Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Babuku biye bizalaki bokambi mpona bato. Na sima tokitisaki bososoli (eye ezali kokabola bosôló na lokuta). Ya sôló baye bazali kopengwa na bilembo to mpe mikapo mia Allah, bakozala na etumbu ya makasi. Allah azali makasi atonda nguya nakopesa etumbu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Ye nde azali kopesa bino balolenge kowuta na mabumu ya bamama na bino yambo ete bobotama ndenge alingi. Nzambe mosusu azali te sé ye wa bokasi atonda bwányá.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Ye nde akitiseli yo buku kati na yango ezali na mikapo mia polele ya mibeko, mikapo wana nde mizali misisa ya buku, mpe mikapo misusu mizali na bokokani kati na yango. Na yango bato baye bazali na bokono ya libungi o mitema mia bango, bazali sé kolanda mikapo miye mikokana mpona koluka bomekano to mpe koluka ndimbola na yango, kasi moto moko te ayebi ndimbola na yango, sé ye moko Allah. Nzoka nde, banganga Nzambe (Allah) baye batonda mayele balobaka ete: Biso tondimi na yango. Nyoso ewuti epai na Nkolo na biso, sé bato baye bazali na mayele nde bazali kokanisa mpe kondima na yango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Eh Nkolo wa biso! Kobongola bosôló o mitema mia biso te, sima ya kokamba biso. Mpe pesa biso ngolu nayo. Ya sôló yo ozali mopesi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Eh Nkolo wa biso! Yo okosangisa bato o mokolo mwa mbano moye mokozala na ntembe te; ya sôló Allah azangisaka elaka naye te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Ya sôló baye bapengwa, misolo na bango na bana na bango ekosalisa bango na eloko te epai na Allah. Mpe bango bakozala bankoni ya lifelo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo11. Ndenge ezalaki na bomeseni ya falo na bato naye, ndenge moko na baye bazalaki liboso na bango. Bazuaki bilembo mpe mikapo mia biso na lokuta. Mpe baboyaki kondima na yango, mpe Allah azuaki bango na masumu na bango. Allah azali makasi mpona kopesa etumbu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Loba na baye bapengwa ete: Bokobetama mpe bokokitisama, na sima bokosangisama o kati ya lifelo. Mpe oyo nde esika ya mabe ya kofanda!
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Ezalaki ya sôló elembo mpe ekamwiseli mpona bino okati ya mapinga mibale makutanaki na bitumba; moko ezalaki kobunda mpona Allah, mosusu ezalaki na bopengwi. Na sima mapinga ya bandimi ekomaki komimona ete bakomaki mbala mibale koleka. Allah asalisaka oyo ye alingi na elonga naye moko. Ya sôló wana ezali liteya mpona bato bazali na miso ya komona.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Engengisami mpona bato mposa ya basi, mpe ya bana, mpe bankita ya wolo mpe palata, mpe na bampunda, mpe an’âm(1), mpe bilanga. Wana nyoso bisengo ya mokili, nzoka nde bozongi ya malamu mpe ya kitoko ezali epai Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Loba: Bolingi nalakisa bino eloko ya malamu koleka maye bozali na yango? Mpona baye babangi (Allah) bazali na paladiso ya nkembo, epayi ya Nkolo wa bango, okati na yango mingala mizali kotiola, bakozala libela na kati mpe bakozala na basi baye bapetuama, mpe esengo kowuta epai na Allah. Allah azali komona bawumbu naye.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Baye bazali koloba: Nkolo wa biso! Ya sôló tondimi, limbisa masumu ma biso, mpe tia biso mosika na etumbu ya lifelo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Allah asila kotatola ete nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye mei, ndenge moko na ba anzelu, na banganga ya mayele, Mpe (Allah) atonda bosembo Nzambe mosusu azali te sé ye Allah wa bokasi atonda bwanya.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Ya sôló, lingomba liye lindimami epai ya Allah lizali Islam (komisokia). Mpe baye bazuaki buku liboso(1) bakabwanaki te, sé na tango boyebi ekomelaki bango na likunya kati na bango. Oyo akopengwa na mikapo mia Allah, ya sôló Allah afutaka na lombango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Mpe soki basuanisi yo, loba na bango ete: Namisoki mobimba epai na Allah, na baye banso balandi ngai. Mpe loba na baye bazuaki buku mpe na baye batanga te: Bomisoki? Soki bamisoki, basili kokambama. Mpe soki bapesi mokongo, yo ozali na eloko ya kosala te sé kokomisa sango. Mpe Allah azali komona bawumbu naye.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Ya sôló baye bazali kopengwa na mikapo mia Allah, mpe bazali koboma bantoma mpamba, mpe bazali koboma baye bazali kotinda na bosembo, o kati ya bato pesa bango sango ya etumbu ya makasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Ozali komona te mpona baye bapesamaki buku ndenge basalaki, soki babengami ete bakata makambo kati na bango na buku ya Allah, sima basusu kati na bango bapesi mokongo mpe bakimi?