caseriqMeaning search in the Qur'an

Surah Az-Zumar الزمر

75 verses · Mecca · revelation order 59

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ تَنزِيلُ ٱلْكِتَٰبِ مِنَ ٱللَّهِ ٱلْعَزِيزِ ٱلْحَكِيمِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo1. Bokiti bwa buku bowutaki epai ya Allah wa bokasi atonda bwanya.

See all translations of this verse →

إِنَّآ أَنزَلْنَآ إِلَيْكَ ٱلْكِتَٰبَ بِٱلْحَقِّ فَٱعْبُدِ ٱللَّهَ مُخْلِصًا لَّهُ ٱلدِّينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo2. Ya soló, tokitiselaki yo buku na bosôló mpenza, bondela Allah na bolandi lingomba lia bosôló lia ye.

See all translations of this verse →

أَلَا لِلَّهِ ٱلدِّينُ ٱلْخَالِصُ وَٱلَّذِينَ ٱتَّخَذُوا۟ مِن دُونِهِۦٓ أَوْلِيَآءَ مَا نَعْبُدُهُمْ إِلَّا لِيُقَرِّبُونَآ إِلَى ٱللَّهِ زُلْفَىٰٓ إِنَّ ٱللَّهَ يَحْكُمُ بَيْنَهُمْ فِى مَا هُمْ فِيهِ يَخْتَلِفُونَ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهْدِى مَنْ هُوَ كَٰذِبٌ كَفَّارٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo3. Naye moko Allah nde mabondeli esengeli esalama kasi baye bazali kolanda basusu batiki ye, (balobi): Tozali kokumisa bango sé mpo bapusa biso pene na Allah, ya soló, Allah akokataka kati kati na bango тропа maye bazalaki kokesene na yango, ya sólo Allah akambaka moto oyo ya lokuta te mpe mopengwi te.

See all translations of this verse →

لَّوْ أَرَادَ ٱللَّهُ أَن يَتَّخِذَ وَلَدًا لَّٱصْطَفَىٰ مِمَّا يَخْلُقُ مَا يَشَآءُ سُبْحَٰنَهُۥ هُوَ ٱللَّهُ ٱلْوَٰحِدُ ٱلْقَهَّارُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Soki Allah alingaki kozala na mwana, nde aponaki oyo alingi okati ya maye akela, lokumu naye, azali Allah wa bomoko mpe atonda bokasi.

See all translations of this verse →

خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضَ بِٱلْحَقِّ يُكَوِّرُ ٱلَّيْلَ عَلَى ٱلنَّهَارِ وَيُكَوِّرُ ٱلنَّهَارَ عَلَى ٱلَّيْلِ وَسَخَّرَ ٱلشَّمْسَ وَٱلْقَمَرَ كُلٌّ يَجْرِى لِأَجَلٍ مُّسَمًّى أَلَا هُوَ ٱلْعَزِيزُ ٱلْغَفَّٰرُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo5. Akelaki likolo na mabele na bosôló, azali kobalola butu na mokolo mpe kobalola mokolo na butu, mpe atiye moyi na sanza, nyoso bizali kotambola na mibeko mia (ye) azali wa bokasi atonda bolimbisi.

See all translations of this verse →

خَلَقَكُم مِّن نَّفْسٍ وَٰحِدَةٍ ثُمَّ جَعَلَ مِنْهَا زَوْجَهَا وَأَنزَلَ لَكُم مِّنَ ٱلْأَنْعَٰمِ ثَمَٰنِيَةَ أَزْوَٰجٍ يَخْلُقُكُمْ فِى بُطُونِ أُمَّهَٰتِكُمْ خَلْقًا مِّنۢ بَعْدِ خَلْقٍ فِى ظُلُمَٰتٍ ثَلَٰثٍ ذَٰلِكُمُ ٱللَّهُ رَبُّكُمْ لَهُ ٱلْمُلْكُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ فَأَنَّىٰ تُصْرَفُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Akeli bino kowuta na molimo moko, sima abimisi mwasi naye, mpe akitiselaki bino bolongani mwambe ya An‘âm(1), azali kokela bino na mabumu ya bamama na bino bokeli sima ya bokeli o kati ya milili misato. Ye wana Allah Nkolo na bino. Bokonzi bonso bozali bwa ye, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló bobele sé ye, boye ndenge nini bokopesa mokongo na lingomba naye?

See all translations of this verse →

إِن تَكْفُرُوا۟ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَنِىٌّ عَنكُمْ وَلَا يَرْضَىٰ لِعِبَادِهِ ٱلْكُفْرَ وَإِن تَشْكُرُوا۟ يَرْضَهُ لَكُمْ وَلَا تَزِرُ وَازِرَةٌ وِزْرَ أُخْرَىٰ ثُمَّ إِلَىٰ رَبِّكُم مَّرْجِعُكُمْ فَيُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمْ تَعْمَلُونَ إِنَّهُۥ عَلِيمٌۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Soki boboyi kondima, kasi boyeba ete ya soló Allah atonda bomengo koleka bino. Mpe azali koyina bopengwi epai na bawumbu naye, mpe soki botondi ye matondi akosepela na bino, moko te akomema mokumba ya moninga, na sima epai ya Nkolo wa bino nde bokozongisama mpe akoyebisa bino maye bosalaki. Ya solo azali moyebi ya maye mabombama о mitema.

