caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Hud هود

123 verses · Mecca · revelation order 52

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ الٓر كِتَٰبٌ أُحْكِمَتْ ءَايَٰتُهُۥ ثُمَّ فُصِّلَتْ مِن لَّدُنْ حَكِيمٍ خَبِيرٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Alif, lâm, râ(1). Buku eye mikapo miango mibongisami na lolenge ya kitoko mpe milimbolami na oyo atonda bwanya, moyebi ya ba sango.

See all translations of this verse →

أَلَّا تَعْبُدُوٓا۟ إِلَّا ٱللَّهَ إِنَّنِى لَكُم مِّنْهُ نَذِيرٌ وَبَشِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Bobondela te sé Allah, ya soló nazali mokebisi mpe mopesi sango тропа bino.

See all translations of this verse →

وَأَنِ ٱسْتَغْفِرُوا۟ رَبَّكُمْ ثُمَّ تُوبُوٓا۟ إِلَيْهِ يُمَتِّعْكُم مَّتَٰعًا حَسَنًا إِلَىٰٓ أَجَلٍ مُّسَمًّى وَيُؤْتِ كُلَّ ذِى فَضْلٍ فَضْلَهُۥ وَإِن تَوَلَّوْا۟ فَإِنِّىٓ أَخَافُ عَلَيْكُمْ عَذَابَ يَوْمٍ كَبِيرٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Mpe bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino, sima botubela epai naye, akopesa bino bomengo kitoko kino na ntango oyo eyebani, mpe akopesa moto nyoso bolamu boye bokokani naye. Kasi soki boboyi solo ngai nazali kobangela bino etumbu o mokolo ya monene.

See all translations of this verse →

إِلَى ٱللَّهِ مَرْجِعُكُمْ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَىْءٍ قَدِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Bokozongisama epai ya Allah, тре azali na bokoki na biloko binso.

See all translations of this verse →

أَلَآ إِنَّهُمْ يَثْنُونَ صُدُورَهُمْ لِيَسْتَخْفُوا۟ مِنْهُ أَلَا حِينَ يَسْتَغْشُونَ ثِيَابَهُمْ يَعْلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعْلِنُونَ إِنَّهُۥ عَلِيمٌۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Kasi sólo, bazali kotondisa mitema mia bango na kobomba (ki bonguna), ata soki bazali komibomba na bilamba bia bango, ayebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa polele, ya soló, ye ayebaka maye mabombami o kati ya mitema.

See all translations of this verse →

وَمَا مِن دَآبَّةٍ فِى ٱلْأَرْضِ إِلَّا عَلَى ٱللَّهِ رِزْقُهَا وَيَعْلَمُ مُسْتَقَرَّهَا وَمُسْتَوْدَعَهَا كُلٌّ فِى كِتَٰبٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Мре ezali na nyama(1) moko te na mabele sé bozui naye ezali kowuta epai ya Allah, mpe ayebi esika avandaka, na esika abombamaka. Nyoso esila kokomama o kati ya buku ya polele ya bosembo.

See all translations of this verse →

وَهُوَ ٱلَّذِى خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضَ فِى سِتَّةِ أَيَّامٍ وَكَانَ عَرْشُهُۥ عَلَى ٱلْمَآءِ لِيَبْلُوَكُمْ أَيُّكُمْ أَحْسَنُ عَمَلًا وَلَئِن قُلْتَ إِنَّكُم مَّبْعُوثُونَ مِنۢ بَعْدِ ٱلْمَوْتِ لَيَقُولَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓا۟ إِنْ هَٰذَآ إِلَّا سِحْرٌ مُّبِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Mpe ye nde akela mapata na mabele sima ya mikolo motoba, mpe ngwende naye ezalaki likolo ya mayi. Mpo ete ameka bino mpe ayeba nani kati na bino akosala misala ya malamu, mpe soki alobi na bango ete: Ya soló bino bokosekwa sima ya liwa na bino, baye bapengwa bakolobaka été: Ya soló, oyo ezali bondoki ya polele.

See all translations of this verse →

وَلَئِنْ أَخَّرْنَا عَنْهُمُ ٱلْعَذَابَ إِلَىٰٓ أُمَّةٍ مَّعْدُودَةٍ لَّيَقُولُنَّ مَا يَحْبِسُهُۥٓ أَلَا يَوْمَ يَأْتِيهِمْ لَيْسَ مَصْرُوفًا عَنْهُمْ وَحَاقَ بِهِم مَّا كَانُوا۟ بِهِۦ يَسْتَهْزِءُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Mpe soki tozelisi bango etumbu kino o mokolo moye moyebani, bakolobaka: Nini ezali kokanga yango? Mokolo moye ekoyelaka bango, bakokoka kokima yango te, na maye bazalaki kotiola.

See all translations of this verse →

وَلَئِنْ أَذَقْنَا ٱلْإِنسَٰنَ مِنَّا رَحْمَةً ثُمَّ نَزَعْنَٰهَا مِنْهُ إِنَّهُۥ لَيَـُٔوسٌ كَفُورٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Mpe soki tomekisi moto bolamu bwa biso, sima tolongoli ye yango, ayokaka mabe mingi, mpe azangi kolikya.

See all translations of this verse →

وَلَئِنْ أَذَقْنَٰهُ نَعْمَآءَ بَعْدَ ضَرَّآءَ مَسَّتْهُ لَيَقُولَنَّ ذَهَبَ ٱلسَّيِّـَٔاتُ عَنِّىٓ إِنَّهُۥ لَفَرِحٌ فَخُورٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Mpe soki topesi ye bolamu sima ya pasi oyo azalaki na yango, akosepela na kokumisa тропа mabe oyo elongwe, mpe alobi: Pasi esili.

See all translations of this verse →

إِلَّا ٱلَّذِينَ صَبَرُوا۟ وَعَمِلُوا۟ ٱلصَّٰلِحَٰتِ أُو۟لَٰٓئِكَ لَهُم مَّغْفِرَةٌ وَأَجْرٌ كَبِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Longola sé baye bazelaki, mpe basalaki misala milamu, bango bakozalaka na bolimbisi na lifuta linene.

See all translations of this verse →

فَلَعَلَّكَ تَارِكٌۢ بَعْضَ مَا يُوحَىٰٓ إِلَيْكَ وَضَآئِقٌۢ بِهِۦ صَدْرُكَ أَن يَقُولُوا۟ لَوْلَآ أُنزِلَ عَلَيْهِ كَنزٌ أَوْ جَآءَ مَعَهُۥ مَلَكٌ إِنَّمَآ أَنتَ نَذِيرٌ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَىْءٍ وَكِيلٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Tango mosusu ozali kosundola ndambu ya maye makiteli yo, mpe motema nayo etondi na pasi ndenge bazali kotiola yo na koloba: Mpona nini bakitiseli ye sanduku ya bomengo te to тре anzelu aya epai naye? Yo ozali sé mokebisi. Mpe Allah azali mobateli ya biloko binso.

See all translations of this verse →

أَمْ يَقُولُونَ ٱفْتَرَىٰهُ قُلْ فَأْتُوا۟ بِعَشْرِ سُوَرٍ مِّثْلِهِۦ مُفْتَرَيَٰتٍ وَٱدْعُوا۟ مَنِ ٱسْتَطَعْتُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ إِن كُنتُمْ صَٰدِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. To bazali koloba été: Ezali lokuta asali yango ye moko (kurani). Loba: Boya na mikapo zomi lokola oyo nayei na yango, oyo bosala bino moko, mpe bobenga nani bolingi oyo akoki kosalisa bino na yango na botiki Allah, soki bozali na bosóló.

See all translations of this verse →

فَإِلَّمْ يَسْتَجِيبُوا۟ لَكُمْ فَٱعْلَمُوٓا۟ أَنَّمَآ أُنزِلَ بِعِلْمِ ٱللَّهِ وَأَن لَّآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ فَهَلْ أَنتُم مُّسْلِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Mpe soki bakoki te koya na yango, boyeba ya soló, été yango ekiti na mayele naye moko Allah, mpe ezali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ye, mpe boye bozali bamisokia.

See all translations of this verse →

مَن كَانَ يُرِيدُ ٱلْحَيَوٰةَ ٱلدُّنْيَا وَزِينَتَهَا نُوَفِّ إِلَيْهِمْ أَعْمَٰلَهُمْ فِيهَا وَهُمْ فِيهَا لَا يُبْخَسُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Baye bakolinga bomoyi bwa mokili na bisengo bia yango, tokopesa bango o kati ya mokili mpe tokokutolaka te.