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo24. Na bongo nde balobaki ete: Móto ekozwa biso sé mikolo mike ya kotanga. Mpe lokuta na bango ekosaki bango na lingomba na bango, na ntina na maye bazalaki kosala ya mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Loba ete: Eh Allah! Mokonzi ya bakonzi, opesaka bokonzi na nani olingi, mpe olongalaka bokonzi na nani olingi, opesaka nguya na nani olingi. Mpe okitisaka nani olingi, bolamu nyoso ezali na maboko nayo, ya sôló ozali na bokasi likolo ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Okotisaka butu kati na moyi mpe okotisaka moyi kati na butu. Mpe obimisaka moto ya bomoyi kowuta na liwa mpe obimisaka moto ya liwa kowuta na bomoyi. Mpe opesaka bozui nayo na moto oyo olingi, na motango moyebani te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Esengeli te na bandimi kotika bandeko na bango bandimi, mpona kozua bapagano bazala baninga na bango. Oyo akosala lolenge wana akozala na eloko te epai na Allah, sé soki bozali koluka komibatela mpo na bango. Allah azali kokebisa bino mpona ye moko. Mpe epai naye Allah nde bozongi ezali.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Loba ete: Soki bobombi maye mazali kati ya mitema mia bino to bobimisi yango polele, Allah ayebi yango. Mpe ayebi maye mazali na likolo mpe na nsé. Mpe Allah azali na nguya likolo ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo30. Mokolo molimo nyonso ekozua makambo ya malamu maye esalaki. Mazali komonana na maye manso esalaki ya mabe, akolikia ata sókó ezalaka kati ya oyo na oyo kuna ndelo ya mosika, mpe Allah azali kokebisa bino mpona ye moko mpe Allah atondi na ngolu mpona bawumbu naye.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo31. Loba ete: Soki bolingi Allah, bolanda ngai.(1) Allah akolinga bino mpe akolimbisa masumu ma bino. mpe Allah azali molimbisi moyoki mawa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo35. Kanisa tango mwasi ya Imrân alobaki ete: Eh Nkolo! Ya sôló ngai nalaki yo mokumba eye ezali na libumu na ngai. Mpe nabonzeli yo ye na bonsomi nyoso mpo ete azala mosali nayo, eh Nkolo! Ndima kolela na ngai, ya sôló ozali moyoki otonda boyebi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo36. Mpe tango abotaki ye, alobaki ete: Eh Nkolo! Naboti ye mwana mwasi. Mpe Allah ayebaki mbotama wana, kasi mwana mwasi azali lokola mwana mobali te. Na yango napesi ye nkombo ya Maryam, mpe ngai ya sôló nati ye na libota naye, na nsé ya libateli nayo likolo na satana oyo alakelama mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo37. Nkolo naye andimelaki ye na bondimeli ya malamu mpe akolisi ye kokola ya malamu. Mpe apesaki ye, na Zakariya mpo ete abokolo ye. Na tango inso Zakariya azalaki kokota na mihrâb(1) epai naye (Maryam) akokuta ye na bilei. Mpe akotuna ye eh Maryam! Ozui bilei biye wapi? Akozongisa eyano ete: Ewuti epai na Allah. Ya sôló, Allah apesaka bozui na moto oyo ye alingi na motango te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo38. Na tango wana, Zakariya asengi Nkolo wa ye, alobaki ete: Nkolo, pesa ngai libota ya malamu kowuta epai nayo. Ya sôló ozali moyoki Mabondeli.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo39. Ba anzelu babengaki ye tango ye atelemaki azali kosambela na kati ya Mihrab,(2) balobaki naye ete: Ya sôló Allah apesi yo sango elamu ya mbotama ya Yahya, ye oyo akondima na liloba ya Allah. Mpe akozala mokonzi mpe moto ya kilikili te, mpe moto ya ekobo te, mpe akozala ntoma o’kati ya bato ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo41. (Zakariya) alobaki ete: Nkolo! Pesa ngai elembo na yango. (Allah) alobi ete: Elembo nayo ete mikolo misato okosolola na bato te sé na bilembo. Na sima okanisa Nkolo wayo mingi, mpe sanzola ye na ntongo mpe mpokua.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo42. Mpe lisusu kanisa tango ba anzelu balobaki: Eh Maryam! Ya sôló Allah aponi yo mpe apetoli yo, mpe atomboli yo yambo ya basi banso ya mokili.(1)
Lingala Translation - Mohammed Balangogo43. Eh Maryam! Zala na botosi epai na Nkolo nayo, gumbama mpe fukama (o tia elongi nayo na mabele) elongo moko na bagumbami.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo44. Wana ezali basango mabombami tozali kopesa yo yango. Mpe ozalaki te epai na bango tango bazalaki ko buaka bikomeli bia bango mpona koyeba nani akozua mokumba ya kobokolo Maryam, mpe yo ozalaki te tango bazalaki kosuana.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo45. kanisa tango ba anzelu balobaki: Eh Maryam! Ya sôló, Allah azali kopesa yo sango elamu ya liloba kowuta epai naye (Allah), nkombo naye ekozala Masiya Issa, mwana ya Maryam, akozala na lokumu awa na nsé mpe na lola, mpe azali moko kati na baye bazali penepene (na Allah).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo47. (Maryam) alobi: (Nkolo ya sôló ndenge nini nakobota mpe ngai nasangani na mobali te?). Alobi: (Anzelu) (ndenge wana nde Allah akelaka maye alingi. Soki azwi mokano ya likambo, akoloba: “Zala”, Mpe lizalisami.