See all translations of this verse →

وَإِذَا مَسَّ ٱلْإِنسَٰنَ ضُرٌّ دَعَا رَبَّهُۥ مُنِيبًا إِلَيْهِ ثُمَّ إِذَا خَوَّلَهُۥ نِعْمَةً مِّنْهُ نَسِىَ مَا كَانَ يَدْعُوٓا۟ إِلَيْهِ مِن قَبْلُ وَجَعَلَ لِلَّهِ أَندَادًا لِّيُضِلَّ عَن سَبِيلِهِۦ قُلْ تَمَتَّعْ بِكُفْرِكَ قَلِيلًا إِنَّكَ مِنْ أَصْحَٰبِ ٱلنَّارِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Mpe soki mabe ezui moto, abeleli Nkolo wa ye (na limemiya nyoso), mpe amizongisi epai naye, sima soki asaleli ye bolamu, abosani nyoso oyo azalaki kobelela ye liboso, mpe azueli Allah basangisi mpo abungisa (bato) nzela naye, loba: Sepela na bopengwi nayo moke, ya soló ozali okati ya bato ya moto.

See all translations of this verse →

أَمَّنْ هُوَ قَٰنِتٌ ءَانَآءَ ٱلَّيْلِ سَاجِدًا وَقَآئِمًا يَحْذَرُ ٱلْـَٔاخِرَةَ وَيَرْجُوا۟ رَحْمَةَ رَبِّهِۦ قُلْ هَلْ يَسْتَوِى ٱلَّذِينَ يَعْلَمُونَ وَٱلَّذِينَ لَا يَعْلَمُونَ إِنَّمَا يَتَذَكَّرُ أُو۟لُوا۟ ٱلْأَلْبَٰبِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Boye oyo azali kotosa, kotelema na butu, kogumbama, azali komikebisa тропа mokolo ya suka, тре azali kolikia na ngolu ya Nkolo wa ye, loba: Boye ba oyo bayebi na ba oyo bayebi te bakokani? Ya sólo, sé bato ya mayele nde bazali kokanisa.

See all translations of this verse →

قُلْ يَٰعِبَادِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوا۟ ٱتَّقُوا۟ رَبَّكُمْ لِلَّذِينَ أَحْسَنُوا۟ فِى هَٰذِهِ ٱلدُّنْيَا حَسَنَةٌ وَأَرْضُ ٱللَّهِ وَٰسِعَةٌ إِنَّمَا يُوَفَّى ٱلصَّٰبِرُونَ أَجْرَهُم بِغَيْرِ حِسَابٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Loba: Oh bawumbu na ngai baye bandimi! Bobanga Nkolo na bino, baye basalaki malamu na nsé, bakozala na lifuta ya malamu, mpe mabele ya Allah ezali monene, ya solo akofuta bakangi mitema lifuta ya suka te.

See all translations of this verse →

قُلْ إِنِّىٓ أُمِرْتُ أَنْ أَعْبُدَ ٱللَّهَ مُخْلِصًا لَّهُ ٱلدِّينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Loba: Ya sólo, natindamaki тропа kokumisa Allah wa bomoko mpe bolandi lingomba lia bosóló.

See all translations of this verse →

وَأُمِرْتُ لِأَنْ أَكُونَ أَوَّلَ ٱلْمُسْلِمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Mpe natindamaki mpo nazala wa yambo o kati ya baye bamisokie. (okati ya bandimi)

See all translations of this verse →

قُلْ إِنِّىٓ أَخَافُ إِنْ عَصَيْتُ رَبِّى عَذَابَ يَوْمٍ عَظِيمٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Loba: Ya sólo, nazali kobanga soki nazangi botosi epai ya Nkolo wa ngai, noki te nakozua etumbu enene o mokolo mwa suka.

See all translations of this verse →

قُلِ ٱللَّهَ أَعْبُدُ مُخْلِصًا لَّهُۥ دِينِى

Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Loba: Nazali kobondela Allah mpe mabondeli na ngai nionso ezali кака тропа ye.

See all translations of this verse →

فَٱعْبُدُوا۟ مَا شِئْتُم مِّن دُونِهِۦ قُلْ إِنَّ ٱلْخَٰسِرِينَ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓا۟ أَنفُسَهُمْ وَأَهْلِيهِمْ يَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ أَلَا ذَٰلِكَ هُوَ ٱلْخُسْرَانُ ٱلْمُبِينُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Bobondela basusu baye bolingi na botiki ye (Allah), loba: Ya soló, baye bamisalaki mabe bango moko о mokolo mwa suka bango nde bazangi, elongo na mabota ma bango, wana ekozala bozangi bonene.

See all translations of this verse →

لَهُم مِّن فَوْقِهِمْ ظُلَلٌ مِّنَ ٱلنَّارِ وَمِن تَحْتِهِمْ ظُلَلٌ ذَٰلِكَ يُخَوِّفُ ٱللَّهُ بِهِۦ عِبَادَهُۥ يَٰعِبَادِ فَٱتَّقُونِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Maboke ya moto ekozalaka likolo na bango тре nanse na bango lokola, lolenge wana nde Allah abangisaka bawumbu naye, eh bawumbu na ngai! Bobanga ngai.