See all translations of this verse →

أُو۟لَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ لَيْسَ لَهُمْ فِى ٱلْـَٔاخِرَةِ إِلَّا ٱلنَّارُ وَحَبِطَ مَا صَنَعُوا۟ فِيهَا وَبَٰطِلٌ مَّا كَانُوا۟ يَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Bango nde bakozalaka na eloko te o mokolo mwa suka sé moto ya lifelo, maye basalaki awa na nsé, makozala pamba mpe makolimwa.

See all translations of this verse →

أَفَمَن كَانَ عَلَىٰ بَيِّنَةٍ مِّن رَّبِّهِۦ وَيَتْلُوهُ شَاهِدٌ مِّنْهُ وَمِن قَبْلِهِۦ كِتَٰبُ مُوسَىٰٓ إِمَامًا وَرَحْمَةً أُو۟لَٰٓئِكَ يُؤْمِنُونَ بِهِۦ وَمَن يَكْفُرْ بِهِۦ مِنَ ٱلْأَحْزَابِ فَٱلنَّارُ مَوْعِدُهُۥ فَلَا تَكُ فِى مِرْيَةٍ مِّنْهُ إِنَّهُ ٱلْحَقُّ مِن رَّبِّكَ وَلَٰكِنَّ أَكْثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يُؤْمِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Boye moto oyo azali na buku ya bosembo ya polele na maboko naye, ewuti epai na Nkolo naye, mpe nzeneneke akiti (anzelu gabiliyele) azali kotanga yango, boye akokani na moto oyo azali na eloko moko te ya bosembo na maboko naye? Mpe buku ya Müssa ekitaki liboso naye, (Muhammad) ezalaki bokambi mpe ngolu, baye wana bandimi na yango, kasi baye bakosangisa bakopengwa na yango o kati ya bato, moto nde elaka na bango, kozala na tembe te тропа yango. Ezali solo kowuta epai ya Nkolo wa yo, kasi ebele ya bato bazali kondima na yango te.

See all translations of this verse →

وَمَنْ أَظْلَمُ مِمَّنِ ٱفْتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا أُو۟لَٰٓئِكَ يُعْرَضُونَ عَلَىٰ رَبِّهِمْ وَيَقُولُ ٱلْأَشْهَٰدُ هَٰٓؤُلَآءِ ٱلَّذِينَ كَذَبُوا۟ عَلَىٰ رَبِّهِمْ أَلَا لَعْنَةُ ٱللَّهِ عَلَى ٱلظَّٰلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Mpe nani oyo azali moto mabe koleka oyo abukeli Allah lokuta? Bango wana bakomemama epai ya Nkolo wa bango, mpe banzeneneke bakolobaka été: (ba anzelu): Baye wana nde bakoselaki Nkolo wa bango, na yango botutu ya Allah bokozala likolo ya bato mabe.

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ يَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ وَيَبْغُونَهَا عِوَجًا وَهُم بِٱلْـَٔاخِرَةِ هُمْ كَٰفِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Baye bazali kokanga nzela ya Allah, mpe bazali kolukela yango mbilinga mbilinga. Mpe bazali kondima na mokolo mwa suka te.

See all translations of this verse →

أُو۟لَٰٓئِكَ لَمْ يَكُونُوا۟ مُعْجِزِينَ فِى ٱلْأَرْضِ وَمَا كَانَ لَهُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِنْ أَوْلِيَآءَ يُضَٰعَفُ لَهُمُ ٱلْعَذَابُ مَا كَانُوا۟ يَسْتَطِيعُونَ ٱلسَّمْعَ وَمَا كَانُوا۟ يُبْصِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Baye wana bakoki kokitisa nguya (ya Allah) te awa na mokili, mpe bakozua baye bakosalisa bango te liboso ya Allah. Etumbu na bango ekobakisama mpo bakokaki koyoka mpe kotala te.

See all translations of this verse →

أُو۟لَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓا۟ أَنفُسَهُمْ وَضَلَّ عَنْهُم مَّا كَانُوا۟ يَفْتَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Baye wana nde bamibebisi bango moko, mpe babungisi binzambi nzambi oyo bazalaki kobondela mpe bazalaki kotia elikya ete bakosunga bango.

See all translations of this verse →

لَا جَرَمَ أَنَّهُمْ فِى ٱلْـَٔاخِرَةِ هُمُ ٱلْأَخْسَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Tembe ezali te été: Bakozala bazangi penza na mokolo ya suka.

See all translations of this verse →

إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ وَعَمِلُوا۟ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَأَخْبَتُوٓا۟ إِلَىٰ رَبِّهِمْ أُو۟لَٰٓئِكَ أَصْحَٰبُ ٱلْجَنَّةِ هُمْ فِيهَا خَٰلِدُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, mpe babangaki Nkolo wa bango, bango nde bato ya lola, bakozalaka libela o kati na yango.

See all translations of this verse →

مَثَلُ ٱلْفَرِيقَيْنِ كَٱلْأَعْمَىٰ وَٱلْأَصَمِّ وَٱلْبَصِيرِ وَٱلسَّمِيعِ هَلْ يَسْتَوِيَانِ مَثَلًا أَفَلَا تَذَكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Lisanga oyo na oyo mosusu ndakisa na bango ezali lokola bato mibale: Oyo amonaka te, mpe ayokaka te, oyo mosusu amonaka mpe ayokaka. Boye bazali lolenge moko? Na yango bozali kokanisa te?

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ أَرْسَلْنَا نُوحًا إِلَىٰ قَوْمِهِۦٓ إِنِّى لَكُمْ نَذِيرٌ مُّبِينٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Mpe tosilaki ya soló, kotinda Nûh epai ya bato baye, (alobi): Ya solo, ngai nazali mokebisi ya polele.

See all translations of this verse →

أَن لَّا تَعْبُدُوٓا۟ إِلَّا ٱللَّهَ إِنِّىٓ أَخَافُ عَلَيْكُمْ عَذَابَ يَوْمٍ أَلِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Ete bobondela te sé Allah, ya sólo nazali kobangela bino etumbu o mokolo mwa pasi ya makasi.

See all translations of this verse →

فَقَالَ ٱلْمَلَأُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ مِن قَوْمِهِۦ مَا نَرَىٰكَ إِلَّا بَشَرًا مِّثْلَنَا وَمَا نَرَىٰكَ ٱتَّبَعَكَ إِلَّا ٱلَّذِينَ هُمْ أَرَاذِلُنَا بَادِىَ ٱلرَّأْىِ وَمَا نَرَىٰ لَكُمْ عَلَيْنَا مِن فَضْلٍۭ بَلْ نَظُنُّكُمْ كَٰذِبِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Bankumu ya bato naye baye bapengwaki balobaki naye ete: Tozali kornona yo ozali moto lokola biso, tomoni baye bazali kolanda yo, sé bato ya ntina te kati na biso, baye bazali na mayele moke. Mpe tozali kornona bino boleki biso te, kasi tozali kokanisa ete bozali babuki lokuta.

See all translations of this verse →

قَالَ يَٰقَوْمِ أَرَءَيْتُمْ إِن كُنتُ عَلَىٰ بَيِّنَةٍ مِّن رَّبِّى وَءَاتَىٰنِى رَحْمَةً مِّنْ عِندِهِۦ فَعُمِّيَتْ عَلَيْكُمْ أَنُلْزِمُكُمُوهَا وَأَنتُمْ لَهَا كَٰرِهُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Alobaki ete: Oh bato na ngai! В omoni boni soki nazali na elembo ya bosembo kowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe apesi ngai ngolu kowuta epai naye mpe bozangi yango, biso tokokanga bino na makasi te mpo bozua yango mpe bino bozali koyina?

See all translations of this verse →

وَيَٰقَوْمِ لَآ أَسْـَٔلُكُمْ عَلَيْهِ مَالًا إِنْ أَجْرِىَ إِلَّا عَلَى ٱللَّهِ وَمَآ أَنَا۠ بِطَارِدِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓا۟ إِنَّهُم مُّلَٰقُوا۟ رَبِّهِمْ وَلَٰكِنِّىٓ أَرَىٰكُمْ قَوْمًا تَجْهَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Oh! Bato ba ngai! Nazali kosenga bino yango misolo te. Lifuta lia ngai likowuta sé epai ya Allah. Мре nakoki kobengana bandimi te, ya soló, bango bakokutanaka na Nkolo wa bango. Kasi ngai nazali kornona bino bozali koyeba te;

See all translations of this verse →

وَيَٰقَوْمِ مَن يَنصُرُنِى مِنَ ٱللَّهِ إِن طَرَدتُّهُمْ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Oh bato ba ngai! Nani akosalisa ngai na (etumbu) ya Allah soki nabengani bango? Boye bozali kokanisa te?