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo49. Mpe motindami epai ya bana Isalayele, (akoloba na bango été): Ya sôló, ngai nayeli bino elembo mpe ekamwiseli kowuta epayi na Nkolo wa bino. Ete ngai nakosalela bino mabele ya potopoto na lolenge ya ndeke, mpe nakofula na kati mpe ekokoma ndeke na ndingisa ya Allah. Mpe na kobikisa bato bakufa miso, mpe ya bokono ya maba. Mpe na kosekwisa bawa na ndingisa ya Allah. Mpe nakoyebisa bino bilei nini bokolia mpe bankita bozali kosangisa yango okati ya bandako na bino. Ya sôló nyoso wana ezali elembo mpe mateya mpona bino, soki ya sôló bozali bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo50. Mpe nandimi na maye mazuamaki na torah(1) mpe nakopesa bino ndingisa mpona kolia maye bapekisaki bino. Mpe nayeli bino elembo kowuta na Nkolo wa bino. Mpe bobanga Allah mpe botosa ngai.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo52. Mpe tango Issa amonaki bopengwi na bango, alobaki ete: Banani bakosunga ngai na nzela ya Allah? Bayekoli naye bayanolaki na koloba été: Biso tozali basungi nayo na nzela ya Allah tondimi na Allah. Mpe yo (Issa) zala nzeneneke na biso ete ya sôló tosili komisokia.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo55. Kanisa(1) tango Allah alobaki: Eh Issa! Ya sôló, ngai nakozwa yo mpe nakomatisa yo epai na ngai mpe na kopetola yo okati ya bapagano. Mpe na kotia baye balandi yo likolo ya bapagano, kino suka ya molongo, sima epai na ngai nde bino nioso bokozonga. Mpe na ko sambisa bino okati ya maye bozalaki na bokabwani.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo59. Ya sôló, ndakisa ya Issa epai na Allah ezali lolenge moko na Âdam akelaki ye na mabele, na sima alobaki naye: “Zala”, mpe azalisamaki.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo61. Kasi oyo akotia yo ntembe, mpe kosuanisa yo na ntina na (Issa) mpe yo osili kozua boyebi, loba na bango ete: Boya tokutana, mpe tobenga bana na biso mpe bana na bino, basi na biso mpe basi na bino, biso mpe bino, na sima tomisenga ete botutu ya Allah ekitela bato ya lokuta kati na biso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo62. Ya sôló, oyo nde masapo ya bosembo. Mpe ezali na Nzambe mosusu te sé Allah. Ya sôló, Allah ye nde azali na bokasi, atonda bwanya.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo64. Loba: Eh bino bato baye bozua buku! Boya na liloba moko oyo ekosangisa biso na bino ete: Tobondela Nzambe mosusu te sé Allah, mpe tosangisa ye na eloko te, mpe tozua ba Nkolo misusu te na botıki Allah. Soki bapesi mokongo, boloba na bango ete: Bozala banzeneneke ete biso nde tozali bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo66. Tala bino, bozali kosuana na likambo oyo bino boyebi, kasi mpona nini bozali kosuana na likambo oyo boyebi te? Mpe Allah ayebi kasi bino boyebi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo68. Ya sôló bato bakotuta ntolo mpona Ibrâhîm, bazali ba oyo balandaki ye na ntoma oyo (Muhammad) na bandimi. Allah nde azali mobateli ya bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo69. Lisanga ya bato kati na baye bazwa buku balukaka kopengwisa bino, bakopengwisa sé milimo mia bango moko, nzoka nde bazali koyeba te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo71. Eh bino baye bozua buku! Mpona nini bozali kosangisa mabe na bosôló, mpe bozali kobomba bosôló mpe bozali na kati ya koyeba?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo72. Mpe lisanga ya bato kati na baye bazua buku, balobi na bato na bango ete: Bondima na maye ekitisama epai ya bandimi(1) na ebandeli ya mokolo, mpe soki ekomi na mpokwa bopengwa na yango, mpo ete bango bazonga.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo73. Bondima na bato mosusu te sé na oyo alandi lingomba na bino. Loba: Ya sôló, lisungi na nzela ya semba ezali oyo ya Allah. Mpo ete moko te azua mpe lokola bino, to atelemela bino na yango epai ya Nkolo na bino? Loba: Ya sôló bolamu ezali na maboko ya Allah, apesaka yango na oyo ye alingi, mpe Allah atonda bomengo azali na boyebi koleka.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo77. Ya sôló, baye bazali koteka elaka oyo bazwaki na Allah na ntalo moke, mpe bazali kolapa ndayi (ya lokuta), bango wana nde bakozala na eloko te na mokolo ya suka. Mpe Allah akolobisa bango te, mpe akotala bango te mokolo ya suka. Mpe akopetola bango te. Mpe bakozala na etumbu ya makasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo78. Mpe ya sôló, okati na bango basusu bazali kolekisa lolemu na bango mpona kotanga buku mpo bandimela bango ete bazali bato ya buku, kasi wana ewuti kati na buku te. Mpe bazali koloba ewuti epai ya Allah kasi yango ezali ya Allah te, mpe bazali koloba lokuta mpona Allah mpe bango bazali na kati ya koyeba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo79. Esengeli te na moto oyo Allah apesi buku, mpe bwanya mpe bontoma, sima aloba na bato ete: Bozala bawumbu na ngai kasi bawumbu ya Allah te, kasi: Bozala ba nganga ya mayele mpo ete bozali kotangisa buku mpe na oyo bozalaki kotanga.