱلْجُبِّ وَأَوْحَيْنَآ إِلَيْهِ لَتُنَبِّئَنَّهُم بِأَمْرِهِمْ هَٰذَا وَهُمْ لَا يَشْعُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Mpe tango bakendeki naye, bayokani ete ba bwaka ye na libulu lia mayi ya mozindo liye bakoki kornona ye te, mpe tomonisa naye ete: Okoyebisa bango likambo lia bango liye, mpe bakoyeba te.

See all translations of this verse →

وَجَآءُوٓ أَبَاهُمْ عِشَآءً يَبْكُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Mpe bazongi epai ya tata wa bango na pokwa bazali kolela,

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰٓأَبَانَآ إِنَّا ذَهَبْنَا نَسْتَبِقُ وَتَرَكْنَا يُوسُفَ عِندَ مَتَٰعِنَا فَأَكَلَهُ ٱلذِّئْبُ وَمَآ أَنتَ بِمُؤْمِنٍ لَّنَا وَلَوْ كُنَّا صَٰدِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Balobi: Eh tata wa biso! Ya soló, tokendeki komekana тропа kobwaka makonga na mokili, тре totikaki Yûsuf pene na biloko bia biso mpe mbwa ya zamba alei ye. Mpe yo okoki kondimela biso te ata soki tolobi bosembo.

See all translations of this verse →

وَجَآءُو عَلَىٰ قَمِيصِهِۦ بِدَمٍ كَذِبٍ قَالَ بَلْ سَوَّلَتْ لَكُمْ أَنفُسُكُمْ أَمْرًا فَصَبْرٌ جَمِيلٌ وَٱللَّهُ ٱلْمُسْتَعَانُ عَلَىٰ مَا تَصِفُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Mpe bamemi simisi naye, bapakolo yango makila ya lokuta. Alobi: Milimo mia bino mitindaki na likambo moko boye, kasi kokanga motema ezali malamu. Allah akosalisa ngai na maye bosali.

See all translations of this verse →

وَجَآءَتْ سَيَّارَةٌ فَأَرْسَلُوا۟ وَارِدَهُمْ فَأَدْلَىٰ دَلْوَهُۥ قَالَ يَٰبُشْرَىٰ هَٰذَا غُلَٰمٌ وَأَسَرُّوهُ بِضَٰعَةً وَٱللَّهُ عَلِيمٌۢ بِمَا يَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Мре baleki nzela bato ya mombongo batindi moko wa bango mpo akende kotoka mayi тропа bango, tango akitisi katini naye mpo atoka mayi, alobi: Sango elamu, oyo elenge mobali! Mpe batiaki ye na mikumba mpo bateka ye. Kasi Allah nde moyebi na oyo bakosala.

See all translations of this verse →

وَشَرَوْهُ بِثَمَنٍۭ بَخْسٍ دَرَٰهِمَ مَعْدُودَةٍ وَكَانُوا۟ فِيهِ مِنَ ٱلزَّٰهِدِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Mpe bateki ye na talo ya токе, na ndambu ya misolo mia dirhams mia kotanga, bazuaki ye na motuya te.

See all translations of this verse →

وَقَالَ ٱلَّذِى ٱشْتَرَىٰهُ مِن مِّصْرَ لِٱمْرَأَتِهِۦٓ أَكْرِمِى مَثْوَىٰهُ عَسَىٰٓ أَن يَنفَعَنَآ أَوْ نَتَّخِذَهُۥ وَلَدًا وَكَذَٰلِكَ مَكَّنَّا لِيُوسُفَ فِى ٱلْأَرْضِ وَلِنُعَلِّمَهُۥ مِن تَأْوِيلِ ٱلْأَحَادِيثِ وَٱللَّهُ غَالِبٌ عَلَىٰٓ أَمْرِهِۦ وَلَٰكِنَّ أَكْثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Mpe oyo asombaki ye azalaki moto ya ezipito, mpe alobaki na mwasi naye: Zúa ye mpe bokolo ye malamu, mpo tango mosusu akosalisa biso to mpe tozua ye mwana na biso. Mpe ndenge wana nde tosalaki na Yûsuf o kati na mokili, mpe totangisaki ye ndimbola ya bandoto. Mpe Allah azali ye moko mokonzi ya makambo naye kasi ebele ya bato bazali koyeba te.

See all translations of this verse →

وَلَمَّا بَلَغَ أَشُدَّهُۥٓ ءَاتَيْنَٰهُ حُكْمًا وَعِلْمًا وَكَذَٰلِكَ نَجْزِى ٱلْمُحْسِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Mpe tango akoli, topesaki ye bwanya mpe boyebi. Mpe ndenge wana nde tofutaka babongisi.

See all translations of this verse →

وَرَٰوَدَتْهُ ٱلَّتِى هُوَ فِى بَيْتِهَا عَن نَّفْسِهِۦ وَغَلَّقَتِ ٱلْأَبْوَٰبَ وَقَالَتْ هَيْتَ لَكَ قَالَ مَعَاذَ ٱللَّهِ إِنَّهُۥ رَبِّىٓ أَحْسَنَ مَثْوَاىَ إِنَّهُۥ لَا يُفْلِحُ ٱلظَّٰلِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Mpe kasi (mwasi wa mokonzi) oyo ayambaki ye o ndako naye amekaki mpo akweisa ye na ekobo, mpe akangelaki ye bizibeli bia ndako mpe alobi: Yaka; na sili kobongama тропа yo, alobi ete: (Yûsuf) Allah abatela ngai. Ya soló azali Nkolo wa ngai, apesi ngai libateli ya malamu, ya solo bato mabe bakolongaka te.

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ هَمَّتْ بِهِۦ وَهَمَّ بِهَا لَوْلَآ أَن رَّءَا بُرْهَٰنَ رَبِّهِۦ كَذَٰلِكَ لِنَصْرِفَ عَنْهُ ٱلسُّوٓءَ وَٱلْفَحْشَآءَ إِنَّهُۥ مِنْ عِبَادِنَا ٱلْمُخْلَصِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Mpe asilaki kolula ye. Ye (Yûsuf) mpe lokola, alulaki ye (mwasi ya mokonzi) soki amonaki elembo ya Nkolo waye te, na boye nde totiyaki ye mosika na mabe mpe mosika ya ekobo, ya sólo ye azalaki moko ya bawumbu na biso ya malamu.

See all translations of this verse →

وَٱسْتَبَقَا ٱلْبَابَ وَقَدَّتْ قَمِيصَهُۥ مِن دُبُرٍ وَأَلْفَيَا سَيِّدَهَا لَدَا ٱلْبَابِ قَالَتْ مَا جَزَآءُ مَنْ أَرَادَ بِأَهْلِكَ سُوٓءًا إِلَّآ أَن يُسْجَنَ أَوْ عَذَابٌ أَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Mpe bango banso babale balandanaki mbangu о ngambu ya bizibeli bia ndako mpe apasolaki simisi naye apasoli simisi ya Yûsuf osima ya mokongo mpe bakutani na mobali (wa mwasi ona) na ezibeli ya ndako. Alobi: Lifuta nini okopesa na oyo alingaki kosala mwasi wayo mabe sé ezala boloko to etumbu ekasi?