See all translations of this verse →

وَلَآ أَقُولُ لَكُمْ عِندِى خَزَآئِنُ ٱللَّهِ وَلَآ أَعْلَمُ ٱلْغَيْبَ وَلَآ أَقُولُ إِنِّى مَلَكٌ وَلَآ أَقُولُ لِلَّذِينَ تَزْدَرِىٓ أَعْيُنُكُمْ لَن يُؤْتِيَهُمُ ٱللَّهُ خَيْرًا ٱللَّهُ أَعْلَمُ بِمَا فِىٓ أَنفُسِهِمْ إِنِّىٓ إِذًا لَّمِنَ ٱلظَّٰلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Mpe nakoki koloba na bino te ete: Nazali na sanduku ya bomengo ya Allah. Nakoloba mpe te ete nayebi mabombami, mpe nakoloba te ete: Nazali anzelu. Mpe nakoloba te na baye bozali kotala mpamba ete: Allah akopesa bango bolamu te. Allah ayebi malamu maye mazali o kati na bango, noki te nakozala elongo na bato mabe.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰنُوحُ قَدْ جَٰدَلْتَنَا فَأَكْثَرْتَ جِدَٰلَنَا فَأْتِنَا بِمَا تَعِدُنَآ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Balobi: Oh Núh! Osili kosuanisa biso ya koleka, yela biso (etumbu) oyo ozali kolobela soki ezali ya sólo (elembo).

See all translations of this verse →

قَالَ إِنَّمَا يَأْتِيكُم بِهِ ٱللَّهُ إِن شَآءَ وَمَآ أَنتُم بِمُعْجِزِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Alobi: Ya sólo, Allah nde akoyela bino yango soki alingi. Kasi bokokokaka kokima te.

See all translations of this verse →

وَلَا يَنفَعُكُمْ نُصْحِىٓ إِنْ أَرَدتُّ أَنْ أَنصَحَ لَكُمْ إِن كَانَ ٱللَّهُ يُرِيدُ أَن يُغْوِيَكُمْ هُوَ رَبُّكُمْ وَإِلَيْهِ تُرْجَعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Toli na ngai ezali kosalisa bino te tango nazali kopesa bino yango, soki Allah alingi kobungisa bino, azali Nkolo wa bino, mpe bokozongisama epai naye.

See all translations of this verse →

أَمْ يَقُولُونَ ٱفْتَرَىٰهُ قُلْ إِنِ ٱفْتَرَيْتُهُۥ فَعَلَىَّ إِجْرَامِى وَأَنَا۠ بَرِىٓءٌ مِّمَّا تُجْرِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Mpe bazali koloba été azali kokosa! Loba: Soki nakosi lisumu yango ekozala na molimo na ngai moko. Mpe nazali mosika na makambo mabe oyo bozali kosala.

See all translations of this verse →

وَأُوحِىَ إِلَىٰ نُوحٍ أَنَّهُۥ لَن يُؤْمِنَ مِن قَوْمِكَ إِلَّا مَن قَدْ ءَامَنَ فَلَا تَبْتَئِسْ بِمَا كَانُوا۟ يَفْعَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Mpe emoniseli ekitelaki Nûh ete: Ya soló, bato nayo oyo bakondimaka nayo lisusu te, longola sé baye bandimaki liboso. Kasi komitungisama te тропа maye bazali kosala.

See all translations of this verse →

وَٱصْنَعِ ٱلْفُلْكَ بِأَعْيُنِنَا وَوَحْيِنَا وَلَا تُخَٰطِبْنِى فِى ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓا۟ إِنَّهُم مُّغْرَقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Mpe tonga masuwa, na miso na biso mpe na emoniseli na biso, kasi kotuna ngai lisusu te тропа bato mabe. Ya sólo, bango bakozinda.

See all translations of this verse →

وَيَصْنَعُ ٱلْفُلْكَ وَكُلَّمَا مَرَّ عَلَيْهِ مَلَأٌ مِّن قَوْمِهِۦ سَخِرُوا۟ مِنْهُ قَالَ إِن تَسْخَرُوا۟ مِنَّا فَإِنَّا نَسْخَرُ مِنكُمْ كَمَا تَسْخَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Mpe abandi kotonga masuwa, mpe tango nyoso bankumu na bango bazali koleka, bazali koseka ye. Azongiseli bango eyano alobi: Soki bozali koseka biso, ya sólo, biso mpe tokosekaka bino ndenge bozali koseka.

See all translations of this verse →

فَسَوْفَ تَعْلَمُونَ مَن يَأْتِيهِ عَذَابٌ يُخْزِيهِ وَيَحِلُّ عَلَيْهِ عَذَابٌ مُّقِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Mpe ezali na tango molai te bokoyebaka nani oyo etumbu ekoyela ye, etumbu ya makasi mpe ya kosilisa lokumu, mpe esengeli naye kozua etumbu oyo ekotikala libela.

See all translations of this verse →

حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءَ أَمْرُنَا وَفَارَ ٱلتَّنُّورُ قُلْنَا ٱحْمِلْ فِيهَا مِن كُلٍّ زَوْجَيْنِ ٱثْنَيْنِ وَأَهْلَكَ إِلَّا مَن سَبَقَ عَلَيْهِ ٱلْقَوْلُ وَمَنْ ءَامَنَ وَمَآ ءَامَنَ مَعَهُۥٓ إِلَّا قَلِيلٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Kino tango mokano (mitindo) mia biso eyaki, mayi etombokaki na mpela ya makasi tolobaki naye été (Nûh): Kotisa okati ya masuwa lolenge ya banyama mibale mibale (mwasi na mobali) okotisa mpe libota nayo, longola sé ba oyo ekomamaki été esengeli bakufa, mpe baye bandimaki, kasi bandimaki naye te sé bato moke penza.

See all translations of this verse →

وَقَالَ ٱرْكَبُوا۟ فِيهَا بِسْمِ ٱللَّهِ مَجْر۪ىٰهَا وَمُرْسَىٰهَآ إِنَّ رَبِّى لَغَفُورٌ رَّحِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Мре alobaki: Bomata okati na yango na nkombo ya Allah oyo afandisi yango likolo ya etamboli na yango. Ya soló, Nkolo na ngai azali penza molimbisi atonda ngolu.

See all translations of this verse →

وَهِىَ تَجْرِى بِهِمْ فِى مَوْجٍ كَٱلْجِبَالِ وَنَادَىٰ نُوحٌ ٱبْنَهُۥ وَكَانَ فِى مَعْزِلٍ يَٰبُنَىَّ ٱرْكَب مَّعَنَا وَلَا تَكُن مَّعَ ٱلْكَٰفِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Mpe ebandi kotepatepa likolo ya mayi kino ememaki bango kati kati ya mbonge ya makasi lokola ba ngomba ya minene, mpe Nûh abengi mwana naye oyo aboyaki komata na masuwa: Eh mwana na ngai! Mata elongo na biso, kasi kotikala te elongo na bapengwi.

See all translations of this verse →

قَالَ سَـَٔاوِىٓ إِلَىٰ جَبَلٍ يَعْصِمُنِى مِنَ ٱلْمَآءِ قَالَ لَا عَاصِمَ ٱلْيَوْمَ مِنْ أَمْرِ ٱللَّهِ إِلَّا مَن رَّحِمَ وَحَالَ بَيْنَهُمَا ٱلْمَوْجُ فَكَانَ مِنَ ٱلْمُغْرَقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. (Mwana) ayanoli été: Nakomata likolo ya ngomba oyo тропа komibatela na mayi. (Nûh) alobaki naye été: Lelo mobateli akozala te тропа etumbu ya Allah, longola sé oyo akoyokela ye mawa. Na sima mbonge ekaboli bango, mpe (mwana waye) atikalaki elongo na baye bazindisamaki (na mayi).

See all translations of this verse →

وَقِيلَ يَٰٓأَرْضُ ٱبْلَعِى مَآءَكِ وَيَٰسَمَآءُ أَقْلِعِى وَغِيضَ ٱلْمَآءُ وَقُضِىَ ٱلْأَمْرُ وَٱسْتَوَتْ عَلَى ٱلْجُودِىِّ وَقِيلَ بُعْدًا لِّلْقَوْمِ ٱلظَّٰلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Mpe motindo epesamaki été: Oh mabele! Mela mayi nayo, oh mapata! Tika (konokisa mbula) mayi makutolamaki mpe masuwa makendeki kotelema likolo ya ngomba, nkombo na yango djudi. Mpe motindo ekweyaki été: Bato mabe balimwa.