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo80. Mpe atinda bino te(1) mpo ete bozua ba anzelu mpe bantoma bankolo na bino. Akotinda bino na bopengwi na tango bozalaki baye bamisoki?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo81. Mpe tango Allah azuaki elaka oyo na bantoma ete: Na tango inso, nakopesa bino buku mpe bwanya, mpe na sima motindami mosusu akoya mpona kondima na maye bozali na yango, esengeli na bino kondima naye mpe kosalisa ye alobi na bango: Boye bondimi mpe bozui mokano na ngai? Bazongisi ete: Tondimi, mpe bozala banzeneneke ngai mpe nazali elongo na bino na kati ya banzeneneke.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo83. Bazali koluka lingomba mususu, mpe batiki lingomba ya Allah ya sôló, ye oyo bikelamu binso bizali na likolo mpe na nsé, bazali komikitisa, balinga balinga te, mpe epai naye nde bakozongisama.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo84. Loba: Tondimi na Allah, mpe tondimi na maye makitisameli biso, ndenge moko na maye makitisamaki epai na Ibrâhîm, na Ismâïl, na Is’hâq, mpe Ya’qûb mpe mabota, tondimi mpe na maye mapesamaki epai na Mûssa mpe Issa mpe bantoma, kowuta epai na Nkolo na bango, tokotia bokeseni moko te kati na bango, mpe epai naye(1) nde to misoki.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo85. Na moto oyo akozua lingomba mosusu, mpe atiki islamu, bakondimela ye yango te. Mpe na mokolo ya suka akozala elongo moko na bazangi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo90. Ya sôló baye bapengwi sima ya bondimi bwa bango, sima bakobi na bopengwi, tubela na bango ekondimama te. Mpe bango nde babungi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo91. Ya sôló, baye bapengwi mpe liwa lizui bango na bopengwi, bakondimelaka te moko kati na bango ata soki bapesi mabele etondi na wolo ekokangola ye te, mpe bakozala na etumbu enene mpe bakozala na basungi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo92. Bokozwa bolamu te kino bokobimisa ya malamu okati ya maye bolingaka. Mpe na nyoso oyo bobimisaka, ya sôló Allah ayebi yango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo93. Bilei binso bindimamaki kolia mpona bana ya isalayele, longola sé biye isalayele amipekisaki yambo ete torah(1) ekita, loba na bango ete: Boya na torah mpe botanga yango soki ya sôló bozali bato ya bosembo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo95. Loba: Allah olobi bosembo ete: Bolanda bosôló ya lingomba ya Ibrâhîm na kati ya bomoko ya Allah, kasi (Ibrâhîm) azalaki te elongo na baye basangisaki (Allah).
Lingala Translation - Mohammed Balangogo97. Kati na yango bilembo bizali, ndakisa esika eye Ibrâhîm atelemaki. Oyo akokota na kati na yango abatelami. Mpe esengeli na bato kosala hajj pona Allah na ndako wana, mpo na moto oyo azui makoki ya kokoma kuna. Kasi oyo akoboya, ya sôló, Allah atonda bomengo koleka mokili mobimba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo98. Loba: Eh bino baye bozua buku! Mpona nini bozali kopengwa na mikapo mia Allah, mpe Allah azali nzeneneke na maye bozali kosala?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo99. Loba: Eh baye bozua buku! Mpona nini bozali kopekisa bandimi na nzela ya (Allah) mpona koluka kotia mbilinga mbilinga mpe bino bozali banzeneneke? Mpe Allah abosani te na maye bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo100. Eh bino bandimi! Soki botosi lisanga kati ya baye bazua buku liboso, bakozongisa bino na bopengwi sima ya kondima na bino.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo101. Ndenge nini bino bokopengwa mpe bino boyokaka mikapo mia Allah mizali kotangama, mpe bozali na motindami naye okati na bino? Oyo akomipesa na Allah ye wana nde asili kokambama na nzela ya nsemba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo102. Eh bino baye bondimi! Bobanga Allah bobangi ya sôló, mpe liwa ekuta bino te sé bozali Na kati ya komisokia.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo103. Mpe bokangama lisanga o singa ya Allah mpe bokabwana te. Bokanisa bolamu bwa Allah eye apesi bino na tango bozalaki koyinana bino na bino, mpe akangisi mitema na bino, mpe na bolamu naye, bokomaki bandeko. Mpe bozalaki pembeni ya libulu ya mòtò na sima abikisaki bino na yango. Na boye nde Allah azali kolimbola bino mikapo naye, mpo ete bokambama na nzela ya semba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo105. Kasi bozala te lokola ba oyo basuanaki mpe bakabwanaki sé na tango ndimbola bisilaki ko komela bango. Bango wana nde bazali na etumbu ya monene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo106. Mokolo oyo bilongi bikongenga mpe bilongi bisusu bikoyinda. Kasi mpona ba oyo bilongi bikoyinda (bako tunama), bopengwi lisusu sima ya kondima na bino? Na bongo bozua etumbu na ntina na bopengwi na bino.