caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Al-Anfaal الأنفال

75 verses · Medina · revelation order 88

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ يَسْـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلْأَنفَالِ قُلِ ٱلْأَنفَالُ لِلَّهِ وَٱلرَّسُولِ فَٱتَّقُوا۟ ٱللَّهَ وَأَصْلِحُوا۟ ذَاتَ بَيْنِكُمْ وَأَطِيعُوا۟ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥٓ إِن كُنتُم مُّؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Bazali kotuna yo тропа bomengo bwa bitumba, loba: Ezali ya Allah na motindami waye. Bobanga Allah тре bobongisa bondeko o kati na bino. Мре botosa Allah na motindami waye, soki bozali soló bandimi.

See all translations of this verse →

إِنَّمَا ٱلْمُؤْمِنُونَ ٱلَّذِينَ إِذَا ذُكِرَ ٱللَّهُ وَجِلَتْ قُلُوبُهُمْ وَإِذَا تُلِيَتْ عَلَيْهِمْ ءَايَٰتُهُۥ زَادَتْهُمْ إِيمَٰنًا وَعَلَىٰ رَبِّهِمْ يَتَوَكَّلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Bandimi ya sólo solo nde baye bazalaka soki bayoki nkombo ya Allah, mitema mia bango milengi, mpe soki mikapo mia ye mizali kotangama, ezali kobakisela bango kondima, mpe bapesi elikya epai ya Nkolo wa bango.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ يُقِيمُونَ ٱلصَّلَوٰةَ وَمِمَّا رَزَقْنَٰهُمْ يُنفِقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Baye bazali kotelemisa losambo, mpe kobimisa maye topesi bango, (o nzela ya Allah)

See all translations of this verse →

أُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْمُؤْمِنُونَ حَقًّا لَّهُمْ دَرَجَٰتٌ عِندَ رَبِّهِمْ وَمَغْفِرَةٌ وَرِزْقٌ كَرِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Bango nde bandimi ya soló, bazali na esika ya likolo epai ya Nkolo wa bango mpe bolimbisi na bozui bolamu.

See all translations of this verse →

كَمَآ أَخْرَجَكَ رَبُّكَ مِنۢ بَيْتِكَ بِٱلْحَقِّ وَإِنَّ فَرِيقًا مِّنَ ٱلْمُؤْمِنِينَ لَكَٰرِهُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Lokola Nkolo wayo abimisaki yo na ndako nayo na bosölo, mpe ya sólo bandimi basusu basepeli na yango te.

See all translations of this verse →

يُجَٰدِلُونَكَ فِى ٱلْحَقِّ بَعْدَ مَا تَبَيَّنَ كَأَنَّمَا يُسَاقُونَ إِلَى ٱلْمَوْتِ وَهُمْ يَنظُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Bazali kosuanisa yo тропа bosôló sima ya bolimboli, lokola bazali kotinda bango na liwa mpe bazali kornona.

See all translations of this verse →

وَإِذْ يَعِدُكُمُ ٱللَّهُ إِحْدَى ٱلطَّآئِفَتَيْنِ أَنَّهَا لَكُمْ وَتَوَدُّونَ أَنَّ غَيْرَ ذَاتِ ٱلشَّوْكَةِ تَكُونُ لَكُمْ وَيُرِيدُ ٱللَّهُ أَن يُحِقَّ ٱلْحَقَّ بِكَلِمَٰتِهِۦ وَيَقْطَعَ دَابِرَ ٱلْكَٰفِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Bokanisa tango Allah alakaki bino ete moko lisanga ya mibale ya bango ekozala ya bino, тре boponaki lisanga liye lizalaki na bibundeli te, kasi Allah alingaki kolongisa bosôló ya maloba naye, mpe aboyelaki bapagano mpe atiya bango bazala bato ya suka.

See all translations of this verse →

لِيُحِقَّ ٱلْحَقَّ وَيُبْطِلَ ٱلْبَٰطِلَ وَلَوْ كَرِهَ ٱلْمُجْرِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Mpo ete alongisa bosôló mpe alimwisa lokuta ata bato mabe bazali koyina yango.

See all translations of this verse →

إِذْ تَسْتَغِيثُونَ رَبَّكُمْ فَٱسْتَجَابَ لَكُمْ أَنِّى مُمِدُّكُم بِأَلْفٍ مِّنَ ٱلْمَلَٰٓئِكَةِ مُرْدِفِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. (Mpe bokanisa) tango bosengaki lisungi epai ya Nkolo wa bino. Mpe andimelaki bino, ete ya soló: ngai nakosalisa bino na ba anzelu nkoto yoko bazali kolandana. (bango na bango)

See all translations of this verse →

وَمَا جَعَلَهُ ٱللَّهُ إِلَّا بُشْرَىٰ وَلِتَطْمَئِنَّ بِهِۦ قُلُوبُكُمْ وَمَا ٱلنَّصْرُ إِلَّا مِنْ عِندِ ٱللَّهِ إِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Kasi Allah asalaki yango te sé mpo amemela bino sango, тре mpo mitema mia bino mikoka kokita, mpe elonga ezali sé epai na Allah. Ya sólo, Allah azali wa bokasi atonda bwanya.