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِينَ ٱجْتَنَبُوا۟ ٱلطَّٰغُوتَ أَن يَعْبُدُوهَا وَأَنَابُوٓا۟ إِلَى ٱللَّهِ لَهُمُ ٱلْبُشْرَىٰ فَبَشِّرْ عِبَادِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Mpe baye bamitiaki mosika na batomboki baboyi kobondela bango, mpe bazongi epai ya Allah, bazali na sango elamu. Mpe pesa sango elamu epai ya bawumbu na ngai,

See all translations of this verse →

ٱلَّذِينَ يَسْتَمِعُونَ ٱلْقَوْلَ فَيَتَّبِعُونَ أَحْسَنَهُۥٓ أُو۟لَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ هَدَىٰهُمُ ٱللَّهُ وَأُو۟لَٰٓئِكَ هُمْ أُو۟لُوا۟ ٱلْأَلْبَٰبِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Baye bazali koyoka liloba mpe balandi ya malamu na yango, bango nde Allah akamba mpe bango nde baleki kokanisa.

See all translations of this verse →

أَفَمَنْ حَقَّ عَلَيْهِ كَلِمَةُ ٱلْعَذَابِ أَفَأَنتَ تُنقِذُ مَن فِى ٱلنَّارِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Mpe тропа oyo ayebani ete akozua etumbu, boye yo nde ozali na bokoki ya kobikisa ye na moto?

See all translations of this verse →

لَٰكِنِ ٱلَّذِينَ ٱتَّقَوْا۟ رَبَّهُمْ لَهُمْ غُرَفٌ مِّن فَوْقِهَا غُرَفٌ مَّبْنِيَّةٌ تَجْرِى مِن تَحْتِهَا ٱلْأَنْهَٰرُ وَعْدَ ٱللَّهِ لَا يُخْلِفُ ٱللَّهُ ٱلْمِيعَادَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Kasi baye bazali kobanga Nkolo wa bango, bakozalaka na bandako bitongami likolo ya bandako bizali koleka o nsé na yango mingala, wana nde elaka ya Allah. Allah azangisaka elaka naye te.

See all translations of this verse →

أَلَمْ تَرَ أَنَّ ٱللَّهَ أَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءً فَسَلَكَهُۥ يَنَٰبِيعَ فِى ٱلْأَرْضِ ثُمَّ يُخْرِجُ بِهِۦ زَرْعًا مُّخْتَلِفًا أَلْوَٰنُهُۥ ثُمَّ يَهِيجُ فَتَرَىٰهُ مُصْفَرًّا ثُمَّ يَجْعَلُهُۥ حُطَٰمًا إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَذِكْرَىٰ لِأُو۟لِى ٱلْأَلْبَٰبِ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Boye ozali kornona te ete Allah akitisaka mayi kowuta о likolo mpe alekiseli yango miluka kati na mabele, sima na yango azali kobimisa kowuta na yango bozui ya lolenge nyoso na balangi na yango? Sima ekomi na langi ya mayi ya mosaka. Mpe sima akutoli yango, wana ezali ya soló elembo ya bokundoli тропа baye bazali kokanisa.

See all translations of this verse →

أَفَمَن شَرَحَ ٱللَّهُ صَدْرَهُۥ لِلْإِسْلَٰمِ فَهُوَ عَلَىٰ نُورٍ مِّن رَّبِّهِۦ فَوَيْلٌ لِّلْقَٰسِيَةِ قُلُوبُهُم مِّن ذِكْرِ ٱللَّهِ أُو۟لَٰٓئِكَ فِى ضَلَٰلٍ مُّبِينٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Boye, oyo Allah afungoli motema naye тропа isalamu, azali na bongengi kowuta epai ya Nkolo naye. Kasi mabe na baye mitema mia bango mizali makasi тропа maloba ya Allah? Bango wana nde bazali na libunga ya polele.

See all translations of this verse →

ٱللَّهُ نَزَّلَ أَحْسَنَ ٱلْحَدِيثِ كِتَٰبًا مُّتَشَٰبِهًا مَّثَانِىَ تَقْشَعِرُّ مِنْهُ جُلُودُ ٱلَّذِينَ يَخْشَوْنَ رَبَّهُمْ ثُمَّ تَلِينُ جُلُودُهُمْ وَقُلُوبُهُمْ إِلَىٰ ذِكْرِ ٱللَّهِ ذَٰلِكَ هُدَى ٱللَّهِ يَهْدِى بِهِۦ مَن يَشَآءُ وَمَن يُضْلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِنْ هَادٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Allah asila kokitisa makomi kitoko koleka, mikokana, mpe mizali kozongelama. Bamposo ya baye bazali kobanga Nkolo wa bango elengaka, mpe sima bamposo na bango mpe mitema mia bango ekozala na kimia na bokundoli Allah тропа yango, wana ezali bokambi bwa Allah boye akambaka yango na oyo alingi, mpe oyo Allah abungisi ye akozuaka mokambi te.

See all translations of this verse →

أَفَمَن يَتَّقِى بِوَجْهِهِۦ سُوٓءَ ٱلْعَذَابِ يَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ وَقِيلَ لِلظَّٰلِمِينَ ذُوقُوا۟ مَا كُنتُمْ تَكْسِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Mpe boye тропа oyo bakobatela elongi naye na etumbu ya makasi ya mokolo mwa suka, тре bakolobaka na babubi bomeka maye bozalaki kosala.