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo107. Kasi mpona ba oyo bilongi na bango bikongenga, bakozala o’kati ya ngolu(1) ya Allah epai kuna bakozala seko na seko.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo110. Bino bozali umma(2) ya malamu oyo ebimisamaki okati ya bato: Mpamba te botindaka bato basala malamu, mpe bopekisaka bato kosala mabe mpe bondimi na Allah. Kasi soki Baye Bazwa Buku bandimaka, nde ezalaki malamu mpona bango. Moke kati na bango bazali bandimi, kasi ebele nde bazali bato mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo111. Bakokoka te komonisa bino mpasi ya minene, sé ya mikemike. Mpe soki babundisi bino, suka suka bakopesa mokongo mpe bakokima, mpe bakosalisama te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo112. Bisika binso bazuamaki, babetamaki mpe bakitisamaki, sé soki ezali boyokani kowuta epai na Allah mpe boyokani kowuta epai na Bato. Nkanda ya Allah ezali likolo na bango, mpe bampasi na bampasi, mpo ete baboyaki kondima na mikapo mia Allah mpe bazali koboma ba ntoma mpamba. Mpo ete bazangaki botosi mpe bazalaki kolutisa ndelo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo113. Bazali nyoso ndenge moko te. Na kati na baye bazwa buku, ezali na umma(1) moko etelemaka na butu mpona kotanga buku ya Allah, mpe bazali kofukamela ye.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo114. Bandimaka na Allah mpe na mokolo ya suka, mpe batindaka kosala malamu mpe bapekisaka kosala mabe, mpe bazalaka na lombango mpona kosala misala ya malamu. Bango wana nde bazali elongo moko na bato ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo116. Ya sôló baye bapengwi, bomengo na bongo na bana na bango ekosalisa bango na eloko moko te epai na Allah. Bango nde bato ya môtô mpe bakozala kuna seko.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo117. Ndakisa ya maye bazali kobimisa yango mpona bomoyi ya nsé, ezali lokola mopepe ya malili makasi ebebisi elanga ya libota moko oyo basalaki lisumu na milimo mia bango moko, mpe Allah asalaki bango mabe te, kasi bango moko nde bamisalaki mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo118. Eh Bino bandimi! Tika ete bozua sÓkÓ moke te baninga libanda na bino, balembaka te na kotia potopoto kati na bino, basili kolakisa bino kimonguna kowuta na minoko na bango, kasi oyo bazali kobomba na mitema ezali mabe koleka. Na boye tosili kolimbolela bino bilembo, soki bokozala na bososoli.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo119. Bino nde bozali kolinga bango mpe bango balingi bino te: Mpe bozali kondima na buku mobimba na yango, mpe soki bakutani na bino, balobaka: Tondimi (na Allah), kasi soki batikali bango na bango, bazali kosua misapi na bango mpona kolakisa nkanda. Loba: Bokufa na mitema mabe na bino na koyina. Ya sôló, Allah ayebi mabombami ya mitema.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo120. Soki bolamu (ya Allah) ezui bino basiliki, mpe soki mpasi ezui bino basepeli. Kasi soki bokangi mitema mpe bobangi (Allah), likita na bango ya mabe ekosala bino eloko moko te. Ya sôló, Allah ayebi maye manso bazali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo122. Tango biteni mibale okati ya lisanga na bino bakani kozonga sima. Mpe Allah nde azali mosungi wa bango, mpe epai na Allah nde esengeli na bandimi kotia elikia na bango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo123. Mpe ya sôló, Allah asili kolongisa bino na bitumba ya Badr.(1) Na tango oyo bozalaki makasi te. Na yango esengeli na bino kobanga Allah mpo bokoka kotondo ye botondi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo124. Tango ozali koyebisa na bandimi été: Ekoki na bino te été Nkolo na bino akitisa ba anzelu nkoto misatu mpona kosunga bino?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo125. Ezali sé bongo, kasi soki boyiki mpiko mpe bobangi (Allah) ete bango bazongeli bino lisusu na tango wana, Nkolo na bino mpe akobakisela bino ba anzelu nkoto mitano bakokita na bilembo na bango ya bitumba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo126. Mpe Allah atiaki yango te sé mpona kopesa bino sango elamu mpe mpona kokitisa mitema mia bino. Mpe elonga ewutaka sé na Allah, Nkolo bokasi atonda bwanya.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo128. Ozali na eloko moko te na kati ya likambo oyo, to akolimbisa(1) bango to akopesa bango etumbu, mpo ete bazali bato mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo129. Manso mazali o’likolo na nsé mazali ya Allah. Alimbisaka na oyo alingi. Mpe apesaka etumbu na oyo alingi, mpe Allah azali molimbisi mpe moyoki mawa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo130. Eh bino bandimi! Bolia misolo mia ekotama te na bobakisi misolo mia bino, mpe bobanga Allah mpo bokoka kolonga.