Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Lokumu na Allah oyo akela likolo na mabele, mpe atie molili mpe bongengi. Sima, baye bapengwi na Nkolo wa bango bazali kokokisa ye na bikelamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Mpe ye, azali Allah oyo azali o likolo mpe na nsé,(1) ayebaka mabombami ma bino na maye bomonisaka polele. Mpe ayebi maye bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Mpe basilaki koboya bosembo ntango eyelaki bango; mpe kala mingi te ekoyela bango bansango ya maye bazalaki kotiola.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Boye, bazali kornona te bato boni tobomaki liboso na bango, tofandisaki bango kati na mokilina ndenge ya malamu ndenge tosalela naino bino te? Mpe tokitiselaki bango mbula ebele kowuta o likolo, mpe totiaki míngala mizalaki kotiola na nsé ya makolo ma bango, mpe tobomaki bango тропа masumu ma bango. Mpe sima na bango tokelaki lisanga mosusu ya bato ya sika.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Ata soki tokitiselaka yo buku ekomami na lokasa eye bakoki kosimba na maboko ma bango, mbele bapengwi balingaki koloba: Oyó ezali sé bondoki bwa polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Kasi ya soló, batiolaki batindami liboso lia yo; kasi, litio lizingaki bango moko mpona maye bazalaki kosakana na yango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Loba: Nani azali kokonza maye mazuami o likolo na mabele? Loba: Allah. Asila komikatela kozala na ngolu. Akosangisaka bino o mokolo mwa suka moye mozali na tembe te o kati na yango. Baye bamizangisi bango moko, bango nde bandimaka te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Loba: Boye natika Allah тропа kozua mosungi mosusu mokeli ya likolo na mabele, mpe yende moleisi, kasi baleisaka ye te? Loba: Bapesi ngai mobeko ete nazala moto ya yambo ya komisokia(1), kasi kozala te omolongo ya basangisi Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Mpe soki Allah apesi yo mikakatano moto akolongola yango azali te kaka sé ye, тре soki apesi yo bolamu; yende oyoazali na nguya likolo ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Loba: Eloko nini ezali monene koleka litatoli? Loba: Allah, azali nzeneneke kati na ngai na bino, mpe bakitiseli ngai kurani oyo mpo ete nakebisa bino na yango na bato banso ekokomela bango. Boye, bino bozali kotatola ete ezali na ba nzambe mosusu elongo na Allah? Loba: Nakotatola te. Loba: Azali solo Nzambe moko, mpe nazali mosika na maye bozali kosangisa ye na yango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Baye topesaki bango buku bayebi ye (Muhammad) ndenge bayebi bana na bango, baye bamizangisi bango moko, bango nde bandimaka te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Te! Kasi maye bazalaki kosala mabimi polele, soki bazongisi bango na mokili, bakozongela sé maye bapekisaki bango. Ya soló, bazali nde bato ya lokuta.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Mpe soki omonaka ntango bakotelemisama liboso ya Nkolo na bango, akoloba: Boye oyo ezali solo te? В akoloba: Iyo na Nkolo na biso! Akoloba: Bomeka etumbu ya maye bozalaki ко mpengwa na yango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Basili kozanga baye baboyi kondima na bokutani na Allah, kino ntango ekoyela bango mbalakaka. Bakoloba: Eh! Mawa na biso na maye oyo tomonaki mpamba na kati na yango! Mpe bako mema mikumba na bango na mikongo na bango, mpe oyo nde mikumba ya mabe!
Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Tosili koyeba ya soló ete, ezali kosala yo mpasi maye bazali koloba. Bazali koboya yo te, kasi babubi bazali nde koboya mikapo mia Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Mpe basilaki koboya batindami liboso nayo, mpe bakangaki mitema na maye bazuaki bango na lokuta, mpe banyokuamaki, kino lisungi na biso eyaki. Kasi,mbongwana ezali te na maloba ya Allah. Мре ya soló nsango ya batindami esili kokomela yo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Mpe soki koboya na bango ezali kosala yo mpasi, mpe soki ozalaki na makoki, ya koluka nzela na mabele to mpe ozua emateli тропа kobuta na mapata тропа komemela bango bikamwiseli; mpe soki Allah alingaki nde atiaki bango banso na nzela ya semba, kasi kozala te o kati na baye bazanga mayele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Ya sólo, ezali sé baye bazali koyoka nde bayambaka mbela (ya bondimi); kasi тропа bawa, Allah akosekwisa bango. Mpe epai naye nde bakozongisama.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Mpe balobi: Mpona nini elembo ekitelaki ye te epai na Nkolo naye? Loba: Ya sólo Allah azali na makoki ya kokitisa elembo, nzoka nde ebele na bango bazali koyeba te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Mpe ezali na nyama(1) mokote ezali kotambola likolo na mabele, mpe ndeke moko te ezali kopumbwa na mapapu naye, sé kaka bazala na lisanga lokola bino. Mpe totikaki eloko moko te okati ya buku. Na sima, epai na Nkolo na bango nde bakosangisama.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Loba: Boyebisa ngai soki etumbu ya Allah eyeli bino to mpe mokolo ya suka ekomeli bino? Bokobelela nzambe mosusu botika Allah soki bozali na bosembo?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Te; ye nde bokobelela mpe akolongola maye bozalaki kobondela ye тропа yango soki alingi, mpe bokobosana maye bozalaki kosangisa ye na yango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Mpe ya soló, tosilaki kotinda(1) epai ya bato liboso nayo, na sima tozuaki bango na bampasi ya makasi nzala mpe bamalali ya makasi mpo ete ntango mosusu bakolomba (ngolu na biso).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Мре ntango babosanaki maye bayebisaki bango, tofungolelaki bango bizipela ya biloko binso kino ntango basepeli na maye bazui, tozuaki bango mbalakaka, tala ndenge basilaki kozanga elikia.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo46. Loba: Bomoni boni soki Allah azui koyoka na bino na kornona na bino mpe akangi mitema na bino? Nzambe mosusu nani akoyela bino yango na esika ya Allah? Tala ndenge tozali kolimbolela bango bilembo polele, kasi bazali sé kopesa mokongo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Loba: Bokanisi nini soki etumbu ya Allah eyeli bino mbalakaka to polele? Boye, ekobebisama sé bato mabe (babubi)?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Mpe totindaka batindami te sé bazala bapesi nsango malamu to bakebisi. Na yango; oyo akondima mpe abongisi, babanga te mpe bazala na mawa te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Loba: Nakoki koyebisa bino te ete nazali na sanduku ya nkita ya Allah, mpe nayebi mabombami te, mpe nakoki koloba te ete na zali anzelu, nazali; kolanda sé maye makiteli ngai na emoniseli. Loba: Oyó azali na miso akokani na oyo akufa miso? Bokokanisa te?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Mpe kebisa na yango(1) baye bazali kobanga ete bakosangisama liboso ya Nkolo wa bango, bazali na mobateli te mpe molobeli te na botiki naye mpo ete babanga.(2)
Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Mpe kobengana te baye bazali kobondela Nkolo na bango ntongo mpe mpokwa bazali koluka elongi naye. Ozali na eloko te тропа lifuta na bango, bango mpe bazali na eloko te тропа lifuta пауо. Soki obengani bango okozala akati ya babubi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo53. Na boye nde totiaki bango na bango na kati ya komekama mpo baloba ete: Ba oyo nde Allah apesi bango bolamu likolo na biso? Boye Allah te nde ayebi baye bapesaka melesi?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo54. Мре soki baye bandimi na mikapo na biso bayei epai nayo, mpe loba: Kimia ezala likolo na bino, Nkolo na bino akoma likolo naye ngolu ete oyo kati na bino akosala mabe nakozanga koyeba, sima atubeli mpe abongisi, ya soló azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo56. Loba: Bapekisaki ngai kobondela baye bozali kobondela elongo na Allah. Loba: Ngai nakolanda ba mposa na bino te, noki nakobunga mpe nakozala kati ya bakambami te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo57. Loba: Ya solo, nazali na polele ya Nkolo na ngai, mpe boboyi yango. Maye bozali kowelisa ezali na maboko na ngai te. Kokata makambo ezali sé mibeko ya Allah, azali kokata na bosembo mpe ye nde mokaboli ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. Loba: Soki oyo bozali kowelisa (etumbu eya noki) ezalaki na maboko na ngai mbele esilaki kokata kati na ngai na bino, mpe Allah nde ayebi babubi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Mpe ye nde azali na bafungola ya mabombami, moko te ayebi yango sé ye, mpe ayebi mayemazali na mabele mpe na mayi; mpe lokasa moko te (ya nzete) ekokweya kino ayeba yango. Mpe ezali na mbuma moko te (ya moke) na kati na molili ya mabele, ezala ya mobesu to ya kokawka kino esila kokomama o kati ya buku ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Mpe na kati ya butu ye nde azali kozua milimo na bino,(1) mpe ayebi maye bosalaki na moyi. Sima azali kolamusa bino kati na yango mpo ete elaka ekokisama. Mpe epai naye bozongi na bino ezali, sima akoyebisa bino maye bozalaki kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo61. Mpe azali mokonzi likolo na bawumbu naye. Mpe azali kotindela bino bakengeli. Kino liwa ekokomela moko kati na bino, batindami na biso (ba anzelu) bazali kolongola ye molimo na liseki te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Sima, bazongi epai na Allah mokonzi na bango ya soló, boye mobeko mozali ya ye te? Mpe azali lombango na kofuta.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo63. Loba: Nani akobikisa bino na molili ya mabele mpe ya mayi? Bokobelela ye na kokitisama mpe na kobanga ete soki abikisi biso na oyo, tokozala okati ya batondi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Loba: Allah nde akokangola bino kati na yango mpe na ba mpasi nioso, na sima, bozongi kosangisa ye lisusu (na binzambe nzambe).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo65. Loba: Azali na makoki ya kotindela bino etumbu na likolo to na nsé, na makolo na bino to mpe azipa bino na mabulu ya bitumba mpe ayokisa bino mpasi ya bitumba bino nabino. Tala ndenge tozali kolimbola mikapo mia biso, ntango mosusu bakoki kososola.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo68. Mpe soki omoni baye bazali kotiola mikapo na biso, zala mosika na bango kino bakozua lisolo mosusu. Mpe soki esali ete satana abosanisi yo, koranda te sima ya bokundoli elongo na babubi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo69. Mpe babangi (Allah) bazali na eloko te ya kofuta тропа bato ya lolenge wana, kaši ezali sé bokundoli ntango mosusu bakobanga.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo70. Tika baye bazui lingomba na bango na liseki mpe lisano, mpe bomoyi ya nsé ekosi bango. Mpe kundola na oyo(1) mpo ete molimo moko te ebebisama na maye azuaki. Akozala na mobateli te lokola Allah mpe na molobeli te, likabo nyoso akoya na yango тропа kokangola ye ekondimama te. Ba oyo wana nde bamibebisaki bango moko тропа maye bazuaki, bakomela mayi ya moto mpe bakozala na etumbu ya makasi na ntina ya maye bazalaki kopengwa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo71. Loba: Boye, tokobelela elongo na Allah oyo ekosalisa biso te mpe ekonyokolo biso te? Mpe tozonga sima wana Allah asili kokamba biso mpo tozala lokola moto oyo basatana basili kokweisa ye mpe azali kotelengana na mabele? Ata baninga bazali kobenga ye na nzela ya semba ete: Yaka epai na biso; lobamzela ya Allah ezali nzela ya semba mpe tobengamaki ete tomisokia epai na Nkolo ya mikili.