See all translations of this verse →

إِذْ يُغَشِّيكُمُ ٱلنُّعَاسَ أَمَنَةً مِّنْهُ وَيُنَزِّلُ عَلَيْكُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءً لِّيُطَهِّرَكُم بِهِۦ وَيُذْهِبَ عَنكُمْ رِجْزَ ٱلشَّيْطَٰنِ وَلِيَرْبِطَ عَلَىٰ قُلُوبِكُمْ وَيُثَبِّتَ بِهِ ٱلْأَقْدَامَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Mpe tango azipaki bino na mpongi ya токе, ezali lokola ebateli naye likolo na bino mpe akitiseli bino mayi ya mbula kowuta o likolo, тропа kopetola bino na yango, mpe alongóla bino mbindo ya satana mpe akangisa mitema mia bino тре alendisa makolo na bino.

See all translations of this verse →

إِذْ يُوحِى رَبُّكَ إِلَى ٱلْمَلَٰٓئِكَةِ أَنِّى مَعَكُمْ فَثَبِّتُوا۟ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ سَأُلْقِى فِى قُلُوبِ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ ٱلرُّعْبَ فَٱضْرِبُوا۟ فَوْقَ ٱلْأَعْنَاقِ وَٱضْرِبُوا۟ مِنْهُمْ كُلَّ بَنَانٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Kanisa tango Nkolo wayo ayebisaki ba anzelu, ya solo ngai nazali elongo na bino, bolendisa bandimi. Na kotiya bobangi o mitema mia bapagano. Bobeta bango bakingo тре bobeta bango na biteni binso.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمْ شَآقُّوا۟ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَمَن يُشَاقِقِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ فَإِنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلْعِقَابِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Pamba te, bazangi kotosa Allah na motindami waye. Kasi oyo akozanga kotosa Allah na motindami waye, ya sólo penza, Allah nde mopesi etumbu ya makasi.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكُمْ فَذُوقُوهُ وَأَنَّ لِلْكَٰفِرِينَ عَذَابَ ٱلنَّارِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Wana nde (ndenge ekozalela bino) esengeli bomeka yango (etumbu)! Mpe ya sólo, etumbu ya bapengwi ekozalaka nde moto.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓا۟ إِذَا لَقِيتُمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ زَحْفًا فَلَا تُوَلُّوهُمُ ٱلْأَدْبَارَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Eh bino baye bondimi! Soki bokutani na bapengwi, (o bisika binso тропа bitumba) bokima bango te.

See all translations of this verse →

وَمَن يُوَلِّهِمْ يَوْمَئِذٍ دُبُرَهُۥٓ إِلَّا مُتَحَرِّفًا لِّقِتَالٍ أَوْ مُتَحَيِّزًا إِلَىٰ فِئَةٍ فَقَدْ بَآءَ بِغَضَبٍ مِّنَ ٱللَّهِ وَمَأْوَىٰهُ جَهَنَّمُ وَبِئْسَ ٱلْمَصِيرُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Mpe oyo kati na bino akokima banguna o mokolo wana, longola sé oyo apesi mokongo тропа koluka lolenge mosusu ya kobunda, to akei kokutana na mapinga mosusu тропа kokoba bitumba, ayeba ete asili kozua nkanda ya Allah. Мре esika naye ekozalaka lifelo, mpe yango nde ekozalaka esika ya mabe.

See all translations of this verse →

فَلَمْ تَقْتُلُوهُمْ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ قَتَلَهُمْ وَمَا رَمَيْتَ إِذْ رَمَيْتَ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ رَمَىٰ وَلِيُبْلِىَ ٱلْمُؤْمِنِينَ مِنْهُ بَلَآءً حَسَنًا إِنَّ ٱللَّهَ سَمِيعٌ عَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Ezali te bino nde bobomaki bango, kasi Allah nde abomaki bango. Мре tango obwakaki (likonga), ezali yo te nde obwakaki, kasi Allah nde mobwaki, (likonga) mpe ezali тропа kopesa bandimi bolamu na ndenge naye. Ya soló, Allah azali moyoki atonda boyebi.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكُمْ وَأَنَّ ٱللَّهَ مُوهِنُ كَيْدِ ٱلْكَٰفِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Yango ezali mpo oyeba lolenge kani Allah azali kobebisa mwango ya bapengwi.

See all translations of this verse →

إِن تَسْتَفْتِحُوا۟ فَقَدْ جَآءَكُمُ ٱلْفَتْحُ وَإِن تَنتَهُوا۟ فَهُوَ خَيْرٌ لَّكُمْ وَإِن تَعُودُوا۟ نَعُدْ وَلَن تُغْنِىَ عَنكُمْ فِئَتُكُمْ شَيْـًٔا وَلَوْ كَثُرَتْ وَأَنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلْمُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Soki bolukaki elonga, ya soló, elonga esilaki koyela bino. Mpe soki botiki ezali malamu тропа bino, kasi soki bozongeli tokozonga, mpe lisanga na bino ekosalisa bino na eloko te, ata soki bozali ebele ndenge nini. Kasi boyeba ete: Ya sólo, Allah azali elongo na bandimi.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓا۟ أَطِيعُوا۟ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَلَا تَوَلَّوْا۟ عَنْهُ وَأَنتُمْ تَسْمَعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Eh bino baye bondima! Botosa Allah na motindami waye, (Muhammad) kasi boboya ye te mpe bino bozali koyoka.

See all translations of this verse →

وَلَا تَكُونُوا۟ كَٱلَّذِينَ قَالُوا۟ سَمِعْنَا وَهُمْ لَا يَسْمَعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Mpe bozala te lokola baye bazali koloba: Toyokaki, kasi bayokaka te.

See all translations of this verse →

إِنَّ شَرَّ ٱلدَّوَآبِّ عِندَ ٱللَّهِ ٱلصُّمُّ ٱلْبُكْمُ ٱلَّذِينَ لَا يَعْقِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Ya sólo, bazoba koleka banyama epai ya Allah, bazali baye bakufa matoyi, baye balobaka te (baba), bango wana bazangi kososola.