See all translations of this verse →

قَالَ هِىَ رَٰوَدَتْنِى عَن نَّفْسِى وَشَهِدَ شَاهِدٌ مِّنْ أَهْلِهَآ إِن كَانَ قَمِيصُهُۥ قُدَّ مِن قُبُلٍ فَصَدَقَتْ وَهُوَ مِنَ ٱلْكَٰذِبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Alobi (Yûsuf): Ezali ye nde alingaki kokweya na ngai, mpe nzeneneke moko o kati ya libota lia ye alobi: Soki simisi naye epasuki liboso, wana alobi(1) bosoló, mpe ye(2) azali kati ya babuki lokuta.

See all translations of this verse →

وَإِن كَانَ قَمِيصُهُۥ قُدَّ مِن دُبُرٍ فَكَذَبَتْ وَهُوَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. (Kasi) soki simisi naye epasuki na sima, akosi, mpe ye (Yûsuf) azali kati ya balobi bosôló.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا رَءَا قَمِيصَهُۥ قُدَّ مِن دُبُرٍ قَالَ إِنَّهُۥ مِن كَيْدِكُنَّ إِنَّ كَيْدَكُنَّ عَظِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Мре tango (mobali) amoni simisi epasuki na sima alobi: Ya soló, ezali motambo ya bino (basi) ya mabe, ya soló motambo na bino (basi) ezali monene koleka.

See all translations of this verse →

يُوسُفُ أَعْرِضْ عَنْ هَٰذَا وَٱسْتَغْفِرِى لِذَنۢبِكِ إِنَّكِ كُنتِ مِنَ ٱلْخَاطِـِٔينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Yûsuf, kokanisa lisusu na oyo te, mpe yo (mwasi) senga bolimbisi тропа lisumu lia yo, mpo ozalaki o kati ya basali mbeba.

See all translations of this verse →

وَقَالَ نِسْوَةٌ فِى ٱلْمَدِينَةِ ٱمْرَأَتُ ٱلْعَزِيزِ تُرَٰوِدُ فَتَىٰهَا عَن نَّفْسِهِۦ قَدْ شَغَفَهَا حُبًّا إِنَّا لَنَرَىٰهَا فِى ضَلَٰلٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Mpe tango basi okati ya mboka balobi ete: Mwasi ya mokonzi alingaki kokweisa elenge mobali naye ye moko! Ya sólo penza, asili kolangwa ye bolingo, ya sólo biso tomoni été asili kobunga nzela penza.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا سَمِعَتْ بِمَكْرِهِنَّ أَرْسَلَتْ إِلَيْهِنَّ وَأَعْتَدَتْ لَهُنَّ مُتَّكَـًٔا وَءَاتَتْ كُلَّ وَٰحِدَةٍ مِّنْهُنَّ سِكِّينًا وَقَالَتِ ٱخْرُجْ عَلَيْهِنَّ فَلَمَّا رَأَيْنَهُۥٓ أَكْبَرْنَهُۥ وَقَطَّعْنَ أَيْدِيَهُنَّ وَقُلْنَ حَٰشَ لِلَّهِ مَا هَٰذَا بَشَرًا إِنْ هَٰذَآ إِلَّا مَلَكٌ كَرِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Mpe tango ayoki biloba loba bia bango, abengi bango тре alengeleli bango lipati тре akaboleli bango ba mbeli, sima alobi: Віта liboso lia bango. Tango bamoni ye basepeli naye mpe bamikati bapota na maboko та bango na bolobi: Ah Allah! Abongisa ye, oyo azali moto te, akoki kozala anzelu wa lokumu!

See all translations of this verse →

قَالَتْ فَذَٰلِكُنَّ ٱلَّذِى لُمْتُنَّنِى فِيهِ وَلَقَدْ رَٰوَدتُّهُۥ عَن نَّفْسِهِۦ فَٱسْتَعْصَمَ وَلَئِن لَّمْ يَفْعَلْ مَآ ءَامُرُهُۥ لَيُسْجَنَنَّ وَلَيَكُونًا مِّنَ ٱلصَّٰغِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Alobaki na bango été: Wana nde oyo bozalaki koloba тропа ngai. Ya sólo ngai nalukaki kokweisa ye kasi ye amibatelaki. Na yango soki asali te oyo na lingi, akokoto boloko mpe akokitisama na kosila lokumu.

See all translations of this verse →

قَالَ رَبِّ ٱلسِّجْنُ أَحَبُّ إِلَىَّ مِمَّا يَدْعُونَنِىٓ إِلَيْهِ وَإِلَّا تَصْرِفْ عَنِّى كَيْدَهُنَّ أَصْبُ إِلَيْهِنَّ وَأَكُن مِّنَ ٱلْجَٰهِلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Boloko ezali malamu тропа ngai koleka oyo bazali kobenga ngai na yango. Mpe soki obateli ngai te na likita na bango, nakokweya na bango, mpe nakozala o kati ya bazoba.

See all translations of this verse →

فَٱسْتَجَابَ لَهُۥ رَبُّهُۥ فَصَرَفَ عَنْهُ كَيْدَهُنَّ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلْعَلِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Nkolo waye andimelaki ye, atiye mosika na mayele та bango mabe: Ya soló, ye azali moyoki atonda boyebi.

See all translations of this verse →

ثُمَّ بَدَا لَهُم مِّنۢ بَعْدِ مَا رَأَوُا۟ ٱلْـَٔايَٰتِ لَيَسْجُنُنَّهُۥ حَتَّىٰ حِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Sima emonanaki polele na liboso na bango été (Yûsuf) asali eloko te, bamonaki été esengeli kokotisa ye na boloko kino tango oyo esengeli.

See all translations of this verse →

وَدَخَلَ مَعَهُ ٱلسِّجْنَ فَتَيَانِ قَالَ أَحَدُهُمَآ إِنِّىٓ أَرَىٰنِىٓ أَعْصِرُ خَمْرًا وَقَالَ ٱلْـَٔاخَرُ إِنِّىٓ أَرَىٰنِىٓ أَحْمِلُ فَوْقَ رَأْسِى خُبْزًا تَأْكُلُ ٱلطَّيْرُ مِنْهُ نَبِّئْنَا بِتَأْوِيلِهِۦٓ إِنَّا نَرَىٰكَ مِنَ ٱلْمُحْسِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Mpe akotaki boloko elongo na bilenge mibali mibale. Moko wa bango alobi na Yûsuf: Ya soló, namoni na ndoto été nazali kosala masanga. Mpe mosusu alobi: Ngai namoni namemi mapa na mutu na ngai bandeke bazali kólia yango. Limbola biso ntina na yango nyoso, mpo ya soló tozali kornona yo moto ya malamu.