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo73. Mpe yende akelaki likolo na mabele na bosembo, mpe mokolo akoloba zala mpe ekozala, liloba naye ya soló, ye nde mokonzi ya mokolo bakofula na kelelo, azali moyebi ya mabombami na makambo ya polele mpe azali wa bwányá atonda bansango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo74. Mpe ntango Ibrâhîm alobaki na tata naye Azar: Ozali kozua bikeko banzambe? Ya solo nazali kornona yo na bato nayo na libunga ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo78. Mpe ntango amonaki mwese (moyi) alobi: Oyo nde Nkolo na ngai, oyo azali monene koleka! Mpe ntango elimwaki alobi: Ohbato na ngai! Ya soló, nazali mosika na bino na maye bozali kosangisa (Allah) nayango;
Lingala Translation - Mohammed Balangogo79. Ya sólo, ngai na bongoli elongi na ngai epai ya oyo akeli likolo mpe mabele na bomoko bwaye, mpe nazali o kati ya basambeli ya bikeko te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo80. Mpe bato naye basuanisi ye, alobi: Bokosuanisa ngai mpo na Allah naye asili kokamba ngai? Mpe nazali kobanga te maye bozali kosangisa ye na yango, sé oyo Nkolo na ngai alingi, Nkolo na ngai aleka biloko nyoso na boyebi, bokokanisa te?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo81. Mpe ndenge nini nakobanga maye bosangisi mpe bozali kobanga te ete bosangisi Allah na maye akitisela yango elembetele te? Na yango; Lisanga nini Esengeli ebatelama soki boyebi?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo82. Baye bandima mpe balatisi bondimi na bango mabe te, bango wana nde bazali na kimia (babatelami) mpe bango nde bakambami.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo83. Wana nde elembetele na biso eye topesaki na Ibrâhîm likolo ya bato naye. Totombolaka mpete ya nani tolingi, ya sólo, Nkolo nayo azali wa bwanya atonda boyebi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo87. Mpe basusu kati ya batata na bango mpe bana na bango mpe bandeko na bango, toponaki bango mpe tokambaki bango na nzela ya semba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo88. Wana nde bokambi ya Allah azali kokamba na yango nani alingi kati na bawumbu naye. Soki basangisaki (Allah) mbele misala na bango mibebisamaki.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo89. Ba oyo wana nde topesaki bango buku mpe mibeko тре bontoma, тре soki ba oyo bapengwi na yango, kaši tosili kopesa mokumba na yango epai na bato mosusu oyo bakopengwa na yango te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo90. В a oyo wana nde Allah akambi bango, landa nzela na bango. Loba: Nazali kosenga bino yango lifuta te, yango ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo91. Bapesi Allah lukumu naye te ndenge esengeli, ntango balobi ete: Allah akitisi eloko te apai na moto. Loba: Nani akitisaki buku oyo Mûssa ayaki na yango bongengi mpe bokambi тропа bato? Bokomaki yango na bamakasa bazali kobimisa yango mpe bozali kobomba ebele kati na yango. Etangisi bino na batata na bino maye boyebaki liboso te, loba: Allah, sima tika bango basakana na kati ya libunga na bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo92. Kaši buku oyo (kurani) tokitisi yango epambolami ezali kondima na oyo ekitaki liboso, mpe mpo ete okebisa na yango mama ya bituka(1) na baye bazali zingazinga na yango.(2) Mpe na baye bandimi na mokolo ya suka bazali kondima na yango mpe bazali kobatela losambo na bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo93. Mpe nani azali moto mabe koleka moto oyo alobi lokuta na nkombo ya Allah? То mpe azali koloba ete: Bapesi ngai emoniseli, nzoka nde bakitiseli ye eloko te? To mpe oyo akoloba: Nakokitisa emoniseli ndenge Allah akitisi? Mpe soki okomona bato mabe ndenge bakozala o kati ya molangwa ya liwa, mpe ba anzelu bakotandela bango maboko:(1) Bobimisa milimo na bino, lelo bokozua etumbu ya kosilisa lokumu тропа maye bozalaki koloba bosembo te na nkombo ya Allah, mpe bozalaki kosala lolendo na mikapo naye.