Lingala Translation - Mohammed Balangogo4. Ye nde akela mapata na mabele na mikolo motoba, sima atombuami likolo ya ngwende, ayebi maye makotaka na mabele, mpe maye mabimaka kati na yango, mpe maye makitaka kowuta na likolo mpe maye makotaka o likolo, mpe azali na bino(1) esika nyoso bozuami. Mpe Allah azali kornona maye bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo6. Akotisaka butu na mokolo, mpe akotisaka mokolo na butu. Mpe azali moyebi ya maye mabombami o kati ya mitema.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo7. Bondima na Allah na motindami naye, mpe na maye asimbisi bino ya bozui bobimisa yango, baye kati na bino bandimi mpe babimisi (тропа Allah), bakozua lifuta linene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo8. Mpona nini bozali kondima na Allah te mpe motindami, azali kobenga bino mpo bondimela Nkolo wa bino? Mpe (Allah) asili kozua elaka na bino, soki bozali bandimi.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo9. Ye nde akitisaka mikapo ya polele epai ya mowumbu naye, mpo elongola bino na molili (bökende) na bongengi. Mpe ya soló, Allah azali na mawa mingi mpona bino atonda boboto.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo10. Nini ekopekisa bino kobimisa na nzela ya Allah nzoka nde epai ya Allah nde bankita ya likolo na ya nsé bikozonga? Oyo okati na bino abimisaki bozui naye, mpe abundaki liboso ya kokweya (ya makkah) akokani te na oyo abimisi bozui naye sima ya kokweya (ya makkah) mpe abundi, kasi bango banso bazali na bolamu oyo Allah alaki bango (lola). Mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo12. Mokolo oyo bandimi ya mibali na basi bakomonaka bongengi na bango ezali koleka bango liboso na ngambu ya loboko ya mobali bakoyebisaka bango: Lelo bozali na sango elamu, bokovanda libela na lola oyo ezali kolekisa mingala önse na yango. Wana nde ezali elonga enene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo13. Mokolo oyo bato ya bilongi mibale ya mibali mpe basi bakoloba na bandimi ete: Bozela biso mpo tozua moke ndambu ya bongengi na bino, (bandimi) bakoloba na bango ete: Mwinda ezali sima na bino,bozongaтропа kozua yango, na sima ezipeli moko ekokabola bango okati na yango ezali ngolu, mpe libanda na yango ezali etumbu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo14. Bakobelela bango ete: Tozalaki na bino elongo te? Bakozongisa ete: Iyo, kasi bomitiaki kati na komekama, mpe bosalaki likita ya mabe likolo ya bandimi, mpe botiaki tembe mpe elikia ya lokuta ekosaki bino kino mokano ya Allah ezuaki bino, (liwa likomeli bango) mpe mokosi (satana) akosaki bino тропа Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo15. Lelo oyo nsikô moko te ekondimama тропа bino na bapagano. Mpe esika na bino nde moto, yango nde molingami na bino. Mpe oyo bozongi ya mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo16. Boye tango ekoki te тропа bandimi ete mitema mibanga тропа bokundoli ya Allah, mpe maye makita na bosóló (kurani) mpo ete bazala te lokola baye bazua buku liboso balekisaki tango molai mpe mitema mia bango mikomaki makasi. Mpe ebele kati na bango bazali bato mabe?
Lingala Translation - Mohammed Balangogo17. Boyeba été ya soló, Allah apesaka bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango. Tosilaki kolimbola bilembo mpo bokanisa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo18. Ya soló, baye kati ya mibali mpe ya basi bazali kosala bolamu mpe bakotiseli Allah nyongo ya malamu, bakobakisela bango yango mpe bakozua lifuta lilamu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo19. Мре тропа baye bandima na Allah na batindami naye, bango nde bato ya bosôló, тре (bazali) banzeneneke epai ya Nkolo wa bango, тре bakozua lifuta na bongengi bwa bango. Мре тропа baye bapengwaki тре baboyaki kondima na bilembo bia biso, bango nde bato ya moto.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo20. Boyeba ete: Bomoyi ya nsé ezali sé lisano тре liseki, bonzenga, тре kowelana na lolendo kati na bino тропа bozui тре bana, yango ezali lokola mbula oyo ebeti ebimisi milona ya kitoko mizali kokamwisa bakati bilanga, sima ya tango токе, elembi mpe ekomi na langi ya mosaka mpe ekauki, kasi na mokolo ya suka etumbu ya makasi ekozala, bolimbisi mpe esengo ya Allah ekozala, na yango. Bomoyi ya mokili ezali sé bisengo ya tango токе.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo21. Bowelisa kosenga bolimbisami ya Nkolo na bino, na lola ya monene lokola likolo na mabele, elengelami тропа baye bandimaki na Allah na batindami naye. Wana ezali bolamu ya Allah, apesaka yango na oyo alingi. Mpe Allah azali Nkolo bolamu ya monene.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo22. Mabe ekoki kozua na mabele te to bino sé oyo ekomama na buku liboso bakela yango. Wana ezali pete тропа Allah.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo23. Mpo ete bomitungisama te na oyo eleki bino, тре bosepela te na maye apeși bino. Мре Allah asepelaka na moto ya lolendo te, mpe oyo azali komikwa.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo25. Tosilaka kotinda batindami na biso na bilembetele, mpe tokitiselaki bango buku na emekelo mpo bato basalela bosembo, mpe tokitisaki libende ezala na makasi mingi, mpe mpo esalisa bato, mpo ete Allah ayeba nani oyo akosunga ye, na batindami naye na (lolenge) ya kobombama. Ya sólo Allah azali na bokasi atonda nguya.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo26. Mpe tosilaki kotinda Núh na Ibrâhîm, mpe totiaki na bakitani na bango bontoma na buku, kati na bango basusu bakambami, mpe ebele na bango bazali mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo27. Mpe tolandisaki sima na bango batindami na biso, mpe tolandisaki Issa mwana ya Maryam mpe topesaki ye indjil mpe totiaki boboto mpe ngolu o mitema ya baye balandaki ye. Kasi kimupe oyo bazalaki na yango na sima, totindaki bango kosala yango te, kasi baluka nde bosepeli ya Allah, mpe basalelaki yango te ndenge esengelaki, na yango, topesaki baye bandimi kati na bango lifuta na bango. Kasi ebele na bango bazali mabe.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo28. Eh bino bandimi! Bobanga Allah, mpe bondima na motindami naye, akopesa bino mbano mibale ya ngolu naye, mpe akotiela bino bongengi ete botambola na yango, mpe akolimbisa bino. Mpo ete Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Lingala Translation - Mohammed Balangogo29. Wana ezali mpo baye bazua buku liboso bayeba été: Bazali na makoki moko te likolo ya ngrásia ya Allah, mpo ete ya soló, bolamu ezali nde na maboko ya Allah, apesaka yango na moto oyo alingi. Mpe Allah atonda bolamu koleka.