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo134. Baye babimisaka na tango ya bisengo mpe na tango ya mpasi, mpe baye bakokaka kokanga nkanda te mpe baye balimbisaka bato, Mpe Allah alingaka bato ya bolamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo135. Mpe baye bazali soki basali mbeba to bamisali mabe, bakanisi Allah mpe basengi bolimbisi mpona yango, mpe moko te alimbisaka masumu bobele Allah, mpe batingamaka te na maye bazalaki kosala ya mabe, na bango bazali na kati ya koyeba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo136. Bango wana nde lifuta na bango ezali bolimbisi kowuta epai ya Nkolo na bango, mpe baparadizu wapi epai mingala mizali kotiola, bakozala libela na kati, oyo nde lifuta ya basali malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo140. Soki bozoki mpota, bango mpe bazoki lokola. Na boye tozali kotambuisa mikolo okati na bato mpo ete Allah ayeba bandimi, mpe azua okati na bino baye bawei mpona kobunda na nzela naye, mpe Allah alingaka bato ya mabe te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo142. Bozali kolikia kokota na lola mpe naino Allah ameki te ba nani kati na bino babundaki, mpe banani bakangi mitema?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo144. Mpe Muhammad azali sé motindami. Mpe batindami ebele balekaki liboso(1) naye. Soki akufi to babomi ye na bitumba, bokozonga lisusu na bopagano? Oyo kati na bino akozonga na bopagano, ekotungisa Allah na eloko moko te, mpe Allah akofuta baye bazali kotondo ye botondi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo145. Mpe moko te akoki kokufa sé ezala na mokano ya Allah mpe elaka eye asilaki kotiela ye. Mpe oyo akolinga lifuta lia mokili, tokopesa ye yango Mpe oyo akolinga lifuta lia mokolo ya suka tokopesa ye yango, mpe tokofutaka baye bazali kotondo Allah botondi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo146. Mpe ebele kati ya bantoma babundaki elongo na balandi ye, ebele ya banganga Nzambe, babangaki te na oyo ezuaki bango o kati ya nzela ya Allah, mpe balembaki te mpe batikaki ntaka te, mpe Allah alingaka bakangi mitema.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo147. Liloba na bango ezalaki sé ete: Eh Nkolo! Limbisa biso masumu na biso mpe maye tolutisi ndelo na yango, mpe lendisa matambi na biso mpe pesa biso elonga likolo na baye bapengwi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo148. Mpe Allah apesaki bango mbano ya malamu awa na nsé mpe ya kitoko koleka o mokolo ya suka. Mpe Allah alingi bato ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo151. Tokotia kobanga na mitema ya bapagano mpo ete bango basangisaki Allah na maye bazalaki na bilembetele na yango te kowuta epai naye. Na yango efandelo na bango ekozala okati ya môtô, oyo nde esika ya mabe mpona bato ya mabe!
Lingala Translation - Mohammed Balangogo152. Ya sôló, Allah akokisaki elaka naye epai na bino, tango bobomaki bango ebele na ndingisa naye(1), kino tango bolembaki, mpe bokomaki kosuana, mpe bozangaki botosi na tango eye alakisaki bino maye bolingaka. Kati na bino basusu balingaki mokili, mpe basusu balingaki mokolo ya suka. Azongisaki bino sima liboso na bango mpo ete ameka bino mpe asila kolimbisa bino. Kasi Allah nde atonda bolamu likolo ya bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo153. Tango bokimaki (kobunda) bozongaki sima te mpona kosalisa ata moto moko, mpe motindami (Muhammad) azali kobenga bino. Mpe (Allah) apesaki bino mawa likolo na mawa mpo ete boyoka mpasi te na mitema mpona biloko bozangaki kozua, mpe na makambo mazuaki bino. Mpe Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo154. Sima ya ba mpasi, (Allah) akitiseli bino kimia, mpe mpongi ezuaki lisanga kati na bino, kasi basusu kati na bino bazuaki mpasi o mitema mia bango, mpe bakaniselaki Allah makanisi ya mabe, makanisi ya bopagano ya kala, bazali koloba ete: Litomba nini tozali na yango Bazali kobimisela yo te maye mabombami o mitema mia bango, bazali koloba ete: Soki tozalaki na litomba na likambo oyo, nde banguna bakokaki te koboma biso na esika oyo. Loba: Ata soki bofandaki na bandako na bino, baye mikolo na bango ya liwa ekoki bakobima, mpe bakei na bisika bibongisamaki mpona liwa na bango. Yango ezali komekama mpo Allah ayeba maye mazali okati ya mitema na bino, mpe mpo apetola maye mazali o mitema na bino. Mpe Allah ayebi mpenza maye mafandi na mitema.mpona likambo oyo? Loba na bango ete: Ya sôló likambo yango nyoso lizali mpona Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo155. Baye okati na bino bazongaki sima mokolo mampinga mibale ya bitumba makutanaki, satana nde akosi bango na komekama na maye bazuaki na ntina ya masumu na bango. Allah asili kolimbisa bango. Ya sôló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo156. Eh bino bandimi! Bozala lokola bapagano te baye balobaki na bandeko na bango soki basali mobembo to bazali na kati ya bitumba ete: Soki batikalaki epai na biso, nde bakufaki te to mpe babomamaki te. Allah, atie yango ezala mpasi mpe likama o’mitema mia bango. Mpe Allah apesaka bomoyi mpe liwa, mpe Allah azali komona maye bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo157. Mpe soki bobomami na nzela ya Allah to soki bokufi, bolimbisi mpe ngolu ya Allah yango nde ezali malamu koleka manso bazali kozua awa na mokili.