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo94. Bino wana boye liboso na biso lelo bino moko, ndenge tokelaki bino mbala ya liboso. Botiki sima na bino nyoso oyo topesaki bino mpe tozali kornona te banani bakolobela bino, baye bozalaki kotuta ntolo ete bozali na basangani, kosangana na bino esili kokatana, mpe baye bozalaki kotutela ntolo basundoli bino (lokola balobeli).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo95. Ya soló, Allah nde azali kopasola mbuma mpe mokokoli. Azali kobimisa bomoyi kowuta na liwa(2) mpe mobisi liwa kowuta na bomoyi. Wana nde Allah, ndenge nini bozali komibungisa?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo96. Ye nde azali kobimisa pole ya ntongo na molili ya butu mpe atia butu ezala bopemi, kasi moyi na sanza тропа koyeba motango. Oyo nde mokano ya Nkolo nguya atonda boyebi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo97. Mpe ye nde atielaki bino minzoto mpo bokambama na yango na molili ya mokili mpe ya ebale. Tosili kolimbola bilembo polele тропа bato oyo bayebi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo98. Mpe ye nde akeli bino ebele kowuta na molimo moko; mpe ezali na efandelo mpe ebombelo. Tosili kolimbola bilembo mpo na bato basosolaka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo99. Mpe ye nde azali kokitisa mayi kowuta na likolo. Mpe tozali kobimisa na yango milona. Mpe tobimisi bamatiti, sima tozali kobimisa bambuma ekangami ekangami mpe nzete ya tamru na mutu na yango ezali kobimisa bambuma ya tamru bizembeli pembeni pona kobuka epai na epai, mpe bilanga ya a’nâb(1) mpe ya zaîtûn(2) mpe ya rumân(3), bikokana mpe bisusu bikokana te. Tala bambuma na yango ntango
Lingala Translation - Mohammed Balangogo100. Мре batieli Allah ba mbanda ya bilima тре yende akeli bango, тре bapesi ye bana basi na bana mibali na kozanga koyeba, nkembo naye na maye bazali kopesa ye.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo101. Mokeli ya likolo na nsé. Ndenge nini akozala na mwana azali na molongani te mpe yende akela biloko binso тре azali moyebi ya biloko binso!
Lingala Translation - Mohammed Balangogo102. Wana Allah Nkolo na bino, nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ye, mokeli ya biloko binso bobondela ye, mpe azali mobateli ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo106. Landa maye makiteli yo epai ya Nkolo nayo, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye, mpe zala mosika na basangisi (Allah).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo107. Mpe soki Allah alingaki mbele basangisaki ye na eloko te, mpe totiaki yo mokengeli likolo na bango te, mpe ozali mobateli na bango te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo108. Mpe bofinga te baye bazali kobondela misusu batiki Allah, bakofinga Allah na nkanda kati na kozanga mayele, na boye nde tobongisaki mosala ya umma(1) nionso, sima epai na Nkolo na bango nde bozongi na bango ezali nde akoyebisa bango na ntina ya maye bazalaki kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo109. Mpe bazali kolapa na Allah na makasi ya bolapi na bango ete soki elembo eyeli bango bakondima na yango, loba: Ya soló bilembo bizali epai na Allah, mpe eloko nini ekotinda bino kokanisa ete soki yango eye bakondima te?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo110. Мре tokobalola mitema na bango mpe miso na bango mpo bandimaki mbala ya liboso te, mpe totiki bango o kati ya botomboki na bango nakozanga kornona.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo111. Mpe soki tokitisa ba anzelu likolo na bango, mpe bibembe bilobisa bango, mpe soki tosangisaki biloko binso liboso na bango, balingaki kondima sé soki Allah alingaki, nzoka nde ebele na bango bazangi koyeba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo112. Mpe ndenge wana totiaki na ntoma nionso, monguna kati ya basatana ya bato mpe bilima. Bazali kopesana bimoniseli maloba ya kitoko mpe sukali maloba mazanga ntina; mpe soki Nkolo nayo alingaki nde basalaki yango te. Mpe tika bango na maye bazali kokosa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo113. Mpe mpo ete mitema ya baye bandimi na mokolo ya suka te bikende epai na yango mpe basepela na yango mpe mpo bakotisa oyo balingi kokotisa!