See all translations of this verse →

قَالَ لَا يَأْتِيكُمَا طَعَامٌ تُرْزَقَانِهِۦٓ إِلَّا نَبَّأْتُكُمَا بِتَأْوِيلِهِۦ قَبْلَ أَن يَأْتِيَكُمَا ذَٰلِكُمَا مِمَّا عَلَّمَنِى رَبِّىٓ إِنِّى تَرَكْتُ مِلَّةَ قَوْمٍ لَّا يُؤْمِنُونَ بِٱللَّهِ وَهُم بِٱلْـَٔاخِرَةِ هُمْ كَٰفِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Alobaki bileyi oyo bitiyami тропа bino bikoki koyela bino te, sé kaka nayebisa bino ndimbola na yango yambo eyela bino. Ezali тропа bino, ndenge Nkolo wa ngai atangisi ngai. Ya soló, natikaki lingomba lia bato baye bandimaka na Allah te, mpe bazali kondima na mokolo ya suka te,

See all translations of this verse →

وَٱتَّبَعْتُ مِلَّةَ ءَابَآءِىٓ إِبْرَٰهِيمَ وَإِسْحَٰقَ وَيَعْقُوبَ مَا كَانَ لَنَآ أَن نُّشْرِكَ بِٱللَّهِ مِن شَىْءٍ ذَٰلِكَ مِن فَضْلِ ٱللَّهِ عَلَيْنَا وَعَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكْثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَشْكُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Mpe nalandi lingomba lia baboti na ngai, Ibrâhîm na Is’hâq na Ya’qüb. Esengeli na biso te tosangisa Allah na eloko mosusu. Wana nde bolamu bwa Allah epai na biso na epai ya bato banso, kasi ebele ya bato bazali kotondo te.

See all translations of this verse →

يَٰصَٰحِبَىِ ٱلسِّجْنِ ءَأَرْبَابٌ مُّتَفَرِّقُونَ خَيْرٌ أَمِ ٱللَّهُ ٱلْوَٰحِدُ ٱلْقَهَّارُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Oh! Bato ba ngai ba boloko! Boye binzambe nzambe bazali malamu koleka to Allah wa bomoko mpe wa bokoki?

See all translations of this verse →

مَا تَعْبُدُونَ مِن دُونِهِۦٓ إِلَّآ أَسْمَآءً سَمَّيْتُمُوهَآ أَنتُمْ وَءَابَآؤُكُم مَّآ أَنزَلَ ٱللَّهُ بِهَا مِن سُلْطَٰنٍ إِنِ ٱلْحُكْمُ إِلَّا لِلَّهِ أَمَرَ أَلَّا تَعْبُدُوٓا۟ إِلَّآ إِيَّاهُ ذَٰلِكَ ٱلدِّينُ ٱلْقَيِّمُ وَلَٰكِنَّ أَكْثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Bozali kobondela basusu botiki ye, bazali sé bankombo oyo bopesi bino moko na bankoko na bino biye Allah akitisaki elembetele te. Kasi mobeko ezali sé ya Allah atindaka sé bobondela ye moko. Wana nde lingomba lia semba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.

See all translations of this verse →

يَٰصَٰحِبَىِ ٱلسِّجْنِ أَمَّآ أَحَدُكُمَا فَيَسْقِى رَبَّهُۥ خَمْرًا وَأَمَّا ٱلْـَٔاخَرُ فَيُصْلَبُ فَتَأْكُلُ ٱلطَّيْرُ مِن رَّأْسِهِۦ قُضِىَ ٱلْأَمْرُ ٱلَّذِى فِيهِ تَسْتَفْتِيَانِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Oh bato ba ngai ba boloko! Mpona ndoto na bino, moko kati na bino akomelisa mokonzi naye masanga, mpe mosusu bakobaka ye, mpe bandeke bakolia motu naye. Likambo liye botunaki ngai lisili kokatama.

See all translations of this verse →

وَقَالَ لِلَّذِى ظَنَّ أَنَّهُۥ نَاجٍ مِّنْهُمَا ٱذْكُرْنِى عِندَ رَبِّكَ فَأَنسَىٰهُ ٱلشَّيْطَٰنُ ذِكْرَ رَبِّهِۦ فَلَبِثَ فِى ٱلسِّجْنِ بِضْعَ سِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Mpe (Yûsuf) alobi na oyo abimaki na boloko: Lobela ngai epai ya mokonzi nayo. Kasi satana abosanisi ye bokundoli bwa Nkolo naye, yango awumelaki na boloko pene na mibu ebele.

See all translations of this verse →

وَقَالَ ٱلْمَلِكُ إِنِّىٓ أَرَىٰ سَبْعَ بَقَرَٰتٍ سِمَانٍ يَأْكُلُهُنَّ سَبْعٌ عِجَافٌ وَسَبْعَ سُنۢبُلَٰتٍ خُضْرٍ وَأُخَرَ يَابِسَٰتٍ يَٰٓأَيُّهَا ٱلْمَلَأُ أَفْتُونِى فِى رُءْيَٰىَ إِن كُنتُمْ لِلرُّءْيَا تَعْبُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Mpe mokonzi alobi: Ya sôló namoni na ndoto, bangombe sambo ya nzoto kolongonu bizali koliama na bangombe sambo ya kokondo, mpe bambuma sambo ya mayi mapondu mpe misusu ya kokauka. Eh bankumu! Bopesa ngai ndimbola ya ndoto ya ngai, soki boyebi kolimbola ndoto.

See all translations of this verse →

قَالُوٓا۟ أَضْغَٰثُ أَحْلَٰمٍ وَمَا نَحْنُ بِتَأْوِيلِ ٱلْأَحْلَٰمِ بِعَٰلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Balobaki: Bandoto bizali ya kosangana mpe bizali mabe, mpe biso toyebi kolimbola ndoto yango te.

See all translations of this verse →

وَقَالَ ٱلَّذِى نَجَا مِنْهُمَا وَٱدَّكَرَ بَعْدَ أُمَّةٍ أَنَا۠ أُنَبِّئُكُم بِتَأْوِيلِهِۦ فَأَرْسِلُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Kasi oyo abimaka na boloko, akanisi mpe alobi: Ngai nakolimbola bino ndoto yango, botinda ngai.

See all translations of this verse →

يُوسُفُ أَيُّهَا ٱلصِّدِّيقُ أَفْتِنَا فِى سَبْعِ بَقَرَٰتٍ سِمَانٍ يَأْكُلُهُنَّ سَبْعٌ عِجَافٌ وَسَبْعِ سُنۢبُلَٰتٍ خُضْرٍ وَأُخَرَ يَابِسَٰتٍ لَّعَلِّىٓ أَرْجِعُ إِلَى ٱلنَّاسِ لَعَلَّهُمْ يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo46. Oh Yûsuf moto wa bosôló! Yebisa biso тропа likambo lia ngombe sambo ya nzoto kolongonu bizali koliama na bangombe sambo ya kokonda, mpe mbuma sambo lia malamu, mpe bisusu lia kokauka mpo nakende koyebisa bato tango nakozonga, mpo bakoka koyeba.

See all translations of this verse →

قَالَ تَزْرَعُونَ سَبْعَ سِنِينَ دَأَبًا فَمَا حَصَدتُّمْ فَذَرُوهُ فِى سُنۢبُلِهِۦٓ إِلَّا قَلِيلًا مِّمَّا تَأْكُلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Alobi (Yûsuf): Bokolona milona mibu sambo ya kolandana. Мре botika yango na banzete na yango, longola sé moke ya kólia nde bokobuka.