See all translations of this verse →

وَنَادَىٰ نُوحٌ رَّبَّهُۥ فَقَالَ رَبِّ إِنَّ ٱبْنِى مِنْ أَهْلِى وَإِنَّ وَعْدَكَ ٱلْحَقُّ وَأَنتَ أَحْكَمُ ٱلْحَٰكِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Mpe Nûh abelelaki Nkolo waye: Oh Nkolo wa ngai! Ya soló, mwana wa ngai azali o kati ya libota lia ngai, mpe elaka nayo ezali solo, mpe ozali zuzi ya bosembo koleka ba zuzi banso.

See all translations of this verse →

قَالَ يَٰنُوحُ إِنَّهُۥ لَيْسَ مِنْ أَهْلِكَ إِنَّهُۥ عَمَلٌ غَيْرُ صَٰلِحٍ فَلَا تَسْـَٔلْنِ مَا لَيْسَ لَكَ بِهِۦ عِلْمٌ إِنِّىٓ أَعِظُكَ أَن تَكُونَ مِنَ ٱلْجَٰهِلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo46. Azongisi été (Allah): Eh Nûh! Azali o kati ya libota lia yo te, mpo mosala naye ezali malamu te. Mpe kotuna ngai te likambo liye ozali na boyebi na yango te. Ya solo, nazali kopesa yo toli été: Ozala mosika na baye bazangi boyebi.

See all translations of this verse →

قَالَ رَبِّ إِنِّىٓ أَعُوذُ بِكَ أَنْ أَسْـَٔلَكَ مَا لَيْسَ لِى بِهِۦ عِلْمٌ وَإِلَّا تَغْفِرْ لِى وَتَرْحَمْنِىٓ أَكُن مِّنَ ٱلْخَٰسِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. (Nûh) alobaki été: Eh Nkolo! Ya solo, nasengi libateli nayo mpo été nasenga yo maye nazali na boyebi na yango te, mpe soki olimbisi ngai te, mpe oyokeli ngai mawa te, nakozala elongo na bazangi.

See all translations of this verse →

قِيلَ يَٰنُوحُ ٱهْبِطْ بِسَلَٰمٍ مِّنَّا وَبَرَكَٰتٍ عَلَيْكَ وَعَلَىٰٓ أُمَمٍ مِّمَّن مَّعَكَ وَأُمَمٌ سَنُمَتِّعُهُمْ ثُمَّ يَمَسُّهُم مِّنَّا عَذَابٌ أَلِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Mpe motindo mopesamaki été: Eh Nûh! Kita na masuwa na kimia na biso, mpe mapamboli ebele likolo nayo na bato baye bazali elongo nayo. Mpe basusu bakoya sima nayo, tokopesa bango bomengo ya tango moke, sima etumbu ya biso ya makasi ekozua bango.

See all translations of this verse →

تِلْكَ مِنْ أَنۢبَآءِ ٱلْغَيْبِ نُوحِيهَآ إِلَيْكَ مَا كُنتَ تَعْلَمُهَآ أَنتَ وَلَا قَوْمُكَ مِن قَبْلِ هَٰذَا فَٱصْبِرْ إِنَّ ٱلْعَٰقِبَةَ لِلْمُتَّقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Wana ezali ba sango ya mabombami tozali kokitisa epai nayo, kasi oyebaki yango liboso te, yo (mohamed) na bato nayo liboso nayo. Na yango, esengeli nayo koyika mpiko, mpo été suka ya malamu ezali тропа babangi (Allah).

See all translations of this verse →

وَإِلَىٰ عَادٍ أَخَاهُمْ هُودًا قَالَ يَٰقَوْمِ ٱعْبُدُوا۟ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنْ إِلَٰهٍ غَيْرُهُۥٓ إِنْ أَنتُمْ إِلَّا مُفْتَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Мре (totindelaki) bato ya aad, ndeko wa bango Hûd. Alobaki: Oh bato bangai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye, kasi bozali sé babuki lokuta.

See all translations of this verse →

يَٰقَوْمِ لَآ أَسْـَٔلُكُمْ عَلَيْهِ أَجْرًا إِنْ أَجْرِىَ إِلَّا عَلَى ٱلَّذِى فَطَرَنِىٓ أَفَلَا تَعْقِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Oh bato bangai! Nazali kosenga bino yango lifuta te, lifuta lia ngai lizali sé epai ya mokeli wa ngai. Boye bozali koyeba te?

See all translations of this verse →

وَيَٰقَوْمِ ٱسْتَغْفِرُوا۟ رَبَّكُمْ ثُمَّ تُوبُوٓا۟ إِلَيْهِ يُرْسِلِ ٱلسَّمَآءَ عَلَيْكُم مِّدْرَارًا وَيَزِدْكُمْ قُوَّةً إِلَىٰ قُوَّتِكُمْ وَلَا تَتَوَلَّوْا۟ مُجْرِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Mpe oh bato bangai! Bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino, sima botubela epai naye. Akonokisela bino mbula kowuta o likolo ya kolandana, mpe akobakisela bino bokasi likolo lia bokasi. Kasi boboya (ye te), noki bokokoma batomboki.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰهُودُ مَا جِئْتَنَا بِبَيِّنَةٍ وَمَا نَحْنُ بِتَارِكِىٓ ءَالِهَتِنَا عَن قَوْلِكَ وَمَا نَحْنُ لَكَ بِمُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo53. Balobi: Eh Hûd! Oyeli biso bilembo te, mpe tokotika banzambe ba biso te тропа maloba nayo, mpe tokondimela yo te.

See all translations of this verse →

إِن نَّقُولُ إِلَّا ٱعْتَرَىٰكَ بَعْضُ ءَالِهَتِنَا بِسُوٓءٍ قَالَ إِنِّىٓ أُشْهِدُ ٱللَّهَ وَٱشْهَدُوٓا۟ أَنِّى بَرِىٓءٌ مِّمَّا تُشْرِكُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo54. Biso tokoloba sé été: Moko kati na ba nzambe na biso asili kosala yo mabe, alobaki na bango ete: Ya soló, ngai nazui Allah nzeneneke wa ngai, bino mpe bozala nzeneneke été ngai nawangani mpe nazali mosika na bikeko na bino na maye bozali kosangisa (Allah).

See all translations of this verse →

مِن دُونِهِۦ فَكِيدُونِى جَمِيعًا ثُمَّ لَا تُنظِرُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Soki ye te (kotika Allah), bosalela ngai likita bino banso (na banzambe na bino), mpe bozelisa ngai te.

See all translations of this verse →

إِنِّى تَوَكَّلْتُ عَلَى ٱللَّهِ رَبِّى وَرَبِّكُم مَّا مِن دَآبَّةٍ إِلَّا هُوَ ءَاخِذٌۢ بِنَاصِيَتِهَآ إِنَّ رَبِّى عَلَىٰ صِرَٰطٍ مُّسْتَقِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo56. Ya sólo, natie elikia na ngai epai ya Allah Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino. Eloko moko te ekoki kozala na esika na yango sé ayeba yango (mpe azala na bokoki тропа yango). Ya sólo Nkolo wa ngai azali na nzela ya semba.

See all translations of this verse →

فَإِن تَوَلَّوْا۟ فَقَدْ أَبْلَغْتُكُم مَّآ أُرْسِلْتُ بِهِۦٓ إِلَيْكُمْ وَيَسْتَخْلِفُ رَبِّى قَوْمًا غَيْرَكُمْ وَلَا تَضُرُّونَهُۥ شَيْـًٔا إِنَّ رَبِّى عَلَىٰ كُلِّ شَىْءٍ حَفِيظٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo57. Mpe soki boboyi, ya sólo, ngai našili kokomisa maye natindamaki na yango epai na bino. Mpe Nkolo wa ngai akolongola bino mpe akoya na bato ya malamu na esika na bino, mpe bokosala ye eloko moko te. Ya sólo, Nkolo wa ngai azali mobateli ya biloko binso.

See all translations of this verse →

وَلَمَّا جَآءَ أَمْرُنَا نَجَّيْنَا هُودًا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ مَعَهُۥ بِرَحْمَةٍ مِّنَّا وَنَجَّيْنَٰهُم مِّنْ عَذَابٍ غَلِيظٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. Mpe tango mitindo mia biso miyaki, tobikisaki Hûd na baye bandimaki elongo naye, na mawa та biso, mpe tobikisaki bango na etumbu ya ekasi.

See all translations of this verse →

وَتِلْكَ عَادٌ جَحَدُوا۟ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمْ وَعَصَوْا۟ رُسُلَهُۥ وَٱتَّبَعُوٓا۟ أَمْرَ كُلِّ جَبَّارٍ عَنِيدٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Mpe wana nde bato ya aad (etuka ya mboka ya ntoma Hûd) baye babundisaki bilembo bia Nkolo wa bango, mpe bazangaki kotosa batindami ba bango, mpe balandaki likambo lia lolendo mpe mabe.