Lingala Translation - Mohammed Balangogo114. Na boye, naluka zuzi mosusu kotika Allah mpe ye nde akitisi epai na bino buku ya polele? Mpe baye napesaki buku bayebi ete yango ekiti ya soló kowuta epai ya Nkolo nayo na bosembo, kasi kozala te elongo na baye bazali kotia ntembe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo115. Мре liloba ya Nkolo nayo ekokisami ya soló mpe na bosembo, mbongwana ezali te na maloba naye azali moyoki mpe moyebi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo116. Mpe soki otosi ebele ya bato awa na nsé, bakobungisa yo nzela ya Allah. Bazali kolanda sé makanisi mpe bazali kosala sé balokuta.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo119. Mpona nini bokolia te maye batangeli yango nkombo ya Allah mpe asili kolimbolela bino maye mapekisami, longola sé soki bokutani na kpokoso ya makasi koleka? Mpe ya solo, ebele ya bato bazali kobungisa bato na bamposa na bango na kozanga boyebi. Ya solo, Nkolo nayo nde ayebi mpenza bato ya mabe (balekisi ndelo).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo120. Mpe botika masumu ya polele na ya kobatama. Ya solo, baye bazali kosala masumu bakofutama na maye bazalaki kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo121. Мре bolia te maye bat angelí yango nkombo ya Allah te mpo ete ezali mbindo. Mpe ya soló, basatana bazali kotinda bato na bango mpo na kosuanisa bino, mpe soki botosi bango bokozala basambeli ya bikeko.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo122. Boye! Moto oyo azalaki ebembe mpe topesi ye bomoyi mpe totieli ye bongengi azali kotambola na yango kati na bato, azali lokola moto oyo azali na molili akoki kobima kati na yango te? Lolenge wana nde babongisela bapengwi maye bazalaki kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo123. Na boye nde totiaki na mboka moko moko batomboki ya minene minene тропа kosala bamwango, kasi bazali kosala yango sé na banzoto na bango moko kasi bazali koyeba te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo124. Mpe soki elembo moko eyeli bango, balobi: Tokondima te kino tokozua likabo ndenge moko eyelaki batindami ya Allah. Allah ayebi esika nini akoki kotia bontoma(1) naye baye basali mabe bakozala na ntina te epai ya Allah mpe bakozua etumbu ya makasi тропа bamwango bazalaki kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo128. Mpe mokolo akosangisa bango banso, eh bino bilima bosili! Konyokolo bato mingi, тре baninga na bango kati ya bato bakozongisa liloba ete: Eh Nkolo! Tozalaki kosalisana kati na biso kino tokomi na elaka na biso eye osilaki kotia. Akoloba na bango: Lifelo nde esika na bino ya kofanda libela, sé ndenge Allah akolinga. Ya soló, Nkolo nayo azali wa bwanya atonda boyebi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo130. Eh lisanga ya bilima mpe bato! Batindami baponamaki te kati na bino, bazali kolobela bino bilembo biangai mpe bazali kokebisa bino mpo na bokutani na bino ya lelo oyo? Bakoloba: Totatoli na nzoto na biso moko, mpe bomoyi ya nsé mokosi bango, mpe bamitatoli ete ya soló bazalaki bapengwi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo133. Mpe Nkolo nayo azali na bomengo atonda ngolu, soki alingi akolongola bino mpe akokela basusu oyo alingi na esika na bino ndenge akelaki bino wuta na basusu mpe lokola.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo135. Loba: Eh bato na ngai! Bosala na bisika na bino ngai mpe nazali kosala, mpe bokoyeba kala mingi te nani akofutama malamu mpo na lobi. Ya sólo, babubi bakoki kolonga te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo136. Мре bazali kopesa Allah mwa eteni kati ya maye akela bibwele mpe milona тре balobi: Oyo ezali тропа Allah na makanisi na bango, тре oyo ezali тропа banzambe na biso, kasi oyo ya banzambe na bango ezali кокота epai na Allah te, mpe oyo ya Allah ezali кокота epai na banzambe na bango, mabe ndenge bazali kokata likambo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo137. Mpe lolenge wana nde banzambe ya basambeli bikeko babongiselaki bango mabe ya koboma bana na bango тропа konyokolo bango mpe тропа kozipa bango miso na lingomba na bango, mpe soki Allah alingaki mbele basalaki yango te, mpe tika bango na maye bazali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo138. Mpe balobaki: Oyo bibwele mpe bilona biye bipekisami nakolia, sé na ba oyo tokolinga na makanisi na bango, mpe banyama biye mikongo na yango mipekisami, mpe banyama oyo batangeli yango nkombo ya Allah te nakobukela ye lokuta, akofuta bango na maye bazalaki kosala (ya lokuta).