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo159. Mpe mpona ngolu ya Allah atia na motema nayo, ozalaki mpete mpe malamu na bango. Kasi soki ozalaki na makambo ya makasi mpe motema makasi nde bakimaki nyonso pembeni nayo. Limbisa bango mpe sengela bango bolimbisi, mpe yokana na bango (liboso ozwa mokano) na likambo. Mpe soki ozwi mokana tia elikia epai ya Allah, ya sôló Allah alingaka baye batiaka elikia naye.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo160. Soki Allah apesi bino lisungi, moko te akoki kolonga bino. Soki asundoli bino, nani mosusu sima naye akosunga bino? Epai ya Allah nde bandimi batia elikia.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo161. Ntoma azali te oyo akolekisa ndelo na bozui (biloko ya bitumba), mpe oyo akolekisa ndelo na bozui, akoya na oyo alekisaki ndelo mokolo ya suka, sima moto na moto akozua mbano eye molimo mwa ye mosalaki, bakobubama te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo162. Boye oyo azali kotambola engebene na mibeko mia Allah azali lokola moto oyo nkanda ya Allah ezali likolo naye? Mpe esika naye ekozala na lifelo, oyo nde bozongi ya mabe!
Lingala Translation - Mohammed Balangogo164. Ya sôló, Allah apesi lokumu likolo ya bandimi tango atindi epai na bango motindami kowuta na kati na bango, azali kotangela bango mikapo mia ye, mpe azali kopetola bango mpe kotangisa mpe kolakisa bango buku mpe bwanya. Mpe ata soki kala bazalaki na kati ya libungi ya polele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo165. Nini! Tango mpasi ezui bino, boyeba ete bomonisaki bango mpasi mbala mibale na oyo ezui bino, na sima bolobaki ete: Oyo ewuti wapi? Loba na bango ete: Ewuti epai na bino moko, ya sôló Allah azali na nguya ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo167. Mpe ayeba bato ya bilongi mibale, mpe babengami ete; boya kobunda na nzela ya Allah, to mpe bobengana monguna, balobi ete: Soki toyebaki ete bitumba bizali ya sôló, nde tolandaki bino te. Mokolo wana bazalaki pembeni ya bopengwi mosika na boyambi, bazali koloba na minoko na bango maye mazali o mitema mia bango te. Mpe Allah, nde ayebi na bolamu bonso maye bazali kobomba.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo168. Baye batikalaki na bandako na bango mpe balobaki na bandeko na bango ete: Soki batosaki biso nde babomamaki te. Loba ete: Bolongola liwa ezala mosika na bino soki ya sôló bozali bato ya bosembo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo169. Mpe bokanisa te ete: Baye babomami na nzela ya Allah bazali bibembe, kasi bazali nde na bomoyi pembeni na Nkolo wa bango. Batondi na bomengo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo170. Basepeli na bolamu oyo Allah asali bango, mpe bazali na esengo na mitema mpona baninga na bango batikali na sima nakopesa bango sango elamu ete; babanga te mpe bayimayima te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo171. Bazali na Esengo na bolamu ya Allah mpe na lokumu naye, mpe ya sôló, Allah akobungisa te mbano ya bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo172. Baye bayanolaki na mbela ya Allah na ya motindami sima ya bango kozoka ba mpota. Kasi mpona ba oyo basalaki malamu kati na bango, mpe babangi (Allah), bakozala na lifuta linene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo173. Baye bato balobaki na bango ete: Ya sôló, bato basili kosangana mpona kosala bino mabe bobanga bango, mpe ebakiselaki bango bondimi mpe balobaki: Allah akoki na biso, mpe oyo nde mobateli ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo175. Ya sôló, satana nde azali kobangisa bino na Lisungi ya bato naye, bobanga bango te, kasi bobanga ngai soki bino bozali bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo176. Koyoka mpasi o’motema te mpona baye bakei na lombango na kati ya bopengwi. Ya sôló, bango bakopesa Allah mpasi soki moke te. Allah akani kopesa bango eloko soki moko te o’mokolo ya suka. Bango bakozua etumbu monene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo177. Ya sôló, baye basombi bopagano o’esika ya bondimi, batungisi Allah na eloko soki moko te, mpe bango nde bazui etumbu enene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo179. Allah akotika bandimi te na lolenge bozali na yango, kino akabola mabe na malamu. Allah akolakisa bino mabombami te, kasi Allah akopona o’kati ya batindami naye oyo ye alingi. Bondima na Allah na batindami naye, mpe soki bondimi mpe bobangi (Allah), bokozala na lifuta linene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo180. Mpe baye bazali koboya kokaba na bozui oyo Allah