See all translations of this verse →

وَأُتْبِعُوا۟ فِى هَٰذِهِ ٱلدُّنْيَا لَعْنَةً وَيَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ أَلَآ إِنَّ عَادًا كَفَرُوا۟ رَبَّهُمْ أَلَا بُعْدًا لِّعَادٍ قَوْمِ هُودٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Mpe botutu elandaki bango awa nanse mpe kino o mokolo mwa suka ekozala lokola, ya sôló ba aad bapengwaki penza na Nkolo wa bango, kasi ba aad bazala mosika (babebisama) bato ya Hûd?

See all translations of this verse →

وَإِلَىٰ ثَمُودَ أَخَاهُمْ صَٰلِحًا قَالَ يَٰقَوْمِ ٱعْبُدُوا۟ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنْ إِلَٰهٍ غَيْرُهُۥ هُوَ أَنشَأَكُم مِّنَ ٱلْأَرْضِ وَٱسْتَعْمَرَكُمْ فِيهَا فَٱسْتَغْفِرُوهُ ثُمَّ تُوبُوٓا۟ إِلَيْهِ إِنَّ رَبِّى قَرِيبٌ مُّجِيبٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo61. Mpe (totindaki) epai ya bato ya Thamûd, ndeko wa bango Swâlih. Alobaki: Oh bato bangai! Bobondela Allah. Bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ye. Ye nde akela bino kowuta na mabele, mpe akomisi bino ebele o kati na yango. Bosenga ye bolimbisi, sima botubela epai naye. Ya soló, Nkolo wa ngai azalaka pene тропа koyanola. (ba mbela)

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰصَٰلِحُ قَدْ كُنتَ فِينَا مَرْجُوًّا قَبْلَ هَٰذَآ أَتَنْهَىٰنَآ أَن نَّعْبُدَ مَا يَعْبُدُ ءَابَآؤُنَا وَإِنَّنَا لَفِى شَكٍّ مِّمَّا تَدْعُونَآ إِلَيْهِ مُرِيبٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Balobaki: Eh Swâlih! Yo ozalaki elikia na biso liboso. Okomi kopekisa biso tobondela banzambe ya bankoko na biso? Ya sólo penza, tozali na tembe mingi тропа maye ozali kobenga biso na yango.

See all translations of this verse →

قَالَ يَٰقَوْمِ أَرَءَيْتُمْ إِن كُنتُ عَلَىٰ بَيِّنَةٍ مِّن رَّبِّى وَءَاتَىٰنِى مِنْهُ رَحْمَةً فَمَن يَنصُرُنِى مِنَ ٱللَّهِ إِنْ عَصَيْتُهُۥ فَمَا تَزِيدُونَنِى غَيْرَ تَخْسِيرٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo63. Alobi: Oh bato bangai! Bomoni boni soki nazali na elembo kowuta epai ya Nkolo wa ngai mpe apeși ngai ngolu kowuta na yango? Nani oyo akosunga ngai epai ya Allah soki na zangi kotosa ye (Allah)? Noki bokobakisela ngai pasi likolo ya pasi.

See all translations of this verse →

وَيَٰقَوْمِ هَٰذِهِۦ نَاقَةُ ٱللَّهِ لَكُمْ ءَايَةً فَذَرُوهَا تَأْكُلْ فِىٓ أَرْضِ ٱللَّهِ وَلَا تَمَسُّوهَا بِسُوٓءٍ فَيَأْخُذَكُمْ عَذَابٌ قَرِيبٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Mpe Oh bino bato na ngai! Oyo ezali náqat ya Allah, atindeli bino lokola elembo. Botika ye aliya na mabele ya Allah, kasi bosala ye mabe moko te, noki etumbu ekozua bino na lombangu.

See all translations of this verse →

فَعَقَرُوهَا فَقَالَ تَمَتَّعُوا۟ فِى دَارِكُمْ ثَلَٰثَةَ أَيَّامٍ ذَٰلِكَ وَعْدٌ غَيْرُ مَكْذُوبٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo65. Kasi babomaki yango mpe basasi yango, mpe alobi na bango: Bokokangama kati na bandako na bino mikolo misato, wana ezali elaka ya tembe te.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا جَآءَ أَمْرُنَا نَجَّيْنَا صَٰلِحًا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ مَعَهُۥ بِرَحْمَةٍ مِّنَّا وَمِنْ خِزْىِ يَوْمِئِذٍ إِنَّ رَبَّكَ هُوَ ٱلْقَوِىُّ ٱلْعَزِيزُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo66. Mpe tango mitindo mia biso mikweyaki, tobikisaki Swálih na baye bandimaki elongo naye na mawa ma biso mokolo ya bozangi lokumu. Ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda nguya.

See all translations of this verse →

وَأَخَذَ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوا۟ ٱلصَّيْحَةُ فَأَصْبَحُوا۟ فِى دِيَٰرِهِمْ جَٰثِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo67. Mpe bogangi bwa etumbu bozuaki babubi, mpe bakomaki bibembe o kati ya ba ndako bia bango.

See all translations of this verse →

كَأَن لَّمْ يَغْنَوْا۟ فِيهَآ أَلَآ إِنَّ ثَمُودَا۟ كَفَرُوا۟ رَبَّهُمْ أَلَا بُعْدًا لِّثَمُودَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo68. Lokola bazalaki na nkembo liboso te okati na yango. Ya soló, bato ya Thamúd bapengwaki na Nkolo wa bango kasi bato ya Thamûd babebisamaki.

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ جَآءَتْ رُسُلُنَآ إِبْرَٰهِيمَ بِٱلْبُشْرَىٰ قَالُوا۟ سَلَٰمًا قَالَ سَلَٰمٌ فَمَا لَبِثَ أَن جَآءَ بِعِجْلٍ حَنِيذٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo69. Мре ya soló, batindami(1) na biso bamemelaki Ibrâhîm sango elamu(2), tango bakutanaki naye balobi: Kimia(3) ezala nayo! Alobaki été: Kimia na bino mpe lokola! Mpe ewumelaki te abonzelaki bango libonza lia nyama. (ngombe) ya kotumba.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا رَءَآ أَيْدِيَهُمْ لَا تَصِلُ إِلَيْهِ نَكِرَهُمْ وَأَوْجَسَ مِنْهُمْ خِيفَةً قَالُوا۟ لَا تَخَفْ إِنَّآ أُرْسِلْنَآ إِلَىٰ قَوْمِ لُوطٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo70. Mpe tango amoni ete bazali kozua te, abangi, balobi: Kobanga te. Ya sólo, totindami epai ya bato ba Loth.

See all translations of this verse →

وَٱمْرَأَتُهُۥ قَآئِمَةٌ فَضَحِكَتْ فَبَشَّرْنَٰهَا بِإِسْحَٰقَ وَمِن وَرَآءِ إِسْحَٰقَ يَعْقُوبَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo71. Mwasi waye azalaki ya kotelema, (sarah) mpe aseki, mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq mpe sima naye Ya’qüb.

See all translations of this verse →

قَالَتْ يَٰوَيْلَتَىٰٓ ءَأَلِدُ وَأَنَا۠ عَجُوزٌ وَهَٰذَا بَعْلِى شَيْخًا إِنَّ هَٰذَا لَشَىْءٌ عَجِيبٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo72. Alobi: Oh mawa na ngai! Nabota mpe ngai nakomi mobange, mpe mobali wa ngai oyo mpe mobange. Ya soló oyo ezali (likambo) ya kokamwisa.

See all translations of this verse →

قَالُوٓا۟ أَتَعْجَبِينَ مِنْ أَمْرِ ٱللَّهِ رَحْمَتُ ٱللَّهِ وَبَرَكَٰتُهُۥ عَلَيْكُمْ أَهْلَ ٱلْبَيْتِ إِنَّهُۥ حَمِيدٌ مَّجِيدٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo73. Balobi: Ozali kokamwa na mikano mia Allah? Tika été mawa mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na bino bato ya libota oyo. Pamba te ya sólo, Allah akumama mpe asanzolama na lokumu mingi.

See all translations of this verse →

فَلَمَّا ذَهَبَ عَنْ إِبْرَٰهِيمَ ٱلرَّوْعُ وَجَآءَتْهُ ٱلْبُشْرَىٰ يُجَٰدِلُنَا فِى قَوْمِ لُوطٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo74. Mpe tango bobangi esili Ibrâhîm, sango elamu eyeli ye ete azali kosolola na biso тропа likambo lia bato ba Loth.

See all translations of this verse →

إِنَّ إِبْرَٰهِيمَ لَحَلِيمٌ أَوَّٰهٌ مُّنِيبٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo75. Ya soló, Ibrâhîm azalaki moto malamu, azalaki kozonga mpe kotubela mingi epai ya Nkolo naye.

