لَقَدْ كَفَرَ ٱلَّذِينَ قَالُوٓا۟ إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلْمَسِيحُ ٱبْنُ مَرْيَمَ وَقَالَ ٱلْمَسِيحُ يَٰبَنِىٓ إِسْرَٰٓءِيلَ ٱعْبُدُوا۟ ٱللَّهَ رَبِّى وَرَبَّكُمْ إِنَّهُۥ مَن يُشْرِكْ بِٱللَّهِ فَقَدْ حَرَّمَ ٱللَّهُ عَلَيْهِ ٱلْجَنَّةَ وَمَأْوَىٰهُ ٱلنَّارُ وَمَا لِلظَّٰلِمِينَ مِنْ أَنصَارٍ
Lingala Translation - Mohammed Balangogo72. Ya sôló, basili kopengwa baye bazali koloba ete: Masiya (Issa) mwana ya Maryam azali Allah. Mpe masiya (Issa) alobaki na bana ya isalayele ete: Bobondela Allah Nkolo na ngai mpe Nkolo na bino. Ya sôló, oyo akosangisa Allah, Allah asili kopimela ye paladizo (lola) mpe esika naye ekozala móto. Mpe bato mabe bakozua lisungi te.