apesi bango, bakanisa te ete wana ezali malamu mpona bango. Ezali nde mabe mpona bango, na mokolo ya suka, bomengo wana, bikozinga bango, mpe nkita ya likolo mpe ya mabele nyonso ezali ya Allah. Mpe Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo181. Ya sôló, Allah asili koyoka maloba ya baye balobaki: Ya sôló, Allah azali mobola mpe biso tozali bazui. Tobombi maloba na bango. Mpe bango bazalaki koboma ba ntoma mpamba mpe tokoyebisa bango: Bomeka etumbu ya móto ya makasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo183. Baye balobaka: Ya sôló tozui elaka epai ya Allah ete tokoki kondima ata na motindami moko te kino na tango akomemela biso libonza móto elia yango, Loba: Batindami liboso na ngai bayelaki bino bilembo mpe maye botunaki bango, Kasi boni bobomaki bango, soki bino bozali bato ya bosembo?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo184. Mpe soki bazui yo moto ya lokuta, ya sôló basilaki kozwa batindami liboso nayo bato ya lokuta, bayelaki bango bilembo bia polele, mpe malendisi mpe buku ya bongengi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo185. Molimo nyoso mokomeka liwa. Kasi mokolo mwa lisekwa, bokozua lifuta lia bino. Na oyo bakotia ye mosika na móto mpe bakotisi ye na paradizu, ye wana nde alongi. Bomoyi ya mokili ezali sé bisengo ya tango moke.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo186. Ya sôló, bokomekama mingi kati na bozui na bino mpe na banzoto na bino. Mpe bokoyoka maloba ebele ya mabe kowuta epai ya baye bazua buku liboso na bino, ndenge moko na basambeli ya bikeko. Mpe soki bokangi mitema, mpe bobangi (Allah). Ya sôló, wana ezali lolenge ya malamu ya kosilisa makambo.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo187. Mpe tango Allah azuaki elaka epai ya baye bazuaki buku mpo balimbola yango polele epai ya bato, mpe babomba ata eloko moko te na kati na yango, bazui yango babwaki sima ya mikongo na bango mpe bateki yango na ntalo moke, mombongo nini ya mabe oyo basali?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo188. Ya sôló kokanisa te ete baye bazali kosepela na maye (ya mabe) bazali kosala, mpe bazali kolinga ete bato bakumisa bango na maye basali te, kokanisa te ete bango bakolonga na etumbu. Kasi, bakozala na etumbu ya makasi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo189. Mpe maye manso mazali o’likolo mpe na nsé, mazali ya Allah, mpe Allah azali na nguya likolo ya biloko binso.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo190. Ya sôló, na kati ya bokeli likolo mpe mabele, mpe bokeseni ya butu na moyi, ezali bilembo mpona bato ya mayele.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo191. Baye bazali kokanisa Allah ya kotelema mpe kofanda, mpe ya kolala na mipanzi na bango, mpe bazali kososolo okati ya bokeli likolo mpe mabele eh Nkolo na biso! Maye manso tozali komona okeli yango mpamba te, nkembo nayo, mpe bikisa biso na etumbu ya móto.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo192. Eh Nkolo wa biso! Oyo okotisi ye na móto, ye wana nde osili kosambwisa ye, mpe bato mabe bakozua lisungi te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo193. Eh Nkolo wa biso! Ya sôló toyoki mobeleli azali kobelela mpona bondimi ete: Bondima na Nkolo na bino mpe tondimi. Nkolo na biso, limbisa biso masumu ma biso mpe longola mabe ma biso, mpe boma biso elongo na bato ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo194. Eh Nkolo na biso! Pesa biso maye olakaki biso epai ya batindami nayo, mpe kosambwisa biso te na mokolo ya suka. Mpamba te ozangisaka elaka nayo te.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo195. Mpe Nkolo wa bango Andimelaki bango ete: Ya sôló ngai na kobungisa te mosala ya moko kati na bino, mobali to mpe mwasi bino na bino, kasi mpona ba oyo babimaki na nzela ya Allah, mpe babimisaki bango na ba ndako na bango, mpe banyokwamaki na nzela ya ngaï, mpe babundaki, mpe babomamaki na nzela na yango, na kolongola masumu na bango nyonso, mpe na kokotisa bango na lola wapi epai mingala mizali kotiola, lifuta kowuta epai ya Allah. Mpe Allah azali na lifuta ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo198. Kasi baye babangi Nkolo wa bango, bakozala na kati ya lola eye mingala mizali kotiola o’nse na yango seko na seko, efandelo kowuta epai ya Allah. Mpe maye mazuami epai ya Allah mazali kitoko mpona bato ya malamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo199. Mpe ya sôló baye bazuaki buku, na kati na bango basusu bandimi na Allah, mpe na maye ekitaki epai na bino, mpe na maye ekiti epai na bango, bazali kobanga Allah. Mpe bazali koteka te mikapo mia Allah na ntalo moke. Bango wana lifuta na bango lizali epai ya Nkolo wa bango. Ya sôló Allah afutaka na lombango.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo200. Eh bino bandimi! Boyika mpiko mpe botingama na koyika mpiko, mpe botingama na bitumba, mpe bobanga Allah mpo ete bolonga.