Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Ya soló, tosilaki komeka baye baleka liboso na bango, ya sólo, Allah akoyebaka baye balobaka bosôló mpe baye bakosaka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Мре toyebisaki na moto ete: S alela tata na mama nayo bolamu, mpe soki batindi yo na makasi mpo osangisa ngai na maye oyebi te, kotosa bango te. Epai na ngai nde bokozongaka, mpe nakoyebisaka bino maye bozalaki kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Mpe bato mosusu bazali koloba ete; tondimi na Allah, mpe tango bakozua pasi тропа Allah, batia momekana ya bato lokola etumbu ya Allah. Mpe soki lisungi lia Nkolo wayo liyei, balobi: Tozalaki elongo na bino, boye ezali te Allah nde moyebi ya maye mabombami kati ya bantolo ya moto nyoso?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Bapengwi bazali koloba na bandimi ete: Bolanda nzela na biso, tondimi kozua mokumba ya masumu na bino kasi bakomema yango te. Ya sólo bazali bato ya lokuta.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13.Ya sôló penza, bakomema mikumba mia bango, mpe mikumba misusu. Mpe bakotunama na mokolo ya suka тропа maye bazalaki kosala. (тропа mabe na bango na kobuka lokuta).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16.Mpe tango Ibrâhîm alobaki na bato naye: Bobondela Allah mpe bobanga ye. Wana ezali malamu тропа bino, soki sólo bozali koyeba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo17.Bozali kobondela nde bikeko na botiki Allah mpe bozali kobuka lokuta, ya sólo baye bozali kobondela na botiki Allah bazali na bozui te ya kopesa bino, boluka nde bozui epai ya Allah mpe bobondela ye mpe botondo ye, epai naye nde bokozongisama.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Мре soki boboyi, kaši mabota maye maleka liboso na bino basilaki mpe koboya. Na yango, motindami azali na eloko ya kosala te sé akomisa sango ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Boye ozali kornona te lolenge Allah azali kobanda bokeli, sima azongisi yango? Ya soló, wana ezali pete тропа Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Loba: Botambola na mokili mpe bótala ndenge nini abandaki kokela, na sima Allah nde akozongisa bikelamu na mokolo ya suka. Ya solo, Allah azali na bokoki likolo ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Mpe bozali na makoki ya kotelemela ye te, ezala na mabele to na likolo. Mpe bozali na mokonzi mosusu te, mpe mosungi te bobele Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Mpe baye baboyi kondima na mikapo mia Allah mpe bazangi kolikia kokutana naye, bango wana bazangi ngolu na ngai, mpe bakozala na etumbu ya makasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Bato naye bayanolaki ete: Boboma ye, to botumba ye mpe Allah abikisaki ye na moto, ya soló, wana ezali elembo тропа bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Mpe (Ibrâhîm) alobi: Ya solo, bozui na esika Allah bikeko, mpe bolingi bango, na bolingo na bomoyi ya nsé, sima na mokolo ya suka, bokoboyana bino na bino, mpe basusu bakopesaka botutu na basusu, mpe esika na bino ekozalaka nde moto, mpe bokozuaka mosalisi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Mpe Loth andimelaki ye, mpe (Ibrâhîm) alobi: Ya sólo, nakei epai ya Nkolo na ngai. Ya soló ye azali na bokasi atonda bwanya.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Mpe topesaki ye Is’háq na Ya’qúb, mpe totiaki na libota naye bokitani ya bantoma mpe likabo ya kozua buku, mpe topesaki ye lifuta ya nsé. Mpe mokolo ya suka akozala na molongo ya bato malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Mpe tango Loth alobaki na bato naye: Ya sólo, bino bozali koya na mabe oyo ata moto moko te asalaki yango liboso na mokili.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Ya soló penza, bozali kokutana mibali na mibali тропа kosilisa ba mposa na bino ya nzoto mpe bozali kokanga nzela (ya mabota)? Mpe bozali koya na mabe na esika bovandaka? Kasi eyano ya bato naye ezalaki ete; yela biso etumbu soki ozali moto ya bosembo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Mpe tango batindami na biso bayelaki Ibrâhîm sango elamu (sango ya kobotama ya Is’hâq na mwana naye Ya’qüb), balobi: Ya soló, toyei mpo toboma bato ya mboka oyo. Ya soló, bato na yango bazali babubi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Alobi: Ya sólo Loth azali wana, balobi: Biso toyebi malamu baye bavandi wana, tokobikisa ye na libota naye, longola sé mwasi waye, akozala o kati ya batikali тропа kozua etumbu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Mpe tango batindami ba biso bakomaki epai na Loth, abangaki mpe ayokaki mpasi na motema тропа bango ete bakotungisama na bato ya mboka, kasi balobaki naye ete; kobanga te, mpe koyoka mpasi te, tokobikisa yo mpe libota nayo. Longola sé mwasi wayo, akozala o kati ya babebisami.