See all translations of this verse →

ثُمَّ يَأْتِى مِنۢ بَعْدِ ذَٰلِكَ سَبْعٌ شِدَادٌ يَأْكُلْنَ مَا قَدَّمْتُمْ لَهُنَّ إِلَّا قَلِيلًا مِّمَّا تُحْصِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Sima na yango, mibu sambo mikolanda mikozala mia paši, bato na yango bakolia biye bobombaki longola sé moke ya biye bokolona.

See all translations of this verse →

ثُمَّ يَأْتِى مِنۢ بَعْدِ ذَٰلِكَ عَامٌ فِيهِ يُغَاثُ ٱلنَّاسُ وَفِيهِ يَعْصِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Sima mobu moko mokoya, mbula ekonoka тропа kosalisa bato, тре nakati na yango (mobu) bakokamola (bambuma).

See all translations of this verse →

وَقَالَ ٱلْمَلِكُ ٱئْتُونِى بِهِۦ فَلَمَّا جَآءَهُ ٱلرَّسُولُ قَالَ ٱرْجِعْ إِلَىٰ رَبِّكَ فَسْـَٔلْهُ مَا بَالُ ٱلنِّسْوَةِ ٱلَّٰتِى قَطَّعْنَ أَيْدِيَهُنَّ إِنَّ رَبِّى بِكَيْدِهِنَّ عَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Мре mokonzi alobi: Bomemela ngai ye, tango motindami ayei kopesa ye (Yûsuf) sango ena, (Yûsuf) alobi: Zonga epai ya mokonzi wayo, tuna ye boni sango ya basi baye bamizokisaki maboko? Ya soló, Nkolo wa ngai ayebi likita ya mabe na bango.

See all translations of this verse →

قَالَ مَا خَطْبُكُنَّ إِذْ رَٰوَدتُّنَّ يُوسُفَ عَن نَّفْسِهِۦ قُلْنَ حَٰشَ لِلَّهِ مَا عَلِمْنَا عَلَيْهِ مِن سُوٓءٍ قَالَتِ ٱمْرَأَتُ ٱلْعَزِيزِ ٱلْـَٰٔنَ حَصْحَصَ ٱلْحَقُّ أَنَا۠ رَٰوَدتُّهُۥ عَن نَّفْسِهِۦ وَإِنَّهُۥ لَمِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. (Mokonzi alobi na bango): Eloko nini etindaki bino bokweyela Yûsuf? Bayanoli: Na Allah nde mosepelisi, toyebi ye na eloko ya mabe te. Mpe mwasi wa mokonzi alobi: Sikoyo nde bosóló boyebani. Ezalaki nde ngai nalingaki komikweisa epai naye, mpe ye azalaki o kati ya balobi bosôló.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ لِيَعْلَمَ أَنِّى لَمْ أَخُنْهُ بِٱلْغَيْبِ وَأَنَّ ٱللَّهَ لَا يَهْدِى كَيْدَ ٱلْخَآئِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Wana nde mpo ayeba ete nasalaki ye mabe te tango azalaki te, mpe ya soló, Allah akambaka likita ya bato ya mabe te.

See all translations of this verse →

وَمَآ أُبَرِّئُ نَفْسِىٓ إِنَّ ٱلنَّفْسَ لَأَمَّارَةٌۢ بِٱلسُّوٓءِ إِلَّا مَا رَحِمَ رَبِّىٓ إِنَّ رَبِّى غَفُورٌ رَّحِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo53. Mpe nakoki komilongola te. Ya sólo, molimo motindaka na mabe, longola sé oyo Nkolo wa ngai akoyokela ye mawa. Ya solo, Nkolo wa ngai azali molimbisi atonda mawa.

See all translations of this verse →

وَقَالَ ٱلْمَلِكُ ٱئْتُونِى بِهِۦٓ أَسْتَخْلِصْهُ لِنَفْسِى فَلَمَّا كَلَّمَهُۥ قَالَ إِنَّكَ ٱلْيَوْمَ لَدَيْنَا مَكِينٌ أَمِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo54. Mpe mokonzi alobi été: Boyela ngai ye azala ya ngai moko. Mpe tango asololi na mokonzi, alobaki été: Banda lelo okomi moto wa bosembo mpe ya lokumu epai na biso.

See all translations of this verse →

قَالَ ٱجْعَلْنِى عَلَىٰ خَزَآئِنِ ٱلْأَرْضِ إِنِّى حَفِيظٌ عَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Alobi (Yûsuf): Tiya ngai nazala mobateli ya sanduku ya mboka, ya solo, ngai nayebi kobatela.

See all translations of this verse →

وَكَذَٰلِكَ مَكَّنَّا لِيُوسُفَ فِى ٱلْأَرْضِ يَتَبَوَّأُ مِنْهَا حَيْثُ يَشَآءُ نُصِيبُ بِرَحْمَتِنَا مَن نَّشَآءُ وَلَا نُضِيعُ أَجْرَ ٱلْمُحْسِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo56. Mpe lolenge wana nde topesaki Yûsuf bokonzi na mboka wana, asalaki manso maye alingaki kosala. Topesaka ngolu na biso na nani tolingi, mpe tokobungisaka lifuta lia bato malamu te.

See all translations of this verse →

وَلَأَجْرُ ٱلْـَٔاخِرَةِ خَيْرٌ لِّلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَكَانُوا۟ يَتَّقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo57. Mpe lifuta lia mokolo ya suka lileka kitoko тропа bandimi, mpo bazalaki kobanga.

See all translations of this verse →

وَجَآءَ إِخْوَةُ يُوسُفَ فَدَخَلُوا۟ عَلَيْهِ فَعَرَفَهُمْ وَهُمْ لَهُۥ مُنكِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. Mpe bandeko ba Yûsuf bayei bakoti epai naye, ayebi bango kasi bango bayebi ye te.

See all translations of this verse →

وَلَمَّا جَهَّزَهُم بِجَهَازِهِمْ قَالَ ٱئْتُونِى بِأَخٍ لَّكُم مِّنْ أَبِيكُمْ أَلَا تَرَوْنَ أَنِّىٓ أُوفِى ٱلْكَيْلَ وَأَنَا۠ خَيْرُ ٱلْمُنزِلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Mpe tango apesi bango biloko biye alengeleki тропа bango, alobi: В óyela ngai ndeko wa bino, oyo atikalaki epai ya tata wa bino. Boye bozali kornona te ete nazali kokokisa emekeli (kilo) bwa ngai Mpe nazali malamu koleka?

See all translations of this verse →

فَإِن لَّمْ تَأْتُونِى بِهِۦ فَلَا كَيْلَ لَكُمْ عِندِى وَلَا تَقْرَبُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Kasi soki boyeli ngai ye te, bokozua biloko te epai na ngai, mpe bopusana pene na ngai te.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ سَنُرَٰوِدُ عَنْهُ أَبَاهُ وَإِنَّا لَفَٰعِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo61. Mpe balobi: Tokomeka koyebisa tata waye. Mpe ya soló, tokomeka kosala yango.

