مَا قُلْتُ لَهُمْ إِلَّا مَآ أَمَرْتَنِى بِهِۦٓ أَنِ ٱعْبُدُوا۟ ٱللَّهَ رَبِّى وَرَبَّكُمْ وَكُنتُ عَلَيْهِمْ شَهِيدًا مَّا دُمْتُ فِيهِمْ فَلَمَّا تَوَفَّيْتَنِى كُنتَ أَنتَ ٱلرَّقِيبَ عَلَيْهِمْ وَأَنتَ عَلَىٰ كُلِّ شَىْءٍ شَهِيدٌ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo117. Nalobelaki bango sé oyo otindaki ngai na yango ete: Bobondela Allah Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino. Mpe nazalaki nzeneneke likolo na bango tango nazalaki na bango elongo. Kasi wuta osilaki komatisa ngai epai nayo, yo nde otikali mokengeli likolo na bango. Mpo ete ozali nzeneneke likolo ya biloko binso.