See all translations of this verse →

وَلَوْ عَلِمَ ٱللَّهُ فِيهِمْ خَيْرًا لَّأَسْمَعَهُمْ وَلَوْ أَسْمَعَهُمْ لَتَوَلَّوا۟ وَّهُم مُّعْرِضُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Mpe soki Allah ayebaki(1) ete bazali na bolamu, balingaki koyokisa bango maye makosunga bango, mpe soki ata ayokisaki bango balingaki sé kopesa mokongo na koboya.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ ٱسْتَجِيبُوا۟ لِلَّهِ وَلِلرَّسُولِ إِذَا دَعَاكُمْ لِمَا يُحْيِيكُمْ وَٱعْلَمُوٓا۟ أَنَّ ٱللَّهَ يَحُولُ بَيْنَ ٱلْمَرْءِ وَقَلْبِهِۦ وَأَنَّهُۥٓ إِلَيْهِ تُحْشَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Eh bino baye bondima! Boyamba mbela ya Allah na motindami, tango azali kobenga bino na maye makobikisa bino. Mpe boyeba ete ya soló, Allah azali okati ya moto na motema naye, mpe boyeba ete ya sólo, epai naye bokosangisama.

See all translations of this verse →

وَٱتَّقُوا۟ فِتْنَةً لَّا تُصِيبَنَّ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوا۟ مِنكُمْ خَآصَّةً وَٱعْلَمُوٓا۟ أَنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلْعِقَابِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Mpe bobanga etumbu eye ekopona te sé baye basali mabe kati na bino, mpe boyeba ya sólo, Allah azali mopesi etumbu ekasi.

See all translations of this verse →

وَٱذْكُرُوٓا۟ إِذْ أَنتُمْ قَلِيلٌ مُّسْتَضْعَفُونَ فِى ٱلْأَرْضِ تَخَافُونَ أَن يَتَخَطَّفَكُمُ ٱلنَّاسُ فَـَٔاوَىٰكُمْ وَأَيَّدَكُم بِنَصْرِهِۦ وَرَزَقَكُم مِّنَ ٱلطَّيِّبَٰتِ لَعَلَّكُمْ تَشْكُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Mpe bokanisa tango bozalaki motango moke, bozangaki makasi, bozalaki kobanga bato noki balimwisa bino na mokili, kasi asungi bino na elonga naye. Nasima apesaki bino bozui ya kitoko mpo botondo.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ لَا تَخُونُوا۟ ٱللَّهَ وَٱلرَّسُولَ وَتَخُونُوٓا۟ أَمَٰنَٰتِكُمْ وَأَنتُمْ تَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Eh bino bandimi! Boteka Allah na motindami waye te, boye bokoteka mokumba na boyambi oyo ezali na maboko na bino mpe bozali kati na koyeba?

See all translations of this verse →

وَٱعْلَمُوٓا۟ أَنَّمَآ أَمْوَٰلُكُمْ وَأَوْلَٰدُكُمْ فِتْنَةٌ وَأَنَّ ٱللَّهَ عِندَهُۥٓ أَجْرٌ عَظِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Мре boyeba, ya soló bomengo bwa bino na bana ba bino, ezali Momekano, mpe ya sólo, Allah azali na bolamu bonene.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓا۟ إِن تَتَّقُوا۟ ٱللَّهَ يَجْعَل لَّكُمْ فُرْقَانًا وَيُكَفِّرْ عَنكُمْ سَيِّـَٔاتِكُمْ وَيَغْفِرْ لَكُمْ وَٱللَّهُ ذُو ٱلْفَضْلِ ٱلْعَظِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Eh bino bandimi! Soki bobangi Allah, akopesa bino bososoli mpe akolongola mabe na bino. Mpe akolimbisa masumu ma bino. Mpe Allah atonda bolamu bonene koleka.

See all translations of this verse →

وَإِذْ يَمْكُرُ بِكَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ لِيُثْبِتُوكَ أَوْ يَقْتُلُوكَ أَوْ يُخْرِجُوكَ وَيَمْكُرُونَ وَيَمْكُرُ ٱللَّهُ وَٱللَّهُ خَيْرُ ٱلْمَٰكِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. (Mpe kanisa) tango eye bapengwi basalelaki yo(1) likita été bakanga yo to koboma yo, to babengana yo. Basalaki likita yango, Allah mpe asaleli bango, kasi Allah azali Nkolo likita ya malamu koleka.

See all translations of this verse →

وَإِذَا تُتْلَىٰ عَلَيْهِمْ ءَايَٰتُنَا قَالُوا۟ قَدْ سَمِعْنَا لَوْ نَشَآءُ لَقُلْنَا مِثْلَ هَٰذَآ إِنْ هَٰذَآ إِلَّآ أَسَٰطِيرُ ٱلْأَوَّلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Mpe tango mikapo mia biso mizali kotangema likolo na bango, bakolobaka: Tosilaki koyoka. Soki tolingaki, nde totangaki liloba lokola oyo, oyo ezali sé masapo ya kala.

See all translations of this verse →

وَإِذْ قَالُوا۟ ٱللَّهُمَّ إِن كَانَ هَٰذَا هُوَ ٱلْحَقَّ مِنْ عِندِكَ فَأَمْطِرْ عَلَيْنَا حِجَارَةً مِّنَ ٱلسَّمَآءِ أَوِ ٱئْتِنَا بِعَذَابٍ أَلِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Mpe tango balobaki ete: Eh Nkolo! Soki likambo oyo ezali bosoló penza ewuti epai nayo, Nokisela biso mabanga na likolo lokola mbula, to óyela biso etumbu mosusu ya makasi koleka.