See all translations of this verse →

وَقَالَ لِفِتْيَٰنِهِ ٱجْعَلُوا۟ بِضَٰعَتَهُمْ فِى رِحَالِهِمْ لَعَلَّهُمْ يَعْرِفُونَهَآ إِذَا ٱنقَلَبُوٓا۟ إِلَىٰٓ أَهْلِهِمْ لَعَلَّهُمْ يَرْجِعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Mpe alobi na basali baye: Botiya biloko bia bango na basaki bia bango. Mpo bakoka koyeba yango tango bakozonga kowuta na libota lia bango, mpe mpo bakoka kozonga.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا رَجَعُوٓا۟ إِلَىٰٓ أَبِيهِمْ قَالُوا۟ يَٰٓأَبَانَا مُنِعَ مِنَّا ٱلْكَيْلُ فَأَرْسِلْ مَعَنَآ أَخَانَا نَكْتَلْ وَإِنَّا لَهُۥ لَحَٰفِظُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo63. Mpe tango bazongeli tata wa bango, balobi: Oh tata wa biso! Baboyi kopesa biso biloko. Pesa biso ndeko wa biso mpo tokoka kozua biloko, mpe ya sólo, biso tokobatela ye.

See all translations of this verse →

قَالَ هَلْ ءَامَنُكُمْ عَلَيْهِ إِلَّا كَمَآ أَمِنتُكُمْ عَلَىٰٓ أَخِيهِ مِن قَبْلُ فَٱللَّهُ خَيْرٌ حَٰفِظًا وَهُوَ أَرْحَمُ ٱلرَّٰحِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Alobaki na bango été: Bokanisi été nakopesa bino ye lokola ezalaki na ndeko naye liboso? Kasi Allah azali mobateli malamu aleka mawa.

See all translations of this verse →

وَلَمَّا فَتَحُوا۟ مَتَٰعَهُمْ وَجَدُوا۟ بِضَٰعَتَهُمْ رُدَّتْ إِلَيْهِمْ قَالُوا۟ يَٰٓأَبَانَا مَا نَبْغِى هَٰذِهِۦ بِضَٰعَتُنَا رُدَّتْ إِلَيْنَا وَنَمِيرُ أَهْلَنَا وَنَحْفَظُ أَخَانَا وَنَزْدَادُ كَيْلَ بَعِيرٍ ذَٰلِكَ كَيْلٌ يَسِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo65. Мре tango bafungoli mikumba mia bango, bakuti biloko oyo batiyelaki bango bizali. Balobi: Oh tata wa biso! Tokolinga nini lisusu, bazongiseli biso biloko na biso nyoso. Mpe tokoleisa libota lia biso, mpe tokobatela ndeko wa biso, тре tokobakisa mokumba ya mpunda moko mpe wana ezali pasi te.

See all translations of this verse →

قَالَ لَنْ أُرْسِلَهُۥ مَعَكُمْ حَتَّىٰ تُؤْتُونِ مَوْثِقًا مِّنَ ٱللَّهِ لَتَأْتُنَّنِى بِهِۦٓ إِلَّآ أَن يُحَاطَ بِكُمْ فَلَمَّآ ءَاتَوْهُ مَوْثِقَهُمْ قَالَ ٱللَّهُ عَلَىٰ مَا نَقُولُ وَكِيلٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo66. Mpe alobi été: Nakotinda ye na bino te. Kino bosalela ngai malako epai ya Allah ete bokoyela ngai ye, longola sé bokufa bino banso. Tango bayeli ye yango, alobi: Allah nde mobateli wa manso na maye tolobi!

See all translations of this verse →

وَقَالَ يَٰبَنِىَّ لَا تَدْخُلُوا۟ مِنۢ بَابٍ وَٰحِدٍ وَٱدْخُلُوا۟ مِنْ أَبْوَٰبٍ مُّتَفَرِّقَةٍ وَمَآ أُغْنِى عَنكُم مِّنَ ٱللَّهِ مِن شَىْءٍ إِنِ ٱلْحُكْمُ إِلَّا لِلَّهِ عَلَيْهِ تَوَكَّلْتُ وَعَلَيْهِ فَلْيَتَوَكَّلِ ٱلْمُتَوَكِّلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo67. Mpe alobi été: Oh bana na ngai! Bokota na ekoteli moko te, (bino banso), kasi bokota bipai na bipai. Nakoki kosalisa bino koleka Allah te, mobeko ezali sé ya Allah, mpe natiye elikya na ngai epai naye, mpe tika ete baye bamipesaka ba mipesa sé epai naye.

See all translations of this verse →

وَلَمَّا دَخَلُوا۟ مِنْ حَيْثُ أَمَرَهُمْ أَبُوهُم مَّا كَانَ يُغْنِى عَنْهُم مِّنَ ٱللَّهِ مِن شَىْءٍ إِلَّا حَاجَةً فِى نَفْسِ يَعْقُوبَ قَضَىٰهَا وَإِنَّهُۥ لَذُو عِلْمٍ لِّمَا عَلَّمْنَٰهُ وَلَٰكِنَّ أَكْثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo68. Mpe tango bakoti na bisika biye balakisaki bango na tata wa bango, esalisaki bango na eloko te koleka mibeko mia Allah, ezalaki sé makanisi та Ya’qúb maye atiyaki. Kasi azalaki na boyebi mingi na maye tolakisaki ye, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.

See all translations of this verse →

وَلَمَّا دَخَلُوا۟ عَلَىٰ يُوسُفَ ءَاوَىٰٓ إِلَيْهِ أَخَاهُ قَالَ إِنِّىٓ أَنَا۠ أَخُوكَ فَلَا تَبْتَئِسْ بِمَا كَانُوا۟ يَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo69. Mpe tango bakotaki epai ya Yûsuf, batikeli ye ndeko waye, alobi: Ya soló, ngai nazali ndeko wayo, koyoka pasi te na maye bazalaki kosala.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا جَهَّزَهُم بِجَهَازِهِمْ جَعَلَ ٱلسِّقَايَةَ فِى رَحْلِ أَخِيهِ ثُمَّ أَذَّنَ مُؤَذِّنٌ أَيَّتُهَا ٱلْعِيرُ إِنَّكُمْ لَسَٰرِقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo70. Mpe tango abongiseli bango mikumba ya bilei, atiye wolo ya emekeli na mokumba ya ndeko naye sima mobeleli abeleli bango ete: Eh bino bapaya bozali soló bayibi.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ وَأَقْبَلُوا۟ عَلَيْهِم مَّاذَا تَفْقِدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo71. Babaluki mpe balobi: Nini bobungisi?

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ نَفْقِدُ صُوَاعَ ٱلْمَلِكِ وَلِمَن جَآءَ بِهِۦ حِمْلُ بَعِيرٍ وَأَنَا۠ بِهِۦ زَعِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo72. Balobi: Tobungisi nkeni ya walo ya mokonzi. Tozali koluka yango na mikumba, soki nani oyo azui yango, mpe ngai nazali moyangeli.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ تَٱللَّهِ لَقَدْ عَلِمْتُم مَّا جِئْنَا لِنُفْسِدَ فِى ٱلْأَرْضِ وَمَا كُنَّا سَٰرِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo73. Balobi: Na Allah, boyebi malamu penza ete biso toyaki te mpo tobebisa na mboka eye, tozali mpe bayibi te.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ فَمَا جَزَٰٓؤُهُۥٓ إِن كُنتُمْ كَٰذِبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo74. Balobi: Etumbu ekozala nini soki bozali kokosa?