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo139. Mpe balobi: Maye mazali o mabumu ya banyama oyo bizali sé тропа mibali kati nabiso, kasi bipekisami тропа basi na biso, тре soki yango ebimi ya kokufa tala bango basangani likolo na yango, akofuta bango na mibeko na bango, ya soló, azali na bwanya atonda boyebi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo141. Mpe ye nde abimisa bilanga ya kokangama mpe ya kokangama te, na banzete ya tamru(1) mpe milona ya ndenge na ndenge na bambuma na yango na elengi na yango, mpe bazaítún(1) na barumane(1) mikokana mpe misusu mikokana te. Bolia ba mbuma na yango ntango eboti mpe bofuta zakat na yango na mokolo yango bizali kobukama mpe bolekisa ndelo te. Ya soló, alingaka babebisi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo142. Mpe banyama mosusu akela yango mpo na komatela, mpe bisusu тропа ba litomba ya ndenge na ndenge. Bolia na maye Allah apeși bino. Mpe bolanda makolo ya satana te. Mpo ete azali monguna na bino ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo143. Na bibwele akeli balongani mwambe, mibale ya bantaba mpe mibale ya bameme. Loba: Boye mibali mibale nde apekisi to ya basi mibale to mpe maye makangami na matilisi ya basi mibale? Bopesa ngai boyebi na yango soki bozali na bosembo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo144. Mpe mibale kati ya bakamela mpe mibale kati ya bangombe. Loba:boye; apekisi ya mibali mibale to ya basi mibale to mpe lisusu maye makangami о mabumu ya oyo ya basi mibale, to bozalaki banzeneneke na ntango Allah azalaki kopesa bino mibeko oyo? Mpe nani azali moto mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta тропа kobungisa bato na kozanga mayele? Ya soló, Allah akambaka babubi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo145. Loba: Mpona maye makiteli ngai kati ya emoniseli, namoni epekisami te mpona kolia, longola nsé soki ezali ya kokufa to makila ebele oyo esopani(1) to mpe mosuni ya ngulu mpo ete yango ezali mbindo to nyama eye babomi yango mpona Allah te, kasi moto oyo akokutana nakpokoso ya makasi koleka (mpe alei yango na nko te to alekisi ndelo te ayeba ete), ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo146. Mpe тропа baye bamibenga bayuda topekisaki bango nyama nyoso ya manzaka, mpe тропа bangombe na bantaba mpe bameme topekisaki bango bamafuta na yango, longola sé oyo ya mikongo na yango to тре ya mipanzi to mpe oyo esangani na mikwa. Wana etumbu topesaki bango mpo na botomboki na bango, тре ya soló, biso nde tozali na bosembo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo147. Mpe soki bazui yo moto na lokuta, loba: Nkolo na bino atonda ngolu ebele etumbu naye ekoki kozangisa bato ya mabe te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo148. Baye basangisaki (Allah) bakoloba: Soki Allah alingaki kasi tosangisaki Allah te mpe biso na batata na biso, tokokaki kopekisa eloko te. Ndenge wana nde baye balekaki liboso na bango baboyaki kino bazuaki etumbu na biso. Loba: Boye bozali na boyebi epai na bino bobimisela yango, biso? Bozali kolanda sé makanisi mpe bozali kosala sé lokuta.