See all translations of this verse →

كَذَّبَ ٱلَّذِينَ مِن قَبْلِهِمْ فَأَتَىٰهُمُ ٱلْعَذَابُ مِنْ حَيْثُ لَا يَشْعُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Baye baleka liboso lia bango bandimelaka bantoma te, mpe apesaki bango etumbu eye bayebaki esika ewutaki te.

See all translations of this verse →

فَأَذَاقَهُمُ ٱللَّهُ ٱلْخِزْىَ فِى ٱلْحَيَوٰةِ ٱلدُّنْيَا وَلَعَذَابُ ٱلْـَٔاخِرَةِ أَكْبَرُ لَوْ كَانُوا۟ يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Mpe Allah amekisaki bango etumbu ya mokili, kasi etumbu ya mokolo ya suka ezali monene soki bazalaki koyeba.

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ ضَرَبْنَا لِلنَّاسِ فِى هَٰذَا ٱلْقُرْءَانِ مِن كُلِّ مَثَلٍ لَّعَلَّهُمْ يَتَذَكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Mpe tosilaki kobetela bato kati na kurani eye bandakisa inso, mpo bakoka kokanisa.

See all translations of this verse →

قُرْءَانًا عَرَبِيًّا غَيْرَ ذِى عِوَجٍ لَّعَلَّهُمْ يَتَّقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. (Tokitisaki) kurani na lokota ya arabo, mpe ezali na nkokoso te, mpo bakoka kobanga.

See all translations of this verse →

ضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلًا رَّجُلًا فِيهِ شُرَكَآءُ مُتَشَٰكِسُونَ وَرَجُلًا سَلَمًا لِّرَجُلٍ هَلْ يَسْتَوِيَانِ مَثَلًا ٱلْحَمْدُ لِلَّهِ بَلْ أَكْثَرُهُمْ لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Allah apeși lisese soló тропа mobali токо azali na basangani ebele, bazali kowelana тропа ye, mpe mobali mosusu azali sé na moto токо, boye bakokani na lisese? Matondo na Allah, nzoka nde ebele na bango bazali koyeba te.

See all translations of this verse →

إِنَّكَ مَيِّتٌ وَإِنَّهُم مَّيِّتُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Ya sólo, yo okokufaka, mpe ya sólo bango bakokufaka lokola.

See all translations of this verse →

ثُمَّ إِنَّكُمْ يَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ عِندَ رَبِّكُمْ تَخْتَصِمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Sima ya soló bokosamba о mokolo ya suka liboso ya Nkolo na bino.

See all translations of this verse →

فَمَنْ أَظْلَمُ مِمَّن كَذَبَ عَلَى ٱللَّهِ وَكَذَّبَ بِٱلصِّدْقِ إِذْ جَآءَهُۥٓ أَلَيْسَ فِى جَهَنَّمَ مَثْوًى لِّلْكَٰفِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo32. Мре nani azali mabe koleka moto oyo abukeli Allah lokuta mpe aboyi bosembo tango eyeli ye. Na yango; lifelo te nde esika ya bapengwi?

See all translations of this verse →

وَٱلَّذِى جَآءَ بِٱلصِّدْقِ وَصَدَّقَ بِهِۦٓ أُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْمُتَّقُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo33. Kasi oyo akoya na bosôló, mpe oyo akondimela yango, bango nde babangi.

See all translations of this verse →

لَهُم مَّا يَشَآءُونَ عِندَ رَبِّهِمْ ذَٰلِكَ جَزَآءُ ٱلْمُحْسِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo34. Bakozuaka maye bakolingaka epai ya Nkolo wa bango. Wana nde ekozalaka lifuta lia babongisi.

See all translations of this verse →

لِيُكَفِّرَ ٱللَّهُ عَنْهُمْ أَسْوَأَ ٱلَّذِى عَمِلُوا۟ وَيَجْزِيَهُمْ أَجْرَهُم بِأَحْسَنِ ٱلَّذِى كَانُوا۟ يَعْمَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Mpe mpo Allah alongolela bango mbeba iye basalaki, mpe mpo afuta bango lifuta lilamu koleka maye basalaki.

See all translations of this verse →

أَلَيْسَ ٱللَّهُ بِكَافٍ عَبْدَهُۥ وَيُخَوِّفُونَكَ بِٱلَّذِينَ مِن دُونِهِۦ وَمَن يُضْلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِنْ هَادٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Allah akoki te тропа kobatela mowumbu naye (тропа kobatela ye mpe kopesa ye lisalisi)? Mpe bazali kobangisa yo na baye bazali ye te (Allah), mpe oyo Allah abungisi, akozua bokambi te.

See all translations of this verse →

وَمَن يَهْدِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِن مُّضِلٍّ أَلَيْسَ ٱللَّهُ بِعَزِيزٍ ذِى ٱنتِقَامٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Mpe oyo Allah akambi ye, akozua mobungisi te. Boye ezali Allah te nde atonda bokasi mpe Nkolo bokonzi ya kopesa etumbu?

