Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. M atondo na Allah oyo maye manso ya likolo mpe ya nsé ezali ya ye, mpe azali na matondo o tango ya suka. Мре azali na bwanya atonda boyebi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Ayebi maye mazali kokota na mabele na maye mazali kobima o kati na yango, mpe maye mazali kokita kowuta na likolo mpe na maye mazali komata. Azali wa ngolu atonda bolimbisi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Mpe bapengwi balobi: Ngonga ekoyelaka biso te, loba: Na Nkolo wa ngai, ya soló penza ekoyelaka bino, ye nde moyebi ya oyo ebombami. Eloko nionso ata ya mokie lokola mbuma ya zelo na likolo mpe na mabele, mpe ezali na eloko moko te ya mokie nto mpe ya monene sé kaka ekomama na buku ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Nzoka nde baye bazali na boyebi, bazali kornona oyo ekiteli yo kowuta epai na Nkolo nayo ete ezali bosembo mpe ezali kokamba o nzela ya oyo azali na nguya atonda lokumu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Boye azali kobukela Allah lokuta? To azali na ligboma? Kasi baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, bakozalaka o kati ya etumbu mpe libunga ya mosika.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Boye bazali kornona te maye mazali liboso na bango mpe sima na bango? Okati ya likolo na mabele, soki tolingi, tokozindisa bango na mabele. To tokweisela bango ndambu ya mapata, ya soló, wana ezali elembo тропа mowumbu nyoso oyo azali motubeli.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. (Mpe) toyebisaki ye ete: Bosala na yango nguba ya komibatela na tango ya bitumba mpe bosala misala ya malamu. Mpamba te ya soló, nazali kornona maye bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Mpe тропа Suleyman, (totiyelaki ye) mopepe, ezali kotambola na tongo lokola oyo etamboli sanza moko, mpe na pokwa lolenge moko, mpe totioliselaki ye moluka mwa wolo. Mpe bilima bisusu bizalaki kosala na mibeko mia ye na ndingisa ya Allah, mpe oyo akotika kosalela mobeko mwa biso, tokomekisa ye etumbu ya moto ya sairi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Bazalaki kosalela ye oyo alingaki kosala, tèmpelo bikeko na mbambola lokola sani ya minene, na banzungu ya langi. Oh bato ya Dâwud! Botonda botondi. Kasi токе mpenza kati na bawumbu ba ngai nde bayebi kozongisa matondi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Mpe tango tozua mokano тропа liwa naye, moko ayebaki yango te, sé bobele banyama ya mabele nde emonisaki bato liwa naye na kolia lingenda naye, mpe tango akweyaki, bilima bakamwaki na koloba ete: Soki bayebaki mabombami nde banyokwamaki te na bowumbu ya mosala naye.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Ya soló, pona saba ezuamaki na nzela ya efandelo na bango, na bilanga mibale, moko na ngambu ya (loboko) ya mobali, mosusu na ngambu ya (loboko) ya mwasi, bolia bozui boye Nkolo wa bino apesi bino, mpe botonda ye botondi. Mboka elamu mpe Nkolo ya bolimbisi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Wana nde ezalaki lifuta тропа maye bapengwaki na yango, boye tokopesa etumbu epai mosusu bobele na mopagano?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Mpe totiaki kati kati na bango na bamboka oyo topambolaki, bamboka misusu ezali na banzela ya polele ya pene тропа kosala mobembo kati na yango. В osala mobembo butu na moyi na kimia.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Mpe ya soló, ibilisu asili kokomisela bango makanisi naye, mpe balandi ye, longola sé eteni шоке kati ya bandimi,
Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Mpe azalaki na bokonzi likolo na bango te, kasi ezalaki mpo toyeba kati na bango nani andimi mpenza na mokolo ya suka, mpe koyeba nani azali na tembe na yango. Mpe Nkolo nayo nde mobateli ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Loba: Bobenga baye bozalaki kotutela ntolo na botiki Allah, bazali ata na eloko moke te lokola mbuma ya zelo na nsé mpe, na likolo basanganaki mpe naye te тропа kokela yango mibale, mpe azuaka ata lisungi na bango te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Mpe akondimelaka moto te sé oyo akopesa ye ndingisa, kino bobangi bokokita kowuta na mitema mia bango mpe bakolobaka: Boye Nkolo wa bino alobi nini? Bakoyanolaka bango ete alobi: Bosôló, mpe ye nde azali monene mpe ľíkolo koleka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Loba: Nani aleisaka bino ezala na likolo mpe na nsé? Loba: Allah. Ya solo, ezala biso to bino tokoyeba ba nani bazali na nzela ya semba to ya libungi ya polele?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Loba: Nkolo wa biso akosangisaka biso mpe sima akosambisa kati kati na biso na bosôló, ye nde mosambisi monene koleka mpe moyebi manso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Mpe bapengwi bazali koloba ete: Tokondima na kurani oyo te tokondima mpe te na maye makitaki liboso na yango. Mpe soki omonaki bato mabe tango bakotelema liboso lia Nkolo wa bango, bazali kowelana na maloba, baye bazangaki makasi bakoloba na baye ya lolendo ete: Soki тропа bino te nde tokomaki bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Bato ya lolendo bakozongisa eyano epai na bango ete: Boye biso nde topekisaki bino bokambami tango esilaki kokomela bino? Te, bino nde bozalaki bato mabe batomboki.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Bato ya motawu baye bazangi makasi bakozongisa liloba na bato ya lolendo ete; ezalaki nde likita na bino ya mabe bozalaki kosala yango butu na moyi, bozali kotinda biso ete topengwa na Allah, mpe totiela ye bambanda. Mpe babandi kolela na bango tango bakomona etumbu, tokotia miniololo na bakingo ya bapengwi, boye bakofutama te sé lolenge basalaki?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Loba: Ya sólo, Nkolo wa ngai apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Misolo mia bino na bana na bino ekopusa bino te pene na biso, longola sé oyo akondima mpe asali misala milamu, bango nde bakozuaka lifuta ya kobakisama тропа maye basalaki, mpe bakozalaka na bisika ya likolo mpe lola ya kimiya (nyoso).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Loba: Ya soló, Nkolo wa ngai apesaka bozui na oyo alingi kati ya bawumbu naye, mpe akutolaka yango. Mpe nyoso oyo bozali kobimisa azali kozongisela bino yango, mpe azali malamu ya bapesi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Mpe mokolo oyo akosangisa bango banso, sima akolobaka na ba anzelu: Boye bino nde ba oyo bazalaki kobondela?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Bakoloba ete: Lokumu nayo, yo nde mokonzi na biso kasi bango te, nzoka nde bazalaki kobondela nde bilima, mpe ebele bandimelaki bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. O mokolo yango, bokozala na makoki te ya kosalisana, mpe kominyokola te, mpe tokoloba na bato mabe ete: Вотека etumbu ya moto oyo bozalaki kozua yango lokuta.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mia polele, bakoloba ete: Nini oyo moto oyo alingi nde apekisa bino maye batata na bino bazalaki kobondela? Mpe balobi lisusu ete: Oyo ezali sé lokuta oyo ebongisami, mpe bapagano balobi тропа bosembo tango ekomelaki bango ete: Oyo ezali sé bonganga ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Ndenge moko mpe na ba oyo bazalaki liboso na bango baboyaki kondimela (Batindami na bango) bakomisaki zomi te na oyo topesaki bango, baboyaki kondimela batindami ba ngai, mpe lolenge kani nasalaki тропа bango!
Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Loba oyo nazali kosenga bino ezali mpona bino moko, kasi lifuta lia ngai, likofutamaka sé epai ya Allah, тре azali kornona nyoso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo54. Mpe bakopekisama ete: Bazua eloko bazalaki na mposa na yango, lolenge ya boye esilaki mpe kosalama na baninga na bango ya liboso mpo ete balutaki tembe. (Bazalaki na tembe ya mozindo mpe monene).