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Lolenge moko na mad’yan, ndeko wa bango Shuaîb alobaki: Oh bato ba ngai! Bobondela Allah mpe bolikia na mokolo ya suka, kasi botia mobulu na mokili te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Bazuaki ye moto ya lokuta, mpe etumbu ya boningani ya mabele ezuaki bango mpe tongo etanelaki bango basili kokufa na bandako na bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Mpe lolenge moko tobebisaki bato ya mboka aad mpe thamûd, bozali kornona bango polele na bisika na bango. Mpe satana abongiselaki bango misala mia bango, mpe apekisaki bango nzela ya semba na bango bazalaki kati na koyeba te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Mpe topesaki bato na bato etumbu тропа lisumu na bango, basusu totindelaki bango mopepe ya makasi, mpe basusu kati na bango bazuaki bogangi ya makasi (tángbá) lokola nkake ezuaki bango, mpe basusu kati na bango tozindisaki na mabele mpe basusu tozindisaki bango na mayi. Мре Allah asalaki bango mabe te, kasi bango moko nde bamisalaki mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Tanga oyo ekitelaki yo kati na buku, mpe telemisa losambo. Ya sólo, losambo epekisaka (moto) kosala mabe, kasi bokundoli bwa Allah nde ezali monene koleka. Mpe Allah ayebi maye bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo46. Mpe bosuanisa te baye bazuaki buku liboso, sé na lolenge ya malamu, longola sé baye kati na bango basali mabe, mpe boloba na bango ete; tondimi na maye ekiteli biso, mpe maye ekitaki epai na bino, тре nzambe na biso na bino azali sé moko oyo biso tomisokie epai naye. (Allah)
Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Ndenge wana nde tokitiselaki yo buku. Мре baye topesaki bango buku bazali kondimela yango, mpe kati na yango basusu bazali kondima na yango. Mpe bazali koboya kondimela mikapo mia biso sé bapengwi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Mpe yambo na yango (kurani), otangaki ata buku moko te, mpe okomaki na loboko nayo ya mobali te, soki te, baye bazali kotia tembe na bosóló, balingaki kotia ntembe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Kasi ezali na bilembo bia polele bizali okati ya mitema mia baye bapesami boyebi. Mpe baboyaka mikapo mia biso sé babubi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Mpe balobi: Soki ata bilembo ekitelaka ye kowuta epai ya Nkolo waye, loba: Ya soló bilembo ewutaka epai ya Allah. Мре ya sólo, ngai nazali mokebisi ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Boye ekoki тропа bango te buku oyo tokitiselaki yo mpo etangamela bango? Ya sólo, wana ezali nde ngolu mpe bokundoli тропа bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Loba: Allah akoki na bonzeneneke kati kati na ngai na bino, azali moyebi ya manso maye mazali o likolo na mabele, mpe baye bazali kondima na makambo ya mpamba, mpe bazali kopengwa na Allah, bango nde bazangi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Mokolo oyo etumbu ekozingaka bango o likolo na nsé ya makolo na bango mpe akolobaka na bango: Bomeka oyo bosalaki.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. Mpe baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, tokovandisa bango okati ya Iola ya likolo koleka, oyo ezali kolekisa mingala na nsé na yango, bakozalaka seko kati na yango. Oyo nde litomba ya malamu тропа basali.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Ata nyama moko te ekoki komileisa yango moko, kino Allah akopesa ye bilei naye na bino (bato) тре lokola. Мре azali moyoki atonda boyebi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko yango na oyo alingi kati ya bawumbu naye. Ya soló, Allah azali na boyebi ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Mpe ya sólo, bomoyi ya mokili oyo ezali sé liseki mpe lisano, mpe bovandi ya mokolo mwa suka, ezali bomoyi ya soló, soki solo bazali koyeba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo65. Mpe soki bamati na masuwa, babondeli Allah na bomoko mpe balandi lingomba lia ye, mpe soki abikisi bango akomisi bango na mokili, okomona bakomi kosangisa ye.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo67. Boye bazali kornona te ete: (Ya sólo) totiaki mboka esantu(1) ezala ndako ya kimia, nzoka nde bato bazali kolongolama zinga zinga na yango? Boye bazali kondima na maye mazanga ntina mpe baboyi bolamu ya Allah?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo68. Mpe nani azali mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta, to aboyi kondima na bosóló ntango eyeli ye? Boye esika ya bapengwi ezali kati na lifelo te?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo69. Mpe baye basalaka makasi тропа biso, ya sólo tokokambaka bango na banzela na biso. Mpe ya sólo, Allah azali elongo na babongisi.