See all translations of this verse →

وَلَئِن سَأَلْتَهُم مَّنْ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضَ لَيَقُولُنَّ ٱللَّهُ قُلْ أَفَرَءَيْتُم مَّا تَدْعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ إِنْ أَرَادَنِىَ ٱللَّهُ بِضُرٍّ هَلْ هُنَّ كَٰشِفَٰتُ ضُرِّهِۦٓ أَوْ أَرَادَنِى بِرَحْمَةٍ هَلْ هُنَّ مُمْسِكَٰتُ رَحْمَتِهِۦ قُلْ حَسْبِىَ ٱللَّهُ عَلَيْهِ يَتَوَكَّلُ ٱلْمُتَوَكِّلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Мре soki otuni bango; nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: Ya solo, ezali Allah. Loba: Bomoni ndenge nini тропа oyo bozali kokumisa botiki Allah? Soki Allah alingeli ngai mabe, boye bakolongolela ngai yango? То soki alingeli ngai bolamu, bango nde bakopekisa bolamu bona? Loba: Allah akoki ngai. Epai naye nde bamipesa baye balingi lisungi.

See all translations of this verse →

قُلْ يَٰقَوْمِ ٱعْمَلُوا۟ عَلَىٰ مَكَانَتِكُمْ إِنِّى عَٰمِلٌ فَسَوْفَ تَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Loba: Eh bato ba ngai! Bosala oyo bokolinga kosala, ya sólo ngai nazali kosala na lolenge na ngai, kasi bokoyebaka kala te,

See all translations of this verse →

مَن يَأْتِيهِ عَذَابٌ يُخْزِيهِ وَيَحِلُّ عَلَيْهِ عَذَابٌ مُّقِيمٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo40. Oyo etumbu ekoyelaka ye, (na mokili) akomona yango, mpe akozua yango o mokolo mwa suka na bowumeli.

See all translations of this verse →

إِنَّآ أَنزَلْنَا عَلَيْكَ ٱلْكِتَٰبَ لِلنَّاسِ بِٱلْحَقِّ فَمَنِ ٱهْتَدَىٰ فَلِنَفْسِهِۦ وَمَن ضَلَّ فَإِنَّمَا يَضِلُّ عَلَيْهَا وَمَآ أَنتَ عَلَيْهِم بِوَكِيلٍ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. Ya soló, tokitiselaki yo (Muhammad) buku тропа bato na bosembo, oyo akomikamba ezali тропа ye moko, mpe oyo akobunga na yango, amibungisi sé ye moko, mpe ozali mokonzi na bango te.

See all translations of this verse →

ٱللَّهُ يَتَوَفَّى ٱلْأَنفُسَ حِينَ مَوْتِهَا وَٱلَّتِى لَمْ تَمُتْ فِى مَنَامِهَا فَيُمْسِكُ ٱلَّتِى قَضَىٰ عَلَيْهَا ٱلْمَوْتَ وَيُرْسِلُ ٱلْأُخْرَىٰٓ إِلَىٰٓ أَجَلٍ مُّسَمًّى إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَٰتٍ لِّقَوْمٍ يَتَفَكَّرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Allah ayambaka milimo tango ya liwa na bango, mpe na ba oyo bakufi te okati na bampongi, asimbaka baye asila kokatela liwa mpe azongisaka basusu kino mikolo na bango ekoka. Ya sólo, wana ezali bilembo mpo bato bakanisa.

See all translations of this verse →

أَمِ ٱتَّخَذُوا۟ مِن دُونِ ٱللَّهِ شُفَعَآءَ قُلْ أَوَلَوْ كَانُوا۟ لَا يَمْلِكُونَ شَيْـًٔا وَلَا يَعْقِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Bazui balobeli liboso ya Allah? Loba: Ata soki balobeli wana bazali na eloko te, to mpe bazali na mayele te?

See all translations of this verse →

قُل لِّلَّهِ ٱلشَّفَٰعَةُ جَمِيعًا لَّهُۥ مُلْكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ ثُمَّ إِلَيْهِ تُرْجَعُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Loba: Bolobeli nyoso ezali ya Allah, bokonzi ya likolo na ya nsé ezali yaye, sima epai naye nde bokozongisama.

See all translations of this verse →

وَإِذَا ذُكِرَ ٱللَّهُ وَحْدَهُ ٱشْمَأَزَّتْ قُلُوبُ ٱلَّذِينَ لَا يُؤْمِنُونَ بِٱلْـَٔاخِرَةِ وَإِذَا ذُكِرَ ٱلَّذِينَ مِن دُونِهِۦٓ إِذَا هُمْ يَسْتَبْشِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. Mpe soki (nkombo) ya Allah etangemi na bomoko bwa ye, mitema ya baye bazali kondima na mokolo mwa suka te mibebi mpe soki batangi bankombo ya binzambe nzambe okomona bango batondi na esengo.

See all translations of this verse →

قُلِ ٱللَّهُمَّ فَاطِرَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ عَٰلِمَ ٱلْغَيْبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ أَنتَ تَحْكُمُ بَيْنَ عِبَادِكَ فِى مَا كَانُوا۟ فِيهِ يَخْتَلِفُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo46. Loba: Oh Allah! mokeli wa likolo na mabele, moyebi wa maye mabombami na maye mazali polele, yo nde okokataka kati kati ya bawumbu bayo тропа maye bakeseneki na yango.