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ جَزَٰٓؤُهُۥ مَن وُجِدَ فِى رَحْلِهِۦ فَهُوَ جَزَٰٓؤُهُۥ كَذَٰلِكَ نَجْزِى ٱلظَّٰلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo75. Balobi: Etumbu ekozala sé epai ya oyo bokokuta eloko ena (bozali koluka) na mokumba naye, wana nde lifuta lia babubi.

See all translations of this verse →

فَبَدَأَ بِأَوْعِيَتِهِمْ قَبْلَ وِعَآءِ أَخِيهِ ثُمَّ ٱسْتَخْرَجَهَا مِن وِعَآءِ أَخِيهِ كَذَٰلِكَ كِدْنَا لِيُوسُفَ مَا كَانَ لِيَأْخُذَ أَخَاهُ فِى دِينِ ٱلْمَلِكِ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُ نَرْفَعُ دَرَجَٰتٍ مَّن نَّشَآءُ وَفَوْقَ كُلِّ ذِى عِلْمٍ عَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo76. Mpe abandaki na mikumba na bango liboso, na sima abandi na oyo ya ndeko naye mpe akutaki yango na mokumba ya ndeko naye. Ndenge wana nde tosalaki na Yûsuf, kasi alingaki kokanga ndeko waye te, engebene na mobeko mwa mokonzi, longola sé maye Allah alingaki. Totombolaka bisika bia baye tolingi, mpe likolo lia moto nyoso topesi ye boyebi, okokuta oyo aleki ye na boyebi.

See all translations of this verse →

قَالُوٓا۟ إِن يَسْرِقْ فَقَدْ سَرَقَ أَخٌ لَّهُۥ مِن قَبْلُ فَأَسَرَّهَا يُوسُفُ فِى نَفْسِهِۦ وَلَمْ يُبْدِهَا لَهُمْ قَالَ أَنتُمْ شَرٌّ مَّكَانًا وَٱللَّهُ أَعْلَمُ بِمَا تَصِفُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo77. Balobi: Soki ayibi, (alandi) sé ndeko naye asilaki mpe koyiba liboso. Mpe Yûsuf, ayokaki yango mpasi na motema, kasi amonisaki bango yango te, mpe alobi na motema ete: Mabe na bino oyo eleki, mpe Allah ayebi maye bozali koloba.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰٓأَيُّهَا ٱلْعَزِيزُ إِنَّ لَهُۥٓ أَبًا شَيْخًا كَبِيرًا فَخُذْ أَحَدَنَا مَكَانَهُۥٓ إِنَّا نَرَىٰكَ مِنَ ٱلْمُحْسِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo78. Balobi: Eh mokonzi! Tata waye azali mobange wa kala. Zua moko o kati na biso na esika naye. Ya soló, tozali kornona yo o kati ya babongisi.

See all translations of this verse →

قَالَ مَعَاذَ ٱللَّهِ أَن نَّأْخُذَ إِلَّا مَن وَجَدْنَا مَتَٰعَنَا عِندَهُۥٓ إِنَّآ إِذًا لَّظَٰلِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo79. Alobi: Allah Abátela ngai! Tokozua sé oyo tokuti ye na biloko bia biso, ya sólo soki te, tokozala o kati ya babubi.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا ٱسْتَيْـَٔسُوا۟ مِنْهُ خَلَصُوا۟ نَجِيًّا قَالَ كَبِيرُهُمْ أَلَمْ تَعْلَمُوٓا۟ أَنَّ أَبَاكُمْ قَدْ أَخَذَ عَلَيْكُم مَّوْثِقًا مِّنَ ٱللَّهِ وَمِن قَبْلُ مَا فَرَّطتُمْ فِى يُوسُفَ فَلَنْ أَبْرَحَ ٱلْأَرْضَ حَتَّىٰ يَأْذَنَ لِىٓ أَبِىٓ أَوْ يَحْكُمَ ٱللَّهُ لِى وَهُوَ خَيْرُ ٱلْحَٰكِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo80. Mpe tango elikya ya komema ye esili bango, basololi na bobombami. Mpe yaya wa bango alobi: Boye boyebi ete tata wa bino asilaki kozua elaka na bino epai ya Allah liboso тропа Yûsuf? Kasi bozangaki kokokisa yango, nakolongwa awa te kino tata wa ngai akopesa ngai ndingisa, to Allah alongisa ngai na likambo liye, mpe (ye) azali mokati malamu. (ya likambo)

See all translations of this verse →

ٱرْجِعُوٓا۟ إِلَىٰٓ أَبِيكُمْ فَقُولُوا۟ يَٰٓأَبَانَآ إِنَّ ٱبْنَكَ سَرَقَ وَمَا شَهِدْنَآ إِلَّا بِمَا عَلِمْنَا وَمَا كُنَّا لِلْغَيْبِ حَٰفِظِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo81. Bozonga epai ya tata wa bino, mpe boloba; Oh tata wa biso! Ya soló, mwana wayo ayibi. Mpe tokotatola sé oyo toyebi, kasi, toyebi mabombami te.

See all translations of this verse →

وَسْـَٔلِ ٱلْقَرْيَةَ ٱلَّتِى كُنَّا فِيهَا وَٱلْعِيرَ ٱلَّتِىٓ أَقْبَلْنَا فِيهَا وَإِنَّا لَصَٰدِقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo82. Mpe tuna mboka (bato ya mboka) epai towuti, esika eye tokomelaki, mpe lisanga na biso bato ya mobembo. Ya sólo tozali penza koloba bosóló.

See all translations of this verse →

قَالَ بَلْ سَوَّلَتْ لَكُمْ أَنفُسُكُمْ أَمْرًا فَصَبْرٌ جَمِيلٌ عَسَى ٱللَّهُ أَن يَأْتِيَنِى بِهِمْ جَمِيعًا إِنَّهُۥ هُوَ ٱلْعَلِيمُ ٱلْحَكِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo83. Alobi (ya’qúb): Milimo mia bino mitindi bino na likambo mabe. Kasi kokanga motema ezali kitoko mpe malamu, tango mosusu Allah akozongisela ngai bango banso. Ya sólo, ye azali moyebi atonda bwanya.

See all translations of this verse →

وَتَوَلَّىٰ عَنْهُمْ وَقَالَ يَٰٓأَسَفَىٰ عَلَىٰ يُوسُفَ وَٱبْيَضَّتْ عَيْنَاهُ مِنَ ٱلْحُزْنِ فَهُوَ كَظِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo84. Mpe apesi bango mokongo mpe alobi: Nazali na mawa тропа Yûsuf! Mpe miso maye matondi na pizoli na mawa, mpe ye akangi motema.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ تَٱللَّهِ تَفْتَؤُا۟ تَذْكُرُ يُوسُفَ حَتَّىٰ تَكُونَ حَرَضًا أَوْ تَكُونَ مِنَ ٱلْهَٰلِكِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo85. Balobi: Na nkombo ya Allah okotika kokanisa Yûsuf te, kino mabe ekozua yo to okokufa?