See all translations of this verse →

وَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيُعَذِّبَهُمْ وَأَنتَ فِيهِمْ وَمَا كَانَ ٱللَّهُ مُعَذِّبَهُمْ وَهُمْ يَسْتَغْفِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Kaši Allah azali te тропа kopesa bango etumbu mpe ozali kati na bango, тре Allah azali te тропа kopesa bango etumbu тре bango bazali kosenga bolimbisi.

See all translations of this verse →

وَمَا لَهُمْ أَلَّا يُعَذِّبَهُمُ ٱللَّهُ وَهُمْ يَصُدُّونَ عَنِ ٱلْمَسْجِدِ ٱلْحَرَامِ وَمَا كَانُوٓا۟ أَوْلِيَآءَهُۥٓ إِنْ أَوْلِيَآؤُهُۥٓ إِلَّا ٱلْمُتَّقُونَ وَلَٰكِنَّ أَكْثَرَهُمْ لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Мре ndenge nini te Allah apesa bango etumbu mpe bango bazali kopekisa bandimi kokota o ndako esantu (ya makkah), mpe bazali bakengeli na yango te? Kasi babateli na yango nde bandimi oyo babangi Allah, kasi ebele kati na bango bazali koyeba te.

See all translations of this verse →

وَمَا كَانَ صَلَاتُهُمْ عِندَ ٱلْبَيْتِ إِلَّا مُكَآءً وَتَصْدِيَةً فَذُوقُوا۟ ٱلْعَذَابَ بِمَا كُنتُمْ تَكْفُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Mpe losambo na bango na ndako(1) ezali sé bafololo mpe kobeta maboko, bomeka etumbu ya maye bozalaki kopengwa na yango.

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ يُنفِقُونَ أَمْوَٰلَهُمْ لِيَصُدُّوا۟ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ فَسَيُنفِقُونَهَا ثُمَّ تَكُونُ عَلَيْهِمْ حَسْرَةً ثُمَّ يُغْلَبُونَ وَٱلَّذِينَ كَفَرُوٓا۟ إِلَىٰ جَهَنَّمَ يُحْشَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Ya soló, baye bapengwa, bazali kobimisa misolo mia bango тропа kobundisa nzela ya Allah. Bakopesaka yango mpe bakozangaka, sima bakolongamaka. Mpe bapengwi bakosangisamaka o moto ya lifelo.

See all translations of this verse →

لِيَمِيزَ ٱللَّهُ ٱلْخَبِيثَ مِنَ ٱلطَّيِّبِ وَيَجْعَلَ ٱلْخَبِيثَ بَعْضَهُۥ عَلَىٰ بَعْضٍ فَيَرْكُمَهُۥ جَمِيعًا فَيَجْعَلَهُۥ فِى جَهَنَّمَ أُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْخَٰسِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Mpo Allah akabola mabe na malamu, mpe atiya mabe likolo ya mabe, mpe asangisa yango nyoso na moto ya lifelo. Bango wana nde bazangi.

See all translations of this verse →

قُل لِّلَّذِينَ كَفَرُوٓا۟ إِن يَنتَهُوا۟ يُغْفَرْ لَهُم مَّا قَدْ سَلَفَ وَإِن يَعُودُوا۟ فَقَدْ مَضَتْ سُنَّتُ ٱلْأَوَّلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Loba na baye bapengwa ete: Soki batiki mabe, bakolimbisama na maye maleka. Kasi soki bazongeli, bakozuama lokola baye balekaki liboso na bango.

See all translations of this verse →

وَقَٰتِلُوهُمْ حَتَّىٰ لَا تَكُونَ فِتْنَةٌ وَيَكُونَ ٱلدِّينُ كُلُّهُۥ لِلَّهِ فَإِنِ ٱنتَهَوْا۟ فَإِنَّ ٱللَّهَ بِمَا يَعْمَلُونَ بَصِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Mpe bobundisa bango kino bakotika bosangisi,(1) mpe lingomba lizala lia Allah.(2) mpe soki batiki, Allah azali kornona maye manso bazali kosala.

See all translations of this verse →

وَإِن تَوَلَّوْا۟ فَٱعْلَمُوٓا۟ أَنَّ ٱللَّهَ مَوْلَىٰكُمْ نِعْمَ ٱلْمَوْلَىٰ وَنِعْمَ ٱلنَّصِيرُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Mpe soki bapesi bino mokongo, boyeba ete ya soló, Allah nde mobateli na bino. Oyó nde suka na mobateli kitoko.

See all translations of this verse →

وَٱعْلَمُوٓا۟ أَنَّمَا غَنِمْتُم مِّن شَىْءٍ فَأَنَّ لِلَّهِ خُمُسَهُۥ وَلِلرَّسُولِ وَلِذِى ٱلْقُرْبَىٰ وَٱلْيَتَٰمَىٰ وَٱلْمَسَٰكِينِ وَٱبْنِ ٱلسَّبِيلِ إِن كُنتُمْ ءَامَنتُم بِٱللَّهِ وَمَآ أَنزَلْنَا عَلَىٰ عَبْدِنَا يَوْمَ ٱلْفُرْقَانِ يَوْمَ ٱلْتَقَى ٱلْجَمْعَانِ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَىْءٍ قَدِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Mpe boyeba ete manso bokozua na bitumba: Ya sólo, moko na mitano ezali тропа Allah na motindami mpe тропа mabota ya pene, mpe тропа bana bitike, тре тропа babola, тре тропа moto ya mobembo, (moleki nzela), soki ya soló, bozali kondima na Allah mpe kondima na maye tokitisaki epai ya mowumbu wa biso o mokolo mwa bososoli, mokolo moye mapinga mibale makutanaki. Mpe Allah azali na bokoki likolo ya eloko nyoso.