See all translations of this verse →

وَلَوْ أَنَّ لِلَّذِينَ ظَلَمُوا۟ مَا فِى ٱلْأَرْضِ جَمِيعًا وَمِثْلَهُۥ مَعَهُۥ لَٱفْتَدَوْا۟ بِهِۦ مِن سُوٓءِ ٱلْعَذَابِ يَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ وَبَدَا لَهُم مِّنَ ٱللَّهِ مَا لَمْ يَكُونُوا۟ يَحْتَسِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. Soki ezalaki ete maye manso mazali na mabele mapesama epai ya basangisi ete basomba na yango etumbu o mokolo ya suka, mbele esalisi bango na eloko te. Ata soki bapesi yango mbala mibale, mpe maye bazalaki kokanisa yango te ebimi polele liboso ya Allah.

See all translations of this verse →

وَبَدَا لَهُمْ سَيِّـَٔاتُ مَا كَسَبُوا۟ وَحَاقَ بِهِم مَّا كَانُوا۟ بِهِۦ يَسْتَهْزِءُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo48. Mpe mabe na bango ebimi polele, mpe bazingami na ntina ya maye bazalaki kotiola.

See all translations of this verse →

فَإِذَا مَسَّ ٱلْإِنسَٰنَ ضُرٌّ دَعَانَا ثُمَّ إِذَا خَوَّلْنَٰهُ نِعْمَةً مِّنَّا قَالَ إِنَّمَآ أُوتِيتُهُۥ عَلَىٰ عِلْمٍۭ بَلْ هِىَ فِتْنَةٌ وَلَٰكِنَّ أَكْثَرَهُمْ لَا يَعْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Mpe soki mpasi ezui moto, abeleli biso, mpe soki topesi ye bolamu, alobi ete: Nazui yango na mayele na ngai. Nzoka nde yango ezali komekama. Kasi ebele na bango bazali koyeba te.

See all translations of this verse →

قَدْ قَالَهَا ٱلَّذِينَ مِن قَبْلِهِمْ فَمَآ أَغْنَىٰ عَنْهُم مَّا كَانُوا۟ يَكْسِبُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. В aye baleka liboso na bango basilaki koloba yango, mpe maye bazuaki esalisaki bango te.

See all translations of this verse →

فَأَصَابَهُمْ سَيِّـَٔاتُ مَا كَسَبُوا۟ وَٱلَّذِينَ ظَلَمُوا۟ مِنْ هَٰٓؤُلَآءِ سَيُصِيبُهُمْ سَيِّـَٔاتُ مَا كَسَبُوا۟ وَمَا هُم بِمُعْجِزِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo51. Mpe mpasi ezuaki bango тропа mabe basalaki. Kasi babubi o kati na ba oyo bakozua mabe na ntina ya maye basalaki mpe bakokoka kolongola yango te.

See all translations of this verse →

أَوَلَمْ يَعْلَمُوٓا۟ أَنَّ ٱللَّهَ يَبْسُطُ ٱلرِّزْقَ لِمَن يَشَآءُ وَيَقْدِرُ إِنَّ فِى ذَٰلِكَ لَـَٔايَٰتٍ لِّقَوْمٍ يُؤْمِنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Boye bazali koyeba te ete ya soló, Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe akutolaka? Wana ezali bilembo mpo bato bakoka kondima.

See all translations of this verse →

قُلْ يَٰعِبَادِىَ ٱلَّذِينَ أَسْرَفُوا۟ عَلَىٰٓ أَنفُسِهِمْ لَا تَقْنَطُوا۟ مِن رَّحْمَةِ ٱللَّهِ إِنَّ ٱللَّهَ يَغْفِرُ ٱلذُّنُوبَ جَمِيعًا إِنَّهُۥ هُوَ ٱلْغَفُورُ ٱلرَّحِيمُ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo53. Loba: Eh bawumbu na nga! Baye basala mabe koleka ndelo, bozanga elikia te тропа ngolu ya Allah, ya sólo Allah alimbisaka masumu manso. Mpo ete ya sólo, ye azali molimbisi atonda mawa.

See all translations of this verse →

وَأَنِيبُوٓا۟ إِلَىٰ رَبِّكُمْ وَأَسْلِمُوا۟ لَهُۥ مِن قَبْلِ أَن يَأْتِيَكُمُ ٱلْعَذَابُ ثُمَّ لَا تُنصَرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo54. Mpe bozonga epai ya Nkolo wa bino na tubela, mpe bomisokia epai naye yambo ete etumbu eyela bino, noki bokozua lisalisi te.

See all translations of this verse →

وَٱتَّبِعُوٓا۟ أَحْسَنَ مَآ أُنزِلَ إِلَيْكُم مِّن رَّبِّكُم مِّن قَبْلِ أَن يَأْتِيَكُمُ ٱلْعَذَابُ بَغْتَةً وَأَنتُمْ لَا تَشْعُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Mpe bolanda ya malamu kati na maye makitelaki bino kowuta epai ya Nkolo wa bino, yambo ete etumbu eyela bino mbalakaka mpe bozali koyeba te.

