caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Ar-Ra'd, Verse 16

Medina · revelation order 96 · 13:16

قُلْ مَن رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ قُلِ ٱللَّهُ قُلْ أَفَٱتَّخَذْتُم مِّن دُونِهِۦٓ أَوْلِيَآءَ لَا يَمْلِكُونَ لِأَنفُسِهِمْ نَفْعًا وَلَا ضَرًّا قُلْ هَلْ يَسْتَوِى ٱلْأَعْمَىٰ وَٱلْبَصِيرُ أَمْ هَلْ تَسْتَوِى ٱلظُّلُمَٰتُ وَٱلنُّورُ أَمْ جَعَلُوا۟ لِلَّهِ شُرَكَآءَ خَلَقُوا۟ كَخَلْقِهِۦ فَتَشَٰبَهَ ٱلْخَلْقُ عَلَيْهِمْ قُلِ ٱللَّهُ خَٰلِقُ كُلِّ شَىْءٍ وَهُوَ ٱلْوَٰحِدُ ٱلْقَهَّٰرُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Loba na bango:nani azali Nkolo ya likolo na mabele? Loba: Allah, loba: Boye botiki ye bozui bakonzi basusu baye bakoki komisalisa te mpe komisala mabe te? Loba: Boye bakokani, oyo akufa miso na oyo azali na miso? To boye mwinda na molili ekokani? To bazali nde kotiyela Allah banzambe misusu, bazali kokela lokola Allah akela, mpo été bikelamu bikokana? Loba: Allah nde mokeli wa biloko binso, mpe azali sé ye moko na bokasi.
Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70