See all translations of this verse →

قَالَ إِنَّمَآ أَشْكُوا۟ بَثِّى وَحُزْنِىٓ إِلَى ٱللَّهِ وَأَعْلَمُ مِنَ ٱللَّهِ مَا لَا تَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo86. Alobi: Na paši mpe mawa na ngai, nazali komilela sé na Allah, mpe nayebi тропа Allah oyo bino boyebi te.

See all translations of this verse →

يَٰبَنِىَّ ٱذْهَبُوا۟ فَتَحَسَّسُوا۟ مِن يُوسُفَ وَأَخِيهِ وَلَا تَا۟يْـَٔسُوا۟ مِن رَّوْحِ ٱللَّهِ إِنَّهُۥ لَا يَا۟يْـَٔسُ مِن رَّوْحِ ٱللَّهِ إِلَّا ٱلْقَوْمُ ٱلْكَٰفِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo87. Oh! Bana bangai! Bökende koluka Yûsuf na ndeko waye, mpe bozanga elikya te na Allah. Longola sé bapengwi тро bango bazanga elikya epai ya Allah.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا دَخَلُوا۟ عَلَيْهِ قَالُوا۟ يَٰٓأَيُّهَا ٱلْعَزِيزُ مَسَّنَا وَأَهْلَنَا ٱلضُّرُّ وَجِئْنَا بِبِضَٰعَةٍ مُّزْجَىٰةٍ فَأَوْفِ لَنَا ٱلْكَيْلَ وَتَصَدَّقْ عَلَيْنَآ إِنَّ ٱللَّهَ يَجْزِى ٱلْمُتَصَدِّقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo88. Mpe tango bakoti epai naye balobi: Oh mokonzi! Nzala ezui biso na mabota та biso, mpe toyei na biloko bisusu biye bizali na talo te, mekela biso mpe salisa biso, ya soló Allah afutaka basali bolamu.

See all translations of this verse →

قَالَ هَلْ عَلِمْتُم مَّا فَعَلْتُم بِيُوسُفَ وَأَخِيهِ إِذْ أَنتُمْ جَٰهِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo89. Alobi Boye: Bozali koyeba maye bosalaki na Yûsuf na ndeko naye tango bozalaki na kozanga koyeba?

See all translations of this verse →

قَالُوٓا۟ أَءِنَّكَ لَأَنتَ يُوسُفُ قَالَ أَنَا۠ يُوسُفُ وَهَٰذَآ أَخِى قَدْ مَنَّ ٱللَّهُ عَلَيْنَآ إِنَّهُۥ مَن يَتَّقِ وَيَصْبِرْ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يُضِيعُ أَجْرَ ٱلْمُحْسِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo90. Balobi: Ya sólo, yönde Yûsuf? Alobi: Ngai Yûsuf mpe oyo ndeko wa ngai Allah asili kosalisa biso. Ya soló, oyo akobanga ye mpe akangi motema, ya sólo penza, Allah abungisaka bolamu bwa babongisi te.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ تَٱللَّهِ لَقَدْ ءَاثَرَكَ ٱللَّهُ عَلَيْنَا وَإِن كُنَّا لَخَٰطِـِٔينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo91. Balobi: Na nkombo ya Allah! Ya sólo, Allah atomboli yo koleka biso, mpe tozalaki bato ya mbeba.

See all translations of this verse →

قَالَ لَا تَثْرِيبَ عَلَيْكُمُ ٱلْيَوْمَ يَغْفِرُ ٱللَّهُ لَكُمْ وَهُوَ أَرْحَمُ ٱلرَّٰحِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo92. Alobi: Kobanda lelo oyo etumbu ezali te тропа bino. Allah alimbisa bino, ye nde azali na ngolu koleka.

See all translations of this verse →

ٱذْهَبُوا۟ بِقَمِيصِى هَٰذَا فَأَلْقُوهُ عَلَىٰ وَجْهِ أَبِى يَأْتِ بَصِيرًا وَأْتُونِى بِأَهْلِكُمْ أَجْمَعِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo93. Bökende na simisi na ngai oyo, mpe bobwaka yango na elongi ya tata na ngai, miso naye ekofungwama. Мре па sima boyela ngai libota nabino mobimba.

See all translations of this verse →

وَلَمَّا فَصَلَتِ ٱلْعِيرُ قَالَ أَبُوهُمْ إِنِّى لَأَجِدُ رِيحَ يُوسُفَ لَوْلَآ أَن تُفَنِّدُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo94. Mpe tango bakotaki na ndelo ya mboka tata na bango alobaki été: Ya soló, ngai nazali koyoka solo ya Yûsuf, ata soki bozali kozua ngai na lokuta.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ تَٱللَّهِ إِنَّكَ لَفِى ضَلَٰلِكَ ٱلْقَدِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo95. Balobaki naye: Na nkombo ya Allah! Ya sólo, yo ozali penza na libunga nayo ya kala.

See all translations of this verse →

فَلَمَّآ أَن جَآءَ ٱلْبَشِيرُ أَلْقَىٰهُ عَلَىٰ وَجْهِهِۦ فَٱرْتَدَّ بَصِيرًا قَالَ أَلَمْ أَقُل لَّكُمْ إِنِّىٓ أَعْلَمُ مِنَ ٱللَّهِ مَا لَا تَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo96. Мре tango momemi sango malamu akomaki, abwakaki simisi na elongi naye mpe miso naye efungwamaki. Mpe alobaki na bana été: Boye nayebisaki bino te ete ya soló, Allah apeși ngai boyebi boye bozali na yango te?

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰٓأَبَانَا ٱسْتَغْفِرْ لَنَا ذُنُوبَنَآ إِنَّا كُنَّا خَٰطِـِٔينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo97. Balobi: Oh tata wa biso! Sengela biso tubela na masumu та biso, ya soló, tosalaki mabe.

See all translations of this verse →

قَالَ سَوْفَ أَسْتَغْفِرُ لَكُمْ رَبِّىٓ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلْغَفُورُ ٱلرَّحِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo98. Alobi: Nakosengelaka bino bolimbisi epai ya Nkolo wa ngai, ya sólo, ye azali molimbisi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا دَخَلُوا۟ عَلَىٰ يُوسُفَ ءَاوَىٰٓ إِلَيْهِ أَبَوَيْهِ وَقَالَ ٱدْخُلُوا۟ مِصْرَ إِن شَآءَ ٱللَّهُ ءَامِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo99. Mpe tango bakotaki epai ya Yûsuf akendeki koyamba baboti naye (tata na mama), mpe alobaki: Bokota na ezipito na kimia nyoso mpe na bolingo ya Allah.