See all translations of this verse →

أَن تَقُولَ نَفْسٌ يَٰحَسْرَتَىٰ عَلَىٰ مَا فَرَّطتُ فِى جَنۢبِ ٱللَّهِ وَإِن كُنتُ لَمِنَ ٱلسَّٰخِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo56. Yambo molimo eloba ete, mabe na ngai, тропа kozanga botosi epai na Allah, kasi nazalaki ya soló okati ya basakani,

See all translations of this verse →

أَوْ تَقُولَ لَوْ أَنَّ ٱللَّهَ هَدَىٰنِى لَكُنتُ مِنَ ٱلْمُتَّقِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo57. То, aloba ete soki Allah akambaka ngai kasi nalingaki nazala o kati ya babangi,

See all translations of this verse →

أَوْ تَقُولَ حِينَ تَرَى ٱلْعَذَابَ لَوْ أَنَّ لِى كَرَّةً فَأَكُونَ مِنَ ٱلْمُحْسِنِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo58. То, aloba te ete tango akomona etumbu: Oh!, soki nazongi ata na (mokili), mbele nalingaki kozala okati ya babongisi.

See all translations of this verse →

بَلَىٰ قَدْ جَآءَتْكَ ءَايَٰتِى فَكَذَّبْتَ بِهَا وَٱسْتَكْبَرْتَ وَكُنتَ مِنَ ٱلْكَٰفِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Iyo, ya soló mikapo mia ngai mikomelaki yo mpe oboyaki kondima na yango, osalaki lolendo mpe ozalaki okati ya bape ngwi

See all translations of this verse →

وَيَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ تَرَى ٱلَّذِينَ كَذَبُوا۟ عَلَى ٱللَّهِ وُجُوهُهُم مُّسْوَدَّةٌ أَلَيْسَ فِى جَهَنَّمَ مَثْوًى لِّلْمُتَكَبِّرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo60. Mpe o mokolo mwa suka okomona bilongi ya baye baboyaki kondimela Allah bikoyindaka, boye lifelo ekozalaka nde esika ya bato ya lolendo te?

See all translations of this verse →

وَيُنَجِّى ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ٱتَّقَوْا۟ بِمَفَازَتِهِمْ لَا يَمَسُّهُمُ ٱلسُّوٓءُ وَلَا هُمْ يَحْزَنُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo61. Mpe Allah akobikisaka babangi baye basalaki bolamu, ma ekozuaka bango te, mpe bakozalaka na mawa te. (kati na lola)

See all translations of this verse →

ٱللَّهُ خَٰلِقُ كُلِّ شَىْءٍ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَىْءٍ وَكِيلٌ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Allah nde mokeli wa biloko binso, mpe azali Nkolo ya nionso.

See all translations of this verse →

لَّهُۥ مَقَالِيدُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلْأَرْضِ وَٱلَّذِينَ كَفَرُوا۟ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ أُو۟لَٰٓئِكَ هُمُ ٱلْخَٰسِرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo63. Azali na bafungola ya likolo na mabele, mpe baye baza kopengwa na mikapo mia Allah, bango nde bazangi.

See all translations of this verse →

قُلْ أَفَغَيْرَ ٱللَّهِ تَأْمُرُوٓنِّىٓ أَعْبُدُ أَيُّهَا ٱلْجَٰهِلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Loba: Boye bozali kotinda ngai nabondela nzambe mosusu elongo na Allah? Oh! Bino baye bozanga koyeba.

See all translations of this verse →

وَلَقَدْ أُوحِىَ إِلَيْكَ وَإِلَى ٱلَّذِينَ مِن قَبْلِكَ لَئِنْ أَشْرَكْتَ لَيَحْبَطَنَّ عَمَلُكَ وَلَتَكُونَنَّ مِنَ ٱلْخَٰسِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo65. Ya soló, emoniseli esilaki kokita epai nayo mpe epai na baye baleka liboso nayo ete soki omeki kosangisa Allah, mosala nayo nyoso ekobeba, mpe okozala elongo na bazangi.

See all translations of this verse →

بَلِ ٱللَّهَ فَٱعْبُدْ وَكُن مِّنَ ٱلشَّٰكِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo66. Kasi bondela Allah, mpe zala okati ya baye bazali kotondo ye.

See all translations of this verse →

وَمَا قَدَرُوا۟ ٱللَّهَ حَقَّ قَدْرِهِۦ وَٱلْأَرْضُ جَمِيعًا قَبْضَتُهُۥ يَوْمَ ٱلْقِيَٰمَةِ وَٱلسَّمَٰوَٰتُ مَطْوِيَّٰتٌۢ بِيَمِينِهِۦ سُبْحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشْرِكُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo67. Mpe bapesi Allah esika naye te ndenge esengeli, mpe mabele nyoso akokanga yango na loboko, mpe likolo akongumba yango na loboko naye ya mobali na mokolo ya suka. Nkembo naye aleki likolo na maye bazali kosangisa ye na yango.

See all translations of this verse →

وَنُفِخَ فِى ٱلصُّورِ فَصَعِقَ مَن فِى ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَن فِى ٱلْأَرْضِ إِلَّا مَن شَآءَ ٱللَّهُ ثُمَّ نُفِخَ فِيهِ أُخْرَىٰ فَإِذَا هُمْ قِيَامٌ يَنظُرُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo68. Mpe bakobeta kelelo, mpe baye banso bazali na likolo mpe na nsé bakokufa, longola sé oyo Allah akolinga, sima babeti lisusu kelelo, nde bato banso basekwi bazali kotala.