See all translations of this verse →

إِذْ أَنتُم بِٱلْعُدْوَةِ ٱلدُّنْيَا وَهُم بِٱلْعُدْوَةِ ٱلْقُصْوَىٰ وَٱلرَّكْبُ أَسْفَلَ مِنكُمْ وَلَوْ تَوَاعَدتُّمْ لَٱخْتَلَفْتُمْ فِى ٱلْمِيعَٰدِ وَلَٰكِن لِّيَقْضِىَ ٱللَّهُ أَمْرًا كَانَ مَفْعُولًا لِّيَهْلِكَ مَنْ هَلَكَ عَنۢ بَيِّنَةٍ وَيَحْيَىٰ مَنْ حَىَّ عَنۢ بَيِّنَةٍ وَإِنَّ ٱللَّهَ لَسَمِيعٌ عَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Bozalaki ngambu ya pene, kasi (banguna) bazalaki ngambu ya mosika, kasi mapinga ya mikumba ezalaki na nsé ya bino. Soki bopesanaka elaka bolingaki kokesene sima. Mpe bolingaki kozuama na banguna, kasi Allah akokisaki mobeko na ndenge asalaki тропа elembo ena. Mpo aboma oyo alingaki koboma, mpe abikisa oyo alingaki kobikisa. Kasi Allah azali moyoki atonda boyebi.

See all translations of this verse →

إِذْ يُرِيكَهُمُ ٱللَّهُ فِى مَنَامِكَ قَلِيلًا وَلَوْ أَرَىٰكَهُمْ كَثِيرًا لَّفَشِلْتُمْ وَلَتَنَٰزَعْتُمْ فِى ٱلْأَمْرِ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ سَلَّمَ إِنَّهُۥ عَلِيمٌۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Boye tango Allah alakisaki yo kati ya mpongi ete bazali mingi te, soki amonisaki yo ete bazali ebele mbele bokimaki na kobanga kobunda mpe bolingaki koswana na likambo yango kasi Allah abongisaki, ya soló, ye nde moyebi ya maye mabombami o kati ya mitema.

See all translations of this verse →

وَإِذْ يُرِيكُمُوهُمْ إِذِ ٱلْتَقَيْتُمْ فِىٓ أَعْيُنِكُمْ قَلِيلًا وَيُقَلِّلُكُمْ فِىٓ أَعْيُنِهِمْ لِيَقْضِىَ ٱللَّهُ أَمْرًا كَانَ مَفْعُولًا وَإِلَى ٱللَّهِ تُرْجَعُ ٱلْأُمُورُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Mpe tango bokutanaki, Allah amonisaki bino ete bango bazali токе, bango mpe lokola bamonaki bino токе liboso na bango wana ezalaki mpo mokano ya Allah mokokisama, mpe epai ya Allah nde makambo manso makozongaka.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓا۟ إِذَا لَقِيتُمْ فِئَةً فَٱثْبُتُوا۟ وَٱذْكُرُوا۟ ٱللَّهَ كَثِيرًا لَّعَلَّكُمْ تُفْلِحُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Eh bino baye bondima! Soki bokutani na lisanga lia banguna, bopika pende mpe bokumisa Allah mingi mpo bokoka kolonga.

See all translations of this verse →

وَأَطِيعُوا۟ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَلَا تَنَٰزَعُوا۟ فَتَفْشَلُوا۟ وَتَذْهَبَ رِيحُكُمْ وَٱصْبِرُوٓا۟ إِنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلصَّٰبِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo46. Мре botosa Allah na motindami waye, mpe bosuana suana te noki bokokabwana mpe bokozanga bokasi. Na yango, bolenda na kokanga motema pamba te ya soló Allah azali elongo na bakangi mitema.

See all translations of this verse →

وَلَا تَكُونُوا۟ كَٱلَّذِينَ خَرَجُوا۟ مِن دِيَٰرِهِم بَطَرًا وَرِئَآءَ ٱلنَّاسِ وَيَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ وَٱللَّهُ بِمَا يَعْمَلُونَ مُحِيطٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Mpe bozala te lokola baye babimaki na bandako na bango na lolendo ete bato bamona bango, mpe kopekisa nzela ya Allah. Kasi Allah azingi maye bazali kosala.

See all translations of this verse →

وَإِذْ زَيَّنَ لَهُمُ ٱلشَّيْطَٰنُ أَعْمَٰلَهُمْ وَقَالَ لَا غَالِبَ لَكُمُ ٱلْيَوْمَ مِنَ ٱلنَّاسِ وَإِنِّى جَارٌ لَّكُمْ فَلَمَّا تَرَآءَتِ ٱلْفِئَتَانِ نَكَصَ عَلَىٰ عَقِبَيْهِ وَقَالَ إِنِّى بَرِىٓءٌ مِّنكُمْ إِنِّىٓ أَرَىٰ مَا لَا تَرَوْنَ إِنِّىٓ أَخَافُ ٱللَّهَ وَٱللَّهُ شَدِيدُ ٱلْعِقَابِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Mpe tango satana abongiselaki bango misala mpe alobi na bango ete: Moto moko te akokoka bino lelo. Mpo ete ngai nazali na bino. Mpe tango mapinga mibale makutani, abaluki azongi sima mpe alobi: Ya sólo, ngai nawangani bino, mpe nazali mosika na bino, ngai nazali kornona maye bozali kornona te. Ya sólo, ngai nazali kobanga Allah, mpo Allah apesaka etumbu ya makasi.

