Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Lolenge wana nde Allah wa bokasi atonda bwanya azali kokitisela yo emoniseli lokola akitiselaki baye balekaki liboso lia yo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Soki ezalaka ye te, likolo elingaki kopasuka. Mpe ba anzelu bazali kokumisa Nkolo wa bango, mpe bazali kosengela baye bazali na mabele bolimbisi. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Mpe lolenge wana nde tokitiselaki yo kurani na lokota ya arabo, mpo okebisa yango na mama ya bamboka na baye bazuami zinga zinga na yango, mpe okebisa тропа mokolo mwa bosangani oyo ezali na tembe te. Basusu bakozala na lola mpe basusu bakozala na móto mwa saira (lifelo).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Mpe soki Allah alingaki, nde atia bango bazala umma(1) moko, kasi (Allah) akotisaka nani alingi na ngolu naye. Mpe babubi bakozala na mokonzi te mpe mosungi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Boye bazueli ye bakonzi misusu batiki ye? Kasi Allah azali ye moko mokonzi, mpe azali kopesa bomoyi na bawa, mpe azali na bokoki likolo ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Na manso oyo bokokabwana na yango, Allah nde mokati. Wana azali Allah Nkolo wa ngai, epai naye namipesi, mpe epai naye nde nazongi kotubela.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Mokeli wa likolo na mabele. Asalela bino basi baye bawuti na banzoto na bino moko, mpe asaleli bino banyama mibale mibale, na nzela wana nde bokoma ebele. Azali na mokokani te oyo akokani naye, mpe azali oyo ayokaka mpe amonaka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Bafungola ya bomengo ya likolo na ya mabele bizali bia ye, apesaka bozui na oyo alingi mpe akutolaka na oyo alingi. Azali na boyebi ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Mpe bakabwanaki te sé sima ya koyela bango boyebi, na maye oyo ekweyaki kati kati na bango. Soki ezalaki te ete liloba lisila kokomama epai ya Nkolo wa yo na tango oyo eyebani, alingaki kokata kati kati na bango. Mpe ya soló, baye bakitanaki buku sima na bango, bazali na tembe makasi bazali komiyeba te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Benga na lolenge wana tikala na nzela ya semba lolenge batinda yo, kolanda bamposa na bango te, mpe loba; nandimi na maye Allah akitisa kati na buku, mpe natindamaki тропа kokata na bosembo kati kati na bino. Allah azali Nkolo wa biso тре Nkolo wa bino, tozali na misala mia biso тре bozali na oyo ya bino, likambo moko ekoki kosalema te kati kati na biso na bino. Allah akosangisaka biso, тре epai naye nde bozongi (bokozalaka)
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Mpe тропа baye bazali kolobaloba na ntina ya Allah osima ya bobengi bwaye, manso bazali kosala mazali na ntina te epai ya Nkolo na bango, kanda ekokitelaka bango mpe bakozalaka na etumbu makasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Oyo akolinga kosala (bilanga) ya mokolo mwa suka, tokobakisela ye elanga, mpe oyo akolinga kosala awa na mokili, tokopesa ye yango (na bilengi), kasi akozuaka eloko te o mokolo mwa suka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. To boye, bazali na basangisi basusu baye balingi kosalela bango mibeko misusu mia lingomba miye Allah apesi ndingisa te? Soki тропа mobeko oyo ezali kati na bango te, nde likambo lisilaki kokatama kati na bango. Kasi babubi bakozalaka na etumbu makasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Wana nde sango elamu eye Allah azali kopesa epai ya bawumbu naye baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, loba: Nakosenga bino yango lifuta te, ezali sé bolingo bwa bondeko, mpe oyo akosala bolamu, tokobakisela ye ya kitoko koleka. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda melesi,
Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. To bazali koloba ete: Babukeli Allah lokuta, mpe soki Allah alingi akokanga motema nayo, mpe Allah azali kolimwisa lokuta na liloba mpe azali kondimisa bosembo. Ya soló, ayebi mabombami ya mitema.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Ye nde andimelaka bawumbu naye baye bazali kosenga tubela, mpe azali molimbisi ya masumu, mpe ayebaka maye bosalaka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Soki Allah apesaka bozui na bawumbu baye banso, balingaki kosala na yango mabe kati na mokili, kasi akitisaka yango ndenge alingi (mokémoké), ayebi ya solo, bawumbu baye mpe amonaka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Ye nde akitisaka mbula sima ya bango kozanga elikia mpe apanzaka ngolu naye. Ye nde azali mokonzi atonda lokumu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Mpe o kati ya bilembo bia ye, bokelami ya likolo na mabele, na maye manso mazali na bomoyi kati na yango. Mpe azali na bokoki ya kosangisa miango soki alingi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Мре bokokoka kokima nguya ya Allah awa na mabele te, тре boko žala na mosungi te тре mobateli te na kotika Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Manso maye bopesamaki (ya malamu) ezali sé тропа bosepeli тропа bomoyi bwa lelo, kasi oyo ezali epai ya Allah ezali malamu mpe ewumelaka тропа baye bandima mpe bazali komipesa epai ya Nkolo wa bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Mpe baye bazali koyanola na bobengami bwa Nkolo wa bango, mpe batelemisi losambo mpe bazali kotunana (yambo ya kosala likambo) kati kati na bango, mpe bazali kobimisa ndambo ya maye topesaki bango,
Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Kasi lifuta ya oyo asali mabe ezali sé mabe lokola yango, na oyo akolimbisa mpe sima abongisi, Allah akofuta ye. Ya soló, ye alingaka babubi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Mpe okomona bakotiyaka bango liboso lia lifelo bazali kobanga, bazali koyeba lisusu te wapi bakokendeke, bakomi kotala malembe na liso lioko, mpe bandimi bakolobaka: Ya soló, bazangi bazali baye bamizangisi bango moko elongo na mabota ma bango mokolo ya suka. Ya solo, babubi bakozalaka na etumbu ya libela.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Boyamba mbela ya Nkolo na bino yambo ete eyela bino na mokolo oyo Allah akozongisa yango sima te. Mokolo yango kowumela ekozala te mpe bokokoka kowangana (masumu na bino) te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Soki babaluki, totindi yo te mpo ozala mokengeli na bango, ezali тропа yo kaka sé okomisa sango. Mpe biso soki topesi moto bolamu na biso asepeli na yango, mpe soki mpasi ezui bango тропа maye maboko ma bangomoko masalaki, ya soló moto azanga botondi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Bokonzi ya likolo na ya nsé ezali ya Allah. Akelaka maye oyo alingi apesaka likabo ya mwana mwasi na moto oyo alingi, mpe apesaka mwana mobali na oyo alingi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. To abimisaka bango mapasa mobali na mwasi, mpe azangisaka kobota na oyo alingi. Ya sólo ye azali moyebi mpe akoka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Mpe ezali na moto moko te oyo Allah asololi naye polele sé ezala emoniseli, to ezala sima ya eloko ezipi ye, to mpe atindela ye motindami (anzelu) mpe apesa ye oyo alingi na ndingisa naye (Allah). Ya sólo aleki na likolo mpe atonda bwanya.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Na boye nde tomoniselaki yo (kurani) molimo na motindo na biso. Ozalaki na boyebi moko te ya buku, mpe ya bondimi te, kasi tosalaki yango ezala mwinda mpo tokamba na yango nani tolingi o kati ya bawumbu na biso. Mpe ya sólo, ozali kokamba na nzela ya semba.