See all translations of this verse →

وَأَشْرَقَتِ ٱلْأَرْضُ بِنُورِ رَبِّهَا وَوُضِعَ ٱلْكِتَٰبُ وَجِا۟ىٓءَ بِٱلنَّبِيِّـۧنَ وَٱلشُّهَدَآءِ وَقُضِىَ بَيْنَهُم بِٱلْحَقِّ وَهُمْ لَا يُظْلَمُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo69. Mpe mabele makotondaka na bongengi bwa Nkolo na yango, mpe bakotiyaka buku (ya misala nyoso oyo moto asalaki), mpe bakoyaka na bantoma na banzeneneke, mpe bakokataka kati kati na bango na bosôló, mpe bango bakobubamaka te.

See all translations of this verse →

وَوُفِّيَتْ كُلُّ نَفْسٍ مَّا عَمِلَتْ وَهُوَ أَعْلَمُ بِمَا يَفْعَلُونَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo70. Mpe molimo (moto) nyoso akozuaka sé mbano ya maye asalaki, mpe (Allah) ayebi malamu koleka maye bazalaki kosala.

See all translations of this verse →

وَسِيقَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓا۟ إِلَىٰ جَهَنَّمَ زُمَرًا حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءُوهَا فُتِحَتْ أَبْوَٰبُهَا وَقَالَ لَهُمْ خَزَنَتُهَآ أَلَمْ يَأْتِكُمْ رُسُلٌ مِّنكُمْ يَتْلُونَ عَلَيْكُمْ ءَايَٰتِ رَبِّكُمْ وَيُنذِرُونَكُمْ لِقَآءَ يَوْمِكُمْ هَٰذَا قَالُوا۟ بَلَىٰ وَلَٰكِنْ حَقَّتْ كَلِمَةُ ٱلْعَذَابِ عَلَى ٱلْكَٰفِرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo71. Mpe тропа baye bapengwaki, bakomema bango lisanga okati na lifelo, soki bakomi, bizipeli na yango bikofungwama, mpe bakengeli na yango bakoloba na bango: Boye bayelaki bino batindami (na bakebisi) kowuta na bino moko te mpo batangela bino mikapo mia Nkolo wa bino mpe bakebisa bino тропа elaka ya mokolo mwa bino ya lelo? Bakoyanolaka: Iyo; kasi ya soló elaka ya etumbu ekokisami likolo ya bapengwi.

See all translations of this verse →

قِيلَ ٱدْخُلُوٓا۟ أَبْوَٰبَ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَا فَبِئْسَ مَثْوَى ٱلْمُتَكَبِّرِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo72. Bakoyebisaka bango: Bokota na minoko ya moto, bokozala libela okati na yango, esika kani ya mabe wana тропа bato ya lolendo!

See all translations of this verse →

وَسِيقَ ٱلَّذِينَ ٱتَّقَوْا۟ رَبَّهُمْ إِلَى ٱلْجَنَّةِ زُمَرًا حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءُوهَا وَفُتِحَتْ أَبْوَٰبُهَا وَقَالَ لَهُمْ خَزَنَتُهَا سَلَٰمٌ عَلَيْكُمْ طِبْتُمْ فَٱدْخُلُوهَا خَٰلِدِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo73. Mpe bakomema baye babangaki Nkolo wa bango lisanga okati ya lola, soki bakomi, bakofungolelaka bango bizipeli bia yango, mpe bakengeli na yango bakolobaka na bango: Kimia ezala likolo na bino, bozalaki malamu, bokota mpe bovanda libela kati na yango.

See all translations of this verse →

وَقَالُوا۟ ٱلْحَمْدُ لِلَّهِ ٱلَّذِى صَدَقَنَا وَعْدَهُۥ وَأَوْرَثَنَا ٱلْأَرْضَ نَتَبَوَّأُ مِنَ ٱلْجَنَّةِ حَيْثُ نَشَآءُ فَنِعْمَ أَجْرُ ٱلْعَٰمِلِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo74. Мре bakolobaka: Matondo na Allah oyo akokiseli biso elaka, mpe akitanisi biso mabele (ya Iola), ya soló tokovandaka na Iola esika nyoso tokolinga. Ya solo lifuta lia babongisi lileki kitoko.

See all translations of this verse →

وَتَرَى ٱلْمَلَٰٓئِكَةَ حَآفِّينَ مِنْ حَوْلِ ٱلْعَرْشِ يُسَبِّحُونَ بِحَمْدِ رَبِّهِمْ وَقُضِىَ بَيْنَهُم بِٱلْحَقِّ وَقِيلَ ٱلْحَمْدُ لِلَّهِ رَبِّ ٱلْعَٰلَمِينَ

Lingala Translation - Mohammed Balangogo75. Mpe okomona ba anzelu zinga zinga ya ngwende, bazali kokumisa Nkolo wa bango, mpe bakokataka kati kati na bango na bosóló. Mpe bakolobaka na bango: Lokumu na Allah Nkolo wa molongo.

See all translations of this verse →

Looking for a topic? Try the meaning search — your question is scanned across all 6,236 verses.
Language — 70