See all translations of this verse →

إِذْ يَقُولُ ٱلْمُنَٰفِقُونَ وَٱلَّذِينَ فِى قُلُوبِهِم مَّرَضٌ غَرَّ هَٰٓؤُلَآءِ دِينُهُمْ وَمَن يَتَوَكَّلْ عَلَى ٱللَّهِ فَإِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. (Bokanisa) tango bato ya bilongi mibale, mpe baye bazali na bokono o kati ya mitema mia bango, balobaki na bandimi ete: Bato oyo lingomba lia bango lizali kokosa bango. Kasi oyo akomipesa na Allah, ayeba ete yasoló, Allah azali na bokasi atonda bwanya.

See all translations of this verse →

وَلَوْ تَرَىٰٓ إِذْ يَتَوَفَّى ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ ٱلْمَلَٰٓئِكَةُ يَضْرِبُونَ وُجُوهَهُمْ وَأَدْبَٰرَهُمْ وَذُوقُوا۟ عَذَابَ ٱلْحَرِيقِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Soki omoni tango ba anzelu babimisaka milimo mia bapengwi, bazali kobeta bango na bilongi bia bango, mpe mikongo mia bango, bazali koloba: Bomeka etumbu ya moto.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ بِمَا قَدَّمَتْ أَيْدِيكُمْ وَأَنَّ ٱللَّهَ لَيْسَ بِظَلَّٰمٍ لِّلْعَبِيدِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Wana nde (etumbu) oyo bino moko bomisalelaki, mpe ya sólo, Allah abubaka bawumbu naye te.

See all translations of this verse →

كَدَأْبِ ءَالِ فِرْعَوْنَ وَٱلَّذِينَ مِن قَبْلِهِمْ كَفَرُوا۟ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ فَأَخَذَهُمُ ٱللَّهُ بِذُنُوبِهِمْ إِنَّ ٱللَّهَ قَوِىٌّ شَدِيدُ ٱلْعِقَابِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Ndenge moko na bato ya falo, na ba oyo bazalaki liboso lia bango, bapengwaki na bilembo bia Allah. Allah azuaki bango na masumu ma bango. Ya sólo, Allah azali na bokasi mpe mopesi etumbu ya makasi.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ لَمْ يَكُ مُغَيِّرًا نِّعْمَةً أَنْعَمَهَا عَلَىٰ قَوْمٍ حَتَّىٰ يُغَيِّرُوا۟ مَا بِأَنفُسِهِمْ وَأَنَّ ٱللَّهَ سَمِيعٌ عَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo53. Wana ezali mpo ete Allah akoki kolongola te bolamu oyo apesaki bato sé soki babongola bizaleli oyo bazalaki na yango, mpe ya sólo, Allah azali moyoki atonda boyebi.

See all translations of this verse →

كَدَأْبِ ءَالِ فِرْعَوْنَ وَٱلَّذِينَ مِن قَبْلِهِمْ كَذَّبُوا۟ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمْ فَأَهْلَكْنَٰهُم بِذُنُوبِهِمْ وَأَغْرَقْنَآ ءَالَ فِرْعَوْنَ وَكُلٌّ كَانُوا۟ ظَٰلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo54. Bazalaki ndenge moko na bato ba falo, na ba oyo bazalaki liboso lia bango, baboyaki kondima na mikapo na bilembo bia Nkolo wa bango. Yango topesaki bango etumbu тропа masumu та bango. Mpe tozindisaki na mayi bato ya falo тропа bobubi bwa bango.

See all translations of this verse →

إِنَّ شَرَّ ٱلدَّوَآبِّ عِندَ ٱللَّهِ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ فَهُمْ لَا يُؤْمِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Ya soló, bato mabe koleka banyama epai ya Allah nde bapagano, mpe bango, bandimaka ata токе te.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ عَٰهَدتَّ مِنْهُمْ ثُمَّ يَنقُضُونَ عَهْدَهُمْ فِى كُلِّ مَرَّةٍ وَهُمْ لَا يَتَّقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo56. Bango nde baye opesanaki na bango elaka mpe na tango inso bazangaki kotosa yango, mpe bazali kobanga ata токе te.

See all translations of this verse →

فَإِمَّا تَثْقَفَنَّهُمْ فِى ٱلْحَرْبِ فَشَرِّدْ بِهِم مَّنْ خَلْفَهُمْ لَعَلَّهُمْ يَذَّكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo57. Soki ozui bokoki likolo na bango o tango ya bitumba, pesa bango etumbu eye ekoki mpo basusu oyo bazali sima na bango babanga, mpe mpo bakanisa.

See all translations of this verse →

وَإِمَّا تَخَافَنَّ مِن قَوْمٍ خِيَانَةً فَٱنۢبِذْ إِلَيْهِمْ عَلَىٰ سَوَآءٍ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ ٱلْخَآئِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. Mpe soki ya sólo, ozali kobanga ete bato ya bilongi mibale bateka yo, esengeli nayo koboya na polele mpe na bosembo na elaka eye ozuaki na bango, pamba te Allah alingaka te bato ya bilongi mibale.

