caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Al-Jumu'a الجمعة

11 verses · Medina · revelation order 110

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ يُسَبِّحُ لِلَّهِ مَا فِى ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِى ٱلْأَرْضِ ٱلْمَلِكِ ٱلْقُدُّوسِ ٱلْعَزِيزِ ٱلْحَكِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Nyoso oyo ezali na likolo na mabele ezali kokumisa Allah, mokonzi, mosantu, wa nguya atonda bwanya.

See all translations of this verse →

هُوَ ٱلَّذِى بَعَثَ فِى ٱلْأُمِّيِّـۧنَ رَسُولًا مِّنْهُمْ يَتْلُوا۟ عَلَيْهِمْ ءَايَٰتِهِۦ وَيُزَكِّيهِمْ وَيُعَلِّمُهُمُ ٱلْكِتَٰبَ وَٱلْحِكْمَةَ وَإِن كَانُوا۟ مِن قَبْلُ لَفِى ضَلَٰلٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Ye nde atindaki o libota ya baye batanga te motindami kowuta na libota na bango moko, mpo atangela bango mikapo mia ye, mpe mpo apetola bango, mpe atangisa bango buku mpe bwanya, ata bazalaki liboso kati na libunga ya polele.

See all translations of this verse →

وَءَاخَرِينَ مِنْهُمْ لَمَّا يَلْحَقُوا۟ بِهِمْ وَهُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلْحَكِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Mpe basusu kati na bango baye bakutanaki na bango te, bakoya sima naye, (Allah) azali wa nguya atonda ngolu.

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ فَضْلُ ٱللَّهِ يُؤْتِيهِ مَن يَشَآءُ وَٱللَّهُ ذُو ٱلْفَضْلِ ٱلْعَظِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Wana ezali bolamu oyo Allah apesaka na oyo alingi. Mpe AllAh azali Nkolo bolamu bonene.

See all translations of this verse →

مَثَلُ ٱلَّذِينَ حُمِّلُوا۟ ٱلتَّوْرَىٰةَ ثُمَّ لَمْ يَحْمِلُوهَا كَمَثَلِ ٱلْحِمَارِ يَحْمِلُ أَسْفَارًۢا بِئْسَ مَثَلُ ٱلْقَوْمِ ٱلَّذِينَ كَذَّبُوا۟ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَٱللَّهُ لَا يَهْدِى ٱلْقَوْمَ ٱلظَّٰلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Ndakisa ya baye bapesamaki torah mpe basaleli yango te, bazali lokola Himar(1) oyo amemi babuku, ndakisa mabe ya lolenge nini wana ya baye baboya kondima na mikapo mia Allah. Mpe Allah akambaka babubi te.

See all translations of this verse →

قُلْ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ هَادُوٓا۟ إِن زَعَمْتُمْ أَنَّكُمْ أَوْلِيَآءُ لِلَّهِ مِن دُونِ ٱلنَّاسِ فَتَمَنَّوُا۟ ٱلْمَوْتَ إِن كُنتُمْ صَٰدِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Loba: Oh bino baye bozali kosalela kiyuda! Soki bozali kokanisa été bolingami na AllaH koleka bato basusu, bomisenga liwa soki ya soló bozali na bosembo.

See all translations of this verse →

وَلَا يَتَمَنَّوْنَهُۥٓ أَبَدًۢا بِمَا قَدَّمَتْ أَيْدِيهِمْ وَٱللَّهُ عَلِيمٌۢ بِٱلظَّٰلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Kasi bakokoka komisenga yango soki шоке te, тропа maye ya mabe basalaka. Kasi (Allah) ayebi malamu babubi. (bato mabe)

See all translations of this verse →

قُلْ إِنَّ ٱلْمَوْتَ ٱلَّذِى تَفِرُّونَ مِنْهُ فَإِنَّهُۥ مُلَٰقِيكُمْ ثُمَّ تُرَدُّونَ إِلَىٰ عَٰلِمِ ٱلْغَيْبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ فَيُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمْ تَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Loba: Ya sólo, liwa oyo bozali kokima bokokutana na yango, sima bokozongisama epai ya oyo ayebi maye mabombami na maye mazali polele. Akoyebisa bino sango ya maye bozalaki kosala.

See all translations of this verse →

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓا۟ إِذَا نُودِىَ لِلصَّلَوٰةِ مِن يَوْمِ ٱلْجُمُعَةِ فَٱسْعَوْا۟ إِلَىٰ ذِكْرِ ٱللَّهِ وَذَرُوا۟ ٱلْبَيْعَ ذَٰلِكُمْ خَيْرٌ لَّكُمْ إِن كُنتُمْ تَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Eh bino baye bondima! Soki bobengami тропа losambo ya jumu’a (ya mokolo ya mosala mitano), bökende na lombango koyoka bokundoli ya Allah тре botika koteka, wana ezali malamu тропа bino soki boyebaki.

See all translations of this verse →

فَإِذَا قُضِيَتِ ٱلصَّلَوٰةُ فَٱنتَشِرُوا۟ فِى ٱلْأَرْضِ وَٱبْتَغُوا۟ مِن فَضْلِ ٱللَّهِ وَٱذْكُرُوا۟ ٱللَّهَ كَثِيرًا لَّعَلَّكُمْ تُفْلِحُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Mpe soki losambo esili, bopanzana na mabele тропа koluka bolamu ya Allah, mpe bokanisa Allah mingi mpo bolonga.

See all translations of this verse →

وَإِذَا رَأَوْا۟ تِجَٰرَةً أَوْ لَهْوًا ٱنفَضُّوٓا۟ إِلَيْهَا وَتَرَكُوكَ قَآئِمًا قُلْ مَا عِندَ ٱللَّهِ خَيْرٌ مِّنَ ٱللَّهْوِ وَمِنَ ٱلتِّجَٰرَةِ وَٱللَّهُ خَيْرُ ٱلرَّٰزِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Mpe tango bamoni mombongo to bisengo eleki, balandi yango mpe basundoli yo na esika ya kotelema (na mimbar). Loba: Oyo ezali epai ya Allah ezali malamu koleka mombongo na bisengo, mpe Allah nde mopesi bozui malamu.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70