وَلَمَّا جَآءَتْ رُسُلُنَآ إِبْرَٰهِيمَ بِٱلْبُشْرَىٰ قَالُوٓا۟ إِنَّا مُهْلِكُوٓا۟ أَهْلِ هَٰذِهِ ٱلْقَرْيَةِ إِنَّ أَهْلَهَا كَانُوا۟ ظَٰلِمِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Mpe tango batindami na biso bayelaki Ibrâhîm sango elamu (sango ya kobotama ya Is’hâq na mwana naye Ya’qüb), balobi: Ya soló, toyei mpo toboma bato ya mboka oyo. Ya soló, bato na yango bazali babubi.