See all translations of this verse →

وَلَا يَحْسَبَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ سَبَقُوٓا۟ إِنَّهُمْ لَا يُعْجِزُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Bapengwi bakanisa te ete tozangaki kozua bango na maye basalaki, bakokoka kokima biso te.

See all translations of this verse →

وَأَعِدُّوا۟ لَهُم مَّا ٱسْتَطَعْتُم مِّن قُوَّةٍ وَمِن رِّبَاطِ ٱلْخَيْلِ تُرْهِبُونَ بِهِۦ عَدُوَّ ٱللَّهِ وَعَدُوَّكُمْ وَءَاخَرِينَ مِن دُونِهِمْ لَا تَعْلَمُونَهُمُ ٱللَّهُ يَعْلَمُهُمْ وَمَا تُنفِقُوا۟ مِن شَىْءٍ فِى سَبِيلِ ٱللَّهِ يُوَفَّ إِلَيْكُمْ وَأَنتُمْ لَا تُظْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Мре bolengele тропа bango bokasi bonso bozali na yango na bibundeli bia lolenge nyoso тропа kobangisa monguna ya Allah тре monguna ya bino. Na basusu bazali sima boyebi bango te. Kasi Allah nde ayebi bango. Mpe boyeba ete oyo nyoso bokobimisa na nzela ya Allah, akozongisela bino na malamu penza, mpe bokobubamaka te.

See all translations of this verse →

وَإِن جَنَحُوا۟ لِلسَّلْمِ فَٱجْنَحْ لَهَا وَتَوَكَّلْ عَلَى ٱللَّهِ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلْعَلِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo61. Mpe soki balingi kimia batiki bitumba, yo mpe yaka na kimia, kasi tia elikia epai ya Allah. Mpo azali ya soló moyoki mpe atonda boyebi.

See all translations of this verse →

وَإِن يُرِيدُوٓا۟ أَن يَخْدَعُوكَ فَإِنَّ حَسْبَكَ ٱللَّهُ هُوَ ٱلَّذِىٓ أَيَّدَكَ بِنَصْرِهِۦ وَبِٱلْمُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Mpe soki balingi kokosa yo, Allah akoki тропа yo. Ye nde asalisaki yo na lisungi naye mpe na bandimi lokola.

See all translations of this verse →

وَأَلَّفَ بَيْنَ قُلُوبِهِمْ لَوْ أَنفَقْتَ مَا فِى ٱلْأَرْضِ جَمِيعًا مَّآ أَلَّفْتَ بَيْنَ قُلُوبِهِمْ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ أَلَّفَ بَيْنَهُمْ إِنَّهُۥ عَزِيزٌ حَكِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo63. Mpe asangisaki mitema mia bango, (na bondimi) ata soki obimisaka manso maye mazali о mabele, mbele osangisaki mitema mia bango te. Kasi Allah nde asangisa kati na bango, ya sólo, ye azali na bokasi atonda bwanya.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِىُّ حَسْبُكَ ٱللَّهُ وَمَنِ ٱتَّبَعَكَ مِنَ ٱلْمُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Eh yo ntoma! Allah akoki yo, na bandimi baye balandi yo bakoki yo mpe lokola.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِىُّ حَرِّضِ ٱلْمُؤْمِنِينَ عَلَى ٱلْقِتَالِ إِن يَكُن مِّنكُمْ عِشْرُونَ صَٰبِرُونَ يَغْلِبُوا۟ مِا۟ئَتَيْنِ وَإِن يَكُن مِّنكُم مِّا۟ئَةٌ يَغْلِبُوٓا۟ أَلْفًا مِّنَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ بِأَنَّهُمْ قَوْمٌ لَّا يَفْقَهُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo65. Eh ntoma! Telemela bandimi (yebisa bango) тропа kobunda na bapagano. Soki ezali na ntuku mibale ya bakangi mitema okati na bino, bakolonga nkama mibale, mpe soki bazali mokama moko okati na bino bakolonga nkoto moko okati ya bapagano, mpo ete bazangi bososoli mpe bayebi eloko te.

See all translations of this verse →

ٱلْـَٰٔنَ خَفَّفَ ٱللَّهُ عَنكُمْ وَعَلِمَ أَنَّ فِيكُمْ ضَعْفًا فَإِن يَكُن مِّنكُم مِّا۟ئَةٌ صَابِرَةٌ يَغْلِبُوا۟ مِا۟ئَتَيْنِ وَإِن يَكُن مِّنكُمْ أَلْفٌ يَغْلِبُوٓا۟ أَلْفَيْنِ بِإِذْنِ ٱللَّهِ وَٱللَّهُ مَعَ ٱلصَّٰبِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo66. Sikoyo Allah akutoli bino mokumba, mpe ayebaki ete kati na bino bolembu ezali. Soki bozali na bayiki mpiko mokama moko, bakolonga mikama mibale, mpe soki bazali nkoto moko kati na bino, bakolonga nkoto mibale na ndingisa ya Allah. Mpo ete Allah azali elongo na bakangi mitema.

See all translations of this verse →

مَا كَانَ لِنَبِىٍّ أَن يَكُونَ لَهُۥٓ أَسْرَىٰ حَتَّىٰ يُثْخِنَ فِى ٱلْأَرْضِ تُرِيدُونَ عَرَضَ ٱلدُّنْيَا وَٱللَّهُ يُرِيدُ ٱلْـَٔاخِرَةَ وَٱللَّهُ عَزِيزٌ حَكِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo67. Esengelaki te na ntoma kotiya bakangami na bitumba okati ya boloko, sé bakundama na mabele. Boye bozali kolinga lokumu na bomoyi ya nsé nzoka nde Allah alingi bomoyi ya mokolo ya suka. Mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya.