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo150. Loba: Boya na banzeneneke na bino batatola ete ya soló, Allah nde apekisaki oyo. Mpe soki batatoli, kotatola na bango te, mpe kolanda te mposa ya baye baboyi mikapo na biso, mpe kolanda te baye bazali kondima na mokolo ya suka te mpe bazali kokokisa Nkolo na bango na bikelamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo151. Loba: Boya na tángela bino maye Nkolo na bino Apekisi bino: Ete bosangisa ye na eloko te, mpe bozala malamu na baboti na bino, mpe boboma bana na bino te тропа kozanga; biso nde tozali koleisa bino na bango, mpe bopusana na masumu te na polele to na kobombana, mpe boboma molimo ya moto te oyo Allah atie yango bule (mosantu) sé na bosembo, wana ntoli apesi bino (Allah) mpo ete bososola.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo152. Mpe bopusana te pembeni ya bozui ya mwana etike sé ezala na lolenge ya malamu kino akokola. Mpe bopesa bimekelo na bosembo (komeka ntaka ya metele mpe kotia nkilo), tokopesa moto mokumba te sé oyo ekoki naye, mpe soki bozali koloba boloba malamu na bosembo ata soki ezali bayi libota, mpe bokokisa elaka ya Allah. Wana mibeko atindi bino na yango mpo ete bozala kokanisa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo153. Mpe ya soló, oyo nde nzela na ngai ya semba bolanda yango kasi bolanda banzela ya mikemike te ekokabola bino na nzela naye. Wana nde atindi bino na yango mpo ete bobanga ye.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo154. Sima topesaki Mûssa buku ya kokoka mbano тропа bolamu asalaki mpe ezala ndimbola ya eloko nyoso, bokambi mpe ngolu ntango mosusu bakondima na bokutani ya Nkolo na bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo156. Mpo boloba te ete: Bakitisaki nde buku epai ya mabota mibale liboso na biso mpe tomipesaki na kotanga yango te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo157. То mpe boloba ete: Soki bapesaki biso buku mbele tokambamaki koleka bango. Pole esili koyela bino epai na Nkolo na bino bokambi mpe ngolu, тре nani moto mabe koleka oyo azali koboya mikapo mia Allah тре azali kopesa yango mokongo tokofuta baye bazali kopesa mikapo na biso mokongo etumbu ya mabe тропа maye bazalaki kokima.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo158. Bazali kozela nini ete ba anzelu bayela bango ete Nkolo nayo aya to тре ndambu ya bilembo ya Nkolo nayo? Mokolo oyo ndambo ya bilembo ya Nkolo nayo ekoya kondima naye ntango wana ekosalisa molimo moko te oyo andimaki te liboso to azuaki bolamu liboso na kondima naye, loba: Bozela! Biso mpe tozali kozela!
Lingala Translation - Mohammed Balangogo159. Ya soló, baye bakabolaki lingomba na bango mabota mikemike, ozali na eloko te kati na bango. Kasi likambo na bango etali nde Allah sima akoyebisa bango na maye bazalaki kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo160. Oyo akoya na bolamu moko akofutama na yango mbala zomi, mpe oyo akoya na mabe, akofutama sé na lolenge na yango mpe bakobubama te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo161. Loba: Ya sólo, Nkolo na ngai akambi ngai na nzela ya semba lingomba ya semba lingomba ya Ibrâhîm amisokia mobimba na Allah mpe azalaki te kati ya basangisi (Allah).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo162. Loba: Ya soló, losambo na ngai, kosasa na ngai, bomoyi na ngai mpe liwa na ngai mazali ya Allah Nkolo ya mikili.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo163. Azali na mosangani te, mpo na yango nde na tindamaki mpe na zali wa yambo ya bamisokié (nazali moto wa yambo ya kozala mizilima na umma na ngai).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo164. Loba: Boye nakoluka Nkolo mosusu тропа kotika Allah mpe ye nde Nkolo ya biloko binso? Molimo mokozua sé lifuta ya mabe asalaki. Moko te akomema mokumba ya moninga. Sima epai na Nkolo na bino bozongi na bino ezali mpe akoyebisa bino mpo na maye bozalaki kokabwana na yango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo165. Mpe ye nde atiaki bino bakitani na mabele mpe atomboli basusu likolo ya baninga тропа komeka bino na maye apesi bino. Ya soló, Nkolo nayo azali lombango na kopesa etumbu, mpe ya sólo, azali molimbisi atonda ngolu.