See all translations of this verse →

وَرَفَعَ أَبَوَيْهِ عَلَى ٱلْعَرْشِ وَخَرُّوا۟ لَهُۥ سُجَّدًا وَقَالَ يَٰٓأَبَتِ هَٰذَا تَأْوِيلُ رُءْيَٰىَ مِن قَبْلُ قَدْ جَعَلَهَا رَبِّى حَقًّا وَقَدْ أَحْسَنَ بِىٓ إِذْ أَخْرَجَنِى مِنَ ٱلسِّجْنِ وَجَآءَ بِكُم مِّنَ ٱلْبَدْوِ مِنۢ بَعْدِ أَن نَّزَغَ ٱلشَّيْطَٰنُ بَيْنِى وَبَيْنَ إِخْوَتِىٓ إِنَّ رَبِّى لَطِيفٌ لِّمَا يَشَآءُ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلْعَلِيمُ ٱلْحَكِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo100. Mpe amatisaki baboti naye likolo ya kiti ya bokonzi, mpe sima bafukamelaki ye. Mpe alobaki: Oh tata na ngai! Oyo ezali ndimbola ya ndoto na ngai nalotaka kala, Allah asili kokokisa yango na bosôló. Mpe asalelaki ngai bolamu ebele sima ya kobimisa ngai na boloko. Mpe abimisi bino kowuta na zamba sima oyo satana akotaki o kati na ngai na bandeko na ngai. Ya soló, Nkolo wa ngai azali malamu na nyoso alingi. Ya sólo, ye azali moyebi atonda bwanya.

See all translations of this verse →

رَبِّ قَدْ ءَاتَيْتَنِى مِنَ ٱلْمُلْكِ وَعَلَّمْتَنِى مِن تَأْوِيلِ ٱلْأَحَادِيثِ فَاطِرَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ أَنتَ وَلِىِّۦ فِى ٱلدُّنْيَا وَٱلْـَٔاخِرَةِ تَوَفَّنِى مُسْلِمًا وَأَلْحِقْنِى بِٱلصَّٰلِحِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo101. Oh Nkolo! Osilaki kopesa ngai bokonzi, mpe otangisaki ngai koyeba ndimbola ya bandoto, yonde mokeli wa likolo na mabele, yonde ozali molongisi wa ngai o kati ya mokili mpe na mokolo mwa suka, boma ngai mizilima, tia ngai elongo na bato malamu.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ مِنْ أَنۢبَآءِ ٱلْغَيْبِ نُوحِيهِ إِلَيْكَ وَمَا كُنتَ لَدَيْهِمْ إِذْ أَجْمَعُوٓا۟ أَمْرَهُمْ وَهُمْ يَمْكُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo102. Wana ezali basango oyo eyebani te tozali koyebisa nayo, mpe ozalaki te na bango elongo tango basanganaki тропа kosala likita na bango, mpe bazalaki kondima тропа kosala likita. (lia mabe)

See all translations of this verse →

وَمَآ أَكْثَرُ ٱلنَّاسِ وَلَوْ حَرَصْتَ بِمُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo103. Kasi ebele ya bato bazali kondima te ata soki ozali kotelemela bango.

See all translations of this verse →

وَمَا تَسْـَٔلُهُمْ عَلَيْهِ مِنْ أَجْرٍ إِنْ هُوَ إِلَّا ذِكْرٌ لِّلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo104. Nzoka nde okosenga bango lifuta te тропа yango, wana ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba.

See all translations of this verse →

وَكَأَيِّن مِّنْ ءَايَةٍ فِى ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ يَمُرُّونَ عَلَيْهَا وَهُمْ عَنْهَا مُعْرِضُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo105. Kati na likolo mpe na nsé, ezali na bilembo boni bato bazali koleka na bopesi biango mokongo?

See all translations of this verse →

وَمَا يُؤْمِنُ أَكْثَرُهُم بِٱللَّهِ إِلَّا وَهُم مُّشْرِكُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo106. Mpe ebele kati na bango bazali kondima na Allah, mpe bazali sé basangisi.

See all translations of this verse →

أَفَأَمِنُوٓا۟ أَن تَأْتِيَهُمْ غَٰشِيَةٌ مِّنْ عَذَابِ ٱللَّهِ أَوْ تَأْتِيَهُمُ ٱلسَّاعَةُ بَغْتَةً وَهُمْ لَا يَشْعُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo107. Boye, bakanisi bazali na kimia na boyeyi etumbu ya Allah oyo ekozipa bango to mpe mokolo ya suka ekoyela bango mbalakaka mpe bango bazali koyeba te?

See all translations of this verse →

قُلْ هَٰذِهِۦ سَبِيلِىٓ أَدْعُوٓا۟ إِلَى ٱللَّهِ عَلَىٰ بَصِيرَةٍ أَنَا۠ وَمَنِ ٱتَّبَعَنِى وَسُبْحَٰنَ ٱللَّهِ وَمَآ أَنَا۠ مِنَ ٱلْمُشْرِكِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo108. Loba: Oyo nde nzela na ngai. Nazali kobenga bato epai ya Allah na boyebi, ngai na baye bakolanda ngai. Mpe nkembo na Allah! Mpe ngai nazali o kati ya basangisi te.

See all translations of this verse →

وَمَآ أَرْسَلْنَا مِن قَبْلِكَ إِلَّا رِجَالًا نُّوحِىٓ إِلَيْهِم مِّنْ أَهْلِ ٱلْقُرَىٰٓ أَفَلَمْ يَسِيرُوا۟ فِى ٱلْأَرْضِ فَيَنظُرُوا۟ كَيْفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبْلِهِمْ وَلَدَارُ ٱلْـَٔاخِرَةِ خَيْرٌ لِّلَّذِينَ ٱتَّقَوْا۟ أَفَلَا تَعْقِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo109. Mpe totindaki te liboso nayo sé mibali, moto na moto na etuka naye na bimoniseli oyo tokitiselaki bango. Mpe batambolaki na mokili te mpo batala ndenge nini bato ya liboso lolenge basukaki? Kasi ndako ya lobi nde ezali malamu тропа babangi (Allah), boye bozali kososolo te?

See all translations of this verse →

حَتَّىٰٓ إِذَا ٱسْتَيْـَٔسَ ٱلرُّسُلُ وَظَنُّوٓا۟ أَنَّهُمْ قَدْ كُذِبُوا۟ جَآءَهُمْ نَصْرُنَا فَنُجِّىَ مَن نَّشَآءُ وَلَا يُرَدُّ بَأْسُنَا عَنِ ٱلْقَوْمِ ٱلْمُجْرِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo110. Kino tango batindami balingaki кокота nakozanga elikia, mpe bakanisaki ete bato na bango basili koboya bango, kasi elonga na biso eyaki tango wana. Mpe tobikisaki nani tolingaki kati na bango, kasi etumbu na biso ezangisaka batomboki te.

See all translations of this verse →

لَقَدْ كَانَ فِى قَصَصِهِمْ عِبْرَةٌ لِّأُو۟لِى ٱلْأَلْبَٰبِ مَا كَانَ حَدِيثًا يُفْتَرَىٰ وَلَٰكِن تَصْدِيقَ ٱلَّذِى بَيْنَ يَدَيْهِ وَتَفْصِيلَ كُلِّ شَىْءٍ وَهُدًى وَرَحْمَةً لِّقَوْمٍ يُؤْمِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo111. Ezalaki o kati ya masapo na bango, liteya тропа bato ya mayele. Ezali másese ya lokuta te mpe ya pamba pamba te kasi ezali nde bosembo oyo ezali kondima na maye makitaki liboso, mpe ndimbola ya makambo manso, ezali mpe bokambi mpe ngolu тропа bandimi.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70