See all translations of this verse →

لَّوْلَا كِتَٰبٌ مِّنَ ٱللَّهِ سَبَقَ لَمَسَّكُمْ فِيمَآ أَخَذْتُمْ عَذَابٌ عَظِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo68. Soki makomi mautaka epai ya Allah te, etumbu ya Allah ya monene elingaki kozua bino.

See all translations of this verse →

فَكُلُوا۟ مِمَّا غَنِمْتُمْ حَلَٰلًا طَيِّبًا وَٱتَّقُوا۟ ٱللَّهَ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٌ رَّحِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo69. Mpe bolia biloko ya malamu biye bozuaki yango na bitumba. Mpe bobanga Allah ya soló Allah azali molimbisi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِىُّ قُل لِّمَن فِىٓ أَيْدِيكُم مِّنَ ٱلْأَسْرَىٰٓ إِن يَعْلَمِ ٱللَّهُ فِى قُلُوبِكُمْ خَيْرًا يُؤْتِكُمْ خَيْرًا مِّمَّآ أُخِذَ مِنكُمْ وَيَغْفِرْ لَكُمْ وَٱللَّهُ غَفُورٌ رَّحِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo70. Eh ntoma! Loba na baye bazali na maboko na bino kati na banguna baye bakangami kati na boloko ete: Soki Allah ayebi(1) ete mitema mia bino mizali malamu, akopesa bino ya malamu koleka biye babotoli bino, akolimbisa bino, mpo Allah azali molimbisi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

وَإِن يُرِيدُوا۟ خِيَانَتَكَ فَقَدْ خَانُوا۟ ٱللَّهَ مِن قَبْلُ فَأَمْكَنَ مِنْهُمْ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo71. Мре soki baponi koteka yo, yeba ete basilaki koteka Allah liboso, mpe (Allah) asukisaki bango, (o mokolo mwa badri). Kasi Allah azali moyebi atonda bwanya.

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَهَاجَرُوا۟ وَجَٰهَدُوا۟ بِأَمْوَٰلِهِمْ وَأَنفُسِهِمْ فِى سَبِيلِ ٱللَّهِ وَٱلَّذِينَ ءَاوَوا۟ وَّنَصَرُوٓا۟ أُو۟لَٰٓئِكَ بَعْضُهُمْ أَوْلِيَآءُ بَعْضٍ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَلَمْ يُهَاجِرُوا۟ مَا لَكُم مِّن وَلَٰيَتِهِم مِّن شَىْءٍ حَتَّىٰ يُهَاجِرُوا۟ وَإِنِ ٱسْتَنصَرُوكُمْ فِى ٱلدِّينِ فَعَلَيْكُمُ ٱلنَّصْرُ إِلَّا عَلَىٰ قَوْمٍۭ بَيْنَكُمْ وَبَيْنَهُم مِّيثَٰقٌ وَٱللَّهُ بِمَا تَعْمَلُونَ بَصِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo72. Ya soló, baye bandimaki mpe batikaki (Makkah) bakei (madinah), mpe babundaki na misolo mia bango na milimo mia bango na nzela ya Allah, na baye bayambaki bango na lisungi na (madinah), baye wana nde bazali balingami bango na bango. Kasi тропа baye bandimaki mpe batikaki (Makkah) te, esengeli na bino te kozua bango balingami kino bakolanda bino esika bozali. Mpe soki basengi bino lisungi na nkombo ya lingomba, esengeli na bino kopesa bango maboko, kasi ezala likolo ya bato oyo elaka ezali kati kati na bino na bango. Mpe Allah azali kornona manso bozali kosala.

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ بَعْضُهُمْ أَوْلِيَآءُ بَعْضٍ إِلَّا تَفْعَلُوهُ تَكُن فِتْنَةٌ فِى ٱلْأَرْضِ وَفَسَادٌ كَبِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo73. Kasi baye bapengwa bazali balingami kati kati na bango. Mpe soki bobundisi bango te, ekozala komekama likolo ya mabele mpe mobulu ya monene.

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَهَاجَرُوا۟ وَجَٰهَدُوا۟ فِى سَبِيلِ ٱللَّهِ وَٱلَّذِينَ ءَاوَوا۟ وَّنَصَرُوٓا۟ أُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْمُؤْمِنُونَ حَقًّا لَّهُم مَّغْفِرَةٌ وَرِزْقٌ كَرِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo74. Kaši baye bandimaki тре batikaki (Makkah) тре bakei kobunda o nzela ya Allah, lolenge moko na baye bayambaki bango тре bapesaki bango maboko, bango nde bandimi ya soló. Bakolimbisamaka mpe bakopesamaka bozui bolamu.

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ مِنۢ بَعْدُ وَهَاجَرُوا۟ وَجَٰهَدُوا۟ مَعَكُمْ فَأُو۟لَٰٓئِكَ مِنكُمْ وَأُو۟لُوا۟ ٱلْأَرْحَامِ بَعْضُهُمْ أَوْلَىٰ بِبَعْضٍ فِى كِتَٰبِ ٱللَّهِ إِنَّ ٱللَّهَ بِكُلِّ شَىْءٍ عَلِيمٌۢ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo75. Kasi тропа baye bandimaki sima na bino тре batikaki (Makkah), mpe babundaki elongo na bino, bango nde bato na bino. Kasi bondeko ya makila kati na bino bandimi ezali liboso тропа bokitani, engebene na buku ya Allah. Ya sólo, Allah azali na boyebi ya biloko binso.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70