وَيَسْـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلْمَحِيضِ قُلْ هُوَ أَذًى فَٱعْتَزِلُوا۟ ٱلنِّسَآءَ فِى ٱلْمَحِيضِ وَلَا تَقْرَبُوهُنَّ حَتَّىٰ يَطْهُرْنَ فَإِذَا تَطَهَّرْنَ فَأْتُوهُنَّ مِنْ حَيْثُ أَمَرَكُمُ ٱللَّهُ إِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلتَّوَّٰبِينَ وَيُحِبُّ ٱلْمُتَطَهِّرِينَ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo222. Mpe bazali kotuna yo mpona makila.(1) Loba ete: Yango ezali mbindo. Bozelisa basi o tango wana, mpe bopusana kosangana na bango te kino bakokoma mpeto. Soki bakomi mpeto, bosangana na bango nzoto na bolandi mibeko ya Allah, ya sôló Allah alingaka baye basengaka tubela mpe bamipetolaka.