See all translations of this verse →

يَٰٓإِبْرَٰهِيمُ أَعْرِضْ عَنْ هَٰذَآ إِنَّهُۥ قَدْ جَآءَ أَمْرُ رَبِّكَ وَإِنَّهُمْ ءَاتِيهِمْ عَذَابٌ غَيْرُ مَرْدُودٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo76. Eh Ibrâhîm! Mitiya mosika na oyo. Mpo ya soló, mitindo mia Nkolo wayo misili koya. Мре ya sólo, etumbu ezongisama te ekozua bango.

See all translations of this verse →

وَلَمَّا جَآءَتْ رُسُلُنَا لُوطًا سِىٓءَ بِهِمْ وَضَاقَ بِهِمْ ذَرْعًا وَقَالَ هَٰذَا يَوْمٌ عَصِيبٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo77. Mpe tango batindami(1) na biso bakomaki epai ya Loth, ayokaki pasi mpe mawa тропа bango. Alobaki: Lelo nde mokolo mwa etumbu ya somo.

See all translations of this verse →

وَجَآءَهُۥ قَوْمُهُۥ يُهْرَعُونَ إِلَيْهِ وَمِن قَبْلُ كَانُوا۟ يَعْمَلُونَ ٱلسَّيِّـَٔاتِ قَالَ يَٰقَوْمِ هَٰٓؤُلَآءِ بَنَاتِى هُنَّ أَطْهَرُ لَكُمْ فَٱتَّقُوا۟ ٱللَّهَ وَلَا تُخْزُونِ فِى ضَيْفِىٓ أَلَيْسَ مِنكُمْ رَجُلٌ رَّشِيدٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo78. Mpe bato baye bayeli ye mbangu. Mpe liboso bazalaki kosala makambo mabe, mpe alobaki na bato naye été: Oh bato bangai! Bótala bana ba ngai ya basi bango oyo, bazali peto mpe malamu тропа bino. Bobanga Allah kasi boyokisa ngai soni te тропа bapaya ba ngai. Boye bozali ata na moto moko ya malamu o kati na bino te?

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ لَقَدْ عَلِمْتَ مَا لَنَا فِى بَنَاتِكَ مِنْ حَقٍّ وَإِنَّكَ لَتَعْلَمُ مَا نُرِيدُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo79. Bayanoli: Oyebi malamu penza ete tozali na posa ya bana nayo ya basi te, (bango bazalaki kolinga kozua basi na mboka ena te) ya soló, oyebi eloko nini tozali kolinga.

See all translations of this verse →

قَالَ لَوْ أَنَّ لِى بِكُمْ قُوَّةً أَوْ ءَاوِىٓ إِلَىٰ رُكْنٍ شَدِيدٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo80. Alobaki na bango été: Ah soki nazalaki na makasi ya kotelemela bino, to mpe nazua ata lisungi mosusu ya makasi koleka!

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰلُوطُ إِنَّا رُسُلُ رَبِّكَ لَن يَصِلُوٓا۟ إِلَيْكَ فَأَسْرِ بِأَهْلِكَ بِقِطْعٍ مِّنَ ٱلَّيْلِ وَلَا يَلْتَفِتْ مِنكُمْ أَحَدٌ إِلَّا ٱمْرَأَتَكَ إِنَّهُۥ مُصِيبُهَا مَآ أَصَابَهُمْ إِنَّ مَوْعِدَهُمُ ٱلصُّبْحُ أَلَيْسَ ٱلصُّبْحُ بِقَرِيبٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo81. (Bapaya) balobi: Eh Loth! Ya sólo, tozali batindami ya Nkolo wa yo. Bakosala yo eloko te, kende noki na libota lia yo okati na butu. Мре токо te kati na bino abongola elongi sima te, longola sé mwasi wayo (oyo azangaki kotosa), mpe akozua oyo ekozua basusu. Solo elaka na bango ekozala na ntongo, boye ntongo ezali pene te?

See all translations of this verse →

فَلَمَّا جَآءَ أَمْرُنَا جَعَلْنَا عَٰلِيَهَا سَافِلَهَا وَأَمْطَرْنَا عَلَيْهَا حِجَارَةً مِّن سِجِّيلٍ مَّنضُودٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo82. Mpe tango motindo mwa biso mokweyaki, tobalusaki (mboka yango) na ba ngambu inso, mpe tobebisaki yango, mbula ya mabanga esangani na mabele ya moto ekitelaki bango na bango:

See all translations of this verse →

مُّسَوَّمَةً عِندَ رَبِّكَ وَمَا هِىَ مِنَ ٱلظَّٰلِمِينَ بِبَعِيدٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo83. (Mabanga yango) ezalaki na bilembo yango kowuta epai ya Nkolo nayo, mpe yango ezalaki mosika te na bato mabe (babubi).

See all translations of this verse →

وَإِلَىٰ مَدْيَنَ أَخَاهُمْ شُعَيْبًا قَالَ يَٰقَوْمِ ٱعْبُدُوا۟ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنْ إِلَٰهٍ غَيْرُهُۥ وَلَا تَنقُصُوا۟ ٱلْمِكْيَالَ وَٱلْمِيزَانَ إِنِّىٓ أَرَىٰكُم بِخَيْرٍ وَإِنِّىٓ أَخَافُ عَلَيْكُمْ عَذَابَ يَوْمٍ مُّحِيطٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo84. Mpe (totindaki) epai ya bato ya mad’yan, ndeko wa bango Shuaïb, alobaki na bango été: Oh bato na ngai! Bobondela Allah oyo bozali na nzambe mosusu te sé ye. Мре bokutola emekelo, na kilo te. Ya soló, na moni bino na bomengo, mpe ya sólo, nazali kobangela bino etumbu o mokolo oyo ekozinga biloko binso.

See all translations of this verse →

وَيَٰقَوْمِ أَوْفُوا۟ ٱلْمِكْيَالَ وَٱلْمِيزَانَ بِٱلْقِسْطِ وَلَا تَبْخَسُوا۟ ٱلنَّاسَ أَشْيَآءَهُمْ وَلَا تَعْثَوْا۟ فِى ٱلْأَرْضِ مُفْسِدِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo85. Oh bato bangai! Bomeka bimekelo na bakilo na bosembo, kasi kokutolela bato bimekelo bia bango te, mpe bosala mabe o kati ya mokili te.

See all translations of this verse →

بَقِيَّتُ ٱللَّهِ خَيْرٌ لَّكُمْ إِن كُنتُم مُّؤْمِنِينَ وَمَآ أَنَا۠ عَلَيْكُم بِحَفِيظٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo86. Bomengo ya libela epai ya Allah ezali malamu тропа bino soki ya sólo bozali bandimi, mpe nazali mokengeli likolo na bino te.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰشُعَيْبُ أَصَلَوٰتُكَ تَأْمُرُكَ أَن نَّتْرُكَ مَا يَعْبُدُ ءَابَآؤُنَآ أَوْ أَن نَّفْعَلَ فِىٓ أَمْوَٰلِنَا مَا نَشَٰٓؤُا۟ إِنَّكَ لَأَنتَ ٱلْحَلِيمُ ٱلرَّشِيدُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo87. Balobi naye été: Eh Shuaíb! Losambo nayo nde ezali kotinda yo mpo totika kobondela biye bankoko na biso babondelaki to epekisa biso ete tosalela bozui na biso lolenge tolingi? Ya sólo penza, ozali moto malamu ya bosóló koleka?

See all translations of this verse →

قَالَ يَٰقَوْمِ أَرَءَيْتُمْ إِن كُنتُ عَلَىٰ بَيِّنَةٍ مِّن رَّبِّى وَرَزَقَنِى مِنْهُ رِزْقًا حَسَنًا وَمَآ أُرِيدُ أَنْ أُخَالِفَكُمْ إِلَىٰ مَآ أَنْهَىٰكُمْ عَنْهُ إِنْ أُرِيدُ إِلَّا ٱلْإِصْلَٰحَ مَا ٱسْتَطَعْتُ وَمَا تَوْفِيقِىٓ إِلَّا بِٱللَّهِ عَلَيْهِ تَوَكَّلْتُ وَإِلَيْهِ أُنِيبُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo88. Alobaki été: Oh bato ba ngai! В omoni ndenge nini soki nazali na elembo ya bosóló kowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe apesi ngai bozui bolamu kowuta epai naye? Mpe mposa na ngai ezali te été na zala na bino na bokeseni na maye nazali kopekisa bino. Kasi nazali kolinga sé mbongwana ya malamu na ndenge ya bokoki na ngai. Kasi elonga na ngai ekowuta sé epai na Allah. Nati elikia na ngai epai naye mpe epai naye nazali kotubela.

See all translations of this verse →

وَيَٰقَوْمِ لَا يَجْرِمَنَّكُمْ شِقَاقِىٓ أَن يُصِيبَكُم مِّثْلُ مَآ أَصَابَ قَوْمَ نُوحٍ أَوْ قَوْمَ هُودٍ أَوْ قَوْمَ صَٰلِحٍ وَمَا قَوْمُ لُوطٍ مِّنكُم بِبَعِيدٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo89. Mpe oh bato na ngai! В órnemela ngai bokeseni na kotungisa ngai te, noki etumbu ekozua bino, ndenge ezuaki bato ba Núh na bato ba Hûd na bato ba Swálih, mpe (ndakisa) ya bato ba Loth ezali mosika te тропа bino.

See all translations of this verse →

وَٱسْتَغْفِرُوا۟ رَبَّكُمْ ثُمَّ تُوبُوٓا۟ إِلَيْهِ إِنَّ رَبِّى رَحِيمٌ وَدُودٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo90. Mpe bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino mpe botubela epai naye. Ya soló, Nkolo wa ngai azali Nkolo wa mawa atonda bolingo.

See all translations of this verse →

قَالُوا۟ يَٰشُعَيْبُ مَا نَفْقَهُ كَثِيرًا مِّمَّا تَقُولُ وَإِنَّا لَنَرَىٰكَ فِينَا ضَعِيفًا وَلَوْلَا رَهْطُكَ لَرَجَمْنَٰكَ وَمَآ أَنتَ عَلَيْنَا بِعَزِيزٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo91. Balobi: Eh Shua’íb! Tozali kososola te ebele ya maye ozali koloba, mpe tozali kornona yo ozali sé motawu o kati na biso soki ezalaki libota nayo te, tolingaki kosala yo mabe. (kobamba yo mabanga) mpe ozali na nguya moko te likolo na biso.

See all translations of this verse →

قَالَ يَٰقَوْمِ أَرَهْطِىٓ أَعَزُّ عَلَيْكُم مِّنَ ٱللَّهِ وَٱتَّخَذْتُمُوهُ وَرَآءَكُمْ ظِهْرِيًّا إِنَّ رَبِّى بِمَا تَعْمَلُونَ مُحِيطٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo92. Alobaki: Oh bato ya mboka na ngai! В ozali kornona ete libota na ngai ezali na lokumu ераї na bino koleka Allah, тропа maye bozali kopesa mikongo? Ya sólo, Nkolo wa ngai (ayebi) manso bozali kosala.

See all translations of this verse →

وَيَٰقَوْمِ ٱعْمَلُوا۟ عَلَىٰ مَكَانَتِكُمْ إِنِّى عَٰمِلٌ سَوْفَ تَعْلَمُونَ مَن يَأْتِيهِ عَذَابٌ يُخْزِيهِ وَمَنْ هُوَ كَٰذِبٌ وَٱرْتَقِبُوٓا۟ إِنِّى مَعَكُمْ رَقِيبٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo93. Mpe oh bato ba ngai! Bosala maye bokolinga, ngai mpe nakosala. Kala te bokoyebaka nani oyo etumbu ekozua ye, oyo ekopesa ye soni mpe nani azalaki mobuki lokuta. Bozela, (eloko nini ekosalema) ngai mpe nazali kozela elongo na bino.

See all translations of this verse →

وَلَمَّا جَآءَ أَمْرُنَا نَجَّيْنَا شُعَيْبًا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ مَعَهُۥ بِرَحْمَةٍ مِّنَّا وَأَخَذَتِ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوا۟ ٱلصَّيْحَةُ فَأَصْبَحُوا۟ فِى دِيَٰرِهِمْ جَٰثِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo94. Мре tango mobeko mwa biso moyaki, tobikisaki Shuaib na baye bandimaki elongo naye, na mawa kowuta epai na biso, mpe babubi bazuaki bogangi (bwa etumbu) mpe bakomaki bibembe o kati na bandako bia bango,

See all translations of this verse →

كَأَن لَّمْ يَغْنَوْا۟ فِيهَآ أَلَا بُعْدًا لِّمَدْيَنَ كَمَا بَعِدَتْ ثَمُودُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo95. Lokola bavandaki kala te kati na yango, kasi ba mad’yan bazalaki mosika, ndenge moko ba Thamúd bazalaki mosika na ngolu (ya Allah).

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ أَرْسَلْنَا مُوسَىٰ بِـَٔايَٰتِنَا وَسُلْطَٰنٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo96. Мре tosilaki solo kotinda Müssa na makamwisi ma biso na bokonzi bwa polele,

See all translations of this verse →

إِلَىٰ فِرْعَوْنَ وَمَلَإِي۟هِۦ فَٱتَّبَعُوٓا۟ أَمْرَ فِرْعَوْنَ وَمَآ أَمْرُ فِرْعَوْنَ بِرَشِيدٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo97. Epai na falo na bankumu ba ye. Kasi balandaki makambo ma falo, kasi makambo ma falo mazalaki na bokambi te.

See all translations of this verse →

يَقْدُمُ قَوْمَهُۥ يَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ فَأَوْرَدَهُمُ ٱلنَّارَ وَبِئْسَ ٱلْوِرْدُ ٱلْمَوْرُودُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo98. Akozalaka liboso lia bato baye o mokolo mwa suka, mpe akomemaka bango na moto. Nde oyo suka ya liziba ya mabe.

See all translations of this verse →

وَأُتْبِعُوا۟ فِى هَٰذِهِۦ لَعْنَةً وَيَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ بِئْسَ ٱلرِّفْدُ ٱلْمَرْفُودُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo99. Mpe botutu ekolanda bango awa na nsé, mpe na mokolo ya suka lokola. Mpe oyo likabo mabe bakopesama!

See all translations of this verse →

ذَٰلِكَ مِنْ أَنۢبَآءِ ٱلْقُرَىٰ نَقُصُّهُۥ عَلَيْكَ مِنْهَا قَآئِمٌ وَحَصِيدٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo100. Wana nde ba sango ya bituka tozali kopesa yo, (Muhammad), kati na yango misusu mizali kino moyi mwa lelo, mpe misusu misilaki kolimwa kala.

See all translations of this verse →

وَمَا ظَلَمْنَٰهُمْ وَلَٰكِن ظَلَمُوٓا۟ أَنفُسَهُمْ فَمَآ أَغْنَتْ عَنْهُمْ ءَالِهَتُهُمُ ٱلَّتِى يَدْعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مِن شَىْءٍ لَّمَّا جَآءَ أَمْرُ رَبِّكَ وَمَا زَادُوهُمْ غَيْرَ تَتْبِيبٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo101. Tobubaki bango te kasi bango moko bamibubaki. Mpona banzambe na bango baye bazalaki kobondela batiki Allah, esalisaki bango na eloko te tango mobeko mwa Nkolo wayo moyaki, kasi ebakiselaki bango sé bozangi.

See all translations of this verse →

وَكَذَٰلِكَ أَخْذُ رَبِّكَ إِذَآ أَخَذَ ٱلْقُرَىٰ وَهِىَ ظَٰلِمَةٌ إِنَّ أَخْذَهُۥٓ أَلِيمٌ شَدِيدٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo102. Ndenge wana nde Nkolo wayo asalaka, soki alingi kobeta mboka ya babubi. Ya soló, etumbu naye ezalaka mpasi mpe makasi.

See all translations of this verse →

إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَةً لِّمَنْ خَافَ عَذَابَ ٱلْـَٔاخِرَةِ ذَٰلِكَ يَوْمٌ مَّجْمُوعٌ لَّهُ ٱلنَّاسُ وَذَٰلِكَ يَوْمٌ مَّشْهُودٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo103. Wana ezali solo elembo na oyo akobanga etumbu ya mokolo ya suka. Mokolo moye bato bakosanganaka, mpe mokolo wana nde ekotatolama.

See all translations of this verse →

وَمَا نُؤَخِّرُهُۥٓ إِلَّا لِأَجَلٍ مَّعْدُودٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo104. Mpe tokozelisaka yango te, sé na tango eye etiyamaki.

See all translations of this verse →

يَوْمَ يَأْتِ لَا تَكَلَّمُ نَفْسٌ إِلَّا بِإِذْنِهِۦ فَمِنْهُمْ شَقِىٌّ وَسَعِيدٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo105. Mokolo moye ata molimo moko te akolobaka, sé na ndingisa naye kati na bango bakolelaka mpe basusu bakosepelaka.

See all translations of this verse →

فَأَمَّا ٱلَّذِينَ شَقُوا۟ فَفِى ٱلنَّارِ لَهُمْ فِيهَا زَفِيرٌ وَشَهِيقٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo106. Soki тропа bato ya mpasi, bakozala na moto wapi epai bakonyokwama mpe bakolela makasi,

See all translations of this verse →

خَٰلِدِينَ فِيهَا مَا دَامَتِ ٱلسَّمَٰوَٰتُ وَٱلْأَرْضُ إِلَّا مَا شَآءَ رَبُّكَ إِنَّ رَبَّكَ فَعَّالٌ لِّمَا يُرِيدُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo107. Bakozalaka kati na yango libela, ndenge likolo na mabele ekowumela, sé kaka oyo Nkolo nayo alingi.(1) ya soló, Nkolo wayo asalaka maye alingi.

See all translations of this verse →

وَأَمَّا ٱلَّذِينَ سُعِدُوا۟ فَفِى ٱلْجَنَّةِ خَٰلِدِينَ فِيهَا مَا دَامَتِ ٱلسَّمَٰوَٰتُ وَٱلْأَرْضُ إِلَّا مَا شَآءَ رَبُّكَ عَطَآءً غَيْرَ مَجْذُوذٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo108. Mpe baye bakozala na bisengo, bakozalaka o kati ya lola libela, ndenge bowumeli ya likolo na mabele sé kaka Nkolo wayo akolinga lolenge mosusu, likabo oyo ezali kokatana te.

See all translations of this verse →

فَلَا تَكُ فِى مِرْيَةٍ مِّمَّا يَعْبُدُ هَٰٓؤُلَآءِ مَا يَعْبُدُونَ إِلَّا كَمَا يَعْبُدُ ءَابَآؤُهُم مِّن قَبْلُ وَإِنَّا لَمُوَفُّوهُمْ نَصِيبَهُمْ غَيْرَ مَنقُوصٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo109. Mpe kozala na tembe te тропа maye bazali kobondela. Bazali sé kobondela maye bankoko ba bango babondelaki liboso. Mpe ya sólo, tokopesaka bango manso maye masengeli тропа bango, kasi makokutolama te.

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ ءَاتَيْنَا مُوسَى ٱلْكِتَٰبَ فَٱخْتُلِفَ فِيهِ وَلَوْلَا كَلِمَةٌ سَبَقَتْ مِن رَّبِّكَ لَقُضِىَ بَيْنَهُمْ وَإِنَّهُمْ لَفِى شَكٍّ مِّنْهُ مُرِيبٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo110. Mpe tosilaki solo kopesa Mûssa buku, kasi bakabwanaki тропа yango. Soki liloba litiyamaka liboso kowuta epai ya Nkolo wa yo te, elingaki kokatama kati kati na bango. Mpe ya sólo bango bazalaki na tembe o kati na yango.

See all translations of this verse →

وَإِنَّ كُلًّا لَّمَّا لَيُوَفِّيَنَّهُمْ رَبُّكَ أَعْمَٰلَهُمْ إِنَّهُۥ بِمَا يَعْمَلُونَ خَبِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo111. Mpe ya soló Nkolo wayo akofutaka bango banso engebene na misala mia bango. Ya soló, azali moyebi na maye bazalaki kosala.

See all translations of this verse →

فَٱسْتَقِمْ كَمَآ أُمِرْتَ وَمَن تَابَ مَعَكَ وَلَا تَطْغَوْا۟ إِنَّهُۥ بِمَا تَعْمَلُونَ بَصِيرٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo112. Misembola o nzela ya semba na ndenge batindaki yo elongo na baye batubeli (epai ya Allah), kasi kotomboko te, ya sólo ye amonaka maye bosalaka.

See all translations of this verse →

وَلَا تَرْكَنُوٓا۟ إِلَى ٱلَّذِينَ ظَلَمُوا۟ فَتَمَسَّكُمُ ٱلنَّارُ وَمَا لَكُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِنْ أَوْلِيَآءَ ثُمَّ لَا تُنصَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo113. Kasi bomipesa epai ya babubi te, soki te moto mokozua bino. Bozali na basungi basusu te, sé Allah ye mei, soki te bokosalisamaka te.

See all translations of this verse →

وَأَقِمِ ٱلصَّلَوٰةَ طَرَفَىِ ٱلنَّهَارِ وَزُلَفًا مِّنَ ٱلَّيْلِ إِنَّ ٱلْحَسَنَٰتِ يُذْهِبْنَ ٱلسَّيِّـَٔاتِ ذَٰلِكَ ذِكْرَىٰ لِلذَّٰكِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo114. Mpe telemisa losambo na ebandeli ya moyi mpe nasúka na ntango moko ya butu. Ya sólo, misala milamu milongolaka miye ya mabe. Wana ezali bokundoli тропа baye bazali kokanisa.

See all translations of this verse →

وَٱصْبِرْ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يُضِيعُ أَجْرَ ٱلْمُحْسِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo115. Kanga motema, ya sólo, Allah abungisaka lifuta lia babongisi te.

See all translations of this verse →

فَلَوْلَا كَانَ مِنَ ٱلْقُرُونِ مِن قَبْلِكُمْ أُو۟لُوا۟ بَقِيَّةٍ يَنْهَوْنَ عَنِ ٱلْفَسَادِ فِى ٱلْأَرْضِ إِلَّا قَلِيلًا مِّمَّنْ أَنجَيْنَا مِنْهُمْ وَٱتَّبَعَ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوا۟ مَآ أُتْرِفُوا۟ فِيهِ وَكَانُوا۟ مُجْرِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo116. Soki ya sólo, bato ba kala bazalaka liboso na bino, baye bakoki kopekisa kosala mabe, kati na mokili, bazalaki sé токе baye tobikisaki o kati na bango? Kasi babubi balandaki mabe mpe balekisaka ndelo o bisika bazalaki, mpe bazalaki bato mabe (babomi).

See all translations of this verse →

وَمَا كَانَ رَبُّكَ لِيُهْلِكَ ٱلْقُرَىٰ بِظُلْمٍ وَأَهْلُهَا مُصْلِحُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo117. Mpe Nkolo wayo akoki kobebisa mboka moko te, soki bato na yango bazali babongisi.

See all translations of this verse →

وَلَوْ شَآءَ رَبُّكَ لَجَعَلَ ٱلنَّاسَ أُمَّةً وَٰحِدَةً وَلَا يَزَالُونَ مُخْتَلِفِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo118. Мре soki Nkolo wayo alingaki, nde atiaki bato bazala umma(1) moko. Kasi balingaki sé kokabuana.

See all translations of this verse →

إِلَّا مَن رَّحِمَ رَبُّكَ وَلِذَٰلِكَ خَلَقَهُمْ وَتَمَّتْ كَلِمَةُ رَبِّكَ لَأَمْلَأَنَّ جَهَنَّمَ مِنَ ٱلْجِنَّةِ وَٱلنَّاسِ أَجْمَعِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo119. Longola sé baye Nkolo nayo akoyokela mawa. Mpo na yango wana nde akelaki bango. Мре liloba lia Nkolo wayo likoki: Nakotondisa lifelo na bilima (badjini) na bato banso.

See all translations of this verse →

وَكُلًّا نَّقُصُّ عَلَيْكَ مِنْ أَنۢبَآءِ ٱلرُّسُلِ مَا نُثَبِّتُ بِهِۦ فُؤَادَكَ وَجَآءَكَ فِى هَٰذِهِ ٱلْحَقُّ وَمَوْعِظَةٌ وَذِكْرَىٰ لِلْمُؤْمِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo120. Mpe manso tozali koyebisa тропа makomi ma batindami, mazali тропа kolendisa motema mwa yo. Nakati na yango solo esili kokomela yo mpe mateya na bokundoli тропа bandimi.

See all translations of this verse →

وَقُل لِّلَّذِينَ لَا يُؤْمِنُونَ ٱعْمَلُوا۟ عَلَىٰ مَكَانَتِكُمْ إِنَّا عَٰمِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo121. Mpe loba na baye bazali koboya kondima ete: Bosala ndenge bolingi, biso mpe tozali kosala.

See all translations of this verse →

وَٱنتَظِرُوٓا۟ إِنَّا مُنتَظِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo122. Mpe bozela, ya soló, tozali kozela lokola.

See all translations of this verse →

وَلِلَّهِ غَيْبُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ وَإِلَيْهِ يُرْجَعُ ٱلْأَمْرُ كُلُّهُۥ فَٱعْبُدْهُ وَتَوَكَّلْ عَلَيْهِ وَمَا رَبُّكَ بِغَٰفِلٍ عَمَّا تَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo123. Mpe Allah ayebaka mabombami manso maye mazali o likolo na o mabele, mpe epai naye nde makambo manso makozongaka. Bondela ye mpe mipesa naye, kasi Nkolo wayo azangaka koyeba te maye bozali kosala.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70