أَمْ يَقُولُونَ ٱفْتَرَىٰهُ قُلْ فَأْتُوا۟ بِعَشْرِ سُوَرٍ مِّثْلِهِۦ مُفْتَرَيَٰتٍ وَٱدْعُوا۟ مَنِ ٱسْتَطَعْتُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ إِن كُنتُمْ صَٰدِقِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. To bazali koloba été: Ezali lokuta asali yango ye moko (kurani). Loba: Boya na mikapo zomi lokola oyo nayei na yango, oyo bosala bino moko, mpe bobenga nani bolingi oyo akoki kosalisa bino na yango